Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Bonjour,

un commentaire vient d'être posté par Katalay Henri sur l'article Rareté de l'année:Pasi ya Mokili, par Baguin & Négro-Band,

Tozali bongo na 1961, soki nabungi lisusu ba mbula yango te, tozalaki kofanda na commune ya Saint Jean (actuelle Lingwala), petit-frere ya mama na biso, donc Noko dans le vrai sens du mot, a
peine sorti de l'adolescence, un ambianceur hors cadre, mama azalaki koloba na leki na ye tango nionso : Misele (Michel) yo olingi kobala te, tala baninga na yo bazali na basi na ndaku, yo kaka
kolanda bilongi ya mikosoli (batu ya kokosa baninga) ya basi ya Kisasa (Kinshasa), bongo Noko azalaki koyemba nzembo oyo mpo na kopesa eyano na kulutu na ye (mama na biso).
Sans mentir, kaka lelo nde nayebi ete nzembo oyo ezalaka ya OK JAZZ te, en tout cas Mboka Mosika olamusi MIKUWA YA BA NKOKO, ezala Mama to Noko na ba Papa mpe ba Mama mingi oyo tozalaki na
bango na Saint Jean, na tangu ya nzembo oyo, bazali lisusu na bomoyi te.
Ngo oo, Saint Jean ya ba Vieux Degazin, Liseke, Nkewa, De la France, Lumbu (moto cross), Andre Boyata, Delikwayar, Otomba, Durango, Simaro Masiya, Zuluwe, directeur ERIC, Pere Antoine, Sango
Mokonzi, Pere Jules.
Kobema te - Koningana te, Sans fils, Zamba ya ba Mpunda, TCL, Epl, