Précisions d’Emmanuel sur le Général Bobozo
Précisions d’Emmanuel sur le Général Bobozo
Umba di Lutete, Général Bobozo, et Général Masiala
Ba ndeko,
Ezali likambo ya kobomba te mpo Congolais nionso oyo ayebi masolo ma ekolo, abungi te que Général Bobozo azalaki un sanguinaire mpe a participer activement na déstabilisation politique ya Congo na premier coup d’Etat militaire ya Afrique indépendante, na septembre 1960. Azali lisusu wana na deuxième coup d’Etat militaire ya 24 novembre 1965. Na pendaison ya pentecôte 1966 a supersisaki liwa ya batu oyo batiaki singa na kingo, a s’acharner na koboma Mulele mpo na ko venger Colonel Ebeya, ba veuves mpe ba orphelins militaires mpe alakisaki lisusu sévérité na ye na massacre ya ba étudiants na 1969 mpe na 1971.
Général Bobozo ayebaki Congo profond malamu ezala na temps de paix mpe na temps de guerre. Il est vrai qu’azalaki guerrier mpe atikala kokima front te ndenge tokomaka komona ba généraux ya mabumu minene kokima bitumba.
Général Bobozo azalaki mokonzi ya armée oyo moko te abandaki ko contester publiquement. Ye moko Général Mobutu abandaki ko contredire ye te mpo Bobozo azalaki instructeur na ye mpe ye lisusu nde akotisaye esprit mpe akembisa ye boule na kozala sans pitié na mutu nionso oyo boule na ye ezali ko correspondre na oyo ya pouvoir te. Ezalaki hasard te soki Général Bobozo akomaka général d’armée (4 étoiles) na 1970, le seul, pendant que ye moko Général Mobutu azalaki général de corps d’armée (3 étoiles). Tee na ndenge aye kokende na retraite, aucune personne atikala kolata pete ya 4 étoiles.
Louis de Gonzac Bobozo Salelo Ndembo Aduluma Wale abotami na Tarangbwa, na territoire ya Mobayi Mbongo, district ya Ubangi, na 1915 (tango oyo Congo-belge ezalaki na ba provinces te). Akoti na mosala mua soda na mokolo mua soda en tant que recru volontaire. Ezalaki na Lisala, na mokolo mua 28 juin 1933. Sima ya ba épreuves physiques mpe examens médicaux, a ndimamaki a Force publique na mokolo mua 17 juillet 1933, na Irebu. Sima ya wana, atindami na mutation na Thysville na 1934. Na mbula elandi, na 1935, akeyi na Stanleyville
Soda Bobozo abandi na Force publique en tant que likili. Malembe malamebe , akomi soda ya première classe na mokolo mua 5 octobre 1937 ; Caporal, na mokolo mua 1er mai 1938 ; Sergent, na 1er avril 1940 mpe azwui affectation na Watsa. Sima, atindami na Faradje na 1941. Kuna nde esika abengamaki mpo na kokende na campagne ya bitumba ya deuxième guerre mondiale, na Abyssinie ; Assossa ; Gambela mpe na Saïo. Sima ya bitumba, a tindami na Buta, na 1946 mpe wuta 1er janvier 1947 azwui pete ya Premier Sergent. Na même année akeyi na Luluabourg esika awumeli mingi pendant 10 ans. Na 1er avril 1949 amati na pete ya Sergent-major mpe azwui promotion en qualité ya instructeur na Ecole centrale ya Luluabourg wuta 1948 tee na 1959. Awa nde esika ayaki koyebana malamu na moko ya ba élèves na ye na kombo ya Joseph-Désiré Mobutu. Na 1er janvier 1951, Bobozo aye kokoma Premier Sergent-major. Oyo ezali pete ya likolo mutu moindo akokaki ko prétendre na yango na kati ya Force Publique. Par conséquent, money ya komata lisusu pete ezalaki te. Na faveur ya nungu nungu ya lipanda, mundele yaki kozwa mokano mua komatisa batu moindo pete mpe na 1er octobre 1959, Bobozo akomi Adjudant mpe na 15 avril 1960 a longue na Luluabourg mpe akomi na Bataillon commando ya 4ieme Brigade indépendante na Thysville.
Tango Congo ekomi lipanda na 30 juin 1960, soda ata moko te alekaki pete ya Adjudant mpe Bobozo nde azalaki haut gradé ya mutu moindo na Force publique mpo ye moko nde azalaki Adjudant. Esengelaki ko africaniser ba cadres ya nouvelle armée nationale na kombo ya Armée Nationale Congolaise. Boye nde ba nominations esalemaki epayi ya Président Kasa Vubu, sur proposition ya Premier Ministre et Ministre de la Défense na mokolo mua 1er juillet 1960. Awa nde Bobozo atombuamaki na pete ya Lieutenant-colonel mpe na fonction ya Commandant ya 4ième Brigade indépendante ya Thysville. Na 1er avril 1961 akomi Colonel.
Na mokolo mua 23 mars 1963 a tindami na mutation na Elisabethville na mission ya ko organiser 4ième groupement militaire na Katanga (sima ya sécession katangaise mpe na cours ya bitumba ya rébellion gizenga)
Na 1er avril 1964, akomi Général-major mpe Commandant ya 4ième groupement na Elisabethville.
Na 24 novembre 1965, akomi Commandant en Chef ya A.N.C.
Na 1er janvier 1968 akomi Lieutenant général mpe na 1er juillet 1970 azwui pete ya Général d’armée.
Akeyi retraire na mokolo mua 1er juillet 1972.
Distinctions honorifiques
1er décembre 1946 : Croix de guerre 1940-1945 avec lion en bronze.
1er janvier 1945 : Médaille de service en bronze à 1 raie
1er octobre 1945 : Médaille de service en bronze à 2 raies
12 novembre 1948 : Médaille de service en bronze à 3 raies
15 novembre 1948 : Médaille de bronze de l’Ordre royal du Lion
1 er décembre 1951 : Médaille de service en bronze à 4 raies
15 novembre 1953 : Médaille d’argent de l’Ordre royal du Lion
19 décembre 1954 : Médaille de service en argent à 1 raie
1er décembre 1955 : Médaille commémorative de la guerre 1940-1945 avec étoile en or
Médaille Africaine de la guerre 1940-1945
Médaille commémorative de la campagne d’Abyssinie
Croix de la Bravoure militaire avec palme en bronze
10 décembre 1956 : Médaille de service en or avec Couronne royale
6 novembre 1958 : Médaille en or de l’ordre royal du lion
Commandeur de l’Ordre national du Tchad
Commandeur de l’Ordre national du Léopard
Grand cordon de l’Ordre national du Léopard
Médaille d’or de la Révolution (Ordre des compagnons de la Révolution)
Akufi na mokolo mua 11 juillet 1982.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
Ndeko S.O. Baklongo,
Nazali ko rassurer yo tout de suite que Arthur Bakumba azalaki moninga na ngai te. Pendant que azalaki naino na école secondaire, ngai, na komaki ko bouler vie en tant que responsable mpe Evoloko oyo azalaki moninga na ye, azali petit epayi na ngai. Pour ton information supplementaire, nayebanaki déjà na ba futurs fondateurs ya Zaiko mpe na ba futurs nduliste ya Zaiko avant moninga ya Arthur Bakumba abanda kobeta miziki !!! Je crois que sika okoki ko situer ngai par rapport na inexistence ya rapprochement na Arthur Bakumba.
Au sujet ya liwa na ye, nazalaki na Kinshasa, je ne vois pas pourquoi nakoluka kobongola ba faits ndenge elekani !!! Tango nazali kozongela ba souvenirs, nakoki kobunga na ba dates mpe na ba détails mosusu, oyo éventuellement ekoki kozonga au fur et à mesure nazali kozongela masolo ou soki na retrouver ba dates mosusu na ba archives ya ba agendas na ngai nionso oyo na garda précieusement mpo nayebi utilité ya ba archives.
Précisément, raisonnement ya blog na biso ezali fonder na promotion ya mémoire collective. Na élan oyo, neti yo moko, o se présenter comme étant membre ya famille Bakumba, ekozala na bénéfice ya blog na biso en prenant l’initiative ya kobetela biso lisolo ya liwa ya Arthur na bozindo mpo na contribution mpe kolakisa ba points divergeant na convergeant relativement na version de faits oyo ngai napesi awa.
Par exemple, pourquoi oyebisi biso te que prénom na ye mosusu ezalaka Didier ? Pourquoi o décrire lolenge azalaki te, pembe mpe makolo arquer ? Pourquoi olobi te que azalaki na frère mosusu ya lipasa ? Pourquoi oyebisi biso te que abandaka ba kelasi na ye mbala moko na athénée de Kalina te ? Yo, okanisi que négation ya ba faits historiques nde eko faire avancer masolo ? Cercueil ya Arthur etambusa batu, namona yango na miso ma ngai moko mpe nayebi confusion esalaki. Finalement, mpo na nini otangeli biso kombo ya Général oyo na confondre na Ambassadeur te ? Comme on y est, nakosenga na yo, omeka kosala mua effort mpo na ko éviter kozala a la traine ya connaissance ya Histoire politique ya R.D.Congo. Kobunga te que na ekolo na biso, ba officiers militaires supérieurs ba occupa ba postes politiques et administratives ya likolo en commençant na oyo ya Chef de l’Etat, koleka na oyo ya Chef du Gouvernement mpe bazala na ba organes ya M.P.R. parti-Etat lokola : Comité central, Bureau Politique, Conseil législatif, Conseil exécutif, Conseil judicaire, Administration publique général mpe na territoriale, diplomatie mpe na ba entreprises publiques de l’Etat, etc. En parlant de la diplomatie na territoriale, na kotangela yo ba Généraux oyo :
Diplomatie
- Général Léonard Mulamba, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Zaïre, na New Delhi (1967-1969), Tokyo (1969-1976), Seoul (1971-1976), Brazil (1976-1978) ;
- Général Alexandre Singa, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Zaïre, na Kampala (1970-1972) ;
- Colonel Malila Makende, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Zaïre, na Bujumbura (1972-1973), Bangui (1973-1974) ;
- Général Eluki Monga Aundu, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Zaïre, na Tel-Aviv (1988-1992) ;
- Général Babia Zanghi Malobia, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Zaïre, na Caire, Damas mpe Beyrouth (1980-1985).
Territorial
- Général Alphonse Devos Bangala, Gouverneur ya Kinshasa (1966-1969) ;
- Général Masiala Kinkela Kulukangala, Gouverneur ya Katanga (1967-1967) ;
- Général Singa Boyenge Mosambayi, Commissaire de région (Gouverneur de province) ya Shaba (1979-1980) ;
- Général Sasa Muaka, Commissaire de région assistant (Vice-Gouverneur) ya Shaba (1978-1979).
Nayebi génération na yo te, mpe na ndimi te que yo, oyebi oyo ya ngai. Mbala ekoya, nakolobela lisusu lisolo nayebi oyo ezalaki en rapport na makombo ya kododa batu, entre autre vie na liwa ya Teddy Sukami mpe tee na lolenge ba cérémonies coutumières ekabolaki ye na molongani na ye d’une manière cruelle. Na yango, nakobakisa mpe témoignage ya tata na ye envers Zaiko oyo ezalaki wana au grand complet.
Ndeko Richard Kasongo,
Yo, okanisi que papa Wemba akoloba na nzembo que tango tokendaki butu butu na Langa, kuna ngai napesaki biloko ya kingandi mpo nazua muyu ya ngenge ? Motuna nde esengeli tomituna ezali que : pourquoi ma Zophini abandaki kozua défense na ye tango bazali kosambisa makambo ? Sima ya makambo wana, nde abandaki kozua ba cadeaux mingi epayi ya Paulina mpe régulièrement azalaki kuna na Gombe esika abandaki kozanga mbongo te !!! Soki papa Wemba akoma na Bralima, ezali justement ba gratifications ya Pauline. Paradoxalement, ba relations ya papa Wemba na Pierre Nkumu, neveux na ye, ezalaki malamu te mpe Pierre na Zaiko azalaki nde proche na Jossart, Ombale, Mazaza, Mbuta, na Depson D.V. Moanda Depson !!! Pourquoi, tango plan na bango ya kokende kosala I.S.I.F.I. esimbaki, a faire gifflaki Mazaza en public ? Pourquoi tango akomaki na Bralima ezali d’abord que a maquiller yango neti kaka que Rosa nde azali na cota ya masanga kuna, sur conseil ya Pauline ? Yoka lisusu nzembo ya mama Wali (mama mokonzi), azali plus na soucie ya ma Zophini que ya bana baye oyo ye, Zophini, alekisi.
…………………………………………………………………………………………………..
Ndeko ya Théo,
Sincèrement, mpo na kufa ya molongani ya Dido Yogo, nayebi penza malamu te,
……………………………………………………………………………….
Ndeko Serge,
Merci mingi na ba commentaire mpe na complément oyo ebakisi boyebi bua biso sur lisolo ya Polo Kamba.
........................................................................................
Ndeko Roca,
Soki nazwi ngonga na mbala ya sima, na komeka kolobela TheT, Ndaya na Anna Muyanzi.
……………………………………………………………………………………..
Ndeko King
Nakoluka moyen nameka kosolola lisolo ya Espèrent la Chacarra ; ba nzembo oyo ayembaki mpe na baye oyo ye ayembela ba nzembo, kobanda na ye ya miziki ; conflit na tata na ye mpo Espèrent azalaki élève brillant, père alingaki kotinda ya na poto mpo a continuer ba kelasi na université ; ndenge andimaka kokende kosilisa mikolo mia ye na Kinshasa.
………………………………………………………………………………………
Ndeko Richard Mawete,
Pierre na Tonton bakufa na écart ya deux semaines
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
.