Emmanuel Kandolo décortique quatre chansons funèbres
Emmanuel Kandolo décortique quatre chansons funèbres
Ba ndeko,
Tomeka naino kolobela ba nzembo oyo esalemaki na ba criconstances ya liwa ya ba batu oyo bayembeli ou oyo ezali en rapport na liwa. Na yango, lelo nakomeka kolobela liwa ya François Biwetsha (petit Wetch), Arsène Diongue, Jules Léon Kidicho, na Stéphane Etienne Nkashama Nkoy.
………………………………………………………………………………
Liwa ya Wetshi, par Franco et l'OK-Jazz
François Biwetsha (petit Wetch) azalaki footballeur munene ya Vita club, abandaki kobeta na milieu du terrain, milieu offensif. Akufaki na 1961, suite na courte maladie na moment oyo abandaki kosala suces makasi. O.K. eyembelaki ye nzembo « Liwa ya Wetch », composition ya Franco.
.
…………………………………………………………………………………………
Arsène Dionge, par Franjco et l'OK-Jazz
Arsène Diongue abotami na Léopoldville na 1935. Tata na ye azali d’origine ya ethnie Sérère na Sénégal mpe mama azali d’origine Budja na R.D.Congo. Asali ba études na ye nionso na Léopoldville. Sima na yango, akomi kosala na Fonction publique coloniale. Na pembeni, azali mpe wuta janvier 1959. Président ya Union de la Jeunesse du Kongo (U.J.K.). Na août 1960, akomi Porte-parole ya Alliance de la Jeunesse Nationaliste Congolaise (A.JE.NA.CO.).
Diongue, un bel homme, motane, élégant, grand sapeur mpe alula lisano ! Na service ya communauté, il croyait intégralement na mise en place na Congo d’une na société égalitaire, juste, imprégnée na primauté ya droit oyo ezali ko permettre na Congolais nionso a jouir na indépendance politique mpo na réalisation ya ba projets économiques et sociaux ya un Congo prospère.
Dionge azalaki un anti Nations Unies mpo yango ezalaki complice na déstabilisation ya Congo. D’ailleurs, ye na moninga na ye Casimir Bagira, ba organisaki kabambi ya manifestation anti O.N.U na Léopoldville na mokolo mua 6 août 1960. Justement, na cadre ya ba activités na ye politiques nde a voyageaki mingi na ba pays socialistes et communistes lokola Allemagne de l’Est, Egypte, Chine, U.R.S.S., Guinée-Conakry.
Na 1962 akomi diplomate na pete ya Premier Secrétaire ya ambassade ya Congo na Washington. Chef ya juridiction mpe ambassadeur ezalaki Mario- Philippe Cardoso (actuel deuxième vice-Président ya Sénat ya R.D.Congo, akoma Mario-Philippe Losembe Batwanyele). Azongi na Léopoldville na 1964 mpe a continuer kosala na Affaires étrangères.
Diongue azalaki mpe na ba affaires commerciales na ye tout comme azalaki Président ya Amis du Daring ( AMI.DA.) mpe Président ya Football Club Daring Faucon (Imana) ye nde mutu ya liboso oyo asombela Daring équipement sportif complet mpe ba maillots ya pembe. Wuta wana nde kombo ya immaculé epesama na Daring.
Epouse Diongue, prénom na ye, Marie. Kasi azalaki mpe na chérie na ye na kombo ya Benoîte Samba. Azalaki kofanda na croissement ya ba avenues Force publique na Ethiopie, na Dendale, trois parcelles ekaboli lopango esika afandi na epayi ya Major Bernard Nyamaseko, Officier d'ordonnance ya Président Kasa -Vubu (asuka na pete ya Général)
Diogue azalaki na caractère moko bien trempé. Il est vrai que azalaki méthodique, ferme na ba décisions na ye mpe un grand travailleur. Motema ya kokaba mpe kosunga batu, sportif, amipesaki na ba causes associatives mingi mpo na intérêt ya communauté mpe azalaki un leader charismatique mpe modèle mpo na ba jeunes mingi. Kasi, souvent azalaki mobulu mobulu mingi mpe très brutale : facilement abandaki ko résoudre makambo misusu na bitumba mpe azalaki effectivement na force physique.
Diongue, comme d’habitude, ayaka mingi epayi ya molongani mua ye Benoîte Samba. Tango akomi na ndaku, esika Benoîte afadi, akuti ye te, porte ya kokanga mpo Benoîte abimaki. Du coup, epesi ye kanda makasi na idée que Benoîte a prévenir ye te que akobima. Neti mpe azalaki na zuwa makasi mpe kobeta beta Benoîte na ba effets ya zuwa wana, abeti likofi na ba coups de pied na porte ya ndaku mpe apasoli vitre ya porte. Kobeta ye abetaki likofi na coups de pied wana, azoki pota, ba veines ekatani mpe makila ebimi ye ebele, akangi motema aboyi kobelela secours. Tango batu bamoni ye, le temps bakima na ye na hôpital, ekomaki trop tard mpe a perdaki plus de 4 litres ya mikila na hémorragie.
Arsène Diongue a weyi na 1964, alelisa bana Léopoldville makasi mpe matanga na ye ezalaki munene na hauteur ya notoriété na ye. Ba kombo ekenda sango na Léopoldville esanganaki kuna : Premier Ministre en fonction, Cyrille Adoula en tête, ba amicales ya élégance ya Léopoldville elandaki bana AMI.DA. mpo ye nde azalaki Président na yango tout comme ba sportifs batikalaki sima te mpo azalaki Président ya Daring. Ba commerçants, ba hommes d’affaires, ba tenanciers ya ba cinémas mpe ba bars y compris na population esanganaki na mawa oyo. African Fiesta Vita eyembela ye nzembo mibale : « Arsène Diongue », composition ya Rochereau mpe « Liwa ya likama », composition ya Mujos. O.K. Jazz mpe etikalaki sima te, eyembelaki ye mpe nzembo na kombo ya « Liwa ya Diongue Arsène », composition ya Franco.
Notons que tata aboti Arsene azalaki bijoutier mpe azalaki na ba salles ya cinéma na Léopoldville. Frère ya Arsène, Tito, azalaki Bourgmestre ya commune ya Kinshasa.
.
……………………………………………………………………………………………………………………………
Au revoir Kiditcho, pat L'African-Jazz
Jules-Léon Kidicho abotami na mokolo mua 29 juin 1928 na ville ya Stanleyville, na Province Orientale. Azali muana ya liboso ya mama Bangala Balimanga. Cette dernière azalaki commerçante munene ya province Orientale.
Kidicho azali d’origine Lokele, na territoire ya Isangi mpe asali ba études moyennes epayi ya ba Boa mpe Zande na Uele, epayi ya ba Frères Maristes ya Buta. Asilisi kelasi na 1947. Esengeli toyeba que formation ya ba Maristes ezalaki élitiste.
Sima ya ba kelasi na ye, akoti na profession libérale en tant que commerçant. Na mokolo mua samedi 20 septembre 1952, asali libala na Julienne Lengema (jeune sœur ya Marcel Lengema), na cathédrale du Sacré-Cœur na Stanleyville (cathédrale de Stanleyville).
Wuta 1953, akoma évolué mpe membre ya Association culturelles du Belge II et des Evolués mpe lisusu membre ya Fédération des Associations de Stanleyville. Lumumba mpe azalaki membre ya ba Associations iye. Secrétaire ya Lumumba mpe wuta 1958 nde akomi militant tango Lumumba akeli Mouvement National Congolais (M.N.C.) mpe atikali na M.N.C.na ngambo ya Lumumba sima ya bokabuani bua M.N.C. na ba ailes mibale (M.N.C.- Lumumba mpe na M.N.C.-Kalonji) tee kokoma membre ya collège exécutif provincial ya MNC-L. mpo na province Orientale.
Na ba élections législatives nationales ya mai 1960, aponami Sénateur. Bien que Sénateur, sima ya lipanda, andimi proposition ya Société générale na lolenge epesi ye ebonga ya Administrateur ya Société Agricole de la Busira au Lomami S.A.B. (yango esangisi ba entreprises agricoles mpe ezali filiale ya munene ya Société générale na ex-Congo belge mpe Congo lipanda) sans pour autant amona incompatibilité wana tout comme Sénat mpe etikala kolobela yango te ata soki misala mia yango mizalaki suspendus na Président Kasa-Vubu wuta mokolo mua 14 septembre 1960 tee ko zonga na 22 juillet 1961 .
Suite na nungu nungu eyaki sima ya assassinat ya Premier Ministre Lumumba, MNC-L ekomaki diriger na Antoine Kiwewa. Na 20 décembre 1963, Kidicho akomi Directeur politique provisoire ya M.N.C.-L (Kiwewa). Na 15 avril 1964 congrès ya M.N.C.-L (Kiwewa) esalemi na Léopoldville eponi ye na qualité ya Directeur politique ya parti.
Na mokolo mua 10 juillet 1964, Premier Ministre Tshombe a nommer ye Ministre ya Travaux Publics, Transports na Communications mpe Postes, Télégraphes na Téléphones. Etonnant pour un lumumbiste et surtout mpo na role oyo Tshombe a jouaki na liwa ya Lumumba !!!
Na 13 octobre 1965, Gouvernement Tshombe ekueyi mpo Président Kasa-Vubu a révoquer Premier Ministre Tshombe.
Tango Général Mobutu asali coup d’Etat militaire na 24 novembre 1965, Kidicho mpe azui ebonga ya Ministre ya Affaires sociales wuta formation ya Gouvernement Mulamba na mokolo mua 28 novembre 1965. Tango Kidicho aweyi na mokolo mua 11 janvier 1966, Président Mobutu asengaki na ba parlementaires originaires ya provincette ya Haut-Congo mpo ba pona mutu esengeli akitana Kidicho mpo na ko maintenir équilibre géopolitique gouvernemental. Boye nde André Isia Amoundala aponamaki mpe Président Mobutu a nommer ye na mokolo mua 14 septembre 1966, Ministre ya Tourisme et Affaires culturelles. Ye mpe awumelaki te na ebonga yango mpo Président Mobutu alongolaki ye na mokolo mua 17 décembre 1966.
Jules Léon Kidicho azalaki mokuse, vif d’esprit, intelligent, azwi instruction na très bonne école ya ba Maristes, élite ya époque. A chevale na ba influences culturelles noire na occidentale, mutu ya rassemblement mpe ayebaki ko exploiter renommer ya kombo ya mama na ye mpo na ko attirer sympathie ya batu tout comme ayebaki parfaitement hétérogénéité ya milieu akoli, Stanleyville, un bienfait oyo esala que atikala ko jouer na fibre ethnique te. Parfois opportuniste na ba choix politiques na ye et prêt na ba alliances contres natures mpo na kozua eloko oyo azali ko viser. Un vrai gentleman, très élégant et toujours chic mpe un bon viveur.
Kidicho akutani na liwa na butu ya 10 na 11 janvier 1966. Na butu na yango akendeki kozua ndeko na ye ya muasi na kombo ya Jeanne Mayindo. Ye azalaki déjà ya kolala tango Kidicho aye kobetela ye porte epayi na ba boti ba ye na commune ya Kinshasa. A insister que babima. Na moment wana, Kidicho azalaki accompagner na mobali mosusu na voiture. Tango Jeanne andimi, bien que tata na ye asila koloba que soki mutu akoti na ndaku, abima lisusu te. Bakamatani tee bakeyi na N’djili kozua une autre fille na kombo ya Marie. Sima ya bisengo na ville mpe na la Fontaine, na 3heures du matin, na kokende kozongisa Marie, Kidicho a zui Boulevard Sendwe mpo na ko remonter Lumumba tee na N’djili. Avant akoma na niveau ya ba boulevards Sendwe na Permanence a se rendre compte que abimi na nzela mpe azali ko se diriger na rivière Kalamu juste na croissement ya ba boulevards Sendwe na Permanence. Tango ameki ko freiner mpe koluka ko éviter a plonger na mayi nde motuka esali ba tonneaux. Kidicho, Marie na mobali mosusu bakufa sur place mpe Jeanne akufeli na hôpital mpe azuaki temps ya kotika maloba ma suka mpo na muana na ye.
Excès de vitesse nde ekumbaki na accident wana conséquence peut-être ya komela mua mingi ya Kidicho ou alalaki mua moke na volant ? En tout cas, liwa ya Kidicho eningisaki Léopoldville mpe African Jazz elekaki ye na nzembo ya « Aurevoir Kidicho », composer na Jeannot Bombenga.
