Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ba ndeko,

Mpo na nini mpe ndenge nini Major André Mpika Ntoya azalaki impliquer mpe condamner na procès des conspirateurs na likambo ya coup d’Etat monté et manqué ya 1975 ?

André Mpika Ntoya « le katangais » azali engambe mobali oyo akoli na Léopoldville (Kinshasa), Elisabethville (Lubumbashi) na Jadotville (Likasi). Mbinga ya mobali, bien élevé, honnête Homme, akoli na foi chrétienne protestante, patriote, solidaire, sportif, intellectuel mpe spécialiste ya science na art militaires. Marine,  paracommando, militaire discipliné dans l’âme prêt à donner sa vie pour sa patrie, Homme de parole et de culture, fidèle mpe loyal na ba relations na ye mpe toujours prêt ya kokabola na ba ndeko. Nakobakisa lisusu que azali na remarquable fidélité mpe bolingo makasi na molongani na ye. Bref, un vrai Homme na sens nionso ya terme.

Carrière militaire ya André Mpika Ntoya ebebaki na likambo ya coup d’Etat manqué ya 1975. Kasi, yambo tokoma kuna, esengeli koyebisa que malgré ba compétences na ye, bravoure, discipline, implication profonde, carrière na ye ezalaki kaka kokutana na ba cales mpo lisumu na ye ezalaki mérite oyo ewuti na mayele mpe acharnement na acquisition ya connaissances mpe na entretien ya condition physique oyo esali que atanga na ba très prestigieuse Académie Militaire ya West Point (U.S.MA.)  na New York mpe na Ecole Supérieure ya Commandement mpe ya état-major na Fort Leaveworth, na Kansas, na Etats-Unis.

U.S.MA. ezali  institution militaire ya liboso ya U.S.A (ancêtre)  mpe ebimisa ba généraux cinq étoiles lokola Dwight David Eisenhower na Omar Nelson Bradley. Na Afrique noire, Zaïre ezalaki le seul oyo azuaki privilège wana mpo na rôle na ye na guerre froide mpe na ba relations makasi na Etats-Unis. Grâce na ba exploits ya ba Majors André Mpika Ntoya na Bula Butupu Bakajika na U.S.MA. nde esalaki prestige ya Zaïre mpe na ya Mobutu. Par ailleurs, Fort Leaveworth ezali centre intellectuel ya armée américaine..

Après cinq premières années ya Président Mobutu na pouvoir, depuis deuxième coup d’Etat militaire na ye, politique étrangères ya Zaïre ekomaki ko inquiéter Etats-Unis mpe ba successions ya ba décisions oyo azali kozua na ba relations diplomatiques na ye, misusu ezalaki lisusu kosepelisa ba américains te. Ezali secret te, Ba Américains bazalaki ba Bureau munene ya renseignements na Kinshasa na boulevard Colonel Tshatshi na Gombe. Donc, Zaïre azalaki esika contrôle  ya menace ya U.R.S.S. na Afrique ebandaki kosalema.

Major Mpika na lolenge asilisaki ba kelasi na ye kuna na U.S.A mpe akenda mbala mibale kotanga, ezalaki naturel que asala carrière kitoko mpo tango azongaki akotaki mbala moko na Division des Troupes Aéroportées de Combat (DI.TR.A.C). Logiquement, na retour na ye, esengelaki azua commandement ya DI.TR.A.C. Rien. Tango wana, Général Bumba Moaso Djogi akomi Capitaine-général = Chef d’Etat major général ya F.A.Z. depuis 1972 mpe Colonel Eluki Monga Ahundu, Commandant ya DI.TR.A.C.

Climat ya froideur kati na U.S.A na Zaïre ewutaki na :

1. Orientation diplomatique ya République du Zaïre etindi na rupture ya relation na Taiwan ;

2. Rapprochement na Chine ya Mao Zedong mpe na visite ya couple présidentiel zairois na janvier 1973  na Chine populaire, bastion communiste ;

3. Refus ya Président Mobutu ya ko négocier na maquisard Kabila mpo na libération ya quatre étudiants américains oyo bazuamaki en otage. Brouille na Secrétaire d’Etat américain, Henry Kissinger, ebandaki nde wana ;

4. Politique ya zaïrianisation (indépendance économique) ;

5. Présence ya Président Mobutu na sommet ya Ligue arabe na Alger na 1975 (bien que Zaïre ezali pays arabe te, mpe na lolenge apesaki Israël mokongo, pays oyo esalisi Zaïre e réorganiser armée a yango. Président Mobutu akati relations diplomatiques na Israël, likolo ya likambo ya mont Sinaï,  na discours historique ya jeudi, 4 octobre 1973, na Nations Unis. Kuna nde le fameux : « le choix est claire entre un ami et un frère » ebimaki.  Ami = Etat hébreux, frère = Egypte (pays-frère africain.) ;

Nionso oyo ebandaki kosepelisa ba Américains te. Yango wana  na 1974, Président Le Président Gerald Ford aye ko  nommer Monsieur Deane Roesch Hinton, ambassadeur extraordinaire et plenipotentiel ya U.S.A na Kinshasa. Kotindama na ye na Kinshasa ezalaki  signe malamu te puisque ye nde azalaki cerveau moteur ya coup d’Etat militaire ya Général Augusto Pinochet na Chili, le 13 septembre 1973,  mpe abomisisaki Président Salvador Allende. Makambo ebandaki nde wana mpo Président Mobutu a boulaki que coup fourré moko ekoki ko se préparer mpo ambassadeur Hinton ayaki na Kinshasa na ba diplomates  oyo bazalaki na ye na Chili mpe ba aidaki Général Pinochet na coup d’Etat militaire na ye ;

6. Na mai 1975, Zaïre endimi Organisation pour la Libération de la Palestine (O.L.P.) efongola Bureau permanent na Kinshasa. Décision  oyo ewutaki na virulent discours anti politique étrangère américaine Président Mobutu asalaki na U.S.A. na janvier 1975 na Conférence Afro-Américaine.

Ba éléments nionso oyo nde e déclenchaki makambo oyo eyaki komema na coup d’Etat monté et manqué.

Le, 11 juin 1975 nde ba suspects bakangamaki : Ba Généraux de brigade Katshuva wa Kasivira, Chef d’état-major ya Force terrestre ; Utshudi Wembolenga, Commandant ya 2ième région militaire ; Fallu Sumbu, Attaché militaire ya Zaïre na Washington (état-major général ebengisaki ye sous prétexte que akoma Commandant ya 5ième Groupement ya F.A.Z na Lubumbashi. Basuaki ye kaka na aéroport de N’djili tango awuti kokita na avion), ba Colonels Mudiayi wa Mudiayi, Attaché militaire ya Zaïre na Paris ;  Muendo Tiaka, Attaché militaire ya Zaïre na Bruxelles ; Omba Pene Djunga, Secrétaire particulier ya Chef de l’Etat et Président de la République, ba Majors Mpika Ntoya, Commandant ya bataillon  ya paracommandos oyo ezalaki chargé na sécurité rapprochée ya Chef de l’Etat ; Bula Butupu Bakajika, Lieutenant Kabamba, etc. bafundamaki na ba accusations  ya : Complot na tentative ya assassinat mpe élimination physique ya Chef de l’Etat mpe Président de la République, Haute trahison, Association ya ba malfaiteurs, Incitation epayi ya ba militaires mpo na ko commettre ba actes contraires na discipline mpe devoir militaires na Violations graves ya secret militaire.

Commission révolutionnaire composée na ba Généraux : Singa Boyenge Mosambay, Chef d’état-major ya Gendarmerie nationale mpe Président ya Commission ;  Molongya Mayikusa Moyi Bongenye, Directeur général ya Département ya Défense nationale ;  Likulia Bolongo Lingbangi, Auditeur général ya Forces Armées Zaïroises ;  Babia Zanghi Malobia, Chef d’état-major général adjoint ya F.A.Z.,  na Colonel Bolozi Gbudu Tanikpama, Chef ya Renseignement ya Gendarmerie nationale (B2).

Sima ya ba conclusions ya ba enquêtes ya Commission oyo, etindi baye bakangemaki na procès ebengami procès des conspirateurs. Kuna nde Général Masiala Kinkelo Kulu Kangala, Chancelier ya Ordres nationaux et des compagnons de la révolution, azalaki Président ya Conseil de Guerre ya  ville de Kinshasa.

Na Procès elobamaki que Major Mpika nde azalaki charger ya koboma Président Mobutu na étranglement na nse ya pongi na ye. Bien avant wana, Adjudant Shaba, aide de camp ya Général Katsuva, esengelaki a forcer porte ya chambre ya Président, selon scenario nionso ndenge Major Mpika akomaki na travail ya fin d’études na ye na Fort Leaveworth na Etats-Unis mpe na lolenge asalaki exposée na yango devant ba Généraux impliqués na likambo oyo. Intitule ya travail wana ezalaki : « Comment préparer et faire un coup d’Etat pour renverser le régime en place au Zaïre ? ». Colonel Omba, asi apesaki bango ba details ya emploi du temps ya Président, etikalaki kaka ba passer na action.

Makambo nionso oyo ezalaki étayer ata na preuve moko te. Accusation ekokaki ko porter preuve te sur soi-disant exposée ya kosala coup d’état na Zaïre.  Au contraire, tango nde bakangi Major Mpika, Commission révolutionnaire nde e forceaki ye akoma sur sujet ya : « Comment préparer et faire un coup d’Etat pour renverser le régime en place au Zaire ? ». Ye aboyaki mpe ayebisi bango que ezali impossible kosala coup d’Etat na Zaïre mpo vigilance ya M.P.R. ezali makasi mingi (un refus intelligent). Na yango nde bayaki kokumba ye esika batiaki ba buku nionso oyo ewutaki na bibliothèque na ye tango basalaki perquisition na ndaku na ye. Kuna nde, sur injonction ya Commission révolutionnaire,  azuaki document relatif na coup d’Etat militaire mpe azui soin ya kopesa référence ya livre wana mpo na kolakisa que maye ye akomi ewuti nde kuna na kati.

Mémoire ya Major Mpika tango asilisaki ezali intitulé : « En cas de conflit militaire entre l'U.R.S.S. et la Chine Populaire, quelle sera la position des Etats-Unis ? ». Aucun rapport na makambo ya coup d’Etat militaire na Zaïre. Ndenge nini akokaki kokoma sujet à caractère politique pendant que Armée esengeli ezalak apolitique ? Ndenge nini directeur ya travail na ye akokaki kondima ko diriger travail ya boye tout en sachant pertinemment bien que sujet ya motindo oyo ekozala na base ya ba très sérieux problème Mpika a ko connaître soki azongi na Zaïre ? Coopération militaire nini ekoki kondima que soda akoma makambo ya coup d’Etat na travail na ye ? Ezali contraire na diplomatie.

Le, 1er septembre 1975, condamnation à mort ezalaki prononcer na l’encontre ya Major Mpika. Suite na ba fortes pressions ya ba Américains, exécution ya peine esalemaki te. Batikalaki na cachot ya deuxième cité ya O.U.A  tee na juillet 1977. Sima ya guerre ya Shaba I, batindi bango na Angenga tee tango Président Mobutu a signaki ordonnance n° 79/238 ya 13 octobre 1979 oyo epesaki bango grâce présidentielle. Yango e coïncidaki na date ya anniversaire na ye le, 14 octobre. Le, 18 octobre nde bazongisaki bango na Kinshasa. Immédiatement,  moko na moko akumbamaki na village natal na ye ko jouir na soi-disant liberté na ye kuna, pas question ya kofanda na Kinshasa ou ailleurs !!!

Faux procès oyo eyaki ko salir réputation ya un brave militaire mpe eye kolongolisa ye na Armée sans cause réelle. Batu banso oyo bazalaki condamner na peine de mort, Armée ebotolaki biloko na bango nionso mpe e confisquer ba ndaku . Sauf Colonel Omba Pene Djungu, ye azalaki na biloko na ye nionso intacte mpe batikala ko simba yango te. Atikala mpe kokende na Angenga te. Pourquoi azalaki na traitement ya faveur ?

Procès oyo, yango nde eyaka kolukela Général Masiala, makambu. Yango mpe lisusu esalaki que Président Mobutu apesa mitindo na Commissaire d’Etat aux Affaires étrangères, Mandungu Bula Nyati, a déclaré son excellence Monsieur l’ambassadeur Deane Roesch Hinton persona non grata, le 18 juin 1975 mpe abambula ye 24 heures mpo alongua na Zaïre. Yango wana U.S.A. eyaki kotinda ambassadeur ya sika, Walter Léon Cutler, na poste na Kinshasa, en replacement na ye.

Ba ndeko, towuti komona que likambo ya Major Mpika, eleki cadre ya Kitambo mosika. Tribu na ye, kokola na Katanga, kotanga na U.S.A.  na West Point (USMA) na New York mpe na Fort Leaveworth na Kansas na Etats Unis, yango nde elukela ye jalousie nionso oyo esalaka que tout un pays ezala priver na ba compétences na ye. Masolo nini ebetama te na Kinshasa sur la légende ya Mpika ? Nini elobama te sur ba exploits na ye ? Malgré ba changements ya régimes, personne azali kokanisa kobengisa ye!!! Ezali une situation troublante et incompréhensible.

Lelo, Major Mpika akoma na ye kofanda kuna mosika na U.S.A. Au moins bango, basili ko reconnaître valeur na ye. Tika na souligner lisusu lolenge a valorisaki ba jeunes filles na formation ya bango en tant que ba paracommandos mpe na ndenge asala travail social munene na dialogue oyo asala na bana ya U.S ya Kintambo oyo babandaki kosal mobulu makasi na Kinshasa. Méthode pédagogique na ye ezalaki efficace par rapport na réponse violente oyo gendarmerie ezalaki na yango. Longonia na nionso pour ce vaillant  compatriote et soldat du peuple.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
K
Vous n' êtes qu' un sale menteur monsieur : LE MAJOR MPIKA NTOYA ZI BIKEMBO EST UN FILS NE KONGO et non un katangais . Un pur mukongo un fils muyombe ...
Répondre
K

Bonjour Monsieur Kandolo j ai lus votre texte sur votre blog et je voudrais plus d'information sur un des soldats de Major Mpkia qui s appel bula butubu sa serrai un grand service si vous savez
me repondre mes cooordoné mon numero +32 484 026 008 gsm et fix + 32 216 07 21 et voici mn e mail Kabandanyiscottie@hotmail.fr

merci aurevoir

Répondre
D

Ndeko MESSAGER,
Merci pona comprehension pe message nayo. Mais ngai vraiement namoni MABE na MITUNA na ngai te na makomi ya Kulutu EMMA KANDOLO...

Ngai nayebisa yo ke NAKOLA na MBOKATIER ANDO CHANGA(kulutu na ngai ya QUARTIER)..soki lelo akomi na BIOGRAPHIE na ngai ke DIO-DIO aswa FORMATION MILITAIRE na FORT LEONARDWOOD, apres akendeki na
FORT SAM HOUSTON (FORT RENOMEE na UNIVERSITY ya HEALTH SCIENCE)koswa CERTIFICAT MILITAIRE na MEDECINE D'URGENCE..apres AKENDAKI na ECOLE de PARACHUTISTE na FORT BRAGG..apres BATINDAKI ye na ECOLE
FORT LEAVENWORTH ti na FORT SILL...
Sikoyo mabe wapi soki MBOKATIER mosusu atuni mais atanga na ECOLE MILITAIRE ya HEALTH SCIENCE na FORT SAM HOUSTON...promotion nini to faculte NINI ?
Voila ndenge biso ba CONGOLAIS tokoma koluka INCOMPREHENSION partout...Depuis quand KOTUNA ekoma "NGAMBO"???

Répondre
D

Ndeko "Mwana ya KIN"

Na regretter mingi na reaction nayo na makambo na tunaki kulutu Emma Kandolo..
(1) Likambo ya WEST POINT:Banda 1963 ti lelo bakoma ko accepter ba CADETS(yaba PAYS MOSUSU)..na program oyo BABENGAKA-USMA-Opportunity
INternational CADET.mais avec quelques conditions makasi...Donc CADETS wana il faut azala CELIBATAIRE et en plus entre 17-22 age...
Otindi ngai nakende kosala RECHERCHE sur WESTPOINT  ???
Sans pourtant nakende na details yebaka ngai pe natiaki application kuna...mais nazalaki na NATIONALITE TE et en plus j'avais plus de 22 ans...DOnc acceptance epesaki MOBULU...Y'ango nazalaki
CURIEUX koyeba CAS ya MAJOR MPIKA.

(2) FORT LEAVENWORTH: Ngai pe nazali mwana ya APRES LIPANDA...Yo omona FORT WANA naba FILM..mais yebaka NGAI nakoma KUNA, NATANGA pe ba COURS ya
LEADERSHIP MILITAIRE KUNA...D'ailleur soki ozali KOLOBELA likambo ya "BUFFALO BILL-CODY"..c'est PLUTOT FORT SILL na OKLAHOMA..nazalaki WANA recenment na ETE ya 2009...Donc yo ozali kolobela
FILM..mais ngai nakolobela LIKAMBO oyo na VIVA na terrain ngai moko na EXPERIENCE ya VIE na ngai..

(3)US-Army Command and General Staff College aka : USA-CAC(Combined Arms Center)..Mais jamais tres bien dit que kuna bazali na program pe yaba
OFFICIER ETRANGER...mais omonaki na yo y'ango te to ozalaki nayo naposa yako tanga te..

Alors nasengi nayo nde ozala recherche oya ko repondre ngai na mituna na ngai.. na USMA-West point...Kuna bapesaka LICENCE...alors nalingi nayeba PROMOTION  pe FACULTE ya MAJOR MPIKA...na
CAC-kuna bapesaka MAITRISE..nalingi nayeba pe promotion naye na FACULTE nini?...C"est tout mabe nini LOKOLA natunaki..

PS: Mabe mosusu ya biso ba CONGOLAIS ezali nde soki MUTU akomi LIKAMBO, soki BOLINGI ekoma EVANGILE..DOnc TOZALI na DROIT lisusu yako senga ba
eclaircissement te. to ba details ya makambo mosusu...DOnc TOTUNA ELOKO te..to ACCEPTER kaka NIOSO...C'est vraiement REGRETABLE....O reagir neti OSWA NGAI na LIKAMBO...

Répondre
M

Brava Mokonzi wa bakonzi. Ndenge olobi na kati ya mbokamosika tozali ko se compléter. Soki oyebi koleka baninga malamu. Informer biso avec modestie. Domaine militaire ezali complexe. Tobebisa
esprit ya blog te bandeko.

Messager

Répondre
M

Ndeko Mwana Kin,
Ya liboso na tondi yo botondi, na réponse mpe ba éclaircissements opesi na mituna ya ndeko Dio-Dio, nazali na mayele mingi te na sujet oyo bino bozali ko débattre, kasi, nakosala bino mibale, mpe à
travers bino, bandeko banso ba Mbokatiers mua remarque, na mayele ma ngai, mpe makanisi ma ngai, nabanzi SITE oyo ya Mboka-Mosika, mosala na yango ezali mpo nakoyebisa mpe kolakisa baninga basusu
nzela, oyo bazali na molili, nakoki mpe koloba COMPLEMENTARITE, mpo biso nionso tokoki koyeba manso na mbala moko te, soki esprit ya équipe ezali, nde ekopesa elengi na manso oyo tolobaka awa, kasi
soki ezali na esprit ete ngai nayebi koleka yo, to ngai nayebi mingi, wana ekosala bien te, surtout ndenge objectif ya Site na biso ezali ATA NDELE oyo bazali na mayele ya kokoma ba buku, bakoma
HISTOIRE ya malamu oyo eko retracer la vérité.
Bozalaka na bokamwi mingi te, mpo oyo tokomaka ezali oyo toyebi to mpe oyo toyoka, alors soki ezali ndenge wana te, oyo ayebi vérité alongola moninga oyo na nzela ya molili, mpe atiya ye na
nzela ya malamu.
Bobosanaka te, esika batu bavandi, makumbu nionso ezalaka na versions kili-kili, kasi vérité ezalaka se moko, kasi motu na motu asalaka interprétation na ndenge na ye, mpe na ndenge ye ayebeli.
Ata, par exemple, vie ya Vieux Seskoul, mwana ya Mobutu akobeta version ya ndaku, vieux Nguza Karl i Bond akobeta version ya gouvernement, Général Bumba akobeta version ya mosala ya ki soda, ba
peuple bakobeta version ya animation etc... kasi vérité ezali kaka moko, vieux Seskoul azalaki président de 1965-1997.
Yango nakosenga na ba Mbokatiers banso, bomema masolo maye tozali kobeta awa na ndenge ya kowela to ba discussion te, bomema yango na esprit ya bien, mpo to atteindre objectif na biso.
Nabanzi boyoki ngai, lisusu longue vie na Mboka Mosika.
Mokonzi wa bakonzi.

Répondre
M

Moninga, Dio-Dio,
Nakamwe mingi, ndenge ya mituna na yo etali likambo ndeko na biso Kandolo ekomi a propos na Major Mpika Ntoya.Soki yo osalaki ba recherche nde yo otunaki mituna oyo te.
Pona nini nalobi boye. Nalobi boye mpo ete eyebani na mokili mobimba ete na USMA West Point, bapesaka ba militaires ya ba mboka allies (Pays allies), esika to place ya kotanga elongo na ba
bayekoli americains. Ba militaires ba pays allies batangaka cursus moko na ba americains.
Oyo ezali cas particulier nya West Point te. Ba academies militaires misusu ya minene lokola Sandhurst(oyo ezali Universite te), Saint Cyr, batikaka mpe ba certains officiers to ba candidat
officier ya bapaya batanga kuna.

Nalobi te ke Major Mpika atangaka cursus normal kuna, mpo ngai wana nayebi te.
Soko moko na biso ayebi mbula ye asilisaki kuna, ayebisa biso. mpo to tuna na direction ya USMA Wst Point.

Lisusu makambo olobi sur Leavenworth yango mpe ekamuisi mingi. Nayebite mbula nini yo obotama, kasi ngai nabotama sima ya lipanda, kasi nayebaki Fort Leavenworth mpo na film ya Le triomphe de
Buffalo Bills, oyo natalaka na Cine RAC. Na film tozali komona cavalerie ezalaki kowuta mpe kovanda kuna.

Na kati na fort  Leavenworth nde bazali na Prison a securite
maximum mpo na ba prisonniers militaires, mpe na libanda ya Fort leavenworth nde ezali prison oyo ezalaka kala prison federale ya maximum securite mpo na civil.

Kasi oyo ezali kaka detail. Fort Leavenworth eyebani comme base monene mpe ya liboso pembeni ya West.

Likambo nalingaki kosembola ezali oyo etali ecole oyo babengi na Anglais U.S. Army(armee de terre) Command and General Staff College, kuna ba
pesaka formation na ba officiers ya Army surtout, mpe na ba officiers ya ba mapinga mosusu ya forces armies americaines(U.S Armed Forces, or U.S military) comme Navy(marines militaries),
Marines(les corps des marines des Etats-Unis), Air Force(forces aerienne), mpe ba Cost Guards.

U.S Army Command and General Staff College epesaka titre
reconnu ya maitrise en science et art militaire.

Ecole oyo mpe etikaka ba officiers ya pays allies recommande par mboka na bango batanga kuna. Formation oyo
epesami kuna ezali ya mbula mibale.

Mpo na Zaire, a part Major Mpika, nayebi ke Colonel Malutama dit Malu(ba oyo bayebi histoire ya Zaire,
bayebi ye) atangaki kuna specialisation na renseignement miltaire.

Mosusu ezali General Mosala, lolo Colonel Mosala specialise na strategie militaire.

Ndeko na Ngai Dio Dio esengeli kotanga, liboso ya bokomi. Oyo ezali defaut monene ya biso ba
congolais.

Ebongi ete tokolisa mayele na bison a boyebi bwa solo.

Nasuki wana.
Ndeko Messager, soki omoni adresse IP ezali differente ezali mpo nazali kokoma na aeroport ya etat mosusu.

Répondre
R

Ndeko Pululu,
Ezali ngai wa yo, tango ya koliya misuni, wana ezalaki kaka bango na bango, kasi tango ekoyindela bango, to tango ya bilanga sambo ngombe kokondo, tozalaki komona bango na Kintambo, tout le temps,
le cas le plus connu ezali oyo ya vieux Sakombi Ekope Denis, paix en son ame, vieux wana tangu akomaki na touche, tobandaki komona ye na ba repetition ya ba Nkolo miziki na Leo II, pembeni ya
commune, epayi oyo bino moko boyebi, ba repetition ezalaki kosalama. Mais une fois soki azongi na poste, abosani biso baninga baye ya masolo na tango ya bosomele, to Bana ya Kintambo, wana azongeli
NATIONALITE na ye ya muana ya Kin-Malebo. Oyo nalobi, muana nionso ya Kintambo akoki ko temoigner yango, puisque biso banso tozalaki komona ye, vieux Denis Sakombi Ekope na ba repetition ya ba
Nkolo Miziki.
Rue Lusambo.

Répondre
J

De la frustration des Bana Kintambo.

N'en déplaise à nos amis Mbokatiers et à notre historien Kandolo, il n'est pas donné à tous d'être Kinois. Surtout pour les enfants de Kintambo - Léo II. Nous avons toujours estimé que
les Bana Malebo nous ont tout volé.
Emmanuel Kandolo cite des cadres du MPR kinois pour dire qu'ils ont valablement représenté notre ville, cependant, à l'analyse, on se rend compte qu'il viennent presque tous d'un même
quartier. la ville de Kinshasa ne peut se limiter à la commune de Kinshasa et à ses voisins immédiats Linguala et barumbu.
L'injustice il est là: Kintambo a été souvent oublié, et c'est un constat que je ne suis pas le seul à faire. Mandungu, Sakombi, Kabaidi ou Kiakwama sont tous dans la carré Kitega -
Tshela. C'était devenu un peu une chasse gardée de cette bande, alors qu'en imaginant la MOPAP, c'est-à-dire la machine de propagande du MPR, il aurait été normal qu'au moins une fois,
on soit récompensé! Qu'il s'agisse de Duga, Tshimbombo ou de l'ancien dirigeant estudiantin Nzanda Bwana, ils n'avaient pas à nos yeux, la légitimité des bana kintambo.
La frustration dont il est question, vient justement de là.Et lorsque ceux-ci choisissent "de moderniser" la communication de Mobutu, vous avez tous constatez qu'il s'est éloigné du peuple.

Nous Bana Kintambo, estimons ne pas avoir été récompensé à la mesure de notre engagement au parti-Etat.
Très attaché à nos "traditions", notre aîné Botomba, écarté à un moment du Groupe Choc Kake, mettra sur pieds le Ballet Lipopo, en référence à Léo II. Ce groupe se voulait un retour aux sources,
avec uniquement des instruments acoustiques : Tam-tam, Lokombe et Voix, comme à la belle époque des premières animations.
Il nous paraissait donc anormal que ni Botomba, ni Nyemba n'ait été élévé choisi pour prendre en main la MOPAP et encore moins au niveau de Commissaire d'Etat, alors que les bana Kinshasa
ont tout obtenu, au nom de la ville de Kinshasa. En modulant un peu, j'ai avancé l'hypothèse des enfants terribles, sinon des Adapesiens, pour expliquer notre mise à l'écart.
Ceci dit, et je suis le premier à le reconnaître, les Sakombi et Mandungu, n'ont jamais lâché nos aînés de kintambo lorsqu'ils avaient des problèmes avec le régime.

Répondre
A

Juste une petite contribution de ma part. Durant les evenements du coup monte et manque, certains officiers non originaires du nord furent mis en retraite precoce. Il s'agissait des generaux Mena,
Ilunga, et Okito qui fut commandant de la huitieme region militaire et le predecesseur du General Falu en tant qu'attache militaire a washington.

Tshikobele Mongombe@

Canada toujours! Malili hein!

Répondre
R

Oui ndeko Paka Djuma , ekaniseli ngai lisusu , tango vieux Sam Samuel Makoma Molangi ya Pembe Pasteur ya Leta abandaka koloba yango mingi...C'est vrai olobi ya solo vieux Yeya AndelaMaboke asalaka
nango accident pe na couleur ya verte ....Ah! tango wana, donc ezalaki COOP ya ba Italiens?? Merci ndeko na precision nayo pona b'accidents ya ba MOTO wana.  Merci.-  Richard Kasongo.-

Répondre
P

Ndeko Richard Kasongo,
oyebi lisusu ke vieux Andele Maboke asalaka accident na Moto Guzzi, mpe sango etambolaki na Kinshasa ke vieux Maboke akufi. Soki natali malamu ba moto Guzzi ezalaka mingi na couleur ya vert, mpe
ezalaki kobaluka pamba pamba.
Mpe tangu wana nzembo ya vieux Rochereau MOKOLO NAKOKUFA ezalaki kosala fureur na Kinshasa, pe batu mingi ba surnomaki Moto Guzzi : Mokolo Nakokufa.
Paka Djuma.

Répondre
R

Ndeko, nazali kotuna , na epoque moko boye tonaki la FAMEUSE MOTO GUZZI na congo- kinshasa, yango marche nini oyo esalaki que gouvernement asomba lot mingi ya ba tuku-tuku wana. Role nayango oyo
L'ETAT asombelaka  ezalaka nini???.-  Merci .-  Richard Kasongo.-

Répondre
D

Mbote Kulutu EMMA,
Nazali na mituna mibale nalingi na tuna yo pona MAJOR MPIKA
(1) Ayaki na WEST POINT na cadre nini??
West Point, malgre ezali ACADEMIE MILITAIRE,,,,mais ezali LOKOLA ba UNIVERSITE nioso awa na USA avec ba faculte un peux LIMITER ou encore ba FACULTE oyo bazali na y'ango na POSA en temps  ke
OFFICIER de L"ARMEE AMERICAINE et puis pona ozali admit kuna.....il faut ozala AMERICAIN parceque apres acquisition nayo de LICENSE, il faut  o servir na ARMEE pour une duree de  4
ans...
Alors nazali penza CURIEUX de SAVOIR ye ATANGA AWA, pe ASWA LICENSE na WEST POINT..na FACULTE NINI pe na MBULA NINI(Promotion NINI) ou bien ayaki tout simplement ba SEMINAIRE oyo ba permetaka ba
OFFICIER MILITAIRE yaba PAYS ETRANGER ba PARTICIPER????

(2)Motuna ya MIBALE.....ezali na meme LIGNE....C'est possible que  AZALAKI ADMIT na programme na FORT LEAVENWORTH pona ba etudes superieure naye..Mais na promotion nini??? D'ailleur
kuna bapesaka license te ezali tout simplement LEADERSHIP SCHOOL bakopesa yo CERTIFICAT ke O PARTICIPAKI na PROGRAM wana....D'ailleur bazali na program UNIQUEMENT pona ba MILITAIRE OFFICIER yaba
PAYS ETRANGER.

Mais yebaka PROGRAMME ya FORT LEAVENWORTH ezali kaka likambo ya APPLICATION pe ACCEPTANCE...meme si PAYS nayo d'ORIGINE ezali naba probleme DIPLOMATIQUE na USA...Donc a L'epoque ba pays ebele
malgre politiquement parlant bazalaki na GUERRE FROIDE, mais ba OFFICIER MILITAIRE bazalaki na b'ango KOYA ba SEMINAIRE pe ba FORMATION ya LEADERSHIP awa na USA...

Qualification ya KOMBO ya FORT LEAVENWORTH comme etant place INTELLECTUELLE ya ARMEE AMERICAINE ezali tout simplement KOMBO ya PAMBA...DOnc bakomaki kobenga y'ango ndenge wana parceque BA LIVRES
NIOSO ya DOCTRINE MILITAIRE AMERICAINE ezalaka IMPRIMER KUNA...donc ezali te parceque BA INTELLOS BATONDA KUNA...
D'ailleurs awa soki olobi FORT LEAVENWORTH  eloko eyaka liboso na mitu ya bato ezali plutot..PRISON MILITAIRE..et NON place oyo BA INTELLOS  BATONDA.

Répondre