Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ba ndeko,

 

Ndenge biso nionso toyebi raisonnement ya blog na biso oyo, nazali ko proposer bino mua liste ya ba patrimoines culturels et touristiques ya Kinshasa, mpe sima ya intérieur mpo tomeka elongo kolobela yango na maye matali ndenge yango esali histoire ya ville ya Kinshasa mpe na ya provinces. Mpo totambola en ordre, tokoki kobanda naino na Kinshasa. Toyebi que na mboka na biso tozali mpe na ba sites touristiques mingi neti ba parcs, ba chutes, etc. kasi towela te, tokolobela yango na tango na yango.

Ya solo, réaction ya ba ndeko mosusu ekoki kozala que batanga mpe ba sites mosusu ya ville de Kinshasa oyo totangi te, kasi ekozala malamu yango ezala vraiment na portée moko munene na ndenge tolobeli. Par exemples, à quoi bon kotanga Institut Wangata en comparaison na athénée de la Gombe ?  Stade de martyrs na stade tata Raphaël (stade du 20 mai 1967) ? Eglise sainte Anne  ya Gombe na Saint luc ya ma Campagne ? Nabanzi que to se comprendre na esika wana.

 

Liste yango oyo :

 

1. Mont Ngaliema (mont Stanley)

2 .Stade Tata Raphaël (stade du 20 mai 1967)

3. Gare centrale de Kinshasa (Place de la gare) mpe na Place de Braconniers

4. Palais de la nation

5. Université de Kinshasa

6. CHANIC (Chantier Naval et industriel du Congo). Histoire ya CHANIC forcement ekomema biso na grande compagnie ONATRA. Wana tokolobela libongo ya munene ; ya Kingabwa na ya Ngobila. Tokotanga lisusu école de navigation ya Kalamu, Camps CITO, etc.

7. Monument ya Héros national Patrice Emery Lumumba na échangeur de Limete. Pourquoi etongamaki ? Ne échangeur esengelaki ba nzela ekende tee wapi ? Projet wana ekoma tee na suka ?

8. Grand marché de Kinshasa (marché central de Kinshasa, zando ya munene na masolo na yango)

9 .Cité du parti na N’sele (ba pavillons, salle du parti, jardin, parc, zoo, piscine olympique, ba événements tragiques na heureux eleka kuna, résidence présidentielle, D.A.I.P.N., tee na Kinkole, citée ya ba pêcheurs)

10.. Camp Colonel Kokolo (Camp Léopoldville ou camp Léo)

11. Eglise sainte Anne et l’Institut saint Joseph,  Cathédrale Notre-Dame de Lingwala

12. Bar Vis-à-vis, Congo bar

13. Place des artistes (place de la victoire)

14. Foire international de Kinshasa

15. Hôpital de référence de Kinshasa (hôpital général de Kinshasa, hôpital mama Yemo)

16. Clinique Ngaliema, (Clinique reine Elizabeth)

17. Clinique Kinoise (Clinique danoise)

18. Athénée de la Gombe (Athénée royal de Kalina), collège Boboto (collège Albert Ier), lycée

Bosangani (lycée sacre cœur)

19. Cimetière des pionniers

20. Cimetière de la Gombe (cimetière de Kalina)

21..Cimetière de Kimbaseke

22. Route nationale numéro 01, route nationale numéro 02

23. Place du pont Cabu

24. Jardin botanique et zoologique de Kinshasa (Parce Deboeck)

25. Centre Pénitentiaire et de Rééducation de Kinshasa  (Prison centrale de Makala)

 

1. Mont Ngaliema,

 

Mont Ngaliema ebandaki kobengama mont Stanley. Sir Henry Morton Stanley azalaki Anglais d’origine Américaine, rédacteur en chef ya journal New York Herald, tango ayaka na Congo. Mukolo mua 24 décembre 1881, asalaki poste ya Léopoldville likolo ya ngomba oyo ebandaki kobengama Konzo Ikulu (na langue teke). Apesaki yango kombo ya Léopold II tango chef Ngaliema Deswata, chef ya mboka Kintambo,  apesaki ye mabele wana selon « traité ya fraternité » oyo a signiaki na ye Stanley.  Traité yango ebandaki kopesa Stanley droit d’établissement. Chef Ngaliema apesaki Stanley mabele wana sans pour autant atuna Grand chef Illoy Loubath Imumba Ier  «  Makoko Mbe »  oyo azalaki nkolo mabele ya Royaume Tio (Royaume ya Bateke nionso ya ba Congo mibale mpe Gabon) mpe mokonzi monene. Ngaliema azali mokonzi ya mboka, kasi azalaki nkolo mabele te mpo ya azalaka esclave, ayaka kodondua nde na ba activités commerciales oyo eyaki kokomisa ye mutu ya bomengo. Na miso makasi wana nde amisalaki ba relations personnelles na Stanley na kokabela ye mabele wana en échanges ya ba relations makasi  mpe influentes na mindele. Mpe na même acte, alongolaki Bateke ya Congo -Kinshasa na « Traité Makoko », traité oyo Makoko  Mbe asignaki na Pierre Savorgan de Brazza mpe etiyaki royaume na ye sous protection ya France. Par ailleurs, na « traité de fraternité », chef Ngalema a signaki, le 24 décembre 1881, « Traité de fraternité » ekotisaki Congo-Kinshasa na protection ya Association internationale africaine. Force mosusu ya Ngaliema ewutali na ba activités commerciales abandaki kosala na Bakongo na Bazombo.

 

Mont Ngaliema (ngomba Ngaliema) ebengama na ba kombo oyo : mont Nkonzo Nkulu, mont Léopold II, mont Stanley, mpe esuki na mont Ngaliema. Yango ezali esika Stanley atongisa ndaku na ye (yango ezali wana te lelo oyo). Wana ezuami maison communale ya Ngaliema, yango ezalaki hôpital général ya liboso, Chapelle SIMS, Domaine présidentiel. Kuna ezali na ndaku oyo ebandaki kobengama Hôtel du conseil, résidence ya gouverneur général, yango eyaki kokoma entre 1960 na 1965, résidence officielle ya chef de l’Etat Kasa Vubu. Tango Président kasa Vubu azalaki na pouvoir, bureau présidentiel ezalaki na ville pembeni na Palais de la nation (Assemblée nationale). Kasi heure Président Mobutu akomi na pouvoir, résidence ya mont Ngaliema ekomaki  esika ya musala. Yango ekomaki kobengama tour na tour, maison du chef de l’Etat, cabinet du chef de l’Etat, mpe bureau du Président-Fondateur du Mouvement Populaire de la révolution et Président de la République. Na mont Ngaliema nde ezali esika personnel technique na politique ; protocole d’Etat ; maison civile na militaire ba bandaki kosala. Par contre, personnel administratif na ya ba services mosusu babandaki kosala  na ba locaux ya ville esika cabinet ya Président Kasa Vubu ezalaki. Wana nionso en attendant suka ya construction ya immeuble oyo présidence ebandaki kotongisa mpo efandisa administration présidentielle mobimba. Na 1970, nde présidence nionso eyaki kosangana kuna na kati.

Domaine présidentiel ya mont Ngaliema nionso : palais présidentiel na ba décorations kitoko libanda tee na kati,  na ba murs na yango, na parc mobimba na paillote, na D.D.N. mpe na O.U.A.  koleka na résidence privée na camp Thatshi, na I.N.M.C, nionso wana décorations na yango na dessin, sculpture, ba statuts na ba statuettes esalemi na ba artistes nionso ya minene ya Congo mpe batika bilembo kuna : Maîtres  André Lufwa Mawidi, Alfred Liyolo Limpe Mpuanga, Mukendi Kanda, Nginamau Lukiesamo, Tamba Ndembe, Dedakala, Wuma Mbambila Ndombasi, Lema Kusa, Mayemba ma Nkakasa, Ndanvu Tsiku Pezo. Ba décora liseki te. Ba artistes oyo tokozongela bango lisusu tango tokolobela Domaine de la N’sele.

Président Mobutu abandaki koyamba batu en audience na palais ya mont Ngaliema, ba réunions ya conseil exécutif (gouvernement) ebandaki kosalema kuna. En face ya palais présidentielle nde immeuble ya bureau présidentiel, na mopanzi,  paillote présidentielle. Kuna nde esika ba cérémonies ya prestation de serment ebandaki kosalema, koyamba ba ambassadeurs ya sika accrédités na Kinshasa, mpe ko tenir ba conférences de presse.

Camp Colonel Tshatshi ezuami na mont Ngaliema.  Kuna nde ezalaki résidence privée ya Président Mobutu banda 1960, tango général Mobutu akomaka chef d’état major général ya Armée nationale congolaise (A.N.C.).  Kuna ezali na ba villas kitoko en étages oyo etongaki mpo na ba officiers ya ba mindele mpe mpo na gouverneur ya Banque na batu na ye. Camp Tshatshi ezalaki camp ya para commandos mpe parachutistes (bérets vert na bérets rouge). Major Joseph-DamienTshatshi nde azalaka premier commandant noir ya ba troupes d’élite wana.  Camp  oyo ekoma kobengama na kombo na ye mpo na yango, mpe à titre posthume, akomaka Lieutenant-colonel.

Na ngambo ya immeuble ya bureau présidentiel, quartier général ya armée ezali wana. Yango ebandaki kobengama département de la défense national (D.D.N.). Kuna esangisi administration militaire nionso : bureau ya secrétaire d’Etat na défense nationale mpe sécurité du territoire ( neti Président Mobutu azalaki mpe ministre ya défense na anciens combattants, secrétaire d’Etat ya défense nde azalaki mokonzi monene kuna, sima ministre de la défense ezalaki lisusu Président Mobutu te) , bureau ya inspecteur général ya F.A.Z., bureau ya chef d’état major général ya F.A.Z., na ya ba états majors nionso (terrestre, aérien mpe naval) y compris na gendarmerie nationale. Ba bureau spéciaux ya F.A.Z. nionso ezalaki kuna. Mpona ba détentes na ba fêtes ya ba soda, messe des officiers mpe ezali kaka na ngomba wana. Par contre, commandement na état major ya division spéciale présidentielle ezalaki na camp Tshatshi ; ya Service d’action et de renseignement militaire na Kintambo, sima ya SOCIMAT ; ya Garde civile na centre-ville na mopanzi ya zando ya munene.

Cité de l’Organisation de l’unité africaine, O.U.A  ezali mpe na Domaine ya mont Ngaliema. Yango ezali juste na entrée principale mpe liboso ya bureau présidentiel. Magnifique cité oyo etongamaka entre 1966 na 1967. Yango eyambaka  sixième sommet ya O.U.A na Kinshasa, du 11 au 15 septembre 1967.Trente-six pays eyaka mpe quinze chefs d’Etat bayaka na Kinshasa. Cité oyo ezali na salle de conférence, salle de fête, restaurants, pavillons, bibliothèque, salle de massage et de sport, cave ya ba vins, bar, piscine. Cadre kitoko mpe ya luxe. Kuna nde ba cérémonies ya remises ya médailles ya Ordre national du léopard, Ordre national du Zaïre, Ordre des compagnons de la révolution, ebandaki koleka. Chancelier ya Ordres nationaux et des compagnons de la révolution nde abandaki kolatisa batu ba médailles kuna. Sima, fête ebandaki kosalema kaka wana. O.U.A. mpe ezalaki lieu ya hébergement ya ba hôtes de marque ya Présidents Mobutu ; ba Léopards football ; Mazembe na coupe d’Afrique ; mpe ba vedettes étrangères ya chansons oyo bayaka kobeta na Kinshasa (cfr théâtre de verdure). Kuna nde Pierre Kalala afandaka  longtemps tango abukanaka mpe azalaki soigner ba na frais ya l’Etat

Domaine présidentiel, quelle beauté ! Président Mobutu a associaki ba sculpteurs nionso ya R.D.Congo kuna mpo moko na moko asala ekeko. Bikeko nionso ya pembe . Jardin ya mont Ngaliema ezalaki na trois niveau kobanda na likolo mpe kokita na fleuve. Na premier niveau style francais, ebandaki kobengama jardin de Versailles,  na deuxième niveau style anglais mpe na troisième niveau esengelaki ezala style japonais, kasi authenticité nde eyaki ko freiner projet wana. Style zaïrois eyaki ko remplacer style japonais. Na kati ya beauté ya jardin, théâtre de verdure. Amphi wana etongamaki na 2000 places : Bela Below, Francis Bebey (kuna nde ayembaki pour la première fois nzembo ya Kinshasa) Eboa Lotin, Myriam Makeba, Fela Anikulapo Kuti, James Brown, Françoise Hardy, Johnny Halliday, Jackson five, B.B.King, Manu Dibango, na ba orchestres congolais ebeta kuna. Kalend asala théâtre ya Mundele Ndombe kuna, Théâtre national Mobutu Sese Seko à travers Ballet national na Troupe de théâtre national mpe ba se produisa kuna na Liyanja na Saï Saï.  Ballet Tuta Ngoma na Chem Chem yetu, bana Kenge mpe basala spectacles wana. Ba photos officiels mingi mpe ekangama kuna.

Na ngambo ya jardin, zoo. Kuna ezalaki na lions (lion ezalaki juste na coin ya routes Matadi na de Mimoza ou de hôpital de la rive), léopards, okapis, zèbres, buffles, antilopes, sangliers, singes, crocodiles, tortue, serpents, varans. Ba indications ezalaki na zoo sur ba niama tout comme na jardin mpo na kombo ya ba plantes, nzete, fololo na ba allées. Na nse ya jardin en contre bas, balonaki ba nzete ya bosquet. Yango eyebaki mpo na efficacité na yango na solidification ya mabele.

Institut des musées nationaux du Congo (I.M.N.C.) mpe ezali ko faire partie ya Domaine présidentiel ya mont Ngaliema. Ezuami na kati ya parc présidentiel mpe ezali na ba batiments mine : batiment ya liboso ezali administratif, esika ba bureaux ezali. Misatu oyo etikali nde esika ba collections na service technique ezuami.  I.M.N.C.  ezali na ba sections misatu : art contemporain, art dactylographique na musicologie. Na kati ya ba sections iye ba collections ebele ya biloko oyo ezali kolakisa richesse ya art na biso. Ensemble ya biloko ezali kuna ezali estimer na valeur munene. Ba objets artistiques (ya période jurassique), artisanaux traditionnels (neti  ba vases na ba poteries ya XV ème siècle,  kobanda na bassin du Congo tee na Nil), ba enregistrements sur bande ya ba heures na ba heures ya ba sambole, fables, récits historiques, contes, proverbes, musiques traditionnelles, animations populaires, animations politiques, ba photographies ebele ebele, ba fresques oyo ezuami na murs na likolo libanda, ba masques ya ba grandes empires mpe royaumes : Luba, Kuba, Lunda, Yaka, Pende, Tandu, Mbala, Yombe, Tshokwe, etc., ba monuments coloniaux, ba status nionso oyo mundele atikaki, tango balongolaki yango mpo na raisons ya authenticité, ekendaki kobuakama na T.P na 1ere rue na Limete. Bikeko bia Stanley, Leopold II, reine Astride, na ya Albert Ier.  Sima, tango Président Mobutu alongue na pouvoir, baketi kotika yango na I.N.M.C. nionso oyo ezali na valeurs technique, scientifique mpe historique.

Domaine présidentiel ezalaki kofunguama dimanche mpo na public : restaurant ya O.U.A. na piscine na yango, paillote présidentiel, parc na zoo présidentiel mpe na musée national. Endroit moko oyo ezali na vue imprenable ! Na likolo na yango fleuve ezali komonana d’une manière extraordinaire mpe baie ya Ngaliema ezali ko faire rêver surtout tango moyi ebimaka mpe elalaka epesaka vue panoramique mosusu ! Na mont Ngaliema ba chutes ya Kinsuka emonanaka kitoko, Brazzaville na Kinshasa emonanaka mpe kitoko. Kuna ezali cadre moko ya bien mpo na kolekisa ba bons moments en famille, en amoureux, ou yo moko na calme soki olingi mua moment ya réflexion.

Mont Ngaliema ezali kaka esika ya musala, touristique na bisengo te. Ezali mpe esika oyo ba pires violations de droits de la personne humaine esalema : ba assassinats, éliminations physiques, tortures, arrestations arbitraires, kobetama sans raison, etc. Na nse ya mabele, na cave ya O.U.A. (cave kitoko esalemaki mpo na intendance ya cité) ezalaki prison illégale. Yango ebandaki kobengama deuxième cité de l’O.U.A. Kuna ezalaki suka na buale. Muinda ezalaka te esika babuakaka batu, notion ya temps ezali te, torture na koboma. Même chose mpe na camp Tshatshi.

 

Masolo ya mont Ngaliema eleki mingi. Kasi tika tolobela mua ndambu oyo esala bilembo na yango

 

1. Na 1960, tango Congo ezui lipanda, na  août tango Premier ministre Lumumba a nommer Mobutu, colonel mpe chef d’état major général ya A.N.C., mbala moko alongue na Bandalungua mpe aye kofanda na camp Tshatshi. Kasi au lieu a occuper une des maisons ya ba officiers ya mindele oyo bakomaki kokende, ye akeyi ko occuper la plus belle villa oyo ezalaki résidence officielle ya gouverneur ya Banque centrale du Congo Belge et du Rwanda-Urundi. Tango Albert Ndele akomi gouverneur ya Banque centrale du Congo na 1961, ye atikalaki kaka na ndaku oyo abandaki kofanda na camp Tshatshi. Période wana, Justin-Marie Bomboko, Victor Nendaka, Damien Kandolo na Jonas Munkamba na ba membres mosusu ya groupe de Binza babandaki kofanda na camp Tshiatshi.

2. Na 1964, Président Joseph Kasa Vubu na Premier ministre Moïse Tshombe bakomaki na nungu nungu. Tshombe asengaki audience epayi ya Kasa Vubu. Ce dernier,  mpo akitisa ye, ayamba Tshombe ne pyjamas !

3. Na 1965, coup d’Etat militaire oyo elongolaki Président kasa Vubu esalemaki na camp Tshatshi

4. Na 1966, premier anniversaire ya nouveau régime esalemaki avec faste.

5. Na 1968, accueil triomphal ya équipe nationale les Lions, tango ba longaka coupe d’Afrique des nations mpe balatisa bango médailles ya Ordre national du Léopard  kuna, bazua ba cadeaux ya ba vespas na mbongo kaka kuna. Ndenge moko esalemaki mpe na coupe ya Mazembe 1967,1968 mpe na Léopards 1974. Bango bazuaka ba ndaku na ba voitures

6. Na 1969, nde mbula mama Antoinette Mobutu azuaki likanisi ya kosala ba Fondations, mpe abandaki kosepelia bana ya ville ya Kinshasa chaque année na ba réceptions abandaki kopesa na mont Ngaliema. Bisengo wana ezalaki lolenge ya kosenga Nzembe mpe kotonda ye ndenge apesaki ye muana mobali, Kongulu na 1970, sima ya huit ans par rapport na dernier garçon Konga.

7. Na 1970, mama Antoinette Mobutu a concrétisaki projet na ye ya Fondations na kombo ya Œuvres mama Mobutu. Ba bureau na yango ezalaki na kati ya présidence. Tango akomaki commissaire d’Etat (ministre) ya Affaires sociales, cabinet na ye ezalaki kaka na immeuble oyo ya présidence de la République.

8. Ba étudiants na armée na 1971, ba misusu balekaki naino na camp Tshatshi avant grand départ na Base ya Kitona na Centre de formation ya Kota-koli

9. Na 1974, Mohamed Ali na George Foreman bakutana na mont Ngaliema.  Avant wana bapesaki conférence de presse, mpe Président Mobutu aye koyamba bango na paillote, etc.

Le, 26 juin 1974, tango République du Zaïre e se faire livrer avion D.C.10, Compagnie nationale Air-Zaïre  epesaki yango kombo Mont Ngaliema, immatriculé  9 QC LT. Yango mpe etekama na mikili mosusu.

10. Na 1975 na 1978, ba procès minene ya ba complots et coup d’Etat manqués (coup d’Etat monté et manqué, , conspiration, procès des terroristes)  eleka kuna. Ba emprisonnements, ba interrogatoires, tortures, etc.

Na 1975, polémique esalemaki sur liwa ya général Masiala. Ba doutes makasi e persistaka sur liwa par accident ya hélicoptère. Elobamaka que balekaki ye kaka na camp Tshatshi mpe Sese amela makila na ye mpe atikala na tête na ye pendant que abuakaki nzotu na ye na cage ya léopard « mimi », un des léopards ya camp Tshatshi. Notons que na camp Tshatshi mpe zoo privé ezalaki kuna. Kasi ezalaki na même dimension te na oyo domaine ya mont Ngaliema. Tokozongela passage oyo tango tokolobela palais de la nation mpo balelaka général Masiala na ba soda oyo bakufaki na ye elongo kuna. Na même cadre, bakonzi mingi babetama kuna mpe ba ridiculisa bango pendant ba réunions ou prestations de serment na paillote ya mont Ngaliema.

11. Na nzela ya mont Ngaliema nde colonel Tshibangu Munzembe akufaki na koko na guet-apens na 1977.

A partir ya 18h. circulation  ezalaki interdite sauf na ba oyo bazalaki na ba laissez-passer. Atako bongo, soki owuti ou ozali kokende na présidence ou ozali na nzela wana, vigilance esengelaki ezala makasi, mpo depuis accident ya colonel Tshibangu, nionso ekomaki possible. Ba oyo bazalaki ekenge, babandaki kobuka kaka ngambo ya école américaine mpo na kobimela na église Jean XXIII.

12. Matanga ya mama Mobutu esalemaka na camp Tshatshi avant ekende na palais de la nation. Ba exposaka lisusu nzotu na ye avant ekende na Ngado-lite, quelques mois sima ya bokundi ye na Gombe.

Ba bagares ebele mpe eleka kuna. Neti ya Suzanne, leki ya mama Antoinette, contre mama Bobi Ladawa. Mususu nde oyo ya Manda, Konga contre mama Bobi. Wana babetaki mama mpe babuki ye loboko. Guide a fachaki mabe mpe atinda bango mosala mua soda. Ba scandales misusu mpe eleka kuna na ba films ya ndenge na ndenge.

13. Na camp Tshatshi, na 1997, nde D.S.P. ebomaki général  Donatien Mahele akufaka, kuna nde victoire ya A.F.D.L. se confirmaka. Na cadre ya kitoko ya mont Ngaliema nde ba fêtes ya ndenge na ndenge esalema, bisengo ya ndenge na ndenge. Wana pe lisusu nde hélicoptères ebandaki kotandama wana mpe na bateau Mobutu Sese-Kamanyola (M.S.-Kamanyola).

 

Ba ndeko,  Mont Ngaliema oyo tolobeli awa ezali mont Ngaliema ya kala tango ezalaka mont Ngaliema ya solo. Lelo oyo, bien que ezali toujours esika Président de la République asalaka ba réunions ya gouvernement mpe lieu de résidence officielle (O.U.A), beauté nionso tolobeli awa esila. Parc nionso esika jardin na zoo ezalaki, paillote, théâtre de verdure, résidence ya Président Mobutu na ya ba officiers ya camp Tshatshi, ba batiments ya présidence, sauf bâtiments ya D.D.N. nde ezuaki langi ya sika grâce na ministre ya defense Tshikez Diemu. Ye mpe mosusu, au lieu alanda couleur beige oyo ezalaka wana, akeyi kotiesa couleur bleu !!!, Instutut national ya ba musées nationaux (yango ekomi na ba problème ya conservation ebele  liés na température interne, manque de matériel na ba produits chimiques nécessaires. Kitoko ya  mont Ngaliema esila mpe nionso oyo emuangana.  Matiti ebota, érosion epayi, mayi ya mbula epayi, impossible ya ko reconnaître magnifique domaine présidentiel oyo tolobeli awa. 

 

Patriotiquement,

 

 

Emmanuel Kandolo

Nabosanaki kokoma deux points par rapport na masolo ya mont Ngaliema. Na 1970, tango African fiesta national ya Rochereau Tabu ewutaki kobeta na Olympia na Paris, après tour ya ville de Kinshasa, Président Mobutu ayambaki bango na mont Ngaliema.

Na 1973, tango Vita Club de Kinshasa ezuaki coupe d’Afrique des clubs champions, Président Mobutu asalelaki bango fête na mont Ngaliema.

 

Patriotiquement,

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M
Merci et reconaissance na makomi na yo. To tombeli yo o progrésser na mosala ya cuture ya mboka na biso. Na lingi ko bakisela yo kombo ya Artist Monene na kin na kombo ya ELAMBO SIMON, asi akufa il ya de cela 5 ans. a fandaki na N'djili, Q: 9, Av. Makungu, no.... direction CECOMAF. Talent na ye ezalaki na peinture. Ba Tableau, toiles. Na zali na ba Exemplaires na koki pe ko présenter mun jour. Vraiment de bon tableau de l'homme noir et son environement. Merci mingi- Jeff.
Répondre
T
<br /> nalingaki kaka kobakisa kombo ya moto moko pe atika bilembo na kinshasa donc nazali kolobela makambo oyo ngai nayebi pe oyo namona,moto yango kombo na ye ezali Antoine Mantento<br /> santa,ba bilembo na ye soki ezali ti lelo ezalaki na stade reine astrid oyo ekomaki 24 novembre pe sikoyo ebengami cardinal Malula,na stade du 20 mai ebengami lisusu<br /> na kombo ya tata raphael pe na mont ngaliema. na stade cardinal Malula bilembo na ye ezalaki tout au long ya mur ya stade côté avenue kasa vubu ezalaki ba<br /> oeuvres basala en ceramique représentant bato na biloko mosusu. na stade tata raphael bilembo na ye oyo ezalaki visible  ezalaki na gauche et à droite<br /> ya porte d'entrée centrale ya stade po okota na tribune, na mont ngaliema nde namona kaka ba photos akangisa devant ba oeuvres na ye.Antoine Mantento afandaka na yolo nord pembeni ya<br /> école moko ezalaki pas loin na avenue université ba nzinga nzinga ya dancing moko ebengamaka la casa del rio grande presque en face ya suzanella maison blanche na ngambo ya<br /> mombele .Antoine Mantento atangisaki pe na académie des beaux-art.chez ye azalaki na ba fours na ye pona kosalela makambo.pona info na ba oyo bayebaki te, Antoine Mantento<br /> azalaki d'origine angolaise,azongaka mboka na ye pe akufelaki kaka kuna. ezalaki wa bino muana époque ya phono,sans un iota de graisse,anti-cycle .NB BA BILEMBO YA ANTOINE<br /> MANTENTO NIONSO EZALAKI MINGI EN CERAMIQUE ET  signé na kombo na ye<br />
Répondre
C
MBOTE NA KANDOLO PE BA HABITUES YA BLOG NA BISO; MERCI NA REVUE OYO YA BA PATRIMOINES NA BISO. NALINGI KOLOBA MWA LISAPO MOKO MAITRE NA BISO YA ECOLE PRIMAIRE ABETELAKA BISO NA L'ECOLE PRIMAIRE OFFICIELLE RENKIN 1(MONSIEUR ALBERT ANGIENE ITAMBULA OTSIS):SELON MONSIEUR ANGIENE, TANGO STANLEY AYAKA KOKUTANA NA CHEF NGALIEMA, NA RENCONTRE NA BANGO YA LIBOSO CHEF NGALIEMA AZALAKI RETICENT NA LIKANISI YA KO SALA PACTE TO ACCORD NA STANLEY. TANGO STANLEY ABANDAKI KO SE PREPARER PO AKENDE LISUSU KOMEKA LISOLO NA NGALIEMA AZWI FUITE QUE CHEF NGALIEMA AKAMWAKA LORS YA PREMIERE RENCONTRE NA BANGO NDENGE STANLEY ABIMELAKA YE EN PLEIN MBULA PE APOLA NA MAYI YA MBULA TE. EN FAIT STANLEY AZALAKA NA PARAPLUIE PE ALATAKA IMPERMEABLE NA BA BOTTES YA MBULA EN CAOUTCHOUC; E MARQUAKI CHEF NGALIEMA. YANGO WANA NA BOKUTANI NA BANGO OYO E SCELLAKI ACCORD NGALIEMA ATUNAKA STANLEY NDENGE MBULA(PLUIE) EZALAKI KONOKA PE YO OPOLI TE, STANLEY AZWAKI YANGO OCCASION YA KO NEGOCIER EN POSITION DE FORCE (NA KO PESA YO BILOKO OYO ESALAKI QUE NGA NAPOLA TE NA MBULA). DONC SELON BA DIRES YA MONSIEUR ANGIENE, STANLEY AZWAKA NGALIEMA GRACE YA PARAPLUIE, IMPERMEABLE NA BOTTES YA MBULA... CA RESTE A VERIFIER. NAKOBAKISA MWA POINT MOKO LISUSU: STATUE YA STANLEY OYO EZALAKA NA MONT STANLEY EZALAKA KOLAKISA STANLEY NA POSITION YA OBSERVATION EN DIRECTION YA COTE FLEUVE EZALI KOWUTA(LOBOKO, LIBOSO YA MBUNZU NETI MOTO AZALI KO - zimeler - DONC EXPLORATEUR ).BON TANGO MOBUTU AYE KO INITIER POLITIQUE YA RECOURS A L'AUTHENTICITE ALONGOLAKA STATUE YA STANLEY A REMPLACAKI YANGO NA SCULPTURE YA MAITRE LIYOLO REPRESENTANT UN GUERRIER QUI N'AVAIT RIEN AVOIR AVEC L'HISTOIRE YA ESIKA TO ESPACE WANA; POURQUOI PAS STATUE YA NGALIEMA ?CHARLES.
Répondre
D
Peut etre BINO na site OYO ya MBOKAMOSIKA bokoki ko convaincre ye. Ngai nazali petit naye YA MOSIKA mais na banda KOTANGA MAKAMBO naye KALA..Ye moko AYEBI...Et puis NAYEBISA YE, NA BONDELA YE..akoma LIVRE parceque connaissance naye GENERALE ya HISTOIRE ya RDC edjali IMPORTANT, pona MOKOLO NZAMBE akobenga ye..wana EKOKOMA "TROP TARD"..Donc nasengi naba Kulutu NIOSO oyo bokotaka awa..Kobanda na ANDO CHANGA, JOseph PUlulu, etc..etc.. ti na kolo blog le "MESSAGER" bo solola BIEN entre bino BAKULUTU.Bomeka ko CONVAINCRE kulutu EMMA ke "LIVRE" bakoki KOKOMA y'ango SANS pourtant KO DEVOILER "IDENTITE" nayo MOBIMBA ndenge namoka awa n'AMERIQUE.Donc  ba AUTHEUR DANS L'OMBRE bakoma EBELE..
Répondre
L
Bonjour Mr KANDOLO, C'est toujours avec une très grande assiduté que je lis vos articles. Je tiens à vous féliciter énormément pour votre façon d'écrire et d'expliquer les faits qui, au départ peuvent nous paraitre très banales mais qu'à la longues après quelques reflexions, mettent en exergue notre ignorence. Je suis vraiment très sincère qu'avec vos articles, je suis parfois tenté à regretter les heures de cours que j'ai dû passer en histoire à l'école.Très cher grand frère, écrire de temps en temps des articles sur ce site c'est très bien et je t'encourage de continuer. Cépendant, il sera aussi très profitable à des nombreux petits congolais et tous ceux qui s'intéressent à l'histoire du congo si jamais tu te décidais à écrire un livre. C'est possible. Ce ne sont pas des thèmes qui te manqueront.Pour finir, je voulais seulement rajouter à propos du grand chef Ngaliema, qu'il était le fils de SELMBA dont le nom a été transformé en SELEMBAÔ (une des communes de Kinshasa) et qu'il était aussi le père de l'ancien membre du bureau politique du mouvement populaire de la révolution, L'Honorable PIERRE MOMBELE SEMKIRA et père du feu ADRIEN MOMBELE alias STRERVOS NIARKOS.Je suis natif du quartier Camp Mombele (commune de Limete) et peux peut-être vous aider concernant les informations historiques sur ce quartier.Merci, c'était pour l'amour de notre histoire, celle qui sera écrite par nos compatriotes.
Répondre
M
Ngai nabanzi ete mokonzi oyo asimbaka secteur touristique malamu ezali Victor N'Joli. Banda alongwa  kino lelo oyo tourisme elimua.Messager
Répondre
K
Kulutu Kandolo,Nsayi enene na botangi mokanda mwa yo. Olimboli bodjali lya Engumba ya Kinshasa na ndenge elongobami.Mobu moleki natamboli na Kitambo mpe namoni bilembo mingi Mondele atika kuna.Ndjambi esengeli tobatela bilembo biye mpo toyeba esika Engumba lya Kinshasa ewuta...
Répondre