Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Tangu conférence ya Nord-Sud, to francophonie esalamaki na Benin na epoque ya president Soglo dieudonne Nicephore,  president Mobutu akendeki na Togo mpo nakobondela General Eyadema Gnassigbe Etienne aya mpe na conference wana, puisque Eyadema azalaki kolinga Soglo ata moke te, puisque ye azalali président oyo ba voter democratiquement, après transition na sima na CNS, na kanda wana Eyadema azalaki kozua lisusu pongi te mpe aboyaki koya na likita wana na Cotonou.
Ba délégations nionso ya monde entier bakomaki deja na Cotonou, y compris Jacques Chirac ya France,  entre temps Mobutu azali kaka na Loména Togo, apres baye ko annoncer ete Marechal Mobutu azali koya sans Eyadema, biso nionso ba Congolais (zairois) tokeyi na aeroport ya Cotonou, na groupe choc ewutaki na Nigeria, donc tozalaki na ba Ambassadeurs ya Congo na Nigeria na Benin, mokolo wana na Cotonou, mpo nakoyamba Vieux Seskoul.
Avion ya air zaire akiti, president Soglo ya Benin, akanisaki ete president Sese Seko aye na avion wana, waya, tangu porte ya avion efunguami, tomona kaka ba berets verts na ba berets rouges bakiti, sans vieux Seskoul, quelle farce, mua doute ekoti. Entretemps ba soda congolais bazwi controle ya aeroport ya Cotonou, une heure apres tomona lisusu avion mosusu ya Leopard Volant, akiti, bandeko, bongo tangu porte ya avion afunguamaki, oh la la, tangu Nkoyi Mobali na toque ya Leopard abimisi motu, mokili eningani, quelle animation DJA LELO etoki kotoko. Saddam Kongolo mpe ayaki nzela moko na tata na ye na Cotonou.
Tangu Afdl ekotaki na Kinshasa, ba dignitaires mingi ya MPR parti- etat, bakimaki na Cotonou mpe na Lome. Kaka mokolo Aurlus Mabele ayaki kobeta miziki na Cotonou, lokola azalaki kofanda na Hotel moko na vieux Bula Mundungu, nde esika toyaki koyeba mpe komona vieux Bal, tokeyi kopesa ye mbote, mpe vieux Bula Mandungu azalaki kotanga BIBLE mokolo yango.
Eleki mua mikolo delegation ewutaki na Kinshasa, ezalaki bongo Directeur ya Cabinet ya president Mzee Kabila, vieux Thomas Kanza, na vieux Yerodia Ndombasi, d'ailleurs balakisaki vieux Kanza na Tv ya Cotonou, balobaki botala motu oyo akomaki Discours ya Lumumba Patrice, bino moko boyebi ndenge Afrique elelaka Patrice Emery Lumumba, mikolo wana biso ba Congolais tomataki ngenge ya danger na Cotonou.
A part mission officielle na bango na Cotonou, epayi ya général Mathieu Kerekou, ba vieux na biso oyo misato, bakutanaki na vieux Bula Mandungu, mpe bayebisaki ye ete president LDK azali na mposa mpe asengi na ye azonga na Kinshasa, kasi vieux Mandungu aboyaki na motema moko kozonga na Congo.
Ndenge toyokaki ete, raison vieux Bula Mandungu apesaki, alobaki atiki politique mpe akomi kosambela. Ekoki mpe kozala ya solo, puisque Saddam Kongolo mpe ayaki na Cotonou, kokutana na vieux Mandungu, mpo nakosala MPR en exil, il parait vieux Mandungu abenganaki Saddam Kongolo, à part wana Saddam Kongolo abandi koya mingi na Cotonou na cadre ya société na ye, ya téléphone.
Vieux Bula Mandungu asombaki ndaku na quartier Eau Vive na Cotonou , ezali lokola Gombe na Kinshasa, comme un malheur ne vient jamais seul ba Sinangale bamelaki ye, mpe mbongo mpo nakozongisa ebotaki ba problème sur problème.
Sima wana vieux Mandungu aye kosomba ndaku na quartier lokola Debonhomme na biso na Kinshasa, kasi ndaku yango ezalaki inachevè, puisque ezalaki ya etage, kaka na nse nde ye moko vieux motu asilisaki yango, kasi na likolo babetaki kaka beton, étage emataki te, parcelle ezalaki très bien, cloture na makambo nionso.
Vieux Bula Mandungu akomaki kosambela très très fort, akotaki na église moko ya quartier esika asombaki ndako, mpe ba Beninois ya quartier wana balingaki ye mingi, lokola akomaki kobela-bela, apres messe il faut lisusu baya kosambela na lopangu epayi ya vieux, wana nde ekomaki rythme ya vie ya vieux Mandungu, losambo na bible.
Ndenge kaka boyebi, mpo na biso ba congolais, ki pasteur ekoma mosala ba nkoko batikela biso, ba pasteurs congolais bazalaki na ba eglises nionso ya ba beninois, bongo mokolo vieux Mandungu Bula Antoine akufaki, sango etambolaki rapide, biso nionso ba Congolais, ezala ba congolais ya Brazza, Kinshasa, Libreville, Luanda, Bangui, pour ne pas dire BATU YA AFRIQUE CENTRALE, tozalaki kuna na matanga na lopangu ya vieux, mpe tosengaki ebembe eya na ndaku, puisque na Afrique de l'ouest ebembe ezalaka na la morgue, kaka jour ya enterrement nde eye na ndaku, kasi biso tolingaki matanga ya vieux na biso esalama na ndenge ya Authenticité na biso, mpe esalamaki kaka ndenge biso bana ya Congo tolingaki.
Oyo ezali témoignage na ngai na fin ya vie ya vieux Bula Mandungu.

Garba Emeka.
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
S

Merci frère d'avoir fait ce temoignage. Il y a un manque terrible des information sur nos vieux qui ont fait l'histoire de notre pays. On doit comprendre leurs parcours pour faire un jugement et
surout pour eviter les erreurs commisent.

Merci encore une fois

Répondre
M

Ndeko Garba Emeka,
Awa na mokili malamu tolingana, mpo Tata wana Mandungu, na Kinshasa na tangu ya Mobutu, bango bazalaki batu ya somo, tala na Cotonou, bakomi komela ye lokola muana moke, mpe na mokolo ya suka kaka
se ba ndeko na ye Bana ya Congo, se bazalaki sima na ye, comme on dit , oyo ezali liteya ya monene na biso banso, nakosukisa se na liloba moko : TOLINGANA.

Répondre