E. Kandolo répond aux 4 questions de Serge Kongo na biso
Emmanuel Kandolo répond aux 4 questions de Serge Kongo na biso
.
Ndeko Serge, Kongo na biso,
Limbisa mpona ngonga mua molayi wuta okomelaki ngai. Neti nazui tango, yango wana na komeka koyanola na maye manso otuni ngai.
Ndeko Serge, Kongo na biso : 1) Ndenge nini mboka na biso ekotaki na libulu oyo?
Emmanuel Kandolo : Mpo na koyanola na motuna mua yo, ebongi toyeba que dette publique ezali ensemble ya ba engagements financiers oyo l’Etat ezali kozua, mpe oyo ba entités administratives na ba établissements publics ezali kozua. Dette yango ekoki kozala directe, c’est-à-dire tango l’Etat azali kokota niongo en assurant ba services financiers ya niongo oyo ye akoti tout comme ekoki kozala indirecte soki entité administrative ou établissement public ekoti niongo na kombo ya l’Etat mpe yango nde esengeli e garantir service financier (kofuta niongo na ba modalités oyo yango epesameli).
Dette publique, ezali na composantes mibale : dette publique interne na dette publique externe.
Dette publique interne ezali niongo oyo l’Etat azali kokota na ba banques commerciales ya kati ya ekolo nto mpe tango azali kokota niongo na ba obligations na ba opérations ya bons du trésor soki azali na mposa ya mbongo na court terme mpe azali ko recourir na émission ya emprunt obligatoire na long terme.
En revanche, dette publique externe ezali niongo oyo l’Etat ezali kokota epayi ya ba Institutions financières internationales créancières.
Kasi dette publique interne na externe ezali kaka kosala eloko moko mpo yango ezali conséquence ya ba déficits publics, c’est-à-dire mbongo oyo l’Etat ezali ko dépenser (dépense) eleki mingi par rapport na oyo l’Etat ezali ko kotisa (recette). Na cas oyo, esengeli l’Etat a defa mbongo oyo ezali na budget na ye te mpo na ko combler déficit budgétaire. Yango wana esengeli a recourir na ba mécanismes ya emprunt à l’interne, na émission ya ba bons de trésor ou na ba emprunts obligatoires mpe, à l’externe, na ba Institutions financières internationales mpo na ba prêts mpe ba crédits
Dette extérieure ezali tellement ko peser mingi na ba dépenses publiques mpo lourde charge ya service na yango mpe intérêt ezali ko sacrifier orientation ya ba dépenses envers investissement na nzela ya développement humain mpe ezali komata suite na mise en place ya mécanisme oyo ezali ko consister na rachat ya ba banques commerciales locales epayi ya ba banques minene étrangères na bénéfice ya ba créanciers privés liés na ba marchés financiers internationaux mpe ba Institutions financières internationales. Ba banques wana ezali kodefa mbongo na ba taux d’intérêts faibles mpe na court terme na ba marchés financiers internationaux mpo na ko defisa l’Etat na ba taux d’intérêt ya likolo mpe na long terme.
Kokota na biso na libulu oyo ya dette publique ewuti na charte coloniale, précisément na loi ya 18 octobre 1908. Yango nde e déterminer ba conditions ya gestion, ya administration mpe ya exploitation ya Congo belge. Loi oyo nde nde esundoleli Congo na biso charge ya service ya dette publique.
Na bozui ndakisa ya politique ya ba grands travaux lokola plan décennal colonial ya 1949 -1959, emomani que financement ya plan oyo ezalaki na hauteur ya 65 milliards ya francs belges mpe du coup yango ematisi dette publique de 4 milliards à 48 milliards. Conséquence directe ya ba dépenses oyo ekomisaki budget ya Congo belge déficitaire wuta exercice ya 1957-1958. Kobakisa lisusu na transfère organisé ya ba capitaux vers l’étranger, nungu nungu ya lipanda, na kabambi ya dépréciation monétaire na inflation ya franc congolais tee tango esengelaki Congo ekoma lipanda, likambo ya insolvabilité eyaki kosala débat mpo Congo ekomaki devant évidence ya problématique juridique ya ko reprendre dette oyo colonisateur akotaki na cadre ya programme ya colonisation na Congo. Awa nde contentieux kati ya Belgique na Congo ebotami. Congo ekomi lipanda mpe souverain kasi ezui dette extérieure oyo mundele akotisaki ye wuta Etat Indépendant ya Congo tee na Congo belge. Situation moko inédite !!!
Ba nungu nungu nionso elandaki lipanda ezalaki na incidence munene na économie nationale : guerres ya sécession ya Kasaï mpe Katanga, crise politique ewutaki na kolongola Premier Ministre Lumumba tee kokumba na assassinat na ye mpe na division ya ekolo na ba Gouvernement mibale. Nionso oyo ekotisaki économie congolaise na mobulu.
Tango pacification ya ekolo salemi, esengelaki koluka ko relancer économie na ba grands projets. Neti ekolo na biso ezali na ba matières premières minières mpe agricoles, esengelaki ko financer ba secteur wana. Congo endimi kokota niongo mpo na ko profiter na ba facilites ya crédits ebandaki kopesama na ba pays en voie de développement na but ya ko soutenir ba politiques économiques ya investissement mpo na ko atteindre croissance soutenue lolenge développement ya Organisation ya Nations Unies (O.N.U.) e teyaki mpe ebandaki ko viser. Président Mobutu abengaki yango « Objectif 80 » mpo yango esengelaki esalema lolenge Nations Unies e boulaki mpo na décennie ya développement 1970-1980. Au lieu ekolo na biso e viser ba projets économiques agricoles, miniers mpe ya Travaux publiques rentables mpo na économie nationale, yango eluki kosalela ba projets ya prestiges neti ligne ya haute tension Inga-Shaba mpe ba projets ya prestige wana ematisi dette publique oyo ezalaki ya 300 millions ya dollars américains na 1970 tee ekomi na 2 milliards ya dollars na 1976.
Ba échecs ya ko apurer ba passifs extérieurs, incapacité ya ko comprimer ba dépenses, niongo ezali kaka komata tee lolenge ya ko éponger yango ezali te kobakisa lisusu na crise pétrolière ya 1973, zaïrianisation , deux guerres ya Shaba (1977 mpe 1978), baisse ya coût ya cuivre, hausse ya ba taux d'intérêt, ba pillages ya 23-24 septembre 1991 mpe na oyo ya 24-29 janvier 1993, suspension ya ba crédits ya Fonds Monétaire International (F.M.I), guerre ya libération na 1997, guerre ya imposition ya 1998, guerre ya partition ya 2001, mauvaise gestion, déroulement ya ba fonds, baisse ya production suite na manque ya investissement na ba infrastructures, diminution ya ba recettes d'exportation, diminution ya production agricole na industrielle, etc. ezali kokitisa ba recettes mpe kokumba na déficit budgétaire oyo ekosenga ko recourir na kokota niongo mpo ba recettes ezali muke mpe ekoki ko sunga na ba dépenses te. Yango wana l’Etat ezali kaka kosenga ba capitaux extérieurs na ba mpo na kosunga épargne oyo ezangi ye.
Ekolo na biso, R.D.Congo ekoti na libulu oyo mpe e se retrouver na cadre ya initiative en faveur des Pays Pauvres Très Endettés (P.P.T.E.) mpo ba niongo elekeli yango mpe ezali lisusu en mesure ya kofuta yango na ndenge elongobani te mpo charges ya kofuta service ya dette (mbongo ya intérêt ya niongo oyo l’Etat ezali kofuta epayi ya ba créanciers na ye) eleki motuya ata soki Congo esangisi makoki ma ye manso ezali kowuta na ba recettes, akokoka kofuta lourde charge ya service ya dette te mpe ba intérêts.
Ndeko Serge, Kongo na biso :2)Tango ba noko batikaki économie na maboko na biso ezalaki makasi to ezalaki boni boni ?
Emmanuel Kandolo : Tango ba noko balonguaki na ekolo na biso, batikaki économie makasi. Ndakisa : Produit intérieur brut (P.I.B.) annuel ya Congolais en moyenne ezalaki na 90 dollars américains, soit 950 dollars américains ya lelo oyo. Mpe croissance économique ezalaki ya 6% mpe ba compagnies minene lokola l’Union minière du Haut-Katanga, les Huileries du Congo, l’Office des transports coloniaux, REGIDESO, MIBA, Kilo Moto ezalaki en très bonne santé.
Ndeko Serge, Kongo na biso : 3) Chutte ya économie ya mbokoka na biso ebandi vraiment tango nini? po nazalaka nanu elenge tango na radio bazalaki kotiya maloba ya Mobut :"crise oyo esengeli moto na moto ayeba tina na yango!"
Emmanuel Kandolo : Chute ya économie nationale congolaise ebandi na 1975 mbula oyo penza ba indicateurs économiques et sociaux ekomaki détériorer suite na :
1. Echec cuisante ya politique ya Zaïrianisation oyo Président Mobutu akumbaki na novembre 1973
2. Entretient ya culture ya impunité mpe institutionnalisation ya corruption
3. Compression ya volume ya production agricole na industrielle suite na manque ya entretient ya ba infrastructures ya production mpe ba routes ya dessertes agricole y compris na négligence ya ko investir na ba voies de communication
4. Choc pétrolier ya 1973
5. Chute ya ba cours mondiaux ya cuivre
6. Moyibi na impunité
Ndeko Serge, Kongo na biso : 4) Est ce que elikya ezali ke mokolo mosusu tokoki kokoma na économie ya makasi?
Emmanuel Kandolo : Fonds Monétaire Internationale (F.M.I.) na ba Institutions financières internationales y compris R.D.Congo yango moko eyebi malamu que makelele oyo ya réduction ya kabambi ya dette oyo ekanga ye na kingo, yango te nde e ko améliorer situation économique ya ekolo ata soki yango ezali bénéfique mpo na relance économique. Mpo tobima na libulu, esengeli nde gouvernement responsable ewuti na Etat de droit e profiter na réduction ya dette mpo na ko assainir gestion ya ba finances publiques na bopesi yango capacité ya ko maximiser ba recettes iye ekosunga ekolo na biso na kofuta ba intérêts ya ba niongo tout en orientant ba dépenses na lutte contre la pauvreté mpe en misant na stabilisation macroéconomique oyo ekomema relance économique soki réellement résultat ya malonga emonani na bonne politique ya création ya misala oyo esengeli ko favoriser croissance économique ekowuta na augmentation ya consommation ewuti na ba salaires décentes esengeli kofuta batu.
Toyebi malamu que R.D.Congo ebendi mokila na développement humain 2011 na rapport ya Programme des Nations Unies pour le Développement (P.N.U.D.) ebimisi. Nzala, pasi, manque ya emploi, absence ya ba soins médicaux ya malonga, kozanga assurance emploi mpe assurance santé, détérioration ya niveau ya formation mpe éducation, espérance de vie ezali nze kokita, ekoki ko bonguama te mpo bonne gouvernance ezali te mpe manque ya vison ya politique économique et sociale ya investissement na formation ya ba jeunes, recyclage ya baye bazalai kosala, soutient na création ya ba P.M.E., réforme mpe financement ya sécurité sociale, etc. nde eko permettre komona ba nouvelles horizons.
Mpo tokoma wana, esengeli yambo Congolais a reprendre destinée na ye na maboko na bolongi lutte idéologique oyo ekokomisa ye na maturité politique indispensable ya ko comprendre que changement na société ewutaka na likolo te (élite politique ou na royaume de Dieu), ewutaka nde na base, c’est-à-dire na peuple. Soki peuple a récupérer souveraineté na ye, en ce moment a ko se doter na ba instruments juridiques ekomema ba réformes indispensables na ekolo na biso. Or, sans ba réformes mpe suivie na mise en œuvre na yango, il est très difficile R.D.Congo e prétendre na un quelconque changement. Soki te, zela zela mokomboso azanga mokila mpo déjà na ndimi te que loi budgétaire ya exercices 2012 (oyo tee na lelo oyo ebongisami lisusu te suite ya potopoto oyo ebongisamaki na koyiba ba élections mpe na retard nionso yango eluki na formation ya Gouvernement mpe na constitution ya Assemblée nationale) ekolakisa biso le contraire na augmentation ya ba recettes, na kopesa ba provinces 40% ou encore moins d’allocation d’aides extérieures mpo na manso mazali komonana polele, il est difficile ekolo na biso ekokisa ba objectif ya millénaire na 2015. Je crains que ezala kaka slogan lokola ba slogans misusu ekenda sango !!!
Lelo oyo tozali kolobela pauvreté ya R.D. Congo mpe na ba programmes miyike ekolo na biso ezali kokota mpo na soi-disant ko lutter contre la pauvreté, sans tomituna pourquoi R.D.Congo ekoti ba niongo nionso oyo jusqu’au point ya ko créer pauvreté ya peuple na ye ?
Esengeli vraiment audit ya munene esalema na gouvernement responsable mpo na koyeba soki dette publique oyo e profiter na peuple congolais ou pas mpo Congo (Etat indépendant ya Congo, Congo belge, na République du Congo-Léopoldville) ekotaki niongo na kombo ya peuple. Soki dette publique oyo e profiter na peuple, mbele lelo oyo peuple congolais azali pauvre te. Kasi, neti e profiter na peuple te, yango wana azali pauvre.
Alors, pourquoi peuple oyo a profiter na mbongo oyo ya niongo oyo te, abanda lisusu kosala ba sacrifices na niongo oyo e profiter na bikolo mpe ba Institutions financières bia ba paya en complicité na ba dirigeants miyibi oyo ba engager Congo na libulu mpe ba pays na ba Institutions wana ezali ko continuer ko supporter système ya moyibi mpe ba dirigeants ya lelo oyo ?
P.P.T.E oyo soki totali malamu, politique néolibérale oyo ebomisisi ba banques ya ekolo mpo na ko favoriser implantation ya ba banques étrangères miyike, yango lisusu nde ekumbi na dissolution mpe na liquidation ya ba entreprises publiques, transformation ya ba entreprises publiques na ba sociétés par actions à responsabilité limitée (sociétés commerciales). Ba banques wana ya ba paya yango nde ezali lisusu komatisa dette publique interne mpo ekomi ba créanciers ya R.D.Congo sans kobosana que ba banques wana ezali ko dépendre na ba principaux marchés financiers internationaux. Une fois ba marchés wana ematisi ba taux d’intérêt na bango ou instabilité financière forte esalemi na ba marchés, yango ekozala na ba conséquences désastreuses mpo na économie nationale mpo ba banques mingi ekokueya, mpe ba finances publiques na biso mpo e komatisa dette publique interne. Donc, ba mécanismes moko oyo ezali toujours ko continuer ko prendre peuple en otage en vue ya ko enfermer ye na dépendance extérieure mpe ko maintenir ye na niveau ya pauvreté oyo ba dirigeants complices ya ba institutions wana ba ko maintenir na ba accords mpe ba engagements financiers oyo ezali ko continuer ko étouffer peuple.
Nabanzi, nameki koyanola na mituna mia yo.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo