Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Lucien Tshimpumpu wa Tshimpumpu, journaliste, intellectuel, Homme politique, sportif, aye na mokili na mokili na mokolo mua 27 juillet 1941, na Kamina, district ya Haut Lomami, province ya Elisabethville. Baboti ba ye baye ko s installer na ville ya Elisabethville. Akoli na ville oyo mpe asali école primaire na secondaire. Diplômé na science commercial ya Institut Supérieur du Commerce ya Kinshasa, na 1975.  Diplômé ya Centre professionnel ya perfectionnement ya ba journalistes na Paris (C.F.P.J.), na 1969. Asali mpe ba stages ya professionnalisation na ba pays miyike neti : France, Allemagne, Tunisie, etc.

Na 1960 tee na 1965, abandi en tant que Rédacteur en chef ya La voix du Katanga, mpe aye kokoma mokonzi ya chronique sportif ya radio provinciale ya Katanga, na Elisabethville.

Na 1965 tee na 1971, akomi reporter sportif na Radio nationale na Léopoldville (Kinshasa)

Na 1967 tee na 1970, Chef ya rubrique sportive na Journal Courrier d'Afrique.

Na 1968 tee na 1980, correspondant permanent ya magazine sportif France Football mpe na journal sportif italien Corriere dello sport.

Na 1968 tee na 1977, Président ya Union des Journalistes Sportifs ya Zaïre (U.J.S.Z.) Azali mpe fondateur na yango. U.J.S.Z eyaki kokoma Association des Journalistes Sportifs du Zaïre (A.J.S.Z.).

Na 1968 tee na 1976, membre de la Commission Médias ya Confédération africaine de football (C.A.F.)

Tango ba Léopards ya R.D.Congo bakeyi ko défendre titre na yango ya Champion d Afrique des nations, na Soudant, na 1970, Tshimpumpu a profiter na présence ya ye na Khartoum, mpo na ko fonder Union des Journalistes Sportifs Africains (U.J.S.A.) avec l'Ethiopien Sabel Kibal comme co-fondateur. Kinshasa nde ezalaki esika siège na yango ezuami wuta esalema. Atikaki ebonga ya Président na 1974.

A retour na Soudan, toujours na 1970, akomi rédacteur en Chef ya journal sportif Masano.

Na 1970 tee na 1974, Vice-Président  ya Association Internationale de la Presse Sportive (A.I.P.S.)

Na 1971 tee na 1974,  aye kokoma  Responsable ya service de sports na Radio nationale.

Na 1972 tee na 1976, membre ya Commission ya presse ya Fédération Internationale ya Football Association (F.I.F.A.)

Na 1974 tee na 1977,  Conseiller successif ya ya ba Commissaires d Etat na Orientation nationale (Information) iye : Dominique Sakombi  Inongo (1974-1975), Antoine Mandungu Bula Nyati (1975-1977).

Na 1974, Président ya Commission ya Organisation ya combat du siècle kati na Mohamed Ali na George Foreman mpe akomaki membre ya Commission ya World Boxing Council (W.B.C) Conseil Mondial ya Boxe.

Na 1977, akomi journaliste sportif na Télévision Nationale Ivoirienne (R.T.N.I.).

Na 1977 tee na 1983, Secrétaire administratif ya Union des Fédérations Ouest Africaines ya Football (U.F.O.A.) mpe aye kokoma Directeur ya département des relations publiques et presse ya U.F.O.A.

Na 1983 tee na 1985, Conseiller ya  Commissaire d Etat na Information na Mobilisation Propagande mpe Animation Politique (MO.P.A.P.), Dominique Sakombi Inongo.

Na 1983 tee na 1985, aponami Secrétaire général ya Union ya Presse ya Zaïre (U.P.Z.A).

Na 1985 tee na 1987, Commissaire Etat (Ministre) na sport na loisir mpe Président ya Comité national Olympique et sportif zaïrois.

Na 1990 tee na 1994, Président ya Société civile na Conférence Nationale Souveraine (C.N.S.).

Na 1994 tee na 1996, Député ya Haut Conseil de la République-Parlement de transition (H.C.R-P.T.).

Tshimpumpu asali brillamment ba couvertures ya ba matchs ya ba Léopards wuta Coupe d’Afrique ya Ethiopie na 1968, Soudant 1970, Cameroun 1972, Egypte 1974, Ethiopie 1976 mpe na Coupe du Monde ya Allemagne, na 1974, ba jeux Congolais ya 1965 mpe zaïrois ya 1972, en plus ya ba mosala asali na ba Coupe d’Afrique des nations na oyo elandaki na sima.

Ye mpe asalaki reportages na ba matches nionso ya T.P. Englebert (Mazembe) na ba coupes d’Afrique wuta 1967 tee na 1970, mpe toyebi engagement na ye na ba compétions continentales nionso mpe na ba sports ya ndenge na ndenge y compris ba voyages ebele, ebele asali na cadre ya mosala mua ye. Ba oyo batambola na Afrique, bayebi malamu que ye abandaki kobengama citoyen ya Afrique mpo abandaki ko appartenir na ekolo moko te tout comme sika nionso ezalaki mabele ma ye.

Correspondant ya ba organes internationaux ya presse : Agence France Presse, Agence Reuter, journal Equipe ya France, Magazine France football, journal sportif italien Corriere dello sport, Jeune Afrique, Radio France Internationale, African n°1, Radiodiffusion Télévision Ivoirienne (R.T.I.),  na Zone 2 ya Sénégal.

A participer activement na séminaire ya réforme ya ba sports na Zaïre, na élaboration ya ba statuts ya Union Nationale de Presse du Congo (U.N.P.C.) na Commission de discipline na yango ; Observatoire ya ba Médias Congolais (O.M.C.) ; Commission ya Carte de presse.

Tshimpumpu asali mingi mpo na sport congolais mpe africain. Abundi mingi mpo na organisation ya sport wuta na ba écoles, na amateurisme tee kokomisa yango na niveau ya semi professionnalisme avant ya ko envisager professionnalisme. Abundi mingi na apolitisation ya sport national mpe na africain. Abundi mingi mpo na reconnaissance ya identité ya ba journalistes africains na molongo ya développement ya sport continental. Na yango, atamboli ba capitales nionso ya Afriques mpo na koluka ko créer ba amicales ya ba journalistes mpe ko dynamiser mosala mua bango. Atamboli lisusu à travers le monde na cadre ya ba compétions ya ndenge na ndenge na cadre ya championnats africains, jeux africains, championnats mondiaux na ba jeux olympiques na ba disciplines miyike.

Na jeunesse na ye azalaki choriste ya Les Troubadours ya roi Baudouin (chorale Katangaise). Chorale iye eyaki koyemba an exposition universelle ya Bruxelles na 1958 mpe ye azalaki kati na ba choristes iye bayaki na Belgique. Azalaki mpe footballeur na jeunesse na ye mpe ayaka kokoma Président ya Fédération Zaïroise ya Athlétisme.

Sima ya ba activités politiques na ye, akomaki kofanda awa na Paris  wuta 1997 tee tango a décidaki kozonga na Kinshasa  na 2002 mpe atiki mokili na mokolo mua jeudi 25 août 2005.

Wuta kokende na ye, Union  des journalistes sportifs africains (U.J.S.A.) epesa kombo na ye na siège na yango, na Casablanca, na Maroc.

Azu ba distinctions  iye : Médaille d’Or ya Confédération Africaine ya Football (C.A.F.), médaille d’Or ya mérite sportif zaïrois, chevalier ya Ordre national du Zaïre, chevalier ya Ordre national du Léopard, ba distinction ya Cote d’Ivoire, Sénégal, Ethiopie, etc.)

Kabamba wa Odia, Homme politique, sportif,  abotami na mokolo mua 29 décembre 1943, na Luluabourg, district ya Kasaï, na province ya Lusambo. Alandi ba kelasi na ye na athénée ya Katuba mpe akeyi kosala ba humanités gréco-latines na athénée de Kananga mpe asilisi kuna na 1964. Azui nzela ya université ya Elisabethville (Lubumbashi), université officiel ya Congo mpe abimi licencié na sciences politiques et administratives, na 1969.

Tango asilisi, azui ebonga ya Conseiller principal na Cabinet ya Gouverneur ya province ya Kasaï-Occidental, Daniel Monguya Mbenge, kobanda  1970 tee na 1971.

Na 1971 tee na 1981, Conseiller principal na Cabinet ya Commissaire d Etat (Ministre) ya  mines na énergie.

Na février 1981 tee na octobre 1981, Commissaire d Etat na sports et loisirs.

Na 1982,  abimi suppléant na ba  élections législatives na circonscription ya Kananga.

Wuta 1983, Conseiller principal na Bureau ya vice-Président ya Conseil législatif (Parlement), Kassongo Mukundji LukukulaAlatshi-A-Nkoy.

Na 1984 tee na 1990, akomi Directeur administratif mpe na ya contentieux, na Conseil législatif (Parlement).

Na qualité na ye ya sportif, azalaki mpe

Na 1971 tee na 1977, membre ya Commission ya ba arbitres.

Kobanda na 1975 tee na 1981, arbitre international ya Fédération Internationale Football Associations (F.I.F.A.).

Wuta 1977 tee na 1981, Président ya Commission Nationale ya ba arbitres

Wuta  1978, membre ya Comité directeur ya Fédération Zaïroise ya Football Associations (FE.ZA.F.A.)

Na 1971 tee na 1972, Président  ya Association des Diplômés ya Université Officielle du Congo-section Kinshasa (1971-1972).

Azalaki mpe lisusu médailler d’Or ya Ordre ya mérite sportif mpe Chevalier ya Ordre national du Léopold.

Kabamba wa Odia atiki mokili na mokolo mua 19 novembre 2007, na Johannesburg, na Afrique du sud.

Pierre-Célestin Kabala Muana Mbuyi, abotami le 27 novembre 1947, na Kamina, district ya Haut Lomami, province ya Elisabethville. Diplômé na sciences politiques et administratives ya Centre interdisciplinaires pour l’éducation permanente (C.I.D.E.P.) ya Kinshasa, na 1980. Diplômé na journalisme ya Ecoles de journaliste ya Bordeaux, na 1989.

Abandi mosala mua journaliste en tant que journaliste pigiste na 1967 tee na 1968, na ville ya Mbuji-Mayi.

Na 1968 tee na 1971, journaliste reporter na radio provinciale ya Kasaï Occidental, na Kananga.

Na 1972, tango Jeux zaïrois esalemi, aponami meilleur journaliste provincial mpe azui ebonga na Kinshasa.

Na 1972 tee na 1979, Secrétaire ya rédaction chargé ya ba sports na télévision zaïroise, na Kinshasa.

Na 1974, Coordonateur ya section presse ya organisation ya combat du siècle kati na Mohamed Ali na George Foreman.

Kobanda 1979 tee na 1983, Secrétaire général adjoint ya Fédération Zaïroise ya Football Associations (FE.ZA.F.A.)

Wuta 1980 tee na 1981, akomi Conseiller sportif ya Commissaire d’Etat (Ministre) ya Orientation nationale (Information), Philippe Elebe ma Ekonzo.

Wuta 1981 tee na 1991,  Vice-président  ya Association ya journalistes Sportifs Zaïrois (A.J.S.Z), Secrétaire général trésorier ya Union des Journalistes  Africains.

Kobanda 1982 tee na 1987, Rédacteur en Chef adjoint na makambo matali ba sports na télévision zaïroise.

Na ba années 90 tee na 2000 akomaki successivement : Directeur chargé ya ba sports, na Office Zaïroise ya Radiodiffusion na télévision (O.Z.R.T.), Directeur chargé ya ba stations provinciales ya  Radio télévision Nationale Congolaise (R.T.N.C.), Directeur commercial ya R.N.T.C.

Sika awa, wuta 2010 azali conseiller chargé des Sports d’élite, ya Ministre ya jeunesse na ba sports,  Claude Bazibuhe Nyamugabo.

Kabala azalaki mpe Secrétaire général ya Association Internationale ya  Lutte contre la violence dans le sport, Vice-Président chargé ya Afrique centrale na kati ya  Fédération Internationale de l’Histoire et des Statistiques de Football, membre ya  comité local ya organisation ya Coupe d’Afrique des nations ya 2015. Kasi yango ekosalema lisusu na R.D.C te.

Kabala mpe a voyager mingi na ba équipes ya R.D.C. mpe asali ba reportages na ba Coupes d’Afrique des nations na Egypte 1974, Ethiopie 1976, Ghana 1978, Nigeria 1980,  etc. na sports militaires na Afrique mpe na ba jeux africains na olympiques, etc. mpe na Coupe du monde 1974, na Allemagne. Azalaki mpe correspondant mpo na Radio France Internationale (R.F.I) na cadre wana nde asalaki couverture ya Coupe d’Europe des nations na France, na 1984. Correspondant ya African n° 1. Azalaki mpe initiateur ya trophée Mobutu Sese seko. Yango ebandaki ko récompenser ba meilleurs sportif ya Afrique.

Azali na médaille de bronza ya mérite sportif zaïrois, médaille de bronze ya comité ya organisation ya ba jeux olympiques ya Montréal  na 1976.

Akoma mokanda moye : S.M. Sanga Balende : un roi à la conquête de l’Afrique, Kinshasa, Editions Papeza, 1983.

A suivre...

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
A

Wana ezalaki mosala na bango ki fanatisme à outrance, oyebi lisusu match moko ezalaki soki ba équipes nini ezalaki kobeta, kasi ezalaki Daring-Imana Matiti Mabe te motu ezalaki kobeta, mbala moko
toyoki kaka Papa Amboisse Mosete Mbombo alobi alo Kakoko Kakok Kakok... , mbala moko Papa Mosete a se ressaisir alobi : bandeko bolimbisa ngai, monoko ezangaka libaku te...

Tala ki fanatisme aveugle ezalaki na ba repoter na biso.

Ambassadeur

Répondre
J

LUCIEN TSHIMPUMPU, avait le fait le reportage du match ZAIRE-EGYPTE (3-2) au CAIRE (1974).

Je me rappelle encore d'un de ses commentaires ces jour-la: LA BALLE MONTE. MONTE, RE-RE-REDESCEND...TOMBE SUR LA TETE DE QUI? DE LOBILO.

PAUL BASUNGA NZINGA fit la FINALE-1 contre la ZAMBIE, deux ou trois jour apres.

Au Mundial 1974, LUCIEN TSHIMPUMPU eut l'insigne honneur d'animer le premier, et meilleur match, des LEOPARDS contre l'ECOSSE a Gelsenkirchen. On dirait azalaki fan ya Kibonge dont il dit ce
jour-la: UNE RENTREE REMARQUABLE ET REMARQUEE DE KIBONGE.

PAUL BASUNGA prendra le second match contre la Yougoslavie. Apres le 6me but, il dira: OOOH, LA PLUIE CONTINUE.

Répondre