Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Le deuil (kokunda ebembe na tango ya kala) à Kinshasa

Chers Mbokatiers,

Lelo mua makanisi eyeli ngai pona kosolola à propos ya ndenge tobandaki kolela baweyi na Kinshasa. Il y a un temps eloko oyo tobengi lelo chapelle ezalaka te. Soki moto akufi, tango sango eye, eloko ya liboso bandeko ya quartier bazalaki kosala, ezali koluka nanu nzete ya mbila na nzinga nzinga pona kokata mandalala oyo tozalaki kosalela place pona ko exposer nzoto ya moweyi. Na sima il fallait kobimisa mbeto pe matelas en attendant babimisa ebembe. Mingi mingi ebembe ezalaki kobima na brancard ti na ndako epai bakosokola pe kolatisa moweyi. Après cotisation pe kosomba cercueil epai ya Basile pembeni ya Mama Mama Yemo, bamemi yango na ndaku, basokoli moweyi, balatisi ye pe bati ye na sanduku pona kozela enterrement.

Kasi motuna na ngai ezali pona nini na 4 coins ya mbeto tango tozalaki kolela moweyi, 4 bougies ezalaki allumées ata moyi makasi to soki courant ezali, pe remplacées à chaque fois que moko esili?. Lisusu kaka drap ya pembe nde ezalaki utilisé pe souvent na tenue ya pembe pona kokunda ebembe. Ba oyo bakufeli okoyeba bango na nzela to na wenze na kitendi ya pembe autour de la tête. Pe na bikolo mosusu, après kokunda, il faut bakokola suki nionso ya moto comme signe ya deuil. Sima ya kokunda, na mbeto na matelas oyo baleleli moweyi ebandaki kobuakama na fulu na mandalala. Après matelas kaka nde ebuakamaki pe mbeto direction chambre, sima ya mua tango; mbeto na matelas direction chambre.

Pe toyebaka que okoki koniata ba traces ya pneus ya corbillard te soki eleki na balabala na bino pona kotika pe kozua ebembe, il faut opumbua yango; lisusu avant ya kotala ebembe il fallait kotia signe ya likala na front po olota yango te. (Ah bomuana pasi) Oyo na soulever awa ezalaki pona bato nionso te po bato ya ba moyens misusu ebembe ezalaki kobima déjà na kati ya sanduku. Lelo comme tout bouge, tokomi na tango ya chapelle ardente pe ebembe esukuami pe balatisi na morgue sima bati na sanduku po ebima afin que ezala exposé. Kulutu Lutumba Simaro asala nzembo ya kitikuala pona makambo oyo.
Nasuki nanu awa pona lelo.

James

KISITA

Schekdan 001

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M

Rituel ya bougie
Lisolo ya ndeko James na maye matali lolenge ya kolela bweyi, etikaki biso na mua nzala po na motuna ya bougie oyo epelaka na basonge ya mbeto. na yango, nakomeka kolimbola na bokuse, ndenge
nini, epai ya bakulutu na biso, epayi na biso na Léo 2 to Mnagembo, babandaka kozua yango.

Bougie ya santu Maria.
Na libanda ya Saint François de Sales, oyo ezali bongo ndako Nzambe monene kati ta kisasa; Kaka Saint Anne to pe Saint Pierre na tango ya flamand ekokaki kotiya ntembe na biso. D'ailleurs, moko
wa bakambi n'ango to curé, na ebandela n'ango (bafungoli yango na 1938) ezalaki bongo Mgr Georges Six, moko wa baye balongaki etumba po te lingala oyo tolobaka lelo, eponama, n'esika ya Lomongo,
lokola ndinga ya mampinga to Force publique, yango pe ekofungola nzela po te lingala ekoma pe lolaka ya botangisi bana na engumba ya kisasa.
Ebongi toyeba te libanda ya ndako nzambe na biso, ezalaki na "grotte ya Mama Maria". Esika yango, basango bazalaki koyamba ba losambo pe bougie ezalaka kopela mokolo mobimba. Po na bato mingi, na
tango wana tozalaki mingi bakatoliko,, kopelisa bougie ezalaki associé na losambo ya kafu kafu. Vieux Athos, oyo azalaka suka na "amoureux" epayi nakoli, sekele na ye ezalaka losambo ya bougie.
Ba oyo bazalaka na posa bazua ba Nzukul, soki baliongi losambo ya danzé, bazalaki komema bobele bougie wana eapai ya Athos po atindika balosambo wana. Mbala mingi, ezalaki kosalema bobele na
moyi, sima ya bozongi bana na kelasi, soki recréation esili. yango wana bana mingi bazalaki kokima, sima ya recréation po na kokota gwa.

Combat ya bougie

Selon Kolonga Molei oyo akoma mama na buku "Kinshasa, ce village d'hier", ye moko azalaki mobotama ya kintambo na loboko ya Chanic Masuwa, Ba oyo bazalaka kobenga ba bills, goza to yanké, ezalaka
ba oyo babandaka kokima kelasi po na kokende kosakana epayi ya mayi ya kalamu, makelele, gombe to na ebale ya Congo. Lokola bazalaki pe bato na kamo, po na kolakisa bokasi na bango, bazalaka
kobunda mingi. Kasi po na kokata tembe, arbitre ya bitumba na bango ezalaka "bougie". Etumba ekobanda pe ekosila nzela moko na bougie to pe soki moko akweyi makali kali. Lisolo ya etumba moko
nayoka na bomuana ezali ya Willy Cody, leki ya Tex, bango bazalaka bateke, bato ya kisi ya bitumba. Selon Yaya na ngai oyo amonaka etumba wana, Willy Cody alalisaka yuma na Kudintu moko, alors
que bougie ezalaki nanu na kati. etumba esalemaka na sima ya hopital ya kintambo.

Répondre
J

Bandeko ya mbokamosika mbote

Esengo etondi ngai mingi pona ba interventions ya bandeko nionso pona masolo oyo. C'est vrai ndenge bozali koloba ete biso ba congolais tobuaki nionso bakoko batikela biso pona kokunda baweyi.
Toyeba ete mayele na bango ezali na litomba makasi na kati ya bomoyi na biso soki totali ndakisa ya ba tradipracticiens ya solo oyo bazali kosalisa pe kobikisa na matiti to banzete ya bokoko.

1. Pona mandalala ndenge ndeko ABE asili kolimbola pe bandeko basusu, nzete ya mbila ezali ya solo nzete ya bomoyi to arbre de vie. En dehors ya manso nzete ezali kopesa biso tango ezali ya
kotelema (masanga, mafuta,...), ata soki bakati ezali toujours kopesa bileyi lokola nsombe to mafundi (selon bikolo). Croyance ya bokoko ezalaki ete moto azali lokola nzete ya mbila po bomoyi na
ye esilaka te pe sima ya liwa bomoyi bua sika ebandi, epai moweyi akei nde kobatela baye batikali lokola pe nzete ya mbila ezali koleyisa to kosalisa ata bakati to ekufi. Tomonaka na ba
coutumes misusu ete famille ekendeke kotika basani ya biloko likolo ya tombeau ya moweyi, ngai na bino toyebi te manso malekaka sima.

2. Pona bilamba ya pembe na tango ya kokunda moweyi, pona bakoko, koleka na bomoyi ya sika ezali kosenga bopeto to purêté, yango wana moweyi azalaki kokundama na bilamba ya pembe symbole
ya esengo ya bokomi o mboka sika. Kasi biso totikalaka, tango tolataka mokuya, ezalaka nde bilamba ya moyindo symbole ya pasi pe mawa sima ya kobungisa ndeko, mobali,
muasi, muana, tata to mama.

3. Pona ba bougies, yango nde ezali muinda ezali kongengisa nzela oyo moweyi akolanda pona bokeyi pe bokomi o mboka sika po nzela wana ezali molili to "tombe" to "mutombe ya diatila" ndenge
bakongo bayembaka. Na nzembo "kisita" yo ndeko archiviste (oyo nasepeli na mayele ya mosala na ye) atieli biso, maloba wana ezali ya solo tango ayembi pona
bougies ete ezali muinda pona kolakisa nzela moweyi azali kolanda.

Pona bosukisi, nakoloba ete nionso bakoko batikela biso ezali ya kobuaka te po balekaki biso mayele ata ko bakotaki kelasi te ata ko lelo technologie moderne ekomi ya biso. Bakoko na mayele na
bango batikela biso buatu (pirogue) kasi lelo tobakisi moteur (ekomi lokola canot rapide). Malheureusement lelo biso ba congolais tobuaki manso na ndenge ya kokunda bibembe pe
tomikotisi na pasi po manso ekomi kaka mbongo en $.

Botondi na bandeko nionso

James

Répondre
M

Répondre
M

Nalingi nabakisa mua moke na maye ndeko Abe alobi lokolo ya nzete ya
mbila, po nakoyanola na mokuse na Serge.

Bougie ya bo nkoko eza kino lelo. Na mboka bapelisaka muinda na singa ya coton too ya enteni ya elamba imbibé na mafuta ya mbila o kati ya saani too eteni ya calebasse. Soki bapelisi yango muinda ekopela kino tongo. Bapelisaka muinda ango mingi mingi tango muana abotamaka.
Mafuta ya mbila eza source d'énergie o mboka. Tobosana te ndika ya mbila eza lokola koni. Bakolambelaka nango.

Donc Nzete ya mbila ndenge Ndeko Abe alobi ezali na motuya monene na kati ya culture na biso:
mafuta, masanga, kombo,
ndika, mandalala,mbila,...ewuti na nzete ya
mbila. Ata nzube ya mbila esalisaka mpo na kolongola mayanzi.

Messager

S

Mbote ndeko Abe,

Nasepeli mingi na ndenge olimboli sekele ezuami na nzete ya mbila pe
na mandalala nango pe lisusu likambo ya na bougie.  Bougie na lingala eza nini pe ewuta wapi?  Zua tango okota na mozindo o kolimbola sekele ezuami na bougie, esalami na
nini pe bolamu nini ezuami na bougie,  nasepeli mingi na lisolo oyo.

Question: Balobaka ke balobaka mabe ya mutu akufi te kasi pona nini tolobaka
mabe ya Yuda Scariot, Hitler, Mobutu etc... nani akofongolela nga.

Mokolo malamu.

Serge Kongo na biso

Répondre
J

Cher Joseph pululu

j'ai lu avec beaucoup d'intêret votre intervention très appréciable dans laquelle vous avez décortiqué les habitudes abandonnées en mitière de chapelle en rameaux du palmier, des comportements
exhibitionnistes de nos frères et soeurs pendant le deuil ainsi que le phénomène poto poto qui a aidé pas mal des familles à enterrer leurs morts. Notons qu'aujourd'hui à Kinshasa, les coupeurs
de noix de palme appelés "mokati mbila" qui sillonnaient les rues de la capitale ont tous disparu comme vous l'avez rappelé. Ces gens ont fait de ça leur métier en instruisant leurs enfants et
tout ce qui s'en suit.

Mais j'aurai souhaité que vous apportiez vu votre expérience, votre contribution  sur la présence de 4 bougies placées aux 4 coins du lit pendant les veillées mortuaires à l'époque
et ce, nuit et jour

James

Répondre
J

Quelques repères pour le deuil à la kinoise.

Né à Kinshasa, dans l'un des plus vieux quartiers de la capitale, mon expérience du deuil tient à la fois, du deuil des yankés, des bakongos et des bangala. Sur les bangala, je pense avoir déjà
entretenu nos mbokatiers sur la mort de Tekele qui m'a marqué, avec ses "Tekele okendeke, repreté à l'infini par des pelureuses bangala". Il faut cependant souligner les points de convergences de
ces deuils à la kinoise, avec notamment, la place du Mandalala, les pleurs et Mutombe et enfin,  le rituel de la contrinution poto poto, pour tous ceux qui traversent un quartier en
deuil.

1. La chapelle ardente de rameaux de palmiste.
sans revenir sur la question des rameaux Mandalala qu'Ade a bien expliqué, j'ai été très choqué en ce qui me concerne et depuis quelques cinq ans, que lje me rends régulièrement à Kinshasa, para
l'adoptioon du Catafalque, pour remplacer les Mandalala. Autant le principe de présentation du corps du défunt en ctafalque me parait acceptable, autant, la suppression des rameaux me révolte. Et
cela tient à l'inculture des congolais qui pensent quece qui vient d'ailleurs est meilleur, sans s'interroger sur le bien fondé de sa culture propre. Il me semble que la suppression des mandalala
est un raccourci et un fainéantise des Kinois, qui n'ont pas appris à monter sur les palmiers avec la fameuse corde "Nzemba", car, encore une fois, Koffi Olomide nous le rappelle: c'est une
affaire de spécialiste et le kinois ayant oublié d'apprendre à se servir du Nzemba pour aller cou^per les rameaux, a opté pour sa suppression dans le rituel du deuil. Et je le dis en connaissance
de cause, lors de mon dernier séjour à Kintambo , j'ai constaté que les palmiers du Centre social "Bidama" sont toujours là. mais ils ont tellement grandis qu'il faudrait former une nouvelle
génération "Babuti mbila" pour d'une part les tailler et au besoin les couper pour répondre à la demande de rameaux pour les deuils. Sinon, les Bourgmestres devraient en tout cas, salarier des
babuti mbila, de fut-ce que pour l'entretien de ses arbres essentielles dans notre environnement: Ade l'appelle l'arbre de vie. Et un lindala au coin de la rue, reste essentiel pour nous informer
qu'une vie est partie.
2.Les larmes des mamans: mamère me disait toujours de ne pas retenir mes larmes contrairement à l'idée qu'un garçon ne doit jamais pleurer. Ma mère m'a toujours dit que notre coeur se régénère
avec les larmes que nous versons pour les nôtres. Elle même s'est toujours fait un point d'honneur à ne jamais rater un deuil pour pleurer. Aujourd'hui, les deuils à Kinshasa sont surnommés
"Bercy". C'est à peine si les participants versent des larmes, tellement d'un côté les femmes doivent faire attention à leurs maquillages et les hommes évitent de montrer qu'ils sont affectés.
Nos morts partent sans larmes. Même les "Mutombe", ses chansons de tristesses que nous avons appris chez les cathos ou les yankés et que l'on reprenaient en choeur, sont passés de mode. il est de
bon ton de laisser la place à des chansons pour "pleurer Jésus" à la place du défunt. C'est à peine d'ailleurs que l'on sait qui est mort, alors qu'à l'époque du célèbre Walo, on plaurait
vraiment nos morts. aujourd'hui, on se contente de jouer "aux civilisés" qui ne pleurent plus et qui sont là, pour montrer qu'ils sont assez riches pour offrir de funerailles de grande classe à
leurs proches.

3. La contribution Poto Poto: selon les aînés, la taxe Poto poto, que devait s'acquitter tous ceux qui traversaient un quartier en deuil, a été instauré à la mort d'un certain "Champagne". Un
décès immortalisé par Kwamy avec sa chanson Mawa na liwa ya Champagne. Dans les années 70, la tradition du poto poto sera l'affaire des yankés et des jeunes des quartiers, qui trouveront ainsi,
le moyen de financer leurs veillés mortuaires et matanga, avec les contributions - forcées- de tous ceux qui traverssent un quartier endeuillé avec le risque de se voir badigeonné de boue. A la
mort de Bavon Marie Marie, toutes les jeunes filles de l'époque exhiberont avec fierté le poto poto du deuil de l'artiste-vedette des bana 15 ans. Cette contribution a permis aussi d'aider des
familles pauvres à réussir l'enterrement des leurs. Aujourd'hui tout cela est dépassé. il faut juste avoir un "pro", un frère basé en Europe. la solidarité de quartier a été foulée au pied, à la
place que du m'as-tu-vu.
Ei dire que pépé Ndombe avait vu venir cela, en publiant au début des années 80 une chanson prémonitoire:

Mokolo na kokufa, nayebi ndenge bakolela nga, chantait-il;
Ebembe na ngai na mbeto, Sisi feti ya moto nionso
Kinshasa ekoma façon, esika ya liwa ekoma feti

bayeli nde mibali, mibali bayeli nde ba chérie
mokolo nakokufa, ekozala bongo
baye bakufa liboso tomonaka ezala se bongo

Eh bien, voilà la prophétie de Ndombe Opetun qui s'est réalisé, aux dépens de notre culture mortuaire. Pauvre Kinshasa, pauvre Congo!!!

Répondre
J

Ndeko ABE, mbote mingi.

Vraiment ndeko ABE natangi pe nasepeli pona ndimbola na yo na oyo etali mandalala ewuti na nzete tobengi ya "mbila" to arbre de vie. Ndimbola na yo efongoli lisusu mua mayele na ngai po na mokili
koyekola ezali eloko ya mikolo nionso po ozua mayele kaka te kasi po sagesse ekoba pe. Ya solo na oyo etali bougie na mbeto ya moweyi, okoki kozala na raison na tina te soki ebembe ebandi
kobimisa solo, bougie nde ekobengana ba nzinzi. Kasi nakanisi lisusu maloba ya nzembo moko ya kala titre na yango "kisita" pe eyemba boye : "moyi makasi bougies ekopela ngai nake
motako mayi ya miso etangi mbote ya suka po tokabuana, corbillard motuka na ngai ya suka... mpe bougies bopeliseli ngai ezali pona komona nzela nazali kokende to kolanda"...Nakomi nde
maloba oyo ezali na tina kasi bandeko bayebi nzembo wana pe ezali na site na biso ya mbokamosika. Yango nalingi nayeba soki moyembi oyo alobi pona bougies ekoki kozala ya solo que ezali nde ko
éclairer nzela ya moweyi.

James.

Répondre
A

MERCI MBOKA MOSIKA MPE NA NDEKO JAMS MPO NA IDEE OYO...

NGAI NA KO PESA REPONSE NA LIKAMBO OYO ETALI BA BOUGIES MPE MANDALALA:

BA KOKO NA BISO BAZALAKI MAYELE MAKASI CONFIRMONS QUE KOLEKA BISO MPO TALA TI NA 21EME SIECLE TO ZALI KO COMPRANDRES BILOKO MISUSU TE MPONA NINI EZALAKI NDENGE WANA.

- LINDALALA NA COIN YA BALALA ELAKISI SIGNE QUE EBEMBE EZALI SUR CETTE RUE.POURQUOI KK LINDALALA YA MBILA? PARCEQUE EWUTI NA ARBRE DE VIE.

" NA KATI YA NZETE YA MBILA, TOZALI NA BA BILOKO MINGI. EPESAKA MAFUTA,MISUNI TO MA KOKOLO, MBETO YA KITIKUALA,MASANGA, KITI YA KUALA,NKOMBO, NKONI MPO NA KOPELISA MOTO, MOUSS YA MATELA, NDIKA
MPO NA KOLIA, ETOKO,MUTAMBU,MESA YA KUALA, BA CAHIER TO BA FEILLES,MUNGUA MPE BILOKO MISUSU...ATALISI BISO QUE MOTO AKOKI KO VIVRE KK NA NZETE YA MBILA (ARBRE DE VIE) ALORS LINDALALA NA COIN YA
RUE, ELAKISI VIE MOKO ESIYI. DONC EBEMBE

- MANDALALA  AUTOUR YA MOWEYI EZALI NA MOTUYA MAKASI MPO SOKI NZOTO YA MOWEYI EBANDI KO BIMISA SOLO ALORS MANDALALA EDEGAGEAKA  SOLO MOKO OYO E ABSOBAKA SOLO WANA MPE LE MEME PARFIN YA
MANDALALA EBOMAKA MICROBE OYO EZALI KO BIMA NA SOLO YA NZOTO YA

MOWEYI. MPO TO ZALA INFECTER TE. CE POUR CELA QUE TALA TOLELE BIBEMBE MINGI NOUS ETIONS PROTEGER MAIS TO YEBA TE.

-4 BOUGIES, AUX 4 COINS... SEULMENT PONA KO EVITER BA NZINZI BA PUSANA TE

NA PENE YA NZOTO YA MOWEYI. (Na kosenga na ba ndeko bo sala experiance la ou il ya le clima tropical: soki ozali komela masanga na libanda,oko mona ba nzinzi ba koya; yo pelisa kaka bougie pene
wana,okomona que ba nzinzi ba kopusana lisusu te)

POURQUOI PRCQUE COMPOSITION  YA BOUGIE EZALI UN PEU MULAYI.(to ko expliquer yango mokolo mosusu)

DONCS IL YA RIEN DE SPIRITUALITE  on peu mettre meme 2 ou 3 bougie mais 4 parcque mbetu ezali munene.

MERCI NDEKO JAME  soki motuna ezali na za pres ya ko limbola.

ABE

Répondre
M

Ba Mama na ba Papa ya tangu ya kala, bazalaki koloba ke soki batu bazali lisusu kokufa te na Hôpital Congolais, okomona BASILE akeyi kofuta avocat epayi ya ba docteurs ya lopitalo po baboma bato
mingi, alors méfiance ezalaki makasi na population na Basile puis batu ya mosala ya Basile.

Nabanzi méfiance oyo esalaki ke ba BASILE ezala te na "belge" to na cité ya population noire to indigène.

C´est normal ke Basile na batu na ye ya mosala bazala ba NDOKI, pe ezalaki difficile ya kolongola na mémoire collective idée wana ya ki NDOKI na Basile, puisque na tangu ya kala ata kutu lelo,
liwa ya africain toujours derrière na yango il faut omona kaka Ndoki moko, il parait ekoma même na ba Ndoki ya famille mosusu bazali na droit ya koliya mutu ya famille mosusu, nionso oyo batiya
yango na compte ya Ristourne Nocturne to likelemba ya butu.

Ba Ndoki ya Katanga bazali koliya na Kinshasa, ya Bas-congo bakoma koliya na Kisangani, ya Equateur na Kasai, ya Bandundu na Kivu ainsi de suite, comme ca ata bokoti ba Nganga moyen ya ko
atteindre ba Ndoki wana ekozala te, puisque bazali même pas sur place voire même pas na famille.

Lelo ba Basile ekoma na ba quartiers mais toujours bazali suspecté na batu, mokolo ya basile, voulu ou pas azali taxé de Sorcier au même titre ke Noko ya défunt.

Répondre
S

Mbote ndeko James,

Lisolo moko kitoko ezongisi nga na Kinshasa na bo muana.  Pona nga mokili e changer mais na ndenge ya mabe.  Client nanga moko ya mundele ayebisaki nga un jour na phone : « Finalement un jour tokobanda lisusu kosoloka na batu na phone te sauf na internet
kaka, bongo ekozala mokili ya ndenge nini oyo »

1. Motuna ya 4 bougies eza kitoko, na butu tokoki koloba eza pona molili
mais na moyi?  Pona nga nazalaki komonela yango lokola ezalaki elembo ya mawa.  Po na kala tozalaki komona bougie kaka na esika ya ebembe, na ndeko ya Nzambe ya Catholique pe ba nganga
nkisi batu bazalaki na kosalela nango, ezalaki mua suspect bamona yo na bougie.  Bana mike bazalaki kokoma esika ebembe ezalali te. Lutumba ayemba: “bougie ekotangisaka mpinzoli pona
pasi…”

2. Mukokoli ezalaki selon ba coutumes peut être pona koboya likama eya
lisusu na libota na mikolo wana te, bokomi batu ya sika mais ... kasi liwa eyokaka avertissement te.

3. Oyebi ke mutu oyo akangi “singa pembe na mutu” na tango wana bazalaki
kokanga ye te na ba gendarmes po azalaki singe ya deuil.  Lelo ekoma tenue mais respect ya ebembe eza
lisusu te.  Ba nzembo ya mabe pe komela makaya ya makasi, kobeta ba kulutu pe ba mpaka pe kobongola esika ya ebembe ekoma esika ya kolakisa bilamba alors ke eza nzela ya biso
banso.

4. Mbeto bazalaki kobuaka tango crise ekomaki nanu makasi lokola lelo te po
ezalaki lokola mokuya, salité mais avec conjoncture ya vie, bakomaki kosokola yango pe bakotisi na suku po soki bo buaki batu yango mususu ba kolokota yango.

5. Na mboka na biso Mandalala ezalaki symbolique na b'occasion ndenge na ndenge,
peut etre pona richesse ezuami na nzete ya mbila lokola ebotaka mbila, oyo bokoki kosalela mafuta na savon, masanga ya nzamba, ba nzombe (eza lokola mbinzo mais yango ezalaka ya pembe mutu
noire), mandalala ezalaki kolakisa feti to mawa na kati ya quartier etc...   Nga namona tango nazalaki kokola, papa moko aya, afanda na mabele aza kolongola ba brandilles to makasa
moko moko ya mandalala po asala bikombo pe atekisa, wana nde nakomako  komona ke eza nango na botutu te.

6. Trace ya ba pneus biso pe tozalaki ko sauter yango sinon okokufa.  Mais
vieux moko azalaki kofutela pene na biso, ye azalaki kokumba « kund’ebembe » pe azalaki koya na corbillard naye na quartier na moyi, abendi essence pe ateki yango, tii tokomi ko
comprendre ke eza nango kaka mutuka lokola mituka mususu, ba misusu bazalaki koloba ke ba chauffeurs ya kund’ebembe bazalaki pe ba ndoki.

7. Ezalaki lisusu na bizalali ya "Blue" bazalaki kopakola batu pona contribution,
eyaki kokoma putulu ya pneu mais basangisi na masuba.  Batu mususu mbongo ya blue bazalaki kokomisa yango te na cahier ya cotisation.  Biso tokunda moninga na biso moko na mbongo ya blue, nga mutu asimbaki mbongo nionso.

Alanga nzembo moko ayemba ayemba : « mutu akufi
pembeni musiki ekobet,a bana ya Léo bakoma bana Kinshasa..

ooo ooo papa, ooo oo mama, mokili mosi e changer eee mokili mosi mobongani iii, makambo  nionso esi e changer…”

Serge Kongo na biso

Répondre
J

D'abord remerciement ya mingi na ndeko archiviste pona image ezali ko illustrer article oyo. Ya solo que lelo kokunda ebembe na Kinshasa ekoma non seulement casse-tête mais concurrence sur
le plan cercueil, chapelle, corbillard pe uniforme par rapport ya famille X; nionso wana aux frais des professionnels bazali na mikili ya poto. Bongo ba familles oyo bazanga ba pros, bakundaka
bibembe ndenge nini? Kala ezalaki nde cotisation ya bana to membres de famille ya défunt(e), ya ba bokilo pe tango mosusu ya quartier. Toyeba que nous congolais, nous nous asseyons
confortablement sur de mauvaises habitudes et qu'on arrive difficilement à éradiquer quand elles atteignent la moëlle épinière. Nazali contre le fait te que bato ya poto bakunda famille na bango
na honneur mais nazali nde ko évoquer un fait de société sur le plan mentalité culturelle. Nazalaka na pompe funèbre na Kinshasa pe mokolo mosusu famille moko pona kobimisa ebembe, balingaka
kosimbisa buku ya lopango epai ya gérant po bazua cercueil ya niongo. Informé au téléphone po bazua aval na ngai, je me suis rendu vite sur place pona koboya proposition wana et j'ai intimé
l'ordre na gérant na ngai apesa famille wana cercueil ya choix na bango jusqu'à ce que bakoya kofuta mbongo. Et bayaka kofuta après. J'ai eu des larmes aux yeux devant cette situation
pe bato ya motindo oyo bazali ebele na Kinshasa lelo. Mawa pe pasi bandeko na ngai po epai mosusu soki mbongo ya cercueil ekoki te bapesi cercueil mais couvercle etikali jusqu'à ce que bokosilisa
mbongo.

Répondre
F

Flash ! Flash !

Le cimétière de Kimbanseke emporté par les eaux de pluie.

Répondre
S

Ndeko James,

Ya solo, oyebaka ete tango na tango ezalaka na makambo na yango, Congo ya Kala yango te ezali Congo ya Lelo to Congo ya Sika, makambo oyo nionso tozali komona lelo na Congo na biso, na mikili
misusu baleka makambo yango kala penza. Ezali te mpo na bilanda-landa, kasi na bomoyi ya motu, likambo oyo omoni moninga azali kosala, soki ezali malamu yango nde yo okolanda, mpe oyo omoni ya
mabe epayi na yo moko, yango nde okobuaka, na moyi ya lelo ndenge Congolais abimi to atamboli na mokili, ezali te oyo ya ba Congolais avant l´indépendance to na ba mbula ya sima ya Lipanda, lelo
kokunda ebembe ekomi casse-tête na Congo surtout na Kinshasa, il fo dépenses ya makasi, kasi na mikili misusu kaka ndenge tozali kosala lelo na Congo mpo nakokunda ebembe, ezali penza dépenses ya
makasi te, ezali nde manque ya politique ya bakambi ya Ekolo na likambo etali bokundi bibembe, na désordre wana, batu oyo bazali na ba "Basile" to pompe funèbre, bakomi ko profiter na situation
wana. Na mikili misusu oyebi ete kokunda ebembe ezalaka OFELE, Leta akozua charge nionso to ako participé na ba dépenses funéraires, ebele ya mbongo oyo ezali koyibama na mokili na biso Congo, ba
avions ezali kowuta na MPOTO mpe ezali kokita na mabele oyo NKITA ya ekolo ezali, ezali kosala ba Kwenda-Vutuka, sans que Leta aloba, a punir batu oyo bazali kosala makambo wana, tozali komona
ndenge nini mikili misusu oyo bazali ata na NKITA moko te, ndenge bazali ko DONDUA na mbongo ya Congo, ezala na Afrika to na Mpoto, oyo ezali kaka paranthèse, kasi biso tozali bato bayindo,
tozali mpe na BIZALELI na biso, surtout lokumu oyo topesaka na MOLIMO YA MOTO, azala na bomoyi to na tango ya liwa. Ata ndele nionso ekozonga na esika na yango. Kobosanaka te, ete ezaleli ya moto
ewutaka na ba NKOKO na ye oyo bino bato ya mayele bobengi yango Authenticité Africaine.

Sala Bisala

Répondre
B

Nionso oyo ezali ko salema leo ezali bilanda landa. Bien que situation economique ekomi tres difficile, kasi biso ba congolias to lingi ko sala ba depense sans objet.

Nionso oyo ba zali ko niokola ba oyo ba kenda mboka mopaya po ba tinda mosolo. Au lieu mbongo wana esala ata bilanga, to esala ba puits ou chateaux d'eau, to zali ko depenser yango na vanite. To
koma ko kunda bibembe na ko lata unifoprme.

Po na couleur ya drap; moweyi azalaki considere lokola mutu oyo aweyi po ete akende na lola. Kuna na lola to kanisaka ete ba lataka kaka bilamba ya pembe.

Po na ba pneus, ezali superstitution.

Mawa na biso na Congo, to zali ko yeba ndenge ya kosalela mbongo te.

Répondre