Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Bonjour,

un commentaire vient d'être posté par damien mavambu sur l'article La naissance de la musique des jeunes, par E.Kandolo, sur votre blog Le blog de Messager

Mbote na bandeko banso bakutukanaka o kati masapo ya ndeko Kandolo. Na ndenge ete monoko ezangaka libaku te, bunga mpe ekoki koingela o kati ya bongo na biso banso. Kokota bwa ngai o etando mpe lisapon eye, ezali mpo ya kobisa na ndimbola to na eyano ya ndeko oyo ya biso oyo ayei kotiya pole na maye ekomamami mpo na bandeko ya Yss Boys.

Ndeko Vince LOMBUME ye azalaki moyembi ya kafukafu ya lisanga ya mondule "The Mustangs" kasi ya Yss BOYS te. Yss elingaki kolakisa nkoma to lettre ya suka ya ba kombo ya babeti mondule ya lisanga ena. Ra(y) LEMA (orgue et guitare), koondo ndeko wa biso Maître (avocat)Bon(y)TSHIMANGA(batterie) akomaki o boso ya boweyi bwa ye "SHANKY SHA", eleko ye azalaki kobeta jazz na BOBONGO CLUB na Ndolo, lolenge lyoko na bandeko Johnn(y) DAVIER TALA NGAI mpe na Hubert(y). Mpo na bokuse, "Y" ezalaki "lettre" ya suka ya ba kombo ya lipombo ya bandeko ena, yango wana babengamaki "Yss Boys", bana eye suka ya kombo na bango ezalaki "Y". Bago to "repertoire" ya Yss Boys ezalaki pop music na rock style ya Jimmy Hendricks to Eric Clapton. Baye bayebaka te, ndeko Ray LEMA azali kaka pianiste te, ye azali mobeti monene ya guitare.

Ye moto asalaka Orchestre "Jeunes pour Jeunes" o kati ya entreprise ya Freddy MULONGO oyo ya tata o eleko ya "bande dessinée"ya ba Apolosa na Kikwata. The Mustangs, bago to repertoire na bango ezalaki ya Otis REDDING.Bandeko ya ba Belgicains lokola koondo Zatho Venant KINZONZI, bazalaki bana ya African Jazz o kati ya groupe de soutien "CLUB MENGA MATATA" ya Bernard KANDOLO to mpe Adolphe KASAVUBU, bana Boma lokola ba tata ndinga ya ba tata na bango ezalaki kikongo ya Boma.Tata ya Bernard KANDOLO azalaki mosalisi (donateur)monene ya African Jazz ya KABASELE mpe mwana ye cofondateur,donateur mpe saxophoniste ya LOS NICKELOS, ye nde moto azalaki kosomba na kobombama ba instruments oyo ba bandaki kobetela na Bruxelles. Na yango, loyembo ya African Jazz, "Géo Géolina"ba auteurs na ekomeli ya palaki ezali "Club Menga Matata". "Nayoki Géolina, maloba nionso y'olobi ngai, ekoti awa mpe ebimi awa, mopepe ememi manso etc...."

Nasuki awa mpo na lelo mpe lokumu na ndeko oyo asangisi biso na etando eye.

Ata makanisi ma biso makokani te, kosolola nde ekomema biso banso o nzela ya bosembo. Bonkonde, boboto mpe bondeko o kati ya biso banso.

En toute mpangitude,

Damien Mavambu

Black is Black, interprété par les Yss Boys

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
F

Formidable!!!!, Quelle nostalgie... comment vous joindre, car j'ai qlq informations au sujet des The Yss Boys que je voudrai partager avec Damien M.

Le frère de Bonny T

Répondre