Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Emmanuel Kandolo

 

Jules-Léon Kidicho abotami na mokolo mua 29 juin 1928 na ville ya Stanleyville, na Province Orientale. Azali muana ya liboso ya mama Bangala Balimanga. Cette dernière, azalaki commerçante munene ya province Orientale. Jusqu'à preuve du contraire, azali la seule femme millionnaire ya province oyo. Na 1965, Gouvernement ya Léopoldville, ebomaki ye pendant campagne ya reprise ya ba territoires oyo  ezalaki sous contrôle ya République Libre ya Congo mpe na Gouvernement Gizenga. Bangala Balimanga azalaki na mbongo ebele, il était tout à fait normal a soutenir yango mpo azalaki na ba acticités commerciales na ye na province oyo mpe bana ba ye bazalaki ba lumumbistes.

 

Kidicho azali d’origine Lokele, na territoire ya Isangi mpe asali ba études moyennes epayi ya ba Boa mpe Zande na Uele, epayi ya ba Frères Maristes ya Buta. Asilisi kelasi na 1947. Esengeli toyeba que formation ya ba Maristes ezalaki élitiste.

 

Sima ya ba kelasi na ye, akoti na profession libérale en tant que commerçant. Na mokolo mua samedi 20 septembre 1952, asali libala na Julienne Lengema (jeune sœur ya Marcel Lengema), na cathédrale du Sacré-Cœur na Stanleyville.

 

Wuta 1953, akoma évolué mpe membre ya Association culturelles du Belge II et des Evolués mpe lisusu membre ya  Fédération des Associations de Stanleyville. Lumumba mpe azalaki membre ya ba Associations iye. Secrétaire ya Lumumba mpe wuta 1958 nde akomi militant tango Lumumba akeli Mouvement National Congolais (M.N.C.) mpe atikali na M.N.C.na ngambo ya  Lumumba sima ya bokabuani bua M.N.C. na ba ailes mibale (M.N.C.- Lumumba mpe na M.N.C.-Kalonji) tee kokoma membre ya collège exécutif provincial ya MNC-L. mpo na province Orientale.

 

Na ba élections législatives nationales ya mai 1960, aponami Sénateur. Bien que Sénateur, sima ya lipanda, andimi proposition ya Société générale na lolenge epesi ye ebonga ya Administrateur ya Société Agricole de la Busira au Lomami S.A.B. (yango esangisi ba entreprises agricoles mpe ezali filiale ya munene ya Société générale na ex-Congo belge mpe Congo lipanda) sans pour autant amona incompatibilité wana tout comme Sénat mpe etikala kolobela yango te ata soki misala mia yangomizalaki suspendus na Président Kasa-Vubu wuta mokolo mua  14 septembre 1960 tee ko zonga na 22 juillet 1961 .

 

Suite na nungu nungu eyaki sima ya assassinat ya Premier Ministre Lumumba, MNC-L ekomaki diriger na Antoine Kiwewa. Na 20 décembre 1963, Kidicho akomi Directeur politique provisoire ya M.N.C.-L (Kiwewa). Na 15 avril 1964  congrès ya M.N.C.-L (Kiwewa) esalemi na Léopoldville eponi ye na qualité ya Directeur politique ya parti.

 

Na mokolo mua 10 juillet 1964, Premier Ministre Tshombe a nommer ye Ministre ya Travaux Publics, Transports na Communications mpe  Postes, Télégraphes na Téléphones. Etonnant pour un lumumbiste et surtout mpo na role oyo Tshombe a jouaki na liwa ya Lumumba

!!!

Na  13 octobre 1965, Gouvernement Tshombe ekueyi mpo Président Kasa-Vubu a révoquer Premier Ministre Tshombe.

 

Tango Général Mobutu asali coup d’Etat militaire na 24  novembre 1965, Kidicho mpe azui ebonga ya Ministre ya Affaires sociales wuta formation ya Gouvernement Mulamba na mokolo mua 28 novembre 1965. Tango Kidicho aweyi na mokolo mua 11 janvier 1966, Président Mobutu asengaki na ba parlementaires  originaires ya provincette ya Haut-Congo mpo ba pona mutu esengeli akitana Kidicho mpo na ko maintenir équilibre géopolitique gouvernemental. Boye nde André Isia Amoundala aponamaki mpe Président Mobutu a nommer ye na mokolo mua 14 septembre 1966, Ministre ya Tourisme et Affaires culturelles. Ye mpe awumelaki te na ebonga yango mpo Président Mobutu alongolaki ye na mokolo mua 17 décembre 1966.

 

Jules Léon Kidicho azalaki mokuse, vif d’esprit, intelligent, azwi instruction na très bonne école ya ba Maristes, élite ya époque. A chevale na ba influences culturelles noire na occidentale, mutu ya rassemblement mpe ayebaki ko exploiter renommer ya kombo ya mama na ye mpo na ko attirer sympathie ya batu tout comme ayebaki parfaitement hétérogénéité ya milieu akoli, Stanleyville,  un bienfait oyo esala que atikala ko jouer na fibre ethnique te. Parfois opportuniste na ba choix politiques na ye et prêt na ba alliances contres natures mpo na kozua eloko oyo azali ko viser. Un vrai gentleman, très élégant et toujours chic mpe un bon viveur.

 

Kidicho akutani na liwa na butu ya 10 na 11 janvier 1966. Na butu na yango akendeki kozua ndeko na ye ya muasi na kombo ya Jeanne Mayindo. Ye azalaki déjà ya kolala tango Kidicho aye kobetela ye porte epayi na ba boti ba ye na commune ya Kinshasa. A insister que babima.

Na moment wana, Kidicho azalaki accompagner na mobali mosusu na voiture. Tango Jeanne andimi, bien que tata na ye asila koloba que soki mutu akoti na ndaku, abima lisusu te. Bakamatani tee bakeyi na N’djili kozua une autre fille na kombo ya Marie. Sima ya bisengo na ville mpe na la Fontaine, na 3heures du matin, na kokende kozongisa Marie, Kidicho a zui Boulevard Sendwe mpo na ko remonter Lumumba tee na N’djili. Avant akoma  na niveau ya ba boulevards Sendwe na Permanence a se rendre compte que abimi na nzela mpe azali ko se diriger na rivière Kalamu juste na croissement yaba  boulevards Sendwe na Permanence. Tango ameki ko freiner mpekoluka ko éviter a plonger na mayi nde motuka esali ba tonneaux. Kidicho, Marie na mobali mosusu bakufa sur place mpe Jeanne akufeli na hôpital mpe azuaki temps ya kotika maloba ma suka mpo na muana na ye.

 

Excès de vitesse nde ekumbaki na accident wana conséquence peut-être  ya komela mua mingi ya Kidicho ou alalaki mua moke na volant ? En tout cas, liwa ya Kidicho eningisaki Léopoldville mpe African Jazz elekaki ye na nzembo ya « Aurevoir Kidicho », composer na Jeannot Bombenga.

Polémique ezalaki na niveau politique suite na liwa wana mpo leki ya Kidicho,  Salumu, mpe akufaki na accident mbula eleki. Elobamaki mingi que ezalaki ba règlements de comptes kati na ba lumumistes mpe kati na ba ressortissants ya provincette orientale. Disparition ya Kidicho ebotaki incompréhension mpe bokabuani kati na famille élargie na ye mpe na oyo ya molongani mua ye, famille Lengema.

 

Mbala ekoya, nakomeka kolobela parcours ya Marcel Lengema Dulia Yubasa Makanga mpo to comprendre degrés ya rivalité ezalaki kati na ba élites mibale ya provincette orientale.

 

 

Patriotiquement,

 

 

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
C
Matondo mingi ndeko na lisolo oyo. Eza mawa mpo akufaki elenge. Na kozela lisolo ya papa Lengema na ko zanga ko kanga motema.
Répondre