Emmanuel Kandolo fixe Anaclet sur les beena Lulua
.
Ndeko Anclet : Nasilaki kotuna yo motuna mpo na koyeba soki ozalaki muana 'to ndeko ya Damien Kandolo mpe opesaka ngai eyano na yo mpe elongola ntembe na kokaki kozala na yango. Mpo nazali na moninga Damien mavambu prénom na ye azuwi yango epayi ya papa D.Kandolo. Mama Damien kandolo azali kulutu na ye ya muasi mpe ndenge okoki koyeba muana na ye ya muasi azalaki muasi ya ndako ya Dominique Sakombi Inongo. Mpe na kosepela mingi na eteni ya histoire na biso oyo D. Kandolo akamataki tango okopesa lisapo na yango. Mpe na tondi yo botondi d'avance.
Emmanuel kandolo : Nasepeli mpe koyeba que oyebani na mutu oyo ayebi famille ya papa Damien Kandolo malamu. Effectivement, nayebi Nicollette (Nicky) Kandolo. Ye azalaki muasi ya Dominique Sakombi. Bayebanaki wuta Bruxelles mpe basalaki ba fiançailles tango Dominique akomaki assistant na faculté ya médecine ya université ya Lovanium na 1968. Babalani tango ayekomona directeur ya cabinet ya Ministre Jean-Jaques Kande, na information. Ba relations ezalaki makasi entre ba familles Kande, Kandolo na Sakombi.
Sima ya makambu malekaki kati na Dominique na Nicky na Paris, nde ye Sakombi ayaki kobala sima ya ba mbula, Germaine. Ye azali muana nkasi ya Président Laurent Désiré Kabila. Bazali na ye tee lelo oyo.
Ndeko Anaclet : Mpo nini ba belge batungisaki nkumu na bango mingi mpe na ba descendants ba ye. Ba bangaki ye apesa mboka na ba allemands ndenge nsango mosusu ekomelaki biso?
Emmanuel Kandolo : Avant ya koyanola na motuna otuni, esengeli toyeba que Conférence de Berlin ya 15 novembre 1884 tee na 26 février 1885, eyaki ko reconnaître l’Association Internationale du Congo comme Etat Souverain. Yango wana Parlement belge eyaki kopesa roi Léopold II lotomo ya kokoma nkumu ya mabele iye. Na yango, Léopold II, ayaki kopesa na mabele wana kombo ya Etat Indépendant du Congo, le 30 avril 1885.
Ba Allemands babongamaki kotinda expédition africaine ebengami : Afrikanische Gesellschaft. Kasi mbongo ezalaki ya kokoka te. Mpe Léopold II a financer yango na fonds personnels na ye en accord na empereu ya Allemange, Guillaume 1er . Yango wana Lieutenant Hermann von Wissmann ayaki kozua possibilité ya kokende mpe na mission ya ko s’associer na Paul Pogge, oyo azalaki déjà sur place na Afrique. Empereur Guillaume 1er ya Allemagne na roi Léopold II ya Belgique ba signaki convention oyo ezalaki na ba frontières oyo Allemagne esengelaki e reconnaître. Convention oyo ebandaki kaka kopesa Allemangne ba avantages na exploration sans epesa ye mabele. Avantages wana epesamakai mpo na ba citoyens allemands oyo ba s’engageaki kosala exploration na E.I.C.
Chef Kalamba, suite na contact na ye ba explorateur allemands, akomaki makasi mpo akomaki na ba armes à feu mpe na autonomie na prestige makasi. Lisusu, akokaki kozala na somo ya mundele te mpo ye asi akutanaki mpe a collaborer na mindele avant E.I.C. esalema na ba belges mpe mindele wana bandima pouvoir na ye. Autonomie na indépendance wana ebandaki kosepelisa belge ya administration coloniale ya E.I.C. te.
Na esprit wana nde ayaki kopesa ba missionnaires sheutes mabele na Mikalayi mpe apesi administration coloniale belge mabele na ngambo ya rivière lulua. Geste oyo ematisaki lisusu influence na ye na mindele. Na souci ya kozala en bon terme na mindele, ayaki kondima christianisme mpe abatisami le 9 juillet 1887 mpe akomi catholique. Yango esalemaki en secret sans que peuple na ye eyeba. Tango Chef Kalamba aye ko remarquer que ba missionnaires na ba colonisateur ya E.I.C.basakani na confiance na ye, bazali ko marginaliser ye, aye kosenga na bango officiellement mpo bakotisa christianisme na mabele ma ye bien que yango ezalaki considérer comme religions ya ba marginaux mpo baye bandimaki yango bazalaki na eloko te neti ba luba lubilanji. Conversion na bango na christianisme esalaki que ba schutes basomba bowumbu na bango, batongisa ba écoles na ba ndaku ya nzambe mpe ba bénéficier na ba soins médicaux mpe na assistance makasi na hygiène et santé. Chef Kalamba Mukenge abandaki ko comprendre esprit ya ba mindele oyo te mpo ye a collabora déjà na mindele mpe asalaka na bango misala emonana, kasi ndenge nini ba missionnaires belges bazali ko ignorer ye kaka boye mpe asengi bango bakotisa christianisme mpo peuple na ye e profiter na ba avantages ya kelasi : kokoma na kotanga mpe na ba soins na oyo etalies ba maladies tropicales, eloko ezali komonanan te ? Yango wana a décidaki a attaquer bango na ba actions ya guérilla. Sima ya b ambula, tango Chef Kalamba akufi na 1898, muana na ye Kalamba Tshisungu nde azui bokonzi mpe a continuer na bitumba tee tango Kayembe Mbote, semeki ya Chef Kalamba Musungu, a proposaki bonne office na ye na mindele mpe na Chef kalamba na 1907. Aye kosala ba négociation ya paix mpe esimbi. Bitumba eseli na 1909.
Na 1916, Chef Kalamba Tshisungu akufi mpe muana na ye Kalamba Tshikomua azui ebonga ya mokonzi. Ye nde akangamaki na autorité coloniale mpo abandaki kotosa mibeko mia E.I.C. te. Mundele atindaki ye na île ya Bulambemba na Bas- Congo mpe asalakai ba mbula ebele, 15 ans na relégation. Azongaki na maladi mpe na nzotu kolongono lisusu te. Mundele abimisaki ye kuna mpo ayebaki malamu que akowumela lisusu te mpo maladi ebandaki kotungisa ye makasi. Ayaki kokufa na 1947 na Matamba.
Ndeko Anaclet : Na ndambo na yebi muana ya nkumu Kalamba oyo andimi na kombo ya Lungonzu akufaki na rélégation na Lomela,okoki koyebisa biso tina ya rélégation wana?
Emmanuel Kandolo : Relégation wana ewutaki na mobulu mobulu oyo ye na Tshikama basalaki autorité coloniale na oyo etali esprit de liberté mpo bazalaki komona que mundele akomaki kokotisa ba contraintes mingi esika bango bazali ko régner mpe na ba chefferies mosusu abandaki ko kitisa ngala ya ba chefs mosusu. En plus ya wana, a s’attakaki na ba mission catholiques mosusu.
Ndeko Anaclet : Mpe na ordre ya préséance na kati ya famlle royale ye Lungonzo azalaki nani?
Emmanuel kandolo : Nakoki k oyebisa yo te mpo nazali na ba précisions mingi te.
Ndeko Anaclet : Arbre généalogique ya famille royale ya bena luluwa ekoki koyebana ti na époque nini?
Emmanuel Kandolo : Arbre généalogique ya famille royale ya bena lulua mpo esalema ezali mpasi mingi mpo na ba raisons mibale :
1. Tozali batu ya culture orale mpe toyebaki kokoma na kotanga te. Ba écrits ezali te mpo e renseigner malamu malamu.
2. Famille royale na bena lulua ezali moko te. Yango ezali ebele. Ko répertorier ba familles nionso wana wuta établissement ya ba lulua na ba migrations nionso elandi, ezali facile te.
Ndeko Anaclet : Ezali ya solo ndenge toyebi lelo,ba nobles bazalaki ko boya kotinda bana na bango na kelasi? Mpo kelasi minene ezalaki na Kasaï occidental mpe bayekoli mingi ya mboka luluwa bazalaki mingi na kati te mpo na nini? Kimbondo ya kasai occidental ye nani?
Emmanuel Kandolo : Ba nobles babandaki koboya kotinda bana na bango na kelasi te. Marginalisation ya christianisme epayi ya bena lulua nde esalaki que bango bazala associer na programme ya enseignement te. Yango wana ebimisaki révolte na bitumba oyo ewumelaki 18 ans. Pendant ce temps, ba luba lubilanji bango babandaki déjà kokende kelasi mpe koyekola kotanga na kokoma.
Ndeko Ananclet : Histoire ya province wana esepelisi ngai mingi mpe na ndenge mokili mobimba bayekoli yango mpe ba congolais bayebi yango mingi te.
Emmanuel Kandolo : Congolais oyo alingi koyeba histoire ya ekolo na ye, akoki koyeba yango tango nionso soki amipesi na connaissance ya histoire na yango.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo