RADIO TOUT LEO
RADIO TOUT LEO.
En publiant une publicité de 1966 sur la naissance de la Télévision au Congo, nous avons omis de diffuser d’abord celle relative au média que les congolais ont découvert en premier lieu, à savoir la Radio, bien que l’historique du premier émetteur Radio au Congo figure dans nos articles d’archives.
C’est pourquoi notre article d’aujourd’hui dévoile une publicité des Actualités Africanes de 1961 sur une radio Philips surnommée :TOUT LEO. Une marque bon marché, que la population kinoise, avait ainsi baptisée avec humour.
A cet égard il y a lieu de stigmatiser l’attitude paradoxale du consommateur congolais. Il est le premier à se plaindre de la hausse des prix et aussi le premier à dénigrer tout article moins cher : Tout Léo, Thomson, Nsadisa…représentent tour à tour une marque de radio ; une marque de télévision et un poisson ; et un habit confectionné au pays.
A l’instar de l’article sur la télévision, nous attendons les commentaires des mbokatiers sur Tout Léo.
Messager
Remerciements
Nous remercions trois membres qui viennent de verser leurs contributions mensuelles. Il s’agit de : Jean-Paul Kitenge Muadi de la Belgique, Jacob Lusala de la Belgique, et PPP de la Namibie.
La liste complète des cotisations mensuelles sera publiée le 1er avril 2013.
Tozali na 1962, na commune ya Saint-Jean, l´actuelle Lingwala, kowuta mboka mpe koya na Léopoldville ezali lisusu na problème ya makasi te, kaka soki ozali na ticket na yo ya train, masuwa to avion, osali mobembo na yo. Tokomi na Congo-Lipanda, ba tracasseries administratives esili, en plus Léo etondi na batu suite na ba rébellions na ba provinces ya Congo et surtout guerre ya indépendance ya Angola.
BA Noko na biso, donc ba ndeko ya Mama na biso, bawuti mboka baye na Kisasa, congé, mokolo bakomaki na libongo ya Otraco, tokendeki kozela bango, lokola bayaki na biloko ebele, entre autres kwanga, fufu, nkoko, malala, ba soso na mabata, ba paniers ya mbisi, biloko kili-kili, Mama na biso azalaki obligé a louer pick up, biso wana tokumbani, tangu camionette ekoti na bala-bala na biso, chauffeur abeti loseba to klaxon piiii, bala-bala eningani, batu nionso babimi na bala-bala, chauffeur abeti lisusu piiiiii... batu nionso bazali kozongisa bayeeeee.... Pick up etelemi liboso ya lopango na biso, bana na bakolo babukani mpo nakoya kotala likambo nini yango, ba nani baye... déchargement ya biloko ebandi, kokotisa yango na lopango, ba "dit" na biso bazali kopesa maboko, Mama na biso apesi na ba "dit" nionso basalaki mosala ya kokotisa biloko na lopango, motu na motu mua kwanga, lilala, nkoko, nguba etc...
Mikolo ya congé ya ba Noko na biso ebandi kopusana, lokola bazali bato ya mosala kuna na mboka, il faut bamilengele mpo na kozonga, babandi ko préparer voyage na bango ya retour, ba Noko basombi biloko ebele, lokola ba pantalons, vélos, ba wax mpo na basi na bango, alors moko ya ba Noko asombi radio, juste kaka oyo tozali komona na photo, donc TOUT LEO, dimanche oyo ya mokolo ya suka na bango na Kisasa, Noko abandi kobeta Tou Léo na ye, Mama awutaki na messe, tangu akoti na lopango amoni radio wana ya Noko ezali ko chauffé ba nzembo, Mama alobi na ndeko na ye na monoko ya mboka, akanga radio wana mpe akota na yango na kati ya ndako, Noko atuni Mama mpo na nini, Mama alobi na ye, na kati ya lopango oyo bazalaka na concurrence makasi, batu nionso bazali na ba radio ya kafu-kafu, alingi te baseka ye mpo na Tout Léo wana. Noko alobi na ndeko na ye ya mwasi, ezali likambo te, nazali kokanga radio na ngai oyo yo obengi yango Tout Léo, lokola Tout Léo elobaka makambo ya lokuta, nakobeta yango lisusu na libanda te, nakokota na yango na ndaku. Na kanda wana Noko akangi Tout Léo na ye.
Conversation ya Mama na Noko biso tozalaki ko capté yango malamu te, puisque bazalaki koloba na monoko ya mboka, tozalaki donc kolanda yango te, kaka tangu Noko akangi Tout Léo, alors ke ezalaki ko chauffé ba nzembo, totuni Noko mpo na nini okangi radio, Noko alobi na biso, Mama na bino azali kofinga radio na ngai Tout Léo, alobi nakende kobeta yango na kati ya ndaku na libanda te, lokola Tout Léo elobaka makambo ya lokuta yango nde nakangi yango, nakobeta yango kaka na mboka soki nakomi na ndaku na ngai.
par Wa Georges hier à 21h27
African-Fiesta Congo
.