E.Kandolo explique la Franc-maçonnerie à Serge Mieko
Mbote kulutu Kandolo,
Matondo mingi na biyano nionso ozongiseli biso, nazalaki na internet te mikolo ewuti koleka pox nawuti kosala démenagement. Tango natangi ba biographies de la minorité Kasaïenne namoni ke misusu kati na bango bazalaki na lingomba ya Franc-maçonnerie, yango nalingi koyeba eza vraiment nini? Natalaki clip ya Franc-maçonnerie mbala elekaki na Mboka mosika, ba Présidents Sassou Nguesso na Ali Bongo bakomaki na niveau to grade ya ki Grand maître ya Franc-maçonnerie, c'est quoi au juste? nayokaki na misa na bango bazalaki kosala losambo ya ba mupe, ya ba musulmans et bazalaki kotanga kombo ya trône ya Roi Salomon etc...
en tout cas mayele esilaki nga. Yanola biso nanu soki Franc-maçonnerie eza eloko nini, ki bo Nzambe to ki Satana?
Eza club, association, lingomba to nini?
*Lisusu titre oyo Commandeur ya Ordre national ya Léopard, Grand officier ya Ordre national ya léopard tina nango eza nini? Est ce que oyo Mobutu apesa na Zaire eza kaka na valeur tii na moyi na lelo na mboka na biso to lokola régime naye ekueya, yango pe ekoma sans valeur?
Boboto o mboka yo
Serge Mieko
Ndeko Serge,
Nakomeka koyanola na maye otuni ngai na bozongeli mituna otuni.
Ndeko Serge : Tango natangi ba biographies de la minorité Kasaïenne namoni ke misusu kati na bango bazalaki na lingomba ya Franc-maçonnerie, yango nalingi koyeba eza vraiment nini? Natalaki clip ya Franc-maçonnerie mbala elekaki na Mboka mosika, ba Présidents Sassou Nguesso na Ali Bongo bakomaki na niveau to grade ya ki Grand maître ya Franc-maçonnerie, c'est quoi au juste? nayokaki na misa na bango bazalaki kosala losambo ya ba mupe, ya ba musulmans et bazalaki kotanga kombo ya trône ya Roi Salomon etc... en tout cas mayele esilaki nga. Yanola biso nanu soki Franc-maçonnerie eza eloko nini, ki bo Nzambe to ki Satana? Eza club, association, lingomba to nini?
Emmanuel Kandolo : Ekozala malamu obanda naino na botangi lolenge ba Maçons ya Cercle Damien Kandolo balobeli Franc maçon wuta ebanda na ekolo na biso tee na lelo oyo. Sima na yango, nde tokomeka kokoba na masolo.
La Franc-Maçonnerie en RDC de 1909 à 2009
La Franc-Maçonnerie en RDC de 1909 à 2009
Oeuvres Maçonniques en RDC
François-Xavier Mafuta
Joseph Badila
Soki olingi ko contacter bango, okoki kokomela bango na adresse oyo : Cercle Damien Kandolo, sous couvert ya prestataire Société service Plus, 26 rue Rigoles 75020 Paris.
Na proposer yo mpe deux livres intéressants oyo :
- PALOU, Jean, Le franc-maçonnerie (Volume VIII de Aux confins de la science), Paris, Payot, 1972.
- NEFONTAINE, Luc, La franc-maçonnerie, Anjou, Les Editions Fides, 1990.
Ndeko Serge : *Lisusu titre oyo Commandeur ya Ordre national ya Léopard, Grand officier ya Ordre national ya léopard tina nango eza nini? Est ce que oyo Mobutu apesa na Zaire eza kaka na valeur tii na moyi na lelo na mboka na biso to lokola régime naye ekueya, yango pe ekoma sans valeur?
Emmanuel Kandolo : Ordre national du Léopard ezali distinction honorifique civile mpe militaire oyo ezali ko récompenser ba services esalemi mpo na ekolo na biso na ba Congolais mpe ba paya. Ekoki kopesa tango mutu azali na bomoyi ou tango mutu asili kokufa (na titre posthume).Mpo mutu andimama na Ordre oyo, esengeli asala mosala wuta mbula zomi na mitanu mpe mosala muango mozala mua motuya. Ordre national du Léopard ezali na ba grades mitano:
1. Chevalier ya Ordre national du Léopard. Sima ya mbula mitanu nde mutu amati na grade supérieur ya Officier.
2. Officier ya Ordre national du Léopard. Sima ya mbula mitanu nde ekokumba na grade ya Commandeur.
3. Commandeur ya Ordre national du Léopard. Sima ya mbula misatu nde ekokumba na grade ya Grand Officier.
4. Grand Officier ya Ordre national du Léopard. Sima ya mbula misatu na grade ya Grand cordon ya Ordre national du Léopard.
5. Grand cordon.
Ordre national du Léopard ezali supprimer wuta promulgation ya Décret-loi n° 009-2002 ya 5 août 2002 portant création de l’ordre national «Héros nationaux». En d’autres termes, wuta mokolo oyo, Ordre national du Léopard ezali lisusu na ngala te. Yango elingi koloba te que baye bazali na yango bazali lisusu na mérite oyo esalaki que bazua yango te. Honneur na bango ezali, sauf que Ordre national ya Léopard nde ezali lisusu te, ekomi remplacer na oyo ya sika mpe yango ezali kopesama kaka na ba conditions moko lokola ya Ordre national ya Léopard. Donc, kombo kaka nde ebonguani mpe grade ya Grand Cordon ezali kobengama : Grand Cordon Kabila-Lumumba !!!
Mpo na mua rappel, yeba que na ekolo na biso tozalaka na ba Ordres nationaux mpe ba decorations oyo :
Ordre des Compagnons de la Révolution
Esalemaka na Ordonnance-loi n°74-016 ya 10 janvier 1974 portant création de Ordre des Compagnons de la Révolution. Ntina na yango ezalaki mpo na ko marquer coup d’Etat ya 24 novembre 1965. Yango ezali na ba grade te mpe baye bazali kuna bazali kaka ba Compagnons de la Révolution.
Jusqu'à présent, ata texte juridique moko te eboma yango meme soki en fait ekenda nzela moko na deuxième République.
Ordre National du Léopard
Ebotamaki na Ordonnance-loi n° 66-329 ya 24 mai 1966 portant création de l’Ordre national du Léopard. Ordonnance oyo ezalaki modifiée na Ordonnance-loi n° 77-002 ya 22 février 1977 mpe compléter na Ordonnance-loi n°86-015 ya 14 mars 1986. Ordonnance-loi n° 66-329 ya 24 mai 1966 portant création de Ordre national du Léopard ezali abroger na Décret-loi n° 009-2002 ya 5 août 2002 portant création de l’Ordre national « Héros nationaux ».
Ordre national Héros nationaux
Ekelami na Décret-loi n° 009-2002 ya 5 août 2002 portant création de l’Ordre national Héros nationaux. Yango nde ekitani Ordre national du Léopard.
Ordre National du Zaïre
Esalemi na Ordonnance-loi n° 68-437 ya 2 décembre 1968 portant création ya Ordre national de la République Démocratique du Congo. Ordonnance oyo nde e abrogeaki oyo ya 28 juin portant creation ya Ordre de la nation congolaise. Ordonnance-loi n° 68-437 ya 2 décembre 1968 ezalaki modifier mpe compléter na Ordonnance-loi n° 78-025 ya 30 août 1978.
Ordre national ya Zaïre, sika ekoma Ordre national de la République démocratique du Congo, ezali na ba grades mitano : Chevalier, Officier, Commandeur, Grand Officier, Grand Cordon.
Croix de la bravoure Militaire
Esalemi na Ordonnance n° 131 ya 11 mai 1964 portant création de la médaille de la Croix de la bravoure militaire.
Yango ezali na trois classes : Bronze, Argent na Or.
Croix militaire
Ekelamii na Ordonnance n°132 ya 11 mai 1964 portant création de la médaille de la Croix militaire.
Médaille militaire
Ebotami na Ordonnance n°133 ya 11 mai 1964 portant création de la médaille militaire.
Médaille du Mérite Civique
Ekelami na Ordonnance n° 66-331 ya 24 mai 1966 portant création de la médaille du Mérite Civique. Ezali modifier mpe compléter na ba Ordonnance n° 72‐067 ya 21 février 1972 mpe na Ordonnance n° 77‐020 ya 22 février 1977,
Yango ezali na trois classes : Bronze, Argent na Or.
Médaille du Mérite des Arts, Sciences et Lettres
Esalemi na Ordonnance n° 66-332 du 24 mai 1966 créant la médaille du mérite des Arts, Sciences et Lettres
Yango ezali na trois classes : Bronze, Argent na Or.
Médaille du Mérite Sportif
Ebotami na Ordonnance n° 66-333 du 24 mai 1966 portant création de la médaille du Mérite Sportif.
Yango ezali na trois classes : Bronze, Argent na Or.
Médaille du Mérite Agricole
Esalemi na Ordonnance n° 66-334 du 24 mai 1966 portant création de la médaille du Mérite Agricole,
Yango ezali na trois classes, Bronze, Argent na Or.
Médaille du Mérite Conjugal
Ekelami na Ordonnance n° 83-204 du 16 novembre 1983 portant création de la médaille du mérite conjugal.
Yango ezali na trois classes : Bronze, Argent na Or.
Médaille du Mérite Maternel
Esalemi na Ordonnance n° 83-205 du 16 novembre 1983 portant création de la médaille du mérite maternel.
Yango ezali na trois classes : Bronze, Argent na Or.
Médaille du Combattant de la libération.
Ekelami na Décret n° 051-C/2003 ya 30 mars 2003 portant création de la médaille du
combattant de la libération.
Yango ezali na trois classes : Bronze, Argent na Or.
Médaille de la paix.
Ebotami na Décret n° 051-D/2003 ya 30 mars 2003 portant création de la médaille de
la paix.
Ba médailles ya circonstances exceptionnelles mpe ezalaki lokola : Médaille commémorative des opérations du Shaba na Médaille du XX ième Anniversaire du Mouvement Populaire de la Révolution Parti-Etat (M.P.R. parti-Etat).
Ba décorations nionso oyo epesamaka na ba diminutifs ou ba barrettes na yango.
Grande chancellerie des Ordres nationaux ezali organe ya gestion ya ba drapeaux et étendards nationaux, ba armoiries mpe na ba distinctions honorifiques ya ekolo na biso. Yango ezali ko relever na Présidence de la République. Ekambami na Chancelier des Ordre nationaux (na tango ya M.P.R. Chancelier azalaki des Ordres nationaux mpe na ya Ordre des Compagnons de la Révolution). Chef de l’Etat mpe Président de la République azali le Grand Chancelier ya ba Ordres nationaux.
Medaille ya Liboso na lokumu ezalaki Ordre national du Leopard. Lelo ekoma Ordre national Héros nationaux. Ya mibale ezali Ordre national ya R.D.Congo. Na ba Cérémonies oyo esengaka médailles elatama, yango elatamaka toujours liboso ya ba médailles honorifiques ya ba paya.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo