Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Bonjour

Merci mingi na papa Singa Kwanga pona histoire na yo ya pakadjuma.

Vraiment erappeler ngaï jeunesse na nga exactement mais biso to salaki ndenge moko mais de l'autre coté na commune ya Matete autrement dit ONU BRITANIQUE.

Biso tozalaki ko kende na mayi ya Ndjili. Bana mingi bakufa na mayi wana. Comme rubrique ya monama elima ya mayi, biso ezalaki nde MAMIWATA donc bana nionso ba komaki ko banga puisque même na tchic (école), ba sango na église mpe ba parents bakomaki ko bangisa biso que MAMIWATA abimi.

Pona kokomisa yano mwa crédibile, okomona na malongi (enseignement religieux avant la premiere communion) ba ko kata mpe Sango to Ma soeur alobi bozonga na ndako mbangu po MAMIWATA abimi na mayi ya Ndjili pona koluka bana puisque bana bazali kokende lisusu kuna te.

Panique totale na Matete. Bana bakokima na toute direction Enfin na quartier Debonhomme., neti ba zalaki kuzua zelo kuna, libulu moko ya monene esalemaki kuna d'où na saison de pluie mayi ya trop ezalaki kozala wana.

C'est làbas nde to bandaki kokende kosokola mais mayi yango ezalaki très verte mpe to bengaki yango l'eau verte. Soki osukoli kuna, tango oko zonga na ndaku misu tout eye rouge. Wana na palais ba yebi ke owutaki ko laver na l'eau verte, nkuba moko oko zwa ou chicotte na singa ya machine ya fufu.

Coté ya Lemba na camp Mobutu mpe l'eau vert ezalaki mais nde ba grand bagarre ezalaki koleka kuna puisque bana Matete na bana ya Lemba to zalaki ko welela yango . Guerre ezalaki koleka na ba lance pierre na ba zawu. Koffi olomide ayebi yango bien. na betaki ye zawu na mokongo.

Merci encore et bonne détente.

Mawa

Baignade à l'africaine

baignade au Malawi

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M

Tango nazalaki na ecole primaire ya 12e rue na limete, lisolo ya mamiwata mpe ezalaki makasi. Bazalaki koloba soki omoni tableau ekomi kobongola couleur na yango na rouge boyaba e te mamiwata
azali kobima na kelasi wana mpo alingi azuwa bana. Mokolo moko tango nazalaki na 3 to mpe 4e primaire tofandaki na kelasi, sima toyoki koganga makasi, bana nioso bakomaki kobima na ba kelasi na
bango mpe kokima, ecole mobimba ekotaki loyenge, balakisi bayebaki ndenge ya kopekisa bana te mpo te bazonga na kati ya kelasi. Bana nioso bazalaki kokima na entree principale kuna Directeur
abimaki mpe atelemaki liboso mpe azalaki kopekisa bana babina te na ecole, alors bobandaki kokima na cote mosusu mpe komata na ba mures mpo na kokima. Bana noiso bazalaki ko ganga mamiwata,
mamiwata abimi na kelasi, ecole etikalaki polele. Ngai mpe nakimaka, nabondelaka ba yaya babenda nga na mure mpe na kimaka. Kasi tango nakomaka na boulevard Lumumba, motuka moko etelamaka ndenge
bamonaki nga nazali kolele mpe bana mingi bazalaki kolele mpe kokima, batunaki ngai soki likambo nini, mpe nayebisaki bango e te mamiwate abimaki na ecole, ba tata oyo bakamuaki mpe bamekaki
kosala nioso mpo ba convaincre ngai e te mamiwata ezalaka te, kasi ngai naboyaki koyoka, bakotisaki ngai na motuka mpe bamemaki ngai na ecole, kuna tokutaki Directeur liboso ya ecole maboko na
moto, kibaba na monoko, miso yakotela, mpe ecole a 3/4 vide.

Mwan'a Joburg

Répondre
C

Chers amis,j´ai eu la chance d´avoir vécu dans plusieurs quartiers de Kin.J´avais des oncles ou des cousins un peu partout.A Matonge,nous avions l´habitude d´aller nous baigner à la rivière
Kalamu juste en dessous du pont qui donnait accès au Stade Roi Baudouin(Tata Raphaël,puis 20 mai).On y allé avec nos jouets(camions fabriqués avec des boîtes d´allumette,cartons ou fils de fer.Un
fait très curieux,pendant qu´on se baignait,quelqu´un criait TALA NIEI et on sortait tous de l´eau jusqu´à ce que le fameux NIEI passait de large(Bomuana).Quand je vivais à Matete au quartier
BANUNU,j´avais l´habitude d´aller prendre mon bain en face du quartier KWENGE à MAYI YA MATETE.On se baignait tous là,filles et garçons sans complexe,et j´avais déjà 16 ans.Il s´agit là des très
bons souvenirs d´enfance.Masolo kitoko mingi penza.Prochainement je vous raconterai une aventure à la plage de Moanda avec le Chem-Chem Yetu.

Crispin-Régis Lukoki

Répondre
B

Biso bana Ndjili to zalaki ko kende bisika ebele. Na mayi ya Ndjili epayi beninga ebele ba tiola pe ba kenda libela; na mayi ya Nsanga epayi to zalaki ko kanga ba ngolo, ba ntondi, na ba mbisi
mosusu, na mayi ya mibale oyo ezali apres mayi ya nsanga; may ya mibale ezaklaki modindo mingi te kasi ezalaki elengi na kosokola po tango wana bandako ezalaki te na cote wana ya Kimbanseka; ba
coupoles ebele bazalaki ko kende kuna apres leurs aventures na ba zamba ya Kimbanseke. To zalaki pe ko kende tango mosusu na mayi ya Mango; kuna nde danger ezalaki mingi po ba yaya ya Masina
bazalaki ko kaller biso parceque to zalaki pe ko linga ba nzazi na ba nzeles na bango. Mokolo mosusu na zuaka double patte nanu na zua te atako na zalaki na formation ya Karate, na kokaki ko
zongisa te. Na mimonaki pamba mokolo wana.

Répondre
S

sophie, rentre du travail ,arrassée par une journée de travail, elle se déshabille et va reposer son beau posterieur sur la lunettes des toilettes pour lancer un bon gros pipi, hummmm que c'es
bon

Répondre