LA BIOGRAPHIE D’ISAAC-GÉRARD BAKAJIKA, L’INITIATEUR DE LA LOI BAKAJIKA.
/image%2F0931504%2F20211008%2Fob_1fcd69_e-48-avcaq9vhr.jpg)
Source de l’image : Twitter d'HÉNOCK NGINAMAU
Référence : https://www.mbokamosika.com/2021/09/loi-bakajika-le-pouvoir-noir.html
Ba ndeko,
ISAAC-GÉRARD BAKAJIKA DIYI KAMGOMBE abotami na mokolo mua 16 avril 1926 na Djoko Ponda, territoire ya Luebo, district ya Kasaï, province ya Congo-Kasaï. Asali 4 ans ya ba études moyennes na Mission protestante ya Luebo. Sima ya wana, akeyi na Belgique na stage de professionnalisation na art et métier, durant une année. Pendant séjours na ye na Bruxelles, asali mpe stage de perfectionnement na ministère des finances ya Belgique. Tango azongi, na Congo belge, wuta :
1948-1960, azali Chef d’atelier d’imprimerie ya Kasaï, eyaki kozua kombo ya imprimerie American Presbyterian Congo Mission (A.P.C.M.). Na 1960, azali Secrétaire provinciale ya Fédération générale du travail du Congo (F.G.T.K.).
Na 1961, akomi kosala na territorial ya Kasaï. Azui ebonga ya Chef de Bureau adjoint na ministère provincial ya Finances.
Na 1962 tee na 1964, azali Ministre provincial ya Finances, na Gouvernement Lubaya.
Wuta ba élections législatives oyo esalemi kobanda 18 mars tee na 30 avril 1965, alongi ebonga ya Député national elu ya province ya Luluabourg. Pendant mandant na ye nde azuaki initiative ya Loi oyo ezali ko porter kombo na ye : Loi Bakajika.
Kobanda 1967 tee na 1970, Président Mobutu a nommer ye 2ieme Vice-Président régional ya Mouvement Populaire de la Révolution M.P.R part-Etat., chargé de la Permanence du parti na deux provinces : Kasaï na Kivu.
Na ba elections legislatives ya 15 novembre 1970, aponami mpo na mbala ya mibale na Parlement, Commissaire du peuple élu ya Kasaï Occidental, mpo na mandat ya 5 ans lisusu.
Kobanda 1978 tee na 1980, azali Encadreur régional ya M.P.R. parti-Etat mpo na région ya Kasaï Occidental.
Na ba elections legislatives ya 18 na 19 Septembre 1982, apomnami lisusu Commissaire du Peuple, élu du Kasaï Occidental, mpe akomi Membre ya Commission politique, administrative et judicaire de la sous-commission Administration du territoire.Azali mpe na kati ya groupe national de l’Union des Parlementaires Africains
Bakajika azali mpe opérateur économique : azali na ba plantations ya café, hôtel Bakajika, na imprimerie moderne na Luebo. A juste titre, azali na ebonga ya Président régional ya Association Nationale des Entreprises du Zaïre (A.N.E.ZA.) mpe Membre ya Comité régional ya M.P.R. parti-Etat.
Distinctions honorifiques :
Commandeur ya Ordre national du léopard ;
Médaille d’Or et d’argent ya mérite agricole ;
Lauréat ya prix ya Foire International de Kinshasa(F.I.KIN) na 1977.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo