Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Nzeza Landu , JM Bomboko , Kitima Bin Ramazani
Edmond Nzenza Nlandu, derrière J. M. Bomboko, entre Kitima Bin Ramazani (en lunettes) et un blanc non autrement identifié.
Mbote Kulutu Emmanuel Kandolo,
Na zone ya Kimbanseke nazalaki komona mua ba bala bala ebele eza na ba kombo ndenge na ndenge, kasi tango na komi koyekola awa na mboka mosika nakomi komona ke nzoka nde ba kombo ya ba bala bala wana nazalaki komona ezalaki batu oyo ba exista pe bazalaki bato basalaki makambo na mboka na biso.  Tala ba foto mibale oyo, mutu oyo babengi Edmond Nzeza Landu aza to azalaki nani na mboka na biso?
Tango okozua ngonga olimbola biso na mozindo bo momesano.
Merci d'avance, kimia o mboka yo.
Serge Kongo na biso.

S Miekono
James Dean disait:"Puisqu’on ne peut changer la direction du vent, il faut apprendre à orienter les voiles".

Ndeko Serge,

Limbisa ngai na mua retard mpo temps na ngai ezali mua mobulu. Kasi nabanzi que l’essentiel ezali nde nayanola na motuna.

Nameki kosalela yo biographie ya Edouard Nzenza Nlandu « Edmond » ndenge osengaki. Nabanzi que yango ekosunga yo mua moke mpo oyeba lolenge nini azalaki mpe kosala lien na ba kombo ya avenue otangelaki ngai.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Edouard Nzeza Nlandu « Edmond », azali mu Ntandu, amoni mokili na mokolo mua 15 septembre 1923, na village ya Mpangu, territoire ya Madimba, district ya Bas-Congo, province ya Congo-Kasaï. Atangi ba kelasi na ye ya primaire, na ville ya Léopoldville, na Institut Saint Joseph, wuta 1932 tee na 1938. Sima akeyi kosala école moyenne na Brazzaville, abandi na 1938 tee asilisi na 1942. Azongi na Congo-Léopoldville, mpo na kokota na petit séminaire Saint Henri ya Lemfu, na secteur ya Ngeba, territoire ya Madimba, na district ya Bas-Congo, na province ya Léopoldville. Kuna nde asilisi petit séminaire na 1945. Sima, akeyi na grand séminaire ya  Mayidi, esika azui diplôme na philosophie mpe théologie, na 1949. Mpo na ba raisons personnelles a renoncer na sacerdoce mpe na ko poursuivre ba études théologiques na université pontificale grégorienne ya Rome.

Abandi vie professionnelle active na mokolo mua 3 mai 1950, en tant que commis na comptabilité na ba Plantations Lever au Congo. Yango eyebanaki na kombo ya Huileries du Congo belge (H.C.B.), filiale ya Unilever ya Londres.

Tango Caisse générale d'épargne du Congo belge et du Rwanda-Urundi esalemi na mokolo mua 10 juin 1950, a postuler kuna, mpe abandi mosala na août 1950, en qualité ya commis na comptabilité.

Na même année, 1950, asali rédaction ya premier manifeste ya Association des ba Kongo pour l’unification, la conservation, l’expression et le perfectionnement ya langue kikongo  = Association des Bakongo (A.BA.KO.).

Edmond Nzenza Nlandu azali former epayi ya ba Jésuites : Lemfu mpe na  Kisantu, esika atangaki, ezali na congrégation jésuite ya ba Frères de Saint Joseph.

Na Kisantu nde asalaki ba amitiés na professeur na ye, Père Joseph Van Wing, na grand séminaire ya Mayindi. Ce dernier, azalaki éthologue, sociologue mpe anthropologue. Asalaki ba études mpe na ba publications miyike sur ba Kongo. Ye nde asalaki commission pour l’unification ya kikongo, na 1935, na Kisantu. Grâce na ye nde likanisi lya kosala association culturelle ya ba Kongo ebotamaki. Père Van Wing nde a insista epayi ya Edmond Nzeza Nlandu mpo asala association culturelle ezali kosangisa ba Kongo mpe na promotion ya culture kongo mpe mpo na ko lutter contre déliquescence ya kikongo par rapport na lingala na  Léopoldville, na lolenge mundele azali kosala nionso mpo na kokotisa yango mayi. Ye mpe lisusu nde azali na base ya publication ya manifeste ya liboso ya revue Kongo Overzee, na Bruxelles.

Ancien élève ya Père Van Wing, Edmond Nzenza Nlandu atiaki na profit ba études na recherches ya Père Van Wing  « Etudes ba Kongo » mpo na ko explorer richesse ya héritage culturelle Kongo.  Ba références ya ba études mpe ba recherches ya Père Van Wing yango oyo na nse :

- R.P. Van Wing, Joseph, Etudes Bakongo: histoire et sociologie, Goemaere, Bruxelles, 1921.

- R.P. Van Wing, Joseph, Etudes Bakongo: sociologie, religion et magie, Desclée de Brouwer, Bruxelles, 1959.

Ba Ntandu ya Léopoldville ; Madimba na Kisantu bazalaka na Association na bango eyebanaka na kombo ya Renaissance des ba Kongo (RENAI.BA.KO.), ya Jean Mavuela, na 1945. Tango RENAI.BA.KO. ekufi na 1950, na mbotama ya A.BA.KO. ba Ntandu nionso oyo bazalaki kuna bakendaki kokota na A.BA.KO ya Edmond Nzeza Nlandu.

Na septembre 1950, Edmond Nzenza Nlandu asali Association des ba Kongo pour l’unification, la conservation, l’expression et le perfectionnement ya langue kikongo  (A.BA.KO.). Officiellement, A.BA.KO. esalemaki na décision ya Gouverneur ya district ya Moyen-Congo, Jean Trodeur, na décision azuaki, wuta initiative Edmond Nzeza Nlandu azuaki, ya kosenga autorisation ya kosala association, na lettre akomelaka Jean Cordy, Administrateur ya territoire, Chef ya service ya population noire, na mokolo mua 2 septembre 1952. Aboutissement ya procédure administrative ezalaki signature ya décision  n° 4.612/23A ya 7 juillet 1953.

Na mokolo mua 11 septembre 1953, Léon Pétillon, Gouverneur général ya Congo belge, a signer ordonnance n° 05/309. Yango epesi autorisation ya publication ya journal Kongo dia Ngunga. Yango nde ezali ko diffuser expression conscience tribale ya ba Kongo en extension na batu ya Kwango mpo na kati ya A.BA.KO. ezalaki mpe na ba anciens élèves jésuites ya mission Kwango, na district ya Kwango epayi Père Joseph Van Wing akomaka  inspecteur ya enseignement na Vicariat ya Kwango. Ba liens ezalaki makasi entre ba élèves ya Kisantu na oyo ya Kwango.

Mpo na ba oyo bayebi te, ba réunions ya liboso ya A.BA.KO. ebandaki kosalema na avenue Isangi  n° 168, na commune ya Saint-Jean (Lingwala). Bureau ya journal Kongo dia Ngunga ezalaki na stade reine Astrid (stade Cardinal Malula, ex-stade du 24 novembre 1965).

Na ebandeli A.BA.KO. ezalaki majoritairement na ba Ntandu (batu ya Mpangu septentrional) na ba Ndibu (batu ya Nsudi) na kolanda na ba Manyanga, Besi Ngombe,  Solongo, tee kokita na ba Yombe, Amboma, etc.

Kobanda na septembre 1950 tee na juillet 1953, Edmond Nzeza Nlandu azalaki Fondateur mpe Président ya A.BA.KO.

Wuta mokolo mua 11 septembre 1953, akomi Directeur-Fondateur  ya journal Kongo dia Nkunga.

Na 21 mars 1954, Edmond Nzenza Nlandu a démissionner na présidence ya A.BA.KO .mpe a proposer par surprise candidat na ye, Joseph Kasa Vubu na présidence générale. Ye andimami sans problème na faveur ya ba applaudissements nourris. Wuta wana, Edmond Nzenza Nlandu atikalaki kaka na titre ya fondateur mpo azalaki ko souhaiter ya kozala consacrer mingi mingi na journal Kongo dia Nkunga. Kobanda awa nde Kasa Vubu abandi ko réformer A.BA.KO. na mouvement politique.

Neti ekomaki difficile Edmond Nzeza Nlandu concilier ba activités ya journal na mosala mua ye na Léopoldville, na Caisse générale d'épargne du Congo belge et du Rwanda-Urundi, ayaki kozua décision ya kolongua na mosala, na juillet 1956 mpo na ko se consacrer na commerce. Yango ezalaki possible mpo azuaki crédit na société de Crédit aux classes Moyennes et à l'Industrie (SCOMI) nde e permettaki ye a démarrer ba activités commerciales na vente et achat ya ba produits ya première nécessité mpe plus tard na transport ya batu na ba marchandises na secteur ya ba Kongo.

Na décembre 1957, na ba élections communales ya Léopoldville, aponami Conseiller communal ya Matete.

Na 1958, azui likanisi ya kosangisa ba Kongo ya  province ya Léopoldville oyo ezali na kati na yango na ba districts ya Bas-Congo na Kwango. Bango basangani na coopérative ebengami Coopérative ba Kongo-kwango (CO.BAKWA.).

Kaka na 1958 wana, A.BA.KO. eponi ye membre ya Comité central.

Na mokolo mua 4 janvier 1959, rassemblement public ya Association des ba Kongo (A.BA.KO.) esengelaki esalema na commune ya Kalamu (Dendale) na quartier  Ranquin, na esika ebengami The Young Men's Christian Association (Y.M.C.A.). Kasi, Jean Tordeur, Bourgmestre ya ville  ya Léopoldville,  bien que apesaki autorisation mikolo mileki, aye koboya lisusu que meeting esalema. Batu basi batondaki na Y.M.C.A. mpo na koyoka makambo Kasa Vubu, Président général ya A.BA.KO. esengelaki aloba. Déception ya ba militants ya A.BA.KO. eyaki kosangana na kanda ya ba sympathisants ya Victoria  Club na lolenge équipe na bango epolaki na match ya championnat ya entente ya Léopoldville, na stade Tata Raphaël, contre Mikado. Sangana ya batu nionso wana ebendi na situation explosive et  incontrôlable mpo na ba autorités urbaines ya Léopoldville mpe ekumbi na ba bavures ebele : kufa ya batu, pillage, viols, blessures, etc. ya population noire na blanche.

Mobulu oyo nde eyaki kokangisa 26 dirigeants ya A.BA.KO. mpe na kati na bango, Edmond Nzenza Nlandu. Ye akangamaki na mokolo mua 5 janvier 1959.

Mobilisation makasi ya ba Kongo esalemaki, Président Fulbert Youlu ya Congo-Brazzaville, Jean Nlandu, kulutu ya Edmond Nzeza Nlandu na ba notables ne-Kongo mosusu, batiaki ba moyens en jeu mpo na kobengisa un des célèbres avocats français, Maître Jacques Croquez ya Barreau de Paris mpe na ba Maîtres Antoine Joseph Van Bilsen na Jabot ya Barreau ya Bruxelles mpo na défense ya ba dirigeants ya A.BA.KO.  Procès ebandaki na mokolo mua 23 janvier 1959 mpe mpe bazui acquittement na bango na mokolo mua 26 février 1959.

Na début décembre 1959, Edmond Nzeza  Nlandu akeyi na Bruxelles na ba membres ya A.BA.KO. mpe na ya ba partis mosusu mpo na ko discuter ba modalités ya élections législatives mpe na Table ronde.

Na bozongi na Léopoldville, Edmond Nzeza Nlandu a participer na congrès ya Kisantu oyo esalemaki wuta mokolo 24 tee na 27 décembre 1959. Yango esangisaki ba partis nationalistes na oyo ebandaki ko prôner fédéralisme.

Azongi lisusu na Bruxelles, na tête ya délégation ya A.BA.KO.  na Table ronde politique ya Bruxelles oyo esalemaki wuta 20 janvier tee na  20 février 1960. Yango  ezalaki composer na ba membres titulaires iye : Edmond Nzenza Nlandu, Joseph Kasa Vubu  na Daniel Kanza. Ba membres suppléants : Joseph Yumbu Lemba, Simon Nzenza, Emmanuel Kini na Philibert Luyeye.

Kuna esika bazalaki na Bruxelles, boyokani bozalaki te kati na bango, Kasa Vubu abendani na Liège, pendant que ba travaux ya Table ronde ezali ko continuer na Bruxelles. Edmond Nzeza Nlandu, fondateur, Daniel Kanza, vice-Président, Simon Nzeza, trésorerie général ba signer document ezali ko fustiger attitude dictatoriale  ya Kasa Vubu, Président général  mpe na ko accuser ye que a détourner mbongo ya caisse ya A.BA.KO. Kasa Vubu a réagir na conférence de presse na Liège mpe na Léopoldville, Vital Moanda, vice-Président mosusu, abengisi comité central ya A.BA.KO. mpe ezui décision ya ko suspendre Edmond Nzeza Nlandu, Daniel Kanza na Simon Nzenza na parti.

Ba esprits ekomaki chauffés makasi na Léopoldville. Photographe, militant ya A.BA.KO. Nsiama, muyombe lokola Kasa Vubu na Moanda, ayebani malamu na commune Ngiri Ngiri. Ye, asalaki suka na ba montages ya ba photos ewutaki na Bruxelles mpe abimisi ba photos montées ezali kolakisa Thomas Kanza (munyanga mpe muana ya Daniel Kanza),  a coller Kasa Vubu na chemise, mosusu a étrangler ye carrément na kingo mpe Kasa Vubu en difficulté lokola mutu azali lisusu kokoka kopema malamu te, etc. Yango etambolaki mpe epanzanaki na Léopoldville tee na ba province ya Congo central. Comme il fallait s’y attendre, ebotami koyinana makasi kati na ba Yombe na ba Manyanga mpe tango délégation ekendeki Bruxelles, ezongi na Léopoldville, Comité central ya A.BA.KO. ebengisi yango, esangeni lisusu mpe na mokolo mua 22 mars 1960, e révoquer Daniel Kanza na A.BA.KO. e conduire suspension ya Edmond Nzenza Nlandu na Simon Nzenza.

Suspension ya Edmond Nzenza Nlandu ezalaki lever avant ba élections législatives ya mai 1960. Ye alongaki ebonga ya député national élu ya ville ya Léopoldville.

Na mokolo mua 15 décembre 1960, Edmond Nzenza Nlandu asali parti politique ya sika na kombo ya Rassemblement Fédéral Congolais (RA.FE.CO.).

Na 1961, asali mobembo na République Fédérale ya Allemagne sur invitation ya fondation Deutche-France-Afrique.  Yango eyaki kosala que fondation Deutche-France-Afrique  eya ko implanter na Léopoldville, imprimerie, papeterie, librairie Concordia mpe Edmond Nzenza Nlandu aponaki parmi ba responsables na yango.

Na ba élections législatives ya mars-avril 1965, aponami lisusu Député national.

Na 1967,  Président  Mobutu abongolaki franc congolais na Zaïre mpe na 1970 abandi kopesa makanisi ma kobongola kombo ya République Démocratique ya Congo na Zaïre, Député national, Edmond Nzenza Nlandu azalaki opposer na idée oyo mpe alobaki polele que « Nzadi ezali fleuve na kikongo. Kolongola Congo mpo na ko remplacer yango na Zaïre ezali na sens moko te mpo Zaïre ezali na assise historique ata moko te comparativement na Congo =Kongo. Ata ba imposer Zaïre, suka suka kombo wana ekolimua mpo ezali na repère historique te ». Wuta awa nde conflit ebandaki kati na ye na Président Mobutu.

Na 1973, na zaïrianisation, l’Etat Zaïrois e zaïrianiser imprimerie, papeterie, librairie Concordia, esika Edmond Nzenza Nlandu azalaki mokonzi.

Fondation Deutche-France-Afrique, ezalaki propriétaire ya imprimerie Concordia. Ezalaki zaïrianiser. Yango nde eye kozua kombo ya sika ya imprimerie, papeterie, librairie de Kinshasa, mpe l’Etat etie Bondo Nsama, Directeur-gérant. Ce dernier, azalaki  ancien éditeur de Myoto.

Na 1979, Bondo Nsama asombi journal Salongo mpe na imprimerie de Kinshasa ex-Concordia na l’Etat Zaïrois mpe ekomi privatiser. Journal e garder kombo ya Salongo, en revanche, imprimerie Kinhsasa ebongoli lisusu kombo ekomi kobengama Générale d'Imprimerie et Offset du Zaïre (G.IM.O.ZA.).

Pour rappel, Salongo ebotami na fusion  (juillet 1972) ya ba journaux  Myoto  ex- Etoile du Congo  na  Progrès (février 1972).

Donc, Edmond Nzenza Nlandu azalaka propriétaire ya imprimerie Concordia te, yango wana ezalaka zaïrianiser. Mpe soki azalaka en conflit na Président Mobutu te, mbele alingaki nde apesaye Concordia na cadre ya zaïrianisation.  A part wana, kanda Président Mobutu akangelaka ye, esalaki que atiya ye na résidence surveillée pendant plusieurs mois.

Na Congrès ya A.BA.KO. ya 25 juillet tee na 4 août 1963, Edmond Nzeza Nlandu aponamaki comme Conseiller général à vie. Une manière ya ko saluer action na ye na A.BA.KO. Sima ya Congrès oyo, A.BA.KO. ekomaki kosala ba Congrès clandestins wuta Président Mobutu asalaka coups d’Etat na ye ya mbala ya mibale, mokolo mua 24 novembre 1965.

Edmond Nzenza Nlandu, riche commerçant, ba activités na ye ebotelaki ye ba activités na Kinshasa, Bas-Congo na Bandundu na import na export, magasins, menuiserie, ferme, boulangerie, restaurant,  camions, ba ndaku, na ba terrains agricoles. Apesaki misala na batu ebele.

Intellectuel, homme de culture attaché na ba valeurs traditionnelles africaines mpe profondément encré  na kotombola bendele ya culture ne-Kongo, commerçant ayebi kobalola mbongo mpe kokolisa ba activités na ye, mutu honnête mpe entreprenant na mingi asala, politicien dévoué na cause ya ne-kongo.

Edmond Nzenza Nlandu akufi tragiquement par empoisonnement na mokolo mua 28 avril 1977.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
M
Intéressant ce récit du Fondateur de ABAKO qu'on a occulté je ne sais pour quelle raison! Merci, nous avons appris
Répondre
J

Bonsoir

Suite à votre biographie sur Nzezanlandu, vous avez parlé des jesuites du Kwango , soyons claire que l' ABAKO avait été fondé par les kwangolais qui sont venus étudies au BAS KONGO et parmi il ya
d'autres qui sont encore vivant car l'ABAKO fute un groupe de reflexion des eleves du kwango qui étiudiés là bas , et c'est eux à l'avenue de l'independance qui ont demandés à leurs collegues
BAKONGO que cette groupe devienne un parti politique " ABAKO" a suivre

jean bosco

Répondre
R
Cher Jean,

Il suffit de vous souvenir de l'histoire du sabre arraché des mains du Roi Baudoin par un Congolais le 30 juin 1960. Des hommes politiques du Bandundu ont soutenu que ce Congolais était un des leurs vivant à Kikwit! Des chercheurs belges, éconduits, sont allés voir cet imposteur à kikwit. Mais, l'homme de Kikwit n'a pas été capable donner des détails sur le déroulement de cette regrettable affaire. Nous le savons aujourd'hui que ce Congolais est de plutôt de l'Équateur!
Arrêtons de tordre l'Histoire du Congo.
Salut!
R
Cher Jean,

Je vous conseille vivement de lire les archives disponibles au Grand Séminaire de Mayidi, au Musée Royale de Tervuren, et un peu partout auprès des personnes de bonne foi. Cela vous instruira et permettra restituer les faits de manière honnête et impartiale. Merci.
Roger M.
N

L'IMPRIMERIE CONCORDIA DE KINSHASA ETAIT A NZEZA NLANDU EDMOND à 100%  BA ALLEMANDS BAZALAKI NA CONTRAT YA DIX ANS 1961 - 1971, POTE BANGO NDE BA TIAKA BA MACHINES NA BANGO. BA LOPANGO
EZALAKI YA NZEZA NLANDU, APRES 1971 IMPRIMERIE EZONGAKI NIOSO YA NZEZA NLANDU EDMOND. BOTANGA  MAKAMBO ELEKAKA NA CONFERENCE NATIONALE / AFFAIRE CONCORDIA: NZEZA NLANDU, MOBUTU et BONDO.
EZALI PASI NAKOMONA EKOMELI MOSUSU MALAMU, OBEBISI NA IMPRIMERIE. KABILA LE PERE AZOKISAKA BILOKO NA BANA YA NZEZA NLANDU, KASI BONDO ATEKAKA BILOKO YA NZEZA NLANDU, EZALI LISOLO MOLAYI TOZALI TI
LILO KOSAMBA NA L'ETAT CONGOLAIS. SOKI BOLINGI KOYEBA LISOLO YA NZEZA NLANDU, BOTALA FACEBOOK ROGER NZEZA NLANDU. MBUTA KANDOLO LUKA TO SOLOLA

Répondre
T

Depuis kala balobaka KASAVUBU azali na makila ya ba CHINOIS, surtout soki otali ba traits ya miso na ye, tango mosusu okoki kondima, loposo na ye pe lisusu ebakisi bondimi ya ba origine na ye ya
ki chinois. Batu mingi pe balobaka KASAVUBU azali différent na ba frères na ye.

Toyoka pe mingi, kasi ekozala malamu batu oyo bayebi bosolo ya likambo yango balimbolela biso yango na ndenge ya siki-siki.

Répondre
L

Bonjour,

je voudrais entrer urgement en contact avec l'auteur de l'article sur Nzeza Landu. Il s'agit d'Emannuel Kandolo. Il ya une urgence-

Albert Lupungu / Genève

Répondre
S

Mbote ba ndeko,

Bala bala mususu pe ezuami na Kimbanseke parmi ba oyo nabosanaki eza Batsikama oyo ekitana na Mr Raphaël Batsikama moko ya batu ABAKO atindaki
pona kosangisa Kasa Vubu na Daniel Kanza na nungu nungu ezuamaki kati na bango na Table Ronde de Bruxelles.

Est ce que Kasa-Vubu aza na ba liens na ba chinois?   Bayebisa nga ke meme kombo Kasa Vubu eza eza chinois ndenge moko kaka na ba Kasamoto,
Kansai Yamamoto, eza une bonne information to eza intoxication?  Nani ayebi?

Boboto bo momesano

Serge Kongo na biso.

Répondre
S

Mbote ndeko Muan'a Mangembo,

Natangi makomi na yo avec beaucoup d’intérêt po lisolo na ye eza vraiment intéressant pe otiki
nga na posa na mua ba points ebele oyo ekozala malamu soki okoki ko spécifier mua muke. Na poni mua ba ndambu ndambu ya ba phrases po olimbola.  Batu
oyo na souligner ba kombo, misala na bango ezalaki exactement nini pe impact nini misala na bango etika na musique na biso ?

«… "bato ya confiance"  Autour des ISIFI gravitent la bande de Lita Bembo et
Lossikiya Maneno. »

« …Bien plus encore, apparaît à cette époque un certain "Ambassadeur Lokoka". »

Serge : (Namona Papa Wemba a presanta Lokoka papa na Thierno na na concert moko ya Paris, Papa Wemba na biloba loba na ye aloba: lelo Lokoka akomi moto, lelo Lokoka asombi mutuka…) Qui
est Lokoka ?

« …Bozi Boziana reste attaché à l'idéologue d'Isifi, Debambongo »

« …alors que Siméon et Shungu sont sous l'influence de Pecho wa Pecho. »

Serge : (Ba bandaki koyebisa biso ke Pecho Wa Pecho ke azalaki na origine ya création ya Viva La Musica kasi abelaki maladi ya mutu, est ce que eza ya
solo ?)

« …Dans le camp de Bimi et Jossart il ya Louison »

« …l'âme damné de Bimi et Komi
Mazaza attaché à Jossart. »

« …Gina wa Gina, avant sa maladie. »

Serge : Est ce que eza maladie oyo ba masolo ebetama ke bakendaka koluka kisi ya succès ye, Evoloko na Bozi ?  Est-ce que
eza makambu ya solo to radio trottoir ?

Merci d’avance, nakolikia okoyanola tango okozua ngonga.

Boboto epayi ozuami.

Serge Kongo na biso

Répondre
S

Quand on parle de Papa Nzeza Nlandu on voit le vieux Ngunza Karl i Bond.

Sispé

Répondre
S

Mbote kulutu Kandolo,

Natondi yo botondi na musala osali.
Melesi bapesa na mbwa yango nde Edmond Nzeza Nlandu amonaki, système ya Kroubondo ebanda kala, fondé de pouvoir ya ABAKO kasi babuaki ye libanda, lokola un rénegat eza kaka pasi.
Avenue moko ya munene ezuami juste sima ya chambre froide ya Dokolo na
Ndjili Q4 ezalaki na kombo ya Maître Croquez pe sima eyaki komoma Avenue Mobutu, bayebisaki nga ke sikoyo basala wenze na bala bala yango.  Sima nango balabala elandi eza Matondo, Nzeza
Nlandu, Disengomoka, Luzolana, Nzibu, Mokali, Nsanga, Bibua, ..., Mangana, Matanda, Kingotolo, Diangenda, Makungu, Weyi, ..., Mbinza, …(mutu ekomi vide, naza koyeba lisusu ba kombo ya ba balabala
te).

Tina ya zaïrianisation penza ezalaki nini?  kaka
kobotola batu biloko na bango to makanisi ezalaki malamu kasi ezalaki mal appliquée?

Ba nani penza bayokaki bisengo ya zaïrianisation pe ba donduaki na yango?

Malgré qualités nionso otangi awa pona Nzeza Nlandu mais Mobutu a marginalisaki ye kaka na tango
ya zaïrianisation, quelle raisonement !!!

Mais kulutu Emmanuel, pona nini ba empoisonnaki ye kasi, malgré ba canailles tout basalaki
ye?  Bakunda ye wapi?  Abalaki, atika pe bana?

Losako pe longonia ndenge olimboli na mozindo bo momesano.

Serge Kongo na biso.

Répondre
M

LE COMPLOT ZAIKO
Il est un fait qu'en 1974, Zaiko Langa Langa est à l'apogée de son art. Le groupe fondé par DV Moanda n'a plus de concurrent à proprement parler et sa prestation en marge du combat Ali -Foreman,
après une période de maquis à la Nsele, lui a donné une dimension de "showmen" qu'ils n'imaginaient pas encore. Bien entendu, l'influence des madjesi n'y est pas pour rien. mais pour la première
fois, les vedettes de Zaiko se disent qu'ils ont l'etoffe des STARS. mais cela, ce sont les "autres", leurs "bato ya confiance" qui vont commencer à les leur mettre dans la tête.
Il faut rappeler que la moyenne d'âge des musiciens de Zaiko est de 20 ans. Même si Jules Shungu est un peu plus âgé, il est lui aussi sous influence. C'est donc une bande de jeunes sous
influence qui aborde l'année 1975 avec des égos exacerbée par leurs entourages. Autour des ISIFI gravitent la bande de Lita Bembo et Lossikiya Maneno. Bien plus encore, apparaît à cette époque un
certain "Ambassadeur Lokoka". Bozi Boziana reste attaché à l'idéologue d'Isifi, Debabongo alors que Siméon et Shungu sont sous l'influence de Pecho wa Pecho. dans le camp de Bimi et Jossart il ya
Louison, l'âme damné de Bimi et Komi Mazaza attaché à Jossart.C'est donc du côté de cet entourage qu'il faut tourner son regard pour saisir les enjeux du Zaiko post Ali et Foreman.
Comme l'a souligné Mavuela, chaque séance de Nua chez Lita s'accompagne de conseils pour affaiblir ceux que Nickel appelle les petits Soldats - Bimi et Jossart. Il ya d'abord l'épisode du concert
de la Fikin qui va consacrer la première et la deuxième division, avec cette arrivée tardive de la bande Isifi, alrs que les Jossart, Bimi et consort ont déjà joué. Avec pour conséquen ce le KO
de Ekonda saccadé. Cela va s'officialiser plus tard avec le dernier passage de Zaiko à TéléShow avec Gina wa Gina, avant sa maladie.
Selon les confidences de Mavuela que je vais vous mettre en lien, les ISIFI vont tenter un "coup d'état" pour évincer Jossart en particulier, dont la personnalité était moins maléable que Manuaku
qui était acquis ào la cause des ISIFI. Alors que Mavuela parle de 6 mois de retrait volontaire dede Jossart, il est probalble qu'il faut parler d'absence de Jossart à 6 concert. une absence
qu'il va mettre à profit pour réfléchir à son avenir - et à l'avenir de Zaiko. Oui du haut de ses 20 ans, Jossart a eu la présence d'esprit de proposer à DV Moanda un plan de développement du
groupe, là les ISIFI ne pensaient qu'à prendre les clés de la maison Zaiko au titre de leur succès. soutenu par certains administrateurs comme Komi Mazaza, le plan de Jossart bien élaboré
proposait entre autre la création de Prozal pour mieux repartir les fruits du succès et de la créativité des composantes du groupe. C'est sûrement de cette époque que l'on a mis en place la règle
de "derrière la ligne des micros" qui deviendra la règle dans Zaiko en vue de promouvoir le label Zaiko.

Il est un fait que le succès mitigé de Mondo-Mondo extrait du premier 33T de Zaiko, publié par Parions Mondenge, distancée par Mwana Wabi a été de beaucoup pour convaincre DV Moanda de rejoindre
la ligne de Jossart. pour ce dernier en effet, l'heure était venu de relancer le Kwempa Kwempa, dans le sillage du succès de Mwana Wabi.

N'oublions pas qu'à l'instar des ISIFI qui se réunissaient chez Manuaku, les Kwempa avaient établis leur quartier général chez Bimi et là, on travaillait les séries Ndonge et autres Ngadiadia qui
allaient être largués sur le marché. La relance du Kwempa Kwempa a permis à tous ceux qui, tétanisés par les Isifi, n'osaient même pas proposer leur chanson dans le réperoire et à Pépé Fély. On
comprend donc aisément que Jossart aient réussi à fédérer tous les laissés-pour compte derrière lui.
Cependant, la victoire de Josart sera incomplète, puisqu'il ne récupérera pas son coplice du style Kwempa Shungu, définitivement passé dans le camp d'Evoloko. Son plan était en effet, de
reconstituer la ligne de chant de légende de Mosinzo ou la Tout neige.
La dernière carte qui signera l'échec du "coup d'état" des Isifi, ce sera manuaku. ce dernier qui était la pièce maîtresse de la bade à Evoloko, blessé dasn son amour propre à cause de l'écart de
langage et du manque de respect du groupe des Isifi à l'égard de son père, rejoindra au dernier mpoment le camp des "petits soldats" chez Bimi.
Il faudra bien que quelqu'un nous dise, qui a convaincu Manuaku de rejoindre les Kwempa et en finir à l'aventure Isifi. une aventure qui n'ira pas au délà d'une annéee, alors que le projet
Jossart d'un Zaiko entreprise, va prendre racine et s'imposer rapidement avec deux credo: un tube - une danse.
Jossart lui a pris de l'épaisseur. Il n'était plus le petit soldat mais bien le nouiveau leader et maître à penser, un fin stratège doublé d'un créateur de tubes.

Répondre
M

Ba Vieux Diogas na Pinzi est-ce que bazalaki ba originaires ya Bandundu (kwango) to bazalaki ya Bas-congo, puisque natanga na commentaire moko que bazalaki entre MNC na Abako, puis vieux Kasa
aloba na bango suite na comportement wana : Ne vous justifiez pas vous êtes assez grands.

Ya mibale namoni on dirait vieux Kasavubu abanda makambu na ye ya ko révoquer baninga banda kala puis amemi ezaleli wana na gouvernement central.

Ya misato entre Vieux Kasam na Géneral Mobutu nani alakisaki moninga ba comportement ya ki DICTATEUR, puisque déjà avant l´indépendance na kati ya ABAKO vieux Kasa alakisaki ba dérives
dictatoriales, peut-être le 24 novembre 1965, ezali date oyo élève azuaki diplôme d´état ya ki dictateur.

Ezali nde mituna, suite na analyse na  oyo nionso natangi na ba commentaires kaka awa na blog.

Mituna

Répondre
S

Monsieur Kandolo,

En tout je suis tres content na ndenge opeselaka biso masese na ndenge oyo. Biso bana ya serie 7, moi personellement, j'apprends beaucoup sur notre pays a traves sagesse na experience yo yo na
mpe ya ba kulutu misusu. Mais naza na motuna moko, Monsieur Arthur PINZI, oyebi biographie na ye? Moyen ezali mpo ete o expliquer biso qui etait cet homme?

Merci beacoup

Répondre
S

A propos ya ba balabala oyo ndeko Serge alobi na commune ya Kimbanseke, bakombo yango ezali ya ba notables Ne-Kongo mpe en rapport na ABAKO.Ba rues yango ezali: Kanza, Kingotolo,
Batshikama, Diangienda, Nzeza Nlandu.  Balabala ya monene ezalaki Avenue Kasa-Vubu (ekoma avenue de la 2e République).Il y avait aussi une rue Maître Croquez (kombo ya sika nabosani),
Abako (Colonel Ebeya), Kongo Dieto (Zobia ?), Kongo dia Ngunga (Yembi). Pona conflit entre Kasa-Vubu na Daniel Kanza, okoki mpe kotanga article ya professeur Kimpianga Mahaniah na lien oyo:
http://afrique.kongotimes.info/rdc/archives-du-kongo/joseph-kasa-vubu/le-conflit-kasa-vubu-kanza-a-bruxelles-revisite.html

Répondre