Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ndeko Mposa,

Vieux Kamalandwa azalaki commerçant mpe mécène ya Kwamy. Abandaki kofanda na Ranquin (actuel Matonge) avant akoma na Limete. A l’époque, asalaka mpe ba kata na ye mpo abandaki kolatisa ba musiciens mua mingi. Kwamy Munsi ayeba ye na nzembo papy Kamaluandwa na 1971 na O.K. Jazz.

Michel Kinzonzi : Ba origines ya kombo ya ba communes na biso na Kinshasa ?

Emmanuel kandolo : Origine ya ba kombo ya ba communes ya ville ya Kinshasa ezali ebele : kombo ya ba nkumu Umbu na Teke, kombo ya ebale (rivière), kombo ya ancien Chef d’Etat, kombo ya mindele, misuse ewuta kaka na imagination .

Michel Kinzonzi : N;djili azalaka nani?

Emmanuel kandolo : N’djili ezali kombo ya rivière. Yango ewuta na kombo ya mutu te. Banda ba nkoko na biso, rivière wana ebengamaka kaka mayi ya N’djili.

Michel Kinzonzi : Na mbula nini Matete mpe N’djili elonguaka ba zones annexes mpo ebengama communes?

Emmanuel Kandolo : Matete na N’djili ezala jamais ba zones annexes. Construction ya logements na N’djili ebandaka na 1954. Tandis que ya Matete ebandaka na 1955. Tango esili, na 1958 nde eye kokoma mbala moko ba communes ya sika oyo eyaki kobakisama na onze communes oyo : Barumbu, Bandalungwa, Kasa-Vubu (Dendal), Gombe(Léopoldville), Kalamu (Ranquin) , Lingwala (St-Jean), Kintambo ( Léopold II), Kinshasa, Ngiri Ngiri, Limete, na Ngaliema.

Michel Kinzonzi : nani a signaki décret wana ?

Emmanuel Kandolo : Premier Bourgoumestre ya ville ya Léopoldville, Jean Torcieur, nde a signaki yango.

Michel Kinzonzi : Janson Sendwe azalaki nani mpe eloko nini asalaki mpo bapesa kombo na ye na balabala munene ya capitale ?

Emmanuel Kandolo : Jeanson Sendwe azalaki homme politique congolais. Azalaki na formation ya assistant médical mpe abandaki kosala musala mua ye  na Katanga na Kinda. Azalaki mutu ya buania, mayele, mocristo makasi : protestant méthodiste, honnête mpe na comportement professionnel exemplaire et irréprochable. Abandaki mpe koloba Swahili, Tshiluba, français na anglais. A koma ba articles ebele na livre sur les baluba na 1954.

Jeanson Sendwe azalaki na ideal abandaki kolanda na vie na ye : protection ya baluba ya Katanga, indépendance ya mutu moindo mpe na boyokani kati na ba congolais.

Sendwe azalaki vice-Premier ministre na gouvernement Cyrile Adoula, kasi ayaki kolongua ye moko mpo alingaki komipesa makasi na ba fonctions na ye ya Commissaire extraordinaire ya Katanga. Na oyo etali liwa na ye, ye akufaki mokolo mua 17 juin 1964 na Albertville (Kalemie). Babetaki ye masasi na mutu mpe ebomi ye sur place. Tee lelo oyo, enquête ya malonga etikala kosalema te. Kasi elobamaka mingi que ba complices na liwa wana Kisonde Polycarpe, Laurent Désiré Kabila, Jacques Masangu, Masengo Alphonse Jean Claude Yumba na ba misusu oyo ba pelisaki moto na jeunesse Balubakat. Jeanson Sendwe babomaki ye kaka na ba ndeko ba ye ya Balubakat a cause ya ba luttes internes.

Kombo na ye epesamaki na avenue munene wana na 1966 tango Lumumba akomaki proclamer héros national.

Michel kinzonzi : Hôpital en face ya Mont Ngaliema to nzinga nzinga, kombo ya yango nini ?

Emmanuel Kandolo : Hôpital oyo ezali en face ya palais ya  Mont Ngaliema ezali Service médical ya présidence de la République. Na sima ya palais ya Mont Ngaliema nde ezali hôpital de la rive. Yango ezali spécialiser na traitement ya ba lépreux.

Michel Kinzonzi : Est-ce que ezalaka unité psychiatrique ?

Emmanuel Kandolo : Unité psychiatrique  na mont Ngaliema, yango ebandaka kobengama Lazaret de Léopoldville Sima ekomi kobengama Institut du Mont Léopold. Na décembre 1970, Président Mobutu aye kozua mokano mua kosala kosala Centre neuro-psychopathologique de Mont Amba na Université de Lovanium. Yango ekomaki opérationnel na  août 1973. Par contre, na octobre 1972, décision ezuamaki mpo na kokanga Lazaret mpe kotinda ba malades banso na C.N.P.P. Kinkole. Au départ, Kinkole etongamaki mpo na ba ko détenir ba jeune filles mineures. Capacité ya C.N.P.P. Kinkole ezalaki ya 500 lits. C.N.P.P. Mont Amba ezalaki na 300 lits.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M

Merci mingi Kulutu Kandolo nabiyano oyo opesi na mituna na ngai pe na ya ndeko mosusu.Pamba te na maye matali Unité Psychiatrique ya Lazaret nalingaki penza na zua ba précisions pamba te Papa na
ngai asalaka na bisika wana pe azali moto oyo azuaka likanisi ya komonisa na Directeur ya Lazaret ya époque wana te unité ya bato ya maboma il fallait elongwa wana pamba te ba
nevrosés bazalaki ko créer désordre pe ba dégats ebele soki bakomi kokima to ko sauter enclos ya Hôpital.Ezalaka kosala kitoko te po Palais Présidentiel ezalaki pene pe bato ya maboma ba
trainaka na pembeni. Nazalaka muana moke tango Papa na ngai ba zalaka réçu na audience na Président Mobutu na Directeur ya Lazaret  po ye moko a présenter likanisi ya
délocalisation ya unité psychiatrique.Lelo Papa akufa ba documents oyo ya ye selon ba coutumes ya ba kongo bandeko na ye ba récuperaka yango avant bakanga chambre.Esali ngai esengo na maye manso
okomi na mikolo ya sima na kozanga kobakisela yo ba mituna mosusu te.Boboto bozala na yo pe na na Bandeko banso.

Répondre