Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Sujet : E.Kandolo décrit l'organisation du tourisme en R.D.C.

Ndeko Buku,

R.D.C. e ratifia Convention ya protection ya patrimoine mondial culturel et naturel na 1974. Mpe parc ya Virunga ezali ya liboso oyo ekotaki na liste ya patrimoine mondial na 1979, mpe misusu nionso eladi na sima.

Na oyo etali ba primoines oyo tokoki kotiya na protection ya UNESCO, esengeli biso nde topona yango mpe ezali na kati ya oyo natangeli yo na liste non exhaustif oyo nameki kosalela yo : ba nzete ya baobad ; cimetières ; églises, stade tata Raphaël, stèle ya N’sele, etc. Soki ozali komona yango te, ezali tout simplement mpo toyebi kaka te esika nini culture, conservation ya nature mpe tourisme ekoki ko occuper na ekolo na biso. Ba textes ya loi ezali, kasi totalaka yango te mpe moyen toyeba kotiya richesse culturelle oyo nature epesi biso  en valeur ezali te. Par exemple : Lac Maï Ndombe na lac Munkamba ezali na bokeseni makasi mpe na ba particularités na yango : mai Ndombo ezali moindo mpe endimaka saleté. Lac Munkamba ezali peto mpe ebuakaka saleté nionso na libanda. Beauté ya Moanda na Goma, ezali na ba originalités na yango. Ba chutes ya Kinsuka na Wagenia, ezali na elengi ya miso. Tala yo moko, bikeko bizali bibele tout comme tozalaki na ba sculpteurs, peintres, dessinateurs, ébénistes, etc. bazali ba œuvres kitoko. Tala na Mont Ngaliema, académie des beaux arts, ministère ya Affaires étrangères ; défense, salle ya congrès ya N’sele, ba fresques ya stade tata Raphaël, etc.

Eloko mosusu oyo tolobelaka mingi te, ezali que batu mingi na R.D.Congo bakolaka sans ba développer ou ba prendre goût ya nature. Mingi bayebi ko admirer beau naturelle te : Admiration ya levée na couche ya soleil elobelaka batu presque rien, kitoko ya mbonge ezali kolobela Congolais eloko te, même pas brume oyo esalaka na tongo na Kananga, Lubumbashi, Moanda ou Kisangani. Ebongo na nzela ya Matadi, ezali na bilembo oyo baye batongaka nzela wana batika, kasi, tokipaka te. Kotambola pene ya bibale ou kofanda pene ya bibale mpe ko méditer ou même kotambola na ba jardins botanique, elobelaka biso eloko te. Tala kaka na Mbandaka, jardin eyala ezali kokufa kaka boye, neti Gouverneur José Makila, mutu atombolaki projet ya jardin ya Eyala, azali lisusu te, misala mpe milali !!!! Ba expositions ya ba œuvres d’art esalemaka na R.D.C., kasi mindele nde bazali majoritaire kuna. Na poto, tolingaka kokota ba musée te, tolingi ko s’intéresser na richesse culturelle te, mpe ezali normale Congolais a ignorer même richesse oyo ya ekolo na ye ezali na Musée royal de l'Afrique centrale (M.R.A.C.) ya Tervuren na Belgique  na musée des Arts Premiers na quai Branly na Paris, France.

Ezali mawa mingi mpo to comprendre kaka te combien tozali ko perdre na manque ya valorisation ya industrie munene ebengami tourisme.

Ndeko Crispin-Régis Lukoki,

Na époque oyo olobeli, effectivement, ba nzela ezalaki praticable mpe bien entretenu. Organisation na niveau ya transport ezalaki malamu à tel point que ba connections ou correspondances ebandaki kosalema lolenge esengeli. Par exemple : Train oyo ewuti na Lubumbashi via Kamina (correspondance ya Kolwezi na Kalamie), Muene Ditu, Tshimbulu, Kananga, Demba, Mweka tee kosuka na Ilebo. Wana nde correspondance ekosalema na masuwa na mayi ya Kasaï. Nzela mosusu ezali wuta Kabalo via Kalemie ou Lubumbashi, omati Kongolo, Kibombo tee kokoma na Kindu. Correspondance na fleuve Congo par bac tee na Ubundu. Na Ubundu nde connexion ekosalema na train te na Kisangani. Bumba mpe ezali relier na Buta na train, via Aketi. Tout comme Bondo, Buta, Isiro tee na Mungbere.

Na Bukama , kuna, tozali na lac Kabwe mpe na ba lacs lokola : Kabeke, Mulenda na Lukenge.

Ba merveilles oyo olobeli na fluve Congo, ezali bokutani bua Mfimi na lac Mai-Ndombe na niveau ya Kutu. Bokutani bua Mfimi na Kasaï na niveau ya Mushie, mpe na sombele suka bisanga , na Kwamouth Malela, tango Kasaï na fleuve Congo ezali kokutana.

Bokutani bua Ubangi na fleuve mpe lisusu na bokutani bua lac Tumba na fleuve na niveau ya Irebu.

Na Inga, na niveau ya barrage, fleuve epanzanaka kitoko mpe ezalaka impressionnant. Embouchure ya fleuve na Banana, ezali extraordinaire mpe esalemaka na douceur nionso. Tango fleuve emibuakaka na océan Atlantique, couche moko ya munene esalemaka wana mpe elakisaka bokeseni kati ya mayi oyo mibale. Na époque ya bateau Kananga, soki ekoti na océan, mpo ekende na Anvers, na Belgique, Moanda ebandaki komonana kitoko na ba mangrove na yango.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Sujet : Réaction d'Emmanuel Kandolo aux différents sujets du 10 janvier

Ndeko Jean Pierre Lubaya,

Na comprendre nini ozali ko sentir na koyeba soki baye balingisaki yo nzela ya journalisme bakoma boni ? Oyebi, nakanisi lisusu ba périodes oyo mpo Zaïre ezalaki na poids mingi na continent africain mpe ebandaki koleka inaperçu te na monde. Ba journalistes bazalaki na ba domaines miyike mpe eloko oyo bazalaki na yango en commun ezalaki passion ya mosala. Ata ko lelo oyo, makambo ebonguana, esengeli de temps en temps tokanisaka ba bons moments wana.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Sujet : La biographie de Mandungu Bula Nyati

Ndeko Garba Emeka,

Merci na complément ya lisolo ya Mandungu, vieux Carbure. Oyebi, baloba na mokili que nionso efutamaka awa na nse. Ba ndingari bamelaki ye mbongo ya ndaku ndenge moko kaka ye asala batu oyo babandaki kosala na société na ye ebengami : Société Agricole et Minière du Zaïre (S.AGRI.MI.ZA.). Akenda ba niongo na bango mpe aboya kofuta ba salaires ya batu bien que décision ya justice e imposaki ye atuta batu mbongo na bango nionso. Malheureusement, neti azalaki Homme fort, aboya kofuta ata likuta na batu banso oyo ye esengelaki a devoir. Suka suka, afuti yango na ndenge mosusu mpe bameli ye ndenge kaka amelaki ba employés na ye ya S.AGR.IMI.ZA. na Shaba.

Mokili ezali kolakisa lisusu que batu oyo bazali na gouvernement ya Stanleyville, bakufi na ba conditions oyo ezali kokokana mpe mpene ya liwa nde bazali kokanisa manso ya mabe basalaki tango babandaki koboma batu lokola ba niama, na monument ya Lumumba. Nionso oyo ezali liteya na baye bazali kobunga kopesa vie ya mutu importance.

Na Kinshasa, Antoine Mandungu abandaki kofanda une très belle villa na Djelo Binza. Na gauche na ye, voisin ezalaki, Henri-Désiré Takizala Luyan Mwis Mbingin. Na droit, Edouard Mokolo wa Mpombo. En face, Pierre Pay-Pay wa Syakasighe.

Ndeko Pascal Muanda Muanda,

Merci na ba compliments na yo, nasepeli na yango mpe ezali lisusu kopesa ngai makasi ya kokoba na kati ya Mboka mosika mpo tokabolaka masolo.

Yo mpe kolemba kosangana na biso te.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Sujet : L'implication du Major Mpika dans le coup monté de 1975

Ndeko Dio Dio,

Nakomeka koyanola na mituna otuni ngai, na bolandi maloba ma yo.

Ndeko Dio Dio : Nazali na mituna mibale nalingi na tuna yo pona MAJOR MPIKA
(1) Ayaki na WEST POINT na cadre nini??
West Point, malgre ezali ACADEMIE MILITAIRE,,,,mais ezali LOKOLA ba UNIVERSITE nioso awa na USA avec ba faculte un peux LIMITER ou encore ba FACULTE oyo bazali na y'ango na POSA en temps  ke OFFICIER de L"ARMEE AMERICAINE et puis pona ozali admit kuna.....il faut ozala AMERICAIN parceque apres acquisition nayo de LICENSE, il faut  o servir na ARMEE pour une duree de  4 ans...
Alors nazali penza CURIEUX de SAVOIR ye ATANGA AWA, pe ASWA LICENSE na WEST POINT..na FACULTE NINI pe na MBULA NINI(Promotion NINI) ou bien ayaki tout simplement ba SEMINAIRE oyo ba permetaka ba OFFICIER MILITAIRE yaba PAYS ETRANGER ba PARTICIPER????

Emmanuel Kandolo : Major Mpika Ntoya Zi Bikembo akendaka West Point na Etats-Unis na cadre ya coopération militaire oyo ezali kati na R.D.C. na Etat-Unis d’Amérique. Ba Congolais ebele batanga kuna tout comme ba futurs Chefs d’Etat ya Nicaragua, Anastasio Somoza Debayle, na oyo ya Philippines, Fidel Valdez Ramos. Donc, jusqu'à preuve du contraire, West Point ezali ko exclure ba étudiants internationaux te.

Au sujet ya année académique ya Major Mpika na West Point, nazali na mua confusion na mbula. Le mieux serait ya ko souhaiter que azua possibilité ya kotanga biso, peut-être akoki kopesa biso ba éclaircissements na promotion na ye kuna. D’ailleurs, nazali ko lancer appel na mutu nionso oyo akotanga biso mpe ayebi ko joindre Major Mpika, asunga biso mpo ye atindela biso compléments ya informations na maye matali carrière militaire na ye na R.D.Congo mpe na cursus na ye na Etats-Unis.

(2) Ndeko Dio Dio : Motuna ya MIBALE.....ezali na meme LIGNE....C'est possible que  AZALAKI ADMIT na programme na FORT LEAVENWORTH pona ba etudes superieure naye..Mais na promotion nini??? D'ailleur kuna bapesaka license te ezali tout simplement LEADERSHIP SCHOOL bakopesa yo CERTIFICAT ke O PARTICIPAKI na PROGRAM wana....D'ailleur bazali na program UNIQUEMENT pona ba MILITAIRE OFFICIER yaba PAYS ETRANGER.

Mais yebaka PROGRAMME ya FORT LEAVENWORTH ezali kaka likambo ya APPLICATION pe ACCEPTANCE...meme si PAYS nayo d'ORIGINE ezali naba probleme DIPLOMATIQUE na USA...Donc a L'epoque ba pays ebele malgre politiquement parlant bazalaki na GUERRE FROIDE, mais ba OFFICIER MILITAIRE bazalaki na b'ango KOYA ba SEMINAIRE pe ba FORMATION ya LEADERSHIP awa na USA...

Qualification ya KOMBO ya FORT LEAVENWORTH comme etant place INTELLECTUELLE ya ARMEE AMERICAINE ezali tout simplement KOMBO ya PAMBA...DOnc bakomaki kobenga y'ango ndenge wana parceque BA LIVRES NIOSO ya DOCTRINE MILITAIRE AMERICAINE ezalaka IMPRIMER KUNA...donc ezali te parceque BA INTELLOS BATONDA KUNA...
D'ailleurs awa soki olobi FORT LEAVENWORTH  eloko eyaka liboso na mitu ya bato ezali plutot..PRISON MILITAIRE..et NON place oyo BA INTELLOS  BATONDA

Emmanuel Kandolo : Ndeko, yaba que condition ya existence ya coopération militaire kati na ba Etats mibale, ezali existence ya ba relations diplomatiques kati na bikolo bibale. Politique étrangère ya Etat, yango nde e ko tracer orientation ya coopération militaire na yango en fonction ya géopolitique internationale, géostratégie mpe rapport ya ba forces na kati ya ba politiques étrangère ya ba grandes puissances. R.D.Congo ezali tourner na ba pays ya Organisation ya Traité ya Atlantique Nord  (O.T.A.N.), na chef de fil, Etats-Unis. Yango wana, coopération militaire ezali kati na R.D.Congo na Etats Unis. Coopération yango ezali na oyo etali Défense nationale, assistance mpe na ba missions militaires. Sika nabanzi que o comprendre pourquoi coopération militaire ezali kati na ba Etats mibale.

Na oyo etali suite ya motuna na yo, yeba que ozali kokamuisa ngai ndenge ozali koloba que : « Qualification ya KOMBO ya FORT LEAVENWORTH comme etant place INTELLECTUELLE ya ARMEE AMERICAINE ezali tout simplement KOMBO ya PAMBA...DOnc bakomaki kobenga y'ango ndenge wana parceque BA LIVRES NIOSO ya DOCTRINE MILITAIRE AMERICAINE ezalaka IMPRIMER KUNA...donc ezali te parceque BA INTELLOS BATONDA KUNA... ».

Soki ezalaki bongo, esengelaki babenga, Fort Leavenworth, imprimerie mpe bibliothèque américaines mpo esika basalaka ba buku ebengamaka imprimerie. Esika batiyaka yango mpo na botangi nde ebengami bibliothèque.

Cependant, yeba que Fort Leavenworth ebengami « Centre intellectuel ya armée » mpo kuna nde esika batangisaka doctrine militaire américaine na ba futurs commandants ya mampinga ma armée, na collège  ebengami : U.S. Army Command and General Staff College (U.S.A.C.G.S.C.). Ba grands Généraux américains mingi baleka kuna : Dwight D. Eisenhower, Omar Bradley, George Marshall, George S. Patton,  Douglas MacArthur, Henry Arnold, Collin Powell, etc.

Soki olingi ba détails, okoki kokende na site ya Leavenworth ou o téléphoner bango, bakopesa yo lisusu ba informations mingi ya malonga sur lokumu ya (U.S.A.C.G.S.C.).

Pour ta gouverne, nasangiseli yo ba kombo ndambu ya ba soda na biso oyo batanga na Etats Unis. Oko reconnaître kombo ya Général moko, awuti kotika mokili mikolo mileki, paix a son âme. Ye abotama na Yalosemba, na Novembre 1938, mpe aweyi na Kinshasa na août 2009. Atanga na West Point, azali Budja, un des rares Généraux compétents, braves, dévoués mpe honnêtes. Oyebi libota na ye malamu. Okoki kotuna bana baye, bako confirmer yo que tata na bango atangaki na Etats Unis na prestigieuse academie ya West Point mpe azalaki citoyen américain te. S’il te plaît, kobosana kozongela biso awa te, mpo na opesa biso suite ya petite enquête na yo !!!

Ba pete na kombo yango oyo : Ba Généraux de corps d’armée (Lieutenants-généraux) : Manzembe ma Ebanga na Kayembe Mbandakulu Tshisuma. Ba généraux de division (Généraux-majors) : Mosala Makambo na Baruti Milengo, ba Généraux de brigade : Monzili Zabili, Bakatamba Bena, Esale Yoka, Bile Engomba na Engwala. Ba Colonels : Diba, Malutama di Malu na Pendala. Ba Majors : Mpika Ntoya Zi Nikembo na Bula Butupu Bakajika.

Ndeko Joseph Pululu,

Pour rappel,  likambo ya animation politique ebandaki na cadre ya accueil traditionnel ya Président  pendant ba visites na ye na ba regions (provinces)  mpe na ba cérémonies officielles oyo ye ako marquer na présence na ye entre 1967 tee na 1969.  Kobanda 1970 nde M.P.R. eyaki ko institutionnaliser animation politique na Congrès extraordinaire ya mai 1970. Nionso  oyo na loyenge ya concept ya authenticité. Ngomba ya likambo ezalaki voyage ya janvier 1973 na Chine populaire ya Mao Tsé-Toung (Grand Timonier) mpe na Corée du Nord ya Kim Il Soung (Grand Leader). Kuna nde makanisi ma festival ya animation ewutaki mpo lolenge bazalaki kobina, koyemba, kolakisa esengo mpe ko glorifier Grand Timonier na Grand Leader na ba pays na bango respectifs tango bayambaki couple présidentiel zaïrois, ezalaki extraordinaire : Président Mobutu na mama Antoinette basala ba voyage, kasi oyo ya Chine na Corée du Nord etikala na mémoire mpe ba séjours na ba pays wana ekoki kotika mutu indifférent te na tentation ya culte ya personnalité. Personnellement, na doutaka que Chef de l’Etat oyo azali na pays oyo ba institutions démocratiques efandi makasi te, akoki ko résister na messe ya motindo wana !!!

Wuta wana, animation ezalaki tour à tour na responsabilité ya Comité exécutif national ya M.P.R ; Bureau Politique du M.P.R. ; Département des Affaires Politiques ; Secrétariat national ya J.M.P.R. ; Département ya Orientation nationale ; Secrétariat exécutif ya M.P.R. chargé ya M.O.P.A.P. ; Département ya M.O.P.A.P., tee sukisa na Secrétariat Général ya M.P.R.  Mbala eleki , nabosanaki kobakisa Kombo ya Takizala Luyan Mwis Mbingin. Ye azalaki Commissaire d’Etat ya M.O.P.A.P. tango yango ekomi Département (Ministère)

Kobanda 1970, moko te na batu banso oyo otangi, abandaki lisusu kofanda na lopangu ya famille : Mandungu, Sakombi, Kabaidi ou Kiakwama. D’où, nakozongela lisusu likambo ya kinois esika inso azuami na 24 communes ya Kinshasa ezali mabele ma ye. En revanche, tango Momene Mo Mikengo abandi kosala succès na ba nzembo lokola : « Papa Mbote yango oyo », « Salongo »,  « Mobutu Mvuma », « Mobutu Sukisa », etc. abandi déjà kofanda na Kintambo mpe kuna nde balela ye, bien que ye abotami na commune ya Kinshasa.

Faut-il comprendre que ba ainés ya Kintambo lokola Nyemba na Botomba ba se rapprocha  a ta na Hôtel de ville te na époque ya Nzoku, ba deux frères Sakombi, Mandungu na Kabayidi ?

Ndeko Joseph Pululu, Nazali komona raison ya frustration wana te, ata soki ezali mua mpasi elonga na mitema ya bana Kintambo. Frustration ou pas, biso banso toyebi valeur ya animation ya Kintambo mpe na apport na yango na Zaiko Lang alanga. Ezali likambo ya kobomba te mpo lelo oyo soki rôle ya atalaku ekomi oyo ekomi lelo oyo, ezali en grande parti grâce ya boyebi bua ba na ndeko lokola : Beta Kumaye, Sonnerie Zumbu Mayuma, Ditutula, etc. Na ba mbunda ya Nzila sambila,  bana Odéon, etc. n zela nzela, elongi R.D.C mobimba  tee efandi na Afrique centrale na ouest. Wana ezali mutation munene oyo esengeli to attribuer na Kintambo, mpe yango ekotikala bongo. Soki tozongeli M.P.R., tozali komona que yango ezalaki incapable ya ko garder nionso ba kinois ya Kintambo epesaki te. Heureusement que Zaiko eye kokotisa yango na musique moderne mpe amemi yango na mikili misusu.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
H

ndeko nkandolo pesa  ngayi ba informations ya colonel kabwe npe parcour militaire na ye na FAZA, npe pona nini balongolaki ye na FAZA?

Répondre
B

Ndeko E. Kandolo,

Ya solo ezali pasi pona biso soki nazali kokanisa ndenge ezalaka elengi ya kotala ndenge moyi ezali kolala eliko ya ebale.

Nzela ezali molayi, nakanisi Grand Kalle na nzembo Keliya "moyi ya tongo ya ebale esengaka otambola malembe."

Buku

Répondre