Polémique ezalaki na niveau politique suite na liwa wana mpo leki ya Kidicho, Salumu, mpe akufaki na accident mbula eleki. Elobamaki mingi que ezalaki ba règlements de comptes kati na ba lumumistes mpe kati na ba ressortissants ya provincette orientale. Disparition ya Kidicho ebotaki incompréhension mpe bokabuani kati na famille élargie na ye mpe na oyo ya molongani mua ye, famille Lengema.
Mbala ekoya, nakomeka kolobela parcours ya Marcel Lengema Dulia Yubasa Makanga mpo to comprendre degrés ya rivalité ezalaki kati na ba élites mibale ya provincette orientale.
.
………………………………………………………………………………………………………………………………
Nkashama Nkoy, par Rochereau et l'African Fiesta national
Stephane Etienne Nkashama Nkoyazali mu Pende. Abotami na juin 1936 na chefferie ya MuliKalunga, secteur ya Mulikalunga, territoire ya Moyen Kwilu, district ya Kwango, province ya Léopoldville.
Abandi ba kelasi na ye primaire na Kinzambi, epayi ya ba sango Jésuites, na 1943, mpe asilisi yango na 1949. Na mbula moko wana akoti mbala moko na petit semaine ya Kinzambi esika asilisi na 1955. Tango asilisi petit semaine, atindami na Ordre des Compagnie des Jésuites ya Djuma, yango ezuami mpe kaka na territoire ya Moyen Kwuilu, na cadre ya noviciat na ye Kuna alendisami mbula mibale na bo nganga nzambe. Sima na yango, na 1957, atindami na Louvain mpe na Dublin mpo na kokembisa mateya mpe liloba ya nzambe. Na molongo, azui inscription na prestigieuse université ya Oxford na sciences économiques mpe na philosophie esika asali ba études approfondies na ba cursus wana mpe azui doctorat na ye na 1966.
Tango azongi na Congo, na septembre 1967 akoti mbala moko na Présidence de la République mpe azui ebonga ya Conseiller principal chargé des questions sociales et culturelles. Awa ezalaki époque oyo Maître Jean Gérard Kamanda azalaki Secrétaire général ya Présidence de la République (Ex-Maison du Président mpe futur Bureau du Président de la République). A continuer na ebonga wana tango Président Mobutu a créer Bureau du Président de la République en remplacement ya Secrétariat général à la présidence mpe Directeur ya sika ezali Evariste Loliki.
Sima ya ba sanza, Nkashama Nkoy abandi kobela mpe Président Mobutu atindi ye na ba soins médicaux na Etats-Unis, kasi amélioration ezali kaka te. Bameki ye na bo nkoko, kosalisa ye na motindo nionso epayi ya ba Pende, kasi, état de santé na ye ebandaki kaka ko se détériorer à tel point que ba organes vitaux nionso ebandaki lisusu kosala malamu te mpe ememi ye na liwa na août 1968.
Ezali secret te que ba Pende ebele babundaki na rébellion ya Mulele (bazalaki penza majoritaire na rébellion muleliste) mpe nkoko ya Kashama Nkoy, Chef ya Mulikalunga, azalaki na sympathie mingi mpo na Pierre Mulele. Farouche opposant ya époque neti Antoine Gizenga, azali mu Pende. Malgré bonne volonté na mayele ya Kashama Nkoy mpe na motindo oyo andimaki kotika nzela ya bon ganga nzambe mpo na komipesa na mosala na l’Etat ya ekolo na ye, na consolidation ya paix na réconciliation nationale na Congo mpe ya rassemblement na parti oyo esangisi ba Congolais banso M.P.R., batu misusu babandaki kosepela na projet na ye te ya kolendisa culture congolaise à travers philosophie politique ya M.P.R. Ba oyo babandaki ko bouler bongo, bango mpe lisusu ba continuaki tee na koboma Mulele mpe ko persécuter ba Pende.
African Fiesta National elelaki ye na nzembo : « Nkashama Nkoy », composition Rochereau. Maloba ma Rochereau na nzembo oyo e traduire persécution wana.
Mbala ekoya nakomeka kolobela ba nzembo iye : «Liwa ya somo », « Bakumba », «Mama Wali », «Testament ya Bowule », «Myriam Moleka », «Liwa ya Polo Kamba », «Liwa ya Bosele » na ba susu.
.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo