Mise au point à propos de Manwaku
Ba ndeko,
Tomeka naino koyokana. Nazali kolobela ebandeli ya carrière ya Manuaku na ndenge abandaki ko copier baninga. Le fait que ye abandaki ko calquer misala miye ba misusu basala avant ye, ezali ko remettre en question originalité ya biloko oyo esala kombo na ye. Lelo oyo, après 38 ans, mingi kati na biso, grâce na blog na biso oyo mpe na possibilité oyo tozali na yango ya kokutana awa, tozali en mesure ya kolakisa que Manuaku azali nkolo biloko wana te. Ebongi te to appuyer façon oyo. Soki tozali ko défendre ba pratiques ya Manuaku ya tango wana, elingi koloba que tricheur akoki na ye kokoma le meilleur sans to mituna ndenge nini. Lolenge wana ya ko raisonner, ngai nakolanda yango te. Vérité ezali awa, ba œuvres oyo esalema avant Manuaku abanda kobeta ezali ko trahir ye. C ;est pourquoi nakobakisa que blog na biso oyo ezali espace ya liboso oyo ezali kofongola batu miso na oyo etikalaki mbula na mbula lokuta monene.
Baninga, tosuanela likambo oyo te, toluka nde tozongisa likambo na esika na yango au lieu toluka mindondo esika ezali te. Soki tofongolela likambo oyo miso, tokomona que vérité ezalaka malamu mpe etiaka kimia na mitema atako tango mosusu ezalaka mua mpasi mpona kondima yango. Ngai wa bino, nakolembe te, soki nazali na oyo ya koloba mpona lokumu lya masolo na blog na biso oyo, nakobanda kaka koloba mpo batu mosusu na bilenge bazali kotanga biso bayeba nzela nini ba nduliste balandi mpe misala mia bango mizali ndenge nini.
Na oyo etali suite ya carrière ya Manuaku na Zaiko, nakoloba que Manuaku abandaki kobeta biloko na ye kasi Matima mpe abandaki kotelemela ye mpo biloko na bango mibale nde esimbaka Zaiko. Kasi na regretaka kaka le fait que Pépé Félix Manuaku akimaka Roxy Tshimpaka. Mpo na ngai, il fallait andima concurrence na Tshimpaka même soki azalaki na somo na yango na complexe devant Tshimpaka. Toyebi biso nionso awa que Tshimpaka le grand niawu alimuisa biloko ya Manuaku lokola muana moke mpe départ ya Manuaku na Zaiko etikala kokueyisa Zaiko te mpe Zaiko atikala ko sentir yango te. Ba albums ebimaka sima ya Manuaku ezali ko témoigner mosala mosalemaki. Wana ezala ndimbola moko ya makasi mpo ndenge nini un grand soliste akundama kaka boye sans Zaiko ezinda. Manuaku a retena leçon wana. Na biso baye tolandaka miziki toyebaki que Roxy il fallait a frapper makasi mpo banda kala Pépé abandaki kokanisa que azali soki ndenge nini. Na yango, motuna tokoki komituna sika ezali moye : Soki ezalaki Roxy Tshimpaka te, Samunga asi akufaki, nani akokaki kokimisa Pépé Félix?
Lelo oyo Manuaku akoma na ye kaka ndenge wana : ndenge nini akokaka lisusu kosala biloko oyo asalaka te, bien que akota ba kelasi ya miziki na Suisse? Ndenge nini atingamaka kaka na biloko oyo abeta na Zaiko ? Ndenge nini alobelaka biloko oyo abeta na Grand Zaiko te ? Yango wana ngai nalobaka soki azalaki Manuaku oyo toyokaka na mythologie manuakiste, mbele alingaki kaka azala le même Manuaku tee lelo oyo.
Polisa ye !
Musicalement
Antoine Nickel,
Ezali ndenge ozali kokanisa na kozuela yango te. Raisonnement ya blog na biso oyo ezali koboya contradiction te na démarche oyo ezali komema biso na soutenance ya critique mpe ya vision contraire. Contradiction ezali ko exclure esprit fraternel na respect mituel oyo esengeli ezala kati na biso te. Vision contraire fondée sur un récit vécu ezali na but ya kokotisa bokabuani te. Au contraire, nazali nde ko apporter connaissance immédiate ya un cas connu, sans koluka ko koma esika oyo ozali kotiya ngai gratuitement en soulignant la haine face na Evoloko na Manuaku. Ngai na vivre jeunesse na ngai na époque wana, nayebi milieu wana mpo nazalaki kuna, nayebi ba nzembo oyo ebetama mpe na bato oyo bayembela bango, nasololalaka na bango, toyebani, etc. Kasi yango ekoki kolongolisa ngai le fait ya koboya koloba likambo ndenge ezali te.
Ndeko, esengeli tosepela na ndenge lelo oyo tozali na blog na biso oyo ezali ko permettre biso tosangisa maye maleka mpe maye toyebi mpo ba ndeko mosusu baluka bayeba ndenge nini malambo ezalaki. Ngai nakobanda koloba ndenge nayebeli makambo mpo ba mythes mosusu na ba mensonges oyo bakotisa batu elonguaka na mitu ya ba ndeko na biso mosusu.
Mon frère, nazali na rien contre Evoloko na Manuaku. Nazali nde koloba makambo ndenge ezalaki mpe selon oyo ngai na vivre ; namoni mpe nayebi. Soki okoki ko reconnaître ngai nazala na approche mususu ekozala mua malamu mingi.
Apport na ngai na blog oyo ezali ndenge moko na oyo ya yo te. Na makanisi ma ngai, esengeli koloba likambo polele mpe kolakisa yango ndenge ezali. Pourquoi ne faut-il pas napesa impression na ngai en me disant que blog oyo ezali ya ba manuakiste ou ya ba evokoliste te. Ezali blog na biso nionso. Neti ezali ya biso nionso, ngai nakobanda koloba nini oyo nayebi elekaka na miziki na biso. Par exemple :
1. Soki tolobeli Langa Langa stars, nakoloba ndenge Nene Tshiaku ayibaka mbongo ya orchestre mpe akimi na yango na Cotonou na Bénin
2. Nakoloba lisusu ndenge papa Wemba na Djanana batekiselaki bango nzembo moko na mutu moko
3. Soki mutu alobi que Lossikiya Maneno na Bongo Wende bakendaka na Viva, ngai nakozongisa que non, Lossikiya azalaka nduliste te. Bongo Wende azalaki le seul oyo awutaki Stukas.
4. Soki tolobeli grand Zaiko, nakoloba ndenge Manuaku a hypothekaki ndaku ya baboti baye mpo amema Grand Zaiko na poto, etc. Ngai nakobanda kobeta masolo wana na blog na biso oyo. Nionso oyo ezali na rapport na miziki.
Ngai nazali na ndenge nabandaki komonela Manuaku na répétition, na concert, na studio, na ba spectables par rapport na ba orchestres mosusu. Mingi bazali koloba que Manuaki boye na boye, alors pourquoi pas ngai mpe naloba oyo ezali contraire na mythe wana? Yango wana namitunaka mituna miyike : Soki vraiment Manuaku azalaki danger, pourquoi akimaka Roxy Tshimpaka ? Soki vraiment azalaki danger, pourquoi Zaiko ebambanaki te tango alonguaki ? Pourquoi départ ya Manuaku e affecta Zaiko te ? Soki azalaki danger, pourquoi tango akomi na mikili akoma lisusu canon te puisque akendeki ko se perfectionner ? Est-ce que travail en équipe ya Zaiko yango nde ekomisaki ye danger ? Est-ce que ba solos babandaki ko dicter ye na monoko mpe na zolo epayi ya Evoloko na Gina yango nde ekomisaki ye danger ? Pourquoi a copiaki Zaiko tee nakoluka voix ya Jossart Nyoka na Joe Nickel na ya Redo Likinga epayi ya Lukombo Jeffart? Pourquoi andimaki kozua kombo ya Zaiko abambi yango na orchestre na ye ? Pourquoi toujours Zaiko, Zaiko, Zaiko ?
Esengeli nde tosala un vrai débat, peut-être tokomona que Manuaku azalaki na ye danger penza te. Bapolisa ye mbala na mbala na Samunga, Tshimpaka na Matima. Ngai nazali prêt ya ko débattre ata na ye moko Manuaku soki aye awa sur ki magicien na ye. Mêmement na Evoloko soki abimi na boloko.
Evoloko azali ndenge moko na Manuaku. Soki bazali na équipe makasi ndenge Zaiko na Langa langa stars ezalaki, wana nde babandaki kosala biloko ya bien. Tango esengeli sika balakisa bokasi ndenge papa Wemba, Bozi, Tshimpaka basalaka na Viva, Anti-Choc, Choc-Stars eloko te. Nani akoki koyebisa ngai succès Evoloko asala hors ya équipe ya Zaiko, Isifi ou Langa Langa Stars? Toujours tango atikalaka ye moko, akokaka te. Nalobi te que azali na talent te, nazali nde koloba que succès na ye edependaka kaka na ye moko te, contrairement na Koffi, papa Wemba ou Bozi.
Nakosenga na ndeko Messager ameka kotiela biso lien oyo opesi ngai mpo likambo ezala polele , baninga bayoka nini Gina alobi tango ayaki na poto contrairement na ba affirmation ya voyage na ISIFI. Ndenge Zaiko ebandaki ko copier Los Nickelos, etc. Lien wana ezala awa mpo tango nakoloba sur Gina tobanda ko comparer facilement. Lisusu ndeko, kaka na cadre ya lisolo na kokabola masolo, tiela biso elongo nzembo « Silikani » ya Tabu ley na « Consolation » ya Gina Efonge, toyoka lisusu ndenge Manuaku abandaki ko copier sans souci de contradiction.
Mpona kosukisa yeba que nazali ko comprendre soki mua fulstration emonani na ba propos na yo. Bon, wana ezali biloko eyaka na moko nionso.
Musicalement,
Kin Kiesse,
O poser question moko kitoko. Tala penepene nayo, ozali na réponse. Na histoire ya Science na Technique toyebi que ba conditions difficiles ya nature nde esala que mutu aluka ko améliorer quotidien na ye. A partir na yango nde abandi koyekola ba lois de la nature mpe aye kotiya technique comme étant loboko ya exécution ya lois wana. Yango nde de rien toye kokoma na quelque chose. Neti tozali na domaine ya art tala kaka richesse artistique oyo ezali na mboka na biso : maîtrise ya rafia epayi ya bakuba, maîtrise ya forge epayi ya baluba, etc. Babandaki na rien tee na ndenge baye kofandisa technique wana.
Tokoki mpe kopesa ndakisa ya Wolfgang Amadeus Mozart asala œuvre na ye ya liboso na 6 ans. Avant ye, œuvre wana esalemaka te.
Musicalement,
Ndeko Sony Mokonzi,
Age ya Manuaku ezali excuse te na ndenge a copia biloko ya batu. Ayebaki nini azalaki kosala puisque soki ayokaki ba sons wana kitoko, elingi koloba que intention na ye ezalaki yako reproduire yango na ba nzembo ya Zaiko tout en espérant ko récolter le même succès. Soki akotaki studio mpe a enregistrer, elingi koloba que azali responsable ya oeuvre oyo ye abeti. Mingi awa na kati na biso bayebaki kaka que ye nde mutu abandaki bilokowana. Lelo oyo après 38 ans vérité eye koyebana que abandaki na ye ko copier na ebandeli.
Muanetu, Tshaku na Bongo Wende babandi kokende epayi ya Manuaku na 1983, tango asi alonguaki na Zaiko. Ferros, ye abandaki kobeta biloko na ye na ndenge na ye, wana ya solo.
Samunga awumelaki te na Eyaya Bouger. Mouvement wana elekaki 10mois te. Bongo Wende abeta mingi biloko Samunga atika sur disque na cassettes avant bakota na Studio. Na oyo etali « Toli ya Limanja », yeba ete nzembo ekoki kobima sur disque sima ya ba sanza nto mpe b a mbula ebele par rapport na tango ba composer yango. Avant ebima na disque, ebetamaka na ba concerts mpe bato mingi oyo bazalaka na habitude ya kosala ba enregistrements na ba concerts bazalaka déjà na ba copies na yango.
Ndeko, Samunga azalaki muana ya 1950. Lita Bembo 1948. Nzembo oyo ozali koluka ezali koyela ngai kaka te.
Musicalement,
Muana St loi,
Le problème est que ko copier œuvre ya moninga ezali mbeba. Tika ngai mpe natuna yo mua motuna : na minute moko, esengeli kobeta combien de mesures ? Mesures muambe to zomi ekoki kobetama na combien de temps (seconde ou minute ?) Soki o répondre na mituna miye, sika zua ba nzembo wana, kotisa ba paramètres wana mpo o démontrer que ezali plagiat te.
Argument oyo ozali ko avancer ezali kotelema te. Soki , selon yo, ba misusu bacopiaki biloko ya ngana, yango elingi koloba que Manuaku azali na droit ya ko copier ? Wana elingi koloba que ozali ko encourager pratique wana. Justement, yango ezali ko mettre en cause la version selon laquelle Manuaku abongola makambo. Mutu oyo abongolaka makambo ezali oyo afongolaka nzela ya sika. Awa nazali ko remarquer que Manuaku alandi kaka lokolo ya ba tricheur.
Musicalement,
Dio dio,
Tala kaka que docteur Nico na Grand Maître Franco bazalaka mpe na ba bato oyo ba influencer ebeteli na bango kasi batikala ko copier bango te.
Docteur Nico ( Déchaud a forma ye, bango mibale bazalaki na encadrement ya Jimmy, Nico ayekolanda lokolo ya Bill Alexandre, le seul oyo alanda style na ye)
Grand Maitre Franco (Ebengo Dewayon a forma ye, Luampasi lisusu mpe Bowane aye ko encadrer ye. Franco alanda ebeteli ya Bowane)
A partir na bango nde ba écoles mibale (ya guitare solo) eye kobotama.
Musicalement,
Juma,
Matondo na yo lokola na eyano opesi ngai.
Wa yo,
Emmanuel Kandolo
Anaclet,
Effectivement, ngai mutu nasali erreur ndenge nakomaki que Vincent Lombume Kalimasi abeta na les Iss Boys. Vincent (Vince) abandaki kobeta na les Mustangs. Nazali koyeba lisusu que na ba vacances soki awuti Bruxelles, abandaki kobeta kuna. Kasi tango papa na ye, papa ambassadeur Jean Kalimasi amonaki ye na télévison na vacances 1969 mpe aye koyeba que abandaki kobeta miziki, atombokaki très fort. Ndenge alataka (style pop) ba filles na nzotu, nionso wana ezalaki très grave. Kobanda wana nde père na ye aboyaki kozongisa ye na Belgique. Na punition wana, ayaki kokata miziki tee na lelo. Na 1971, tango papa azongisi ye na mikili, na France, nde ayaki ko continuer ba études na ye na poto.
Par ailleurs, Ray Lema abetaki na ISS Boys na 1970. Kasi na 1972 tango ISS boys ekomi ya kosuana, alonguaka na ye.
Francoise Hardy na mai 1968 abetaka na Ciné Palladium na salle ya cultrana.
Musicalement,
Kinzonzi Michel,
Masolo mazali ebele nde nako souhaiter kaka que mua temps ekobanda kozala mpo tokabolaka yango. Soki mpe mituna mizali, okozua biyano soki nazali na yango.
Musicalement,
Ndeko Messager,
Nazali ko remettre en cause début ya Manuaku na Zaiko mpo abandaki ko copier baninga. Lisusu, Manuaku azalaki honnête te puisque akosaki batu ya Belguide que azalaka guitariste rythmique (ye moko a reconnaître yango na radio mangembo). Eyebani que yambo yakokoma soliste, rythmique ezalaka passage obligé. Tango akomaki vraiment kobanda kokoma indépendant nde ayaki ko commettre erreur ya kokima Zaiko. Or, soki atikalaki na style na ye wana face na koya ya Roxy Tshimpaka mbele tolingaki totala ndenge nini elingaki ezala. Bon, on retiendra que tango akeyi na style na ye na Grand Zaiko, Zaiko Langa Langa emataki lisusu mpo Tshimpaka na Matima basimbaki makambu.
Messager, s’il te plait, tiela biso naino biloko oyo professeur Samunga abeta na Stukas, toyoka naino ndenge abandaki ko envoyer, kopolisa na ko attaquer.
1. Muasi
2. Mayimba
3. Moseka mbuza
4. Ekonda Sakade
5. Sisika Myre
6. Azanga.
Musicalement,
Emmanuel Kandolo
Sur la liste proposée par Emmanuel Kandolo, les chansons Muasi et Moseka Mbuza sont déjà diffusées sur notre blog. C’est pourquoi nous auditionnerons seulement « Azanga », « Ekonda saccadé » et « Mayimba. » Nous vous ferons réécouter "Sisika Myre" un autre jour. (Messager)
Nalingi na yeba solos ya Cocody,Eluzam,Onassis,Bambela,mashakado soki ezali plagiats de la part ya Pepe
Fely.Tokoki ko boya génie ya Manuaku te,eloko ezangaki ye ezali charisme,talent sans charisme na métier ya miziki ekoki te,ebongi ozala na yango mibale.Ezali ndenge Mbumba
Attel,Guivano,mpe mingi,bazalaki na talent mingi kasi charisme ezangaki bango meme R oxy soki azalaki na charisme carrière na ye elingaki ko koba ndenge ekoba lelo te. De là
à nier le génie de Manuaku il y a une limite à ne pas franchir.La comparaion n'est pas soutenu mpo miziki ya Zaiko na tango ya Manuaku ezali miziki moko te na oyo ya matima ata ya
Roxy.Talent ekeseni. Mpe to confondre émulation na plagiats te,inspiraion ekoki kozala ya yo
moko mpe émulation ékoki nko inspirer yo.
Na tangi E. Kandolo mpe na yoki esika atangi Super Baka te,na yoki esika atangi Los Angeles te.Zaiko ti eya kokueya na ba travers folkloriques ezalaki considéré comme miziki moderne ya ba
orchestres mibale oyo na tangi.Souvenir ya fikin,totiki podium ya stukas na public mobimba tokei na podium ya Zaiko.Nzembo nini ya stukas ekokaki na tango wana ko mekana na ONASIS
meme Lokoko ezuwa lokumu ya Onasis na Mbeyambeya te. Na lingaki ko zongisela justice épayi ya Manuaku.
Nasengi na E. Kandolo apesa biso histoire ndenge SOLOLA
ekomaki MBEYA MBEYA.
Nasengi na moto akoki koyokisa biso SOLOLA ya Evoko,version original ya mbeya mbeya ekozala esengo mingi.
@E. Kandolo Nayoki Mayimba,Ekonda saccade,Azanga,lokola owuti
kosenga biso mpe nayoki miziki ya Bavon Marie Marie na kati ya ba nzembo oyo.Yo ozali moyebi mpe koyeba na yo na ndimi yango,nasengi na yo oyoka mpe o confirmer biso soki touche ya bavon ezali
na kati nzembo oyo te.
Kobosana ko pesa ngai éclairage po na SOLOLA te.Nayoki olobi bato mingi bazalaki ko enregistrer na concert.Tango Evoloko a changer yango mbeya mbeya mingi bazalaki naino na ba
bande wana,na kanisi yo okokaki kozanga yango te.
C'est incroyable avec quel sagesse vous répondez aux questions mon Vieux Monsieur Emanuel!
J'espère que pleins d'autres anecdotes viendront par la suite!
Ce blog étai déja un petit trésor grâce au super Boulot de notre Vieux messager mais la Contribution de Vieux Emanuel apporte encore un plus énorme!
Grâce à vous Messieurs, je vis des histoires Extraordinaires que je n'ai pas vécu!
Grand Merci à vous et que ca continue!
Mon Cher Anaclet,
Je Pense Que le Vieux Emanuel ne doute pas du Charisme et du Talent de Pepe Felly!
Il dit juste Preuve à l'appui que Pepe felly s'est inspiré des Solos de Los Nickelos ou encore Stukas à ses débuts!
Apres à force, il commenca à developper son propre style jusqu'a arriver à son apothéose artistique en composant le solo de Eluzam ( Pepe Felly Meilleur Instrumentiste 1973, Eluzam Meilleur
Chanson 1973, Evoloko Meilleur Chanteur 1973). Dès Lors Pepe Felly est introduit Magicien de La guitare! C'est Sur qu'après, des Solos comme Elo, Mashakado, Souvenir djeny ou encore Sentiment
Awa sont de petits chefs d'oeuvre sorties de l'imagination de Manuaku!
Moi j'espere juste Mon cher Anaclet que tu ne prennes pas mal ce que Le vieux Emanuel dit sur Manuaku.
Comme dirait notre vieil ami Emanuel,
Musicalement =),
Kin-Kiesse
Ndeko Kandolo,
Merci na éclairage na yo na souci ozali na yango otiya eloko na eloko, pe likalmbo na likambo esika na yango po na ba débuts ya Manuaku na zaiko pe Evoloko.
Tout en partageant rlecture na yo sur parcours ya Pépé Fely, nabanzi tè, il faut to comprendre poids ya kombo ya Zaïko, ndege epsa succès na ba aartistes toyebi. Nakosouligner que pendant
longtemps, gardien du temple - Jossart Nyoka Longo - abundaki mingi po baninga na ye batosa Kombo ya ZaIko. Ezala na ba règle ya ebineli, moko te azalaki na droit aleka kobina devant ba micro,
alignement ya ba chanteurs, tous cela ezalaki ba règle po na komatisa d'abord kombo ya groupe. C'est cela qui explique que malgré départ ya Manuaku, ensuite Bimi na Lengi lenga avec kombo ya
Zaïko, etiyaki Nkolo mboka na mobulu : epai "préfet de discipline azalaki ekokaki kaka etambola. Même lelo, au plus fort ya ndombolo, tozomona que Zaïko ezo tenir tête, parce que
discipline ezali kuna. Le vrai fétiche de Zaïko, soki bato bayebaka yango té, ezali discipline "selon Jossart". Pour le reste, likambo ya ebeteli ya Manauaku, na lolenge na ye ya
komekola baninga, ndenge nalobaki, ezali piste de travail avant envol ya génie ya Pépé Fély qu'il faut to reconnaïtre tiout de même.
Mwan'a Mangembo
AUCUN COMMENTAIRE !
SANS INTERET, PASSONS A AUTRE CHOSE.
Antoine Nickel
Zaiko a connu trois épisodes importants comme soliste.
Si Manuaku a mis les fodantions, Roxy arrive alors qu'il n'avait plus rien à prouver. Lengos dira même: Niawu beta
ata boye car en plein studio, les chanteurs étaient fatigués.
Shiro Shiro, c'est un autre style.
Bravo à Manuaku car l'élève a fini par dépasser tous les
maîtres. C'est la réalité.
Et dépuis zaiko joue avec un mi soliste, tous ont suivi.
Les carences de Manuaku ont été remplacé par les Atalaku.
Le meilleur soliste ne viennent plus de Zaiko durant la dernière decennie. On a connu Mbuta Makoso (Ok Jazz), Makaba (Wenge) et même Burkina Faso;
Donc, il n y a pas à olémiquer, chacun a évolué à sa façon.
Oka
merci ndeko OKA
mpona makomi nayo mpona na mbuta pepe manuaku
bandimi ya secte dangereuse " POLEMIKA" batondi na nkele
biso awa na site mbokamosika tozali kopartager makanisi mpe makambo maleka uta kala, tokangi moto na makasi te mpote andimela biso mpe lisusu ST ELOI'SON AZALI MANUAKISTE TE
AZALI NDE AMOUREUX YA MUSIKA
MANUAKU EST L'UN DES GENIES QUE LE DIEU CREATEUR AVAIT ENVOYE AU CONGO, QUELQUE SOIT SON PARCOURS PEU IMPORTE
MERCI TATA NZAMBI
Muana ST ELOI