un commentaire vient d'être posté par sonny mokonzi sur l'article La débandande de quatre bills, sur votre blog Le blog de Messager
Na Nazali penza ko partager opinion ya muan'a mangembo te sur ba non natifs ya kinshasa puisque ba soit disant YANKEE mingi basukisa bango kaka na ba natif ya kinshasa mais 2 que je
connais basukisa bango ba compatriotes ya interieur.........NDJILI 1976,BADRA azalaki moto ya makasi ndjili mobimba eyebaki,azalaki pe lisusu feticheur,soki olingi kokatisa ba kamo okeyi
epayi naye,liste ezali lokola:casse bouteille,coup par terre,zamba gorille,kolia ba gilette etc....ndjili mobimba eyebaki ye pe mingi bazalaki kobanga ye,kasi mokolo moko liboso ya eglise
ya saint martin na quartier 13 na 1976,discussion BADRA contre MULUBA,ba oyo bayebi ndjili bayebi que Q13 etondi mingi bakongo,bazombo ya trop,donc soki ozali moluba ozali toujours
remarquable,muluba wana toyebi kombo na ye te mais bo excuser nga nakobenga ye kaka muluba,,alors discussion ya danger bato batondi,bino moko boyebi baluba ba bangaka te ata ozali
colonel,bitumba ebandi batu bazozela muluba akueya k.o. mais waya,bagarre,BADRA apesi muluba mbata muluba azongisi mbata,badra apesi likofi,muluba pe azongisi,bakangami sikoyo,badra apesi
dernier de coup de tete,muluba aresister,batu
balobi ehhhh tatu azali makasi penza,bakangami lisusu,muluba apesi badra gauche,badra azongi sima,apres bato bakaboli bango,sima wana badra pe succee esili, tee ayaka kokufa vers
1986...nayebi que bato mingi ya makasi ya kisasa bazuaka ba kisi epayi ya badra na ndjili........TOTIKA NDJILI tokende na BANDALUNGWA na 1980..LUYENDA BIG JOHN azali grand boxuer pe
YANKEE ya bandal mobimba,azali en plus premiere promotion ya boxing club kake ya NGUNZA KIBALE...MAITRE ZELEX azali judoka pe natif ya lubumbashi pe muan'a bandal,a l'epoque bandal
etondaka ba yankee lokola:bigjohn,likis,zephondo,obora,tshikos,zamba,tagura pe ba misusu kasi big john azalaki le meneur pona loboko na ye ya gauche il parait ezali tres puissante
elalisaka k.o. kaka..kasi mokolo discussion ye na MAITRE ZELEX esalemaki pe bitumba na jardin moto na moto abongisa bato bakamuaki,kaka ndenge nabeti lisolo ya badra bato bazeli zelex
akweya k.o. mais waya,bagarre na podium ya moto na moto abongisa,BIG JOHN AZOKOKA RIEN,ERREUR KAKA ZELEX akota ye mouvement pe abambi ye na se,JOHN tete ebeti na podium,alali k.o. pendant
quelque seconde,ZELEX apakati ban'a bandal balandi ye mais waya.....ZELEX natif ya lushi asilisi ki yankee ya BIG JOHN na bandal......pour terminer ba ndjilois bakoma koloba boye:ki
yankee efutaka te,luka mosala,salisa famille,vrai yankee nde ye wana
Sonny Mokonzi
|