Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ndeko Serge Kongo na biso,

Limbisa na lolenge nayanoli yo sima ya mua ngonga molayi. Nameki kopesa yo biyano, na bozongeli mituna mia yo.

Ndeko Serge Kongo na biso :  1.    Bokeseni nini ezuamaki entre BSP (Brigade Special Présidentiel) na DSP (Divison spécial Présidentiel) ?   Lokola nayebi makambo ya ba soda te pona nga eza kobima kaka lokola changement pamba ya kombo.

Emmanuel Kandolo : Sur le plan juridique brigade na division ezalaki charger spécialement ya service ya honneur mpe na sécurité ya présidentielle. Bokeseni bozalaki nde na appellation ya Commandant na yango. Mpo na Brigade, ezali Commandant brigade. Mpo na division, Commandant division. Brigade ou division ezalaki sous autorité ya Commandant suprême ya F.A.Z. mpe Chef de l’Etat, Maréchal Mobutu.

Sur le plan technique brigade ezali grande unité tactique composée na ba bataillons miyike. Structure organique na yango ezali ko permettre commandement effective ya ba bataillions, ko assurer élément ya sécurité éloignée ya brigade mobimba, kopesa appui esengeli na ba bataillon tout comme ko augmenter l’autonomie na yango. Effective ya Brigade Spéciale Présidentielle ezalaki entre 5 na 10 mille soda.

En revanche, division ezali na effectif entre 10 na 20 mille soda. Yango ezali composer na ba brigades.  Division Spéciale Présidentielle (D.S.P.) ezalaki na ba brigades mibale ya  para commando, brigade ya artillerie mpe na brigade ya honneur (garde républicaine)

Ndeko Serge Kongo na biso : 2.    Est ce que misala pe ekesanaki to eza kaka ba kombo pamba ?

Emmanuel Kandolo : Mission principale ezalaki moko wana ezala na tango ya brigade ou ya division, service ya honneur mpe sécurité ya Chef de l’Etat, ya famille na ye mpe na biloko na ye nionso. Par abus, D.S.P. ekomaki na mission ya ko réprimer ba manifestations na velléité nionso ya opposition na régime ya Président Mobutu.

Ndeko  Serge Kongo na biso : 3.    Lisusu na mosala ya ba soda, différence eza nini tango balobaka, Unité, bataillon, régiment, troupe, commando… ?  Ekeseni to eza kaka eloko moko.

Emmanuel Kandolo : Unité ezali composante importante ya armée, neti division. Yango ezali composer na ba brigades miyike. Division ezali commander na Général.

Régiment, ebengami mpe brigade. Yango ezali constituer na ba bataillons miyike. Ezali commander na Général ou Colonel

Bataillon ezali composante ya brigade. Yango ezali constituer na ba compagnies mine ou miyike. Yango ezali commander na Colonel ou Lieutenant-colonel.

Troupe ezali ensemble ya ba soda ya mampinga.

Commando ezali ba soda oyo bazali former mpo na kosala ba interventions na cadre ya ba missions spéciales. Epayi na biso, commando ezali unité d’élite.

N.B. Oyo ezali mpo na cas ya ekolo na biso mpe nombres ya ba soda ezali ko varier selon division tee na ba compagnies.

Major commandant ya Compagnies mibale

Capitaine commandant ya Compagnie moko.

1er Lieutenant Section ezali oyo asengeli ko remplacer mokonzi na ye, Capitaine.

Sous-lieutenant ezali oyo azali  charger na ba détails ya instruction mpe na oyo ya service oyo azuami.

N.B. tolobeli kaka armée de terre.

Nabanzi que nameki koyanola  na maye otunaki ngai.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
P

Une petite remarque :

Si j’ai une bonne mémoire dans une armée, le lieutenant est la tête d’un peloton et le
sergent est à la tête d’une section.

Répondre
J

Kim,

J'essaie de repondre indirectement  a votre question sur base des donnees que j'ai fourni en rapport avec les budget militaires de certains pays. Ces budgets militaires sont disponibles sur
les sites de World Bank, CIA, Wikipedia...De la, tu peux extrapoler le budget alloue' a un militaire par an pour son fonctionnement (comprenant :le salaire annuel, le cout du materiel qu'il
utilise:arme,munition,vehicule; les cout des services qu'il est cense effectue' : patrouille,bataille-guerre,...). Soldat Zambien : $13.000 par an; Soldat Angolais:$25.000 par
an; Soldat Nigerian: $10.000 par; Chinese:$28.000 par an; US Soldier: $280.000par an. FARDC Soldier: $800 par an. Le soldat Angolais est 30 fois mieux paye' et mieux
outille' que le soldat FARDC;en cas d'affrontement l'Angola nous ecrasera impitoyablement.De part leur budget seulement, les angolais sont sollicites par les presidents africains en
periode d'instabilite'(ex. de la Cote d'Ivoire). L'ANGOLA (10million d'hab) peut tenir tete au Nigeria(120 million d'hab)grace a son budget militaire. Les angolais sont alle' courageusement a la
rescousse de la Cote d'Ivoire malgre la menace du Nigeria sur Gbagbo. Le soldat FARDC va a la guerre en pantouffles, affame' avec un velo TOLEKA; une fois au front, il veut d'abord s'accaparer de
la nourriture qu'il trouvera et du butin de guerre (rappelez-vous des scenes de 1997 ou les FAZse repliaient avec des charriots plein de butin de guerre sur Kin abandonnant les postes a l'enemi).
Mettons les bons economistes a la tete du pays et tout va se redresser.

Répondre
S

Mbote ndeko Lufua Nkenda,

Eza mawa mingi, tozalaki na konzi ya ba mitema ndoki.  Oyebi liboba oyo? "Ndoki zoba", batangaki mais bozoba na bango
lelo ebomisi bato mingi na mboka na biso. Boketshu 1er alobaka "Peuple congolais, pas de conscience?"  Mayele
mukuse, lelo mingi na bango ba familles baza libanda, oyo ya lokoso koleka bakoma sous ordres ya petit rwandais.  Heure moko vanda nanu, ozua image oyo: ba généraux Liwanga, Loponda,
Kikunda, Eluki l’autre général assassin des adeptes de Bundu dia Kongo Denis Kalume Numbi surnommé Maradona na Ne Muanda Nsemi pona lokuta na ye na Parle-ment Congolais et autres baza ko repondre
na ba ordres ya Commandant Hyppo: Yes sir! Oui mon général!, à vos ordres mon général!  Ba DSP au lieu baboma Corbeau (Nzimbi) mutu azalaki kolia bango mbongo, babomi notre Tigre
(Mahele) mutu azalaka kobundela biso corps et âme.  Ndeko moko alobaki ke Adou elenga alobaka "Ata mokili ekobaloka" mais on dirait ebaluki na ndenge ya mabe alors.  Ngbanda alobaki
Mobutu azalaki kosepela na ba conflits ya ba généraux po azalaki kobanga ke soki basangani bakosala ye coup alors ke technique naye moko eye kokoma motambo contre ye moko.  général Mahele
baboma ye na miso ya général Wezago mais nani abomaki ye, même général Wezago atikala koloba te, qui ne dit mot ...

Serge Kongo na
biso

Répondre
K

Bonjour chers amis,

Merci pour tous ces éclaircissements sur la vie militaire de notre pays.

Mais, ma question est celle-ci : Quelqu'un peut-il me donner le salaire de base d'un colonel de l'armée congolaise actuellement ?
Je parle bien du salaire de base car j'ai entendu des chiffres très misérables et qui m'ont fait froid dans le dos !

A bientôt

Répondre
L

NAYEBI TE SOKI EZALI YA SOLO

Balobi tangu ba AFDL bakomaki na Kenge en route vers la capitale Kinshasa, Général Mahele Donat akeyi na camp militaire Tshatsi kokutana na Président Mobutu, ayebisi Maréchal, Papa moyen mosusu
ezali te, Afdl ekomi na Kenge, qui dit Kenge dit Kinshasa, d´abord likambo ya approvisionnement ya ba sacs ya Fufu po na ville ya Kin, ensuite ba soda bawuti na Angola baye ko appuyer bango,
namoni ndenge mosusu ya kosala te, puisque général Mahele akokaki kopesa solution te, apesaki nde proposition.

Maréchal Mobutu ayebisi général Mahele, alobi na ye, Petit Donat oyebi malamu ngai nabanda na bino wuta kala, tangu bozalaki nainu ba Adjudants yo na baninga na yo, bozalaki obele na âge ya 27
ans pas encore 30 ans, lelo bino wana bokomi ba généraux, ba colonels mpe ndenge na ndenge.

Général Mahele ayebisi Maréchal, nayebi nionso wana tangu tozalaki ba gardes du coprs na yo na 1969 na manso maleka, kasi lelo ezali nde situation ya masolo te, ezali nde likambo ya la vie ou la
mort ya régime.

Mobutu atali Mahele nieee, alobi na Mahele, bon Donat comment voulez-vous DSP ezali na environ 20.000 HOMMES (vingt-mille) ata kutu ba soda ya Faz baboyi na bango kobunda, nabanzi DSP seule ekoki
ko tenir tête na ba Afdl, en plus ba soda oyo ndeko na ngai Savimbi Malheiro Jonas atindeli ngai bazali wapi.

Mahele asimbi motu, alobi na Maréchal, Papa ya solo ba présentaka yo liste de paie ya 20.000 hommes pour la DSP mais en réalité bazali kaka 2000 (deux mille), depuis bitumba ya Afdl ebandi
ba Dsp ndambu bakufi, mingi bakimi na bango, ba misusu ba changer na bango camp bakomi côté ya Afdl, à l´heure actuelle en tout cas Dsp etikali kaka na 200 (deux cents) hommes.

Mobutu alobi na Mahele, alobi nini Dsp bazalaki kaka 200 hommes, mais, mais en fin, kaka lobi awa nawuti kofuta ba DSP liste yango ya 20.000 hommes.

Mahele atali Mobutu, Papa Maréchal abandi kolela, Mahele akanisi tangu ayaka na Dsp na 1969 après limogeage ya Vieux Denis Ilosono et l´arrivée du Colonel Omba, chef ya équipe na bango ya sika na
1969. Général Mahele asimbi le vieux Maréchal afandisi ye na kiti, mawa esali ye, akanisi le vieux Général Masiala oyo a pistonaka ye epayi ya Géneral Mobutu na 1969, akanisi Mama na bango
Antoinette Mobutu, balobi mayele ya général Mahele ekeyi mosika.

A vérifier...

Lufua Nkenda

Répondre
J

MOBUTU azalaki en visite officielle chez HOUPHOUET BOIGNY a Yamoussoukro.

Ba gardes ya Houphouet  pasepelaki trop pona MOBUTU azalaki maboko pete (Papa Bonheur) na ba Presidents tout bayaka kuna. Apres ba departs na ye, atikelaka bango ba mbongo ya bien.

Sikoyo groupe ya ba Etudiants Congolais eyaki pona kosenga bongo na Mobutu. Il n'y avait que quelques 25 etudiants dans ce pays. Yoka ba gardes DSP ya Mobutu: BOLOBA 25 TE, LOBA NA
MARECHAL BOZALI 150.

Dirigeant (JMPR) ya ba etudiants apesa chiffres ya 125 na MOBUTU heure a recevaki bango. Boyeba ke MOBUTU apesa 1000 dollars-US  par etudiants. Pona ko tester soki
chef-etudiant azalaki koloba ya solo, MOBUTU ameka ko embrouiller ye.

MOBUTU: 125 etudiant? Ebele boye. Mais MANDUNGU, lobela ngai nayino, bana oyo babimaka mboka lolenge nini?

Dirigeant-Etudiant a paniqua tellement ke a changea ba chiffres mbala mibale. Heure akitaki na chiffre 25, nde MOBUTU a se calmaki pe abimisaki linkonda, 1000 dollars par etudiants.

Répondre
S

Bonjour notre frère Jacques,

Oui, notre ainé Emmanuel Kandolo nous répondait sur la différence qui existait entre BSP (Brigade
Spéciale Présidentielle) et DSP (Division Spéciale Présidentielle) qui jadis se comporter comme des hors la loi.  Vous venez de faire  un très bon travail de mémoire et nous vous en sommes très reconnaissant vraiment.  Je vous remercie pour la grande
contribution que vous venez de nous apporter sur cet article car c’est un sujet très important qui est tellement négligé par ceux qui ont eu la mission de nous détruire complètement.  Une grande nation, un grand pays comme le RD Congo qui a aujourd’hui un FARDC d’à peu près 152.000 soldats avec un budget de $ 127 millions seulement et nos frères du Congo-Brazza qui ont (12.000 soldats avec un budget de $142 millions).  Nous sommes gouvernés par des monstres, des dinosaures, sans foi, sans conscience ni loi.
Incroyable !!!  Prenez toujours le temps de nous enrichir avec ses types de sujets sur le seul patrimoine nationale qui nous rester :
« Mbokamosika ».

Serge Kongo na biso.

Répondre
J

Chers amis,

J'aurai bien voulu vous lire en francais pour bien vous comprendre. Je suis lushois et un certain pourcentage de lingala peut m'echapper; un peu comme vous, je parie que un large degre de swahili
vous echappe. Mais j'ai compris vos commentaires. Je precise ceci. L'organisation de notre armee sous mobutu avait un heritage belge d'abord puis francais avec de petites empruntes americaines.
Toute fois a cause du budget maigre de l'armee, le ministere de la defense a restructure' a sa facon l'armee. L'effectif de l'armee (2e republique) avoisinait 100,000 hommes; le desordre du
regime a fait qu'il n'y ait pas eu de recencement regulier. L'anarchie et le flou autour de l'effectif reel arrangeait le ministere de la defense et ses generaux (declarez plus de fictifs pour
bien detourner l'argent de paie). Une armee (~100.000 hommes; dirigee par un general d'armee:4 a 5 etoiles) a 3 corps d'armee; un corp d'armee (= 30,000 h, est dirige' par un lieutenant general:
3 etoile) a 3 divisions d'armee. Une division (= 10,000 h, est dirigee par un general de division = major general:2 etoiles) a 3 brigades; une brigade (= 3000 h, est dirigee par un general de
brigade:une toile) a 3 bataillons. Un bataillon (= 800 a 1000 h est dirige' par un colonel: 3 tete de leopard) a 3 companies. Une companie (= 100 a 200 h, est dirigee par un capitaine) a 3-5
peletons. Un peleton (~ 40 h, est dirigee par un llieutenant). L'adjudant dirige une equipe de 10 person environ. La force publique etait qlq peu organisee de cette facon. Mais avec la
reduction du budget les effectifs des FAZ etaient tres incomplets et desorganise'. On pouvait etre colonel sans bataillon ou etre a la disposition securitaire de la maman presidente...Le budget
militaire est un element cle d'une armee. Aujoud'hui les FARDC ont ~ 152.000 soldats avec un budget de $ 127 million seulement. Voici la comparaison avec les autres pays: Angola (117.000hommes;
$2.8 milliard de budget), Nigeria(162.000h; $1.6 milliard), South Africa (90.000h; $4milliard), Rwanda(35.000;$72millions), Zambia (19.000h; $251million),Brazza (12.000k;$142millions), Chine
(3.500.000h;$98 milliard), USA(2.500.000h; $669 milliard). Avec le budget alloue, au FARDC, toutes les armees du monde ne peuvent que nous ecraser en commencant par nos voisins... Avec ses
152.000 soldats , le Congo doit avoir un budget militaire d'au moins un milliard de dollars ainsi les troupes seront bien equipees et bien payees; Y-a-t-il un economist au pays qui fait ce
calcul?Voyez -vous pourquoi les militaire fuyent au front au 1e coup du canon enemi! L'enemi a des armes que les FARDC n'ont jamais entendu crepiter... Pour revenir au sujet du jour, la
BSP etait une BRIGADE , nee de la dislocation de la division kamanyola(DK) apres la debacle de Kolwezi en 1978. De la brigade(3000h) elle a augmentee son effectif pour devenir division
DSP (~ 10.000h)

Répondre
S

Mbote ndeko Kandolo,

Merci mingi na biyano opesi na mituna nga, na banzi ekosalisa ba ndeko bayike, biyano opesi emonisi ke formation ya BSP na DSP
ezalaki normale kasi bango nde bakomaki ba hors la loi.  Ndenge kaka olobi ke Division ezalaka 10 a 20 milles soldats, nayoka motorse ke effectifs ya
ba soda ya DSP oyo Général Nzimbi azalaki kopesa Maréchal Mobutu ezalaki ebele kasi mokolo bitumba ya aggression ya AFDL ebandaki Mobutu aye koyeba ke ba soda ya DSP bazalaki muke penza par
rapport ya nombre bazalaki koyebisa ye pe azalaki kobimisa mbongo pona na salaire na bango, Mobutu azalaki très déçu.  Mokolo malamu na ba mbokatiers
nionso.

Serge Kongo na biso.

Répondre