Motuna ya libala ya baluba ya bakwa Kalonji
Motuna ya libala ya baluba ya bakwa Kalonji
Mbote kulutu Messager,
Naza na motuna moko ya culture pe coutume na biso. Ndenge nini muana mobali akoki kobala muana ya muasi ya muluba ya ba kwa Kalonji ?
Naza na ndeko moko alingi abala muasi ya ekolo oyo kasi ba famille ya muasi balobi naye soki akomi prêt bongo aya kasi curieusement balobi ke bango bapesaka liste ya biloko ya mariage te.
Tokomi komituna sikoyo biloko nini akokende nango kuna ? Est ce que eza na moyen yo to ba kulutu mususu lokola ba kulutu Kangudie, Emmanuel Kandolo pe ba oyo bayebi bayebisa biso biloko nini esengeli muana mobali oyo abongisa y compris montant ya mbongo pona kobala elenge muasi oyo?
Pona précision, aza nanu jeune fille, nanu abota te pe aza nanu kosala b’études supérieures.
Matondo mingi po nayebi ete biyano ekozanga bino te.
Serge Kongo na biso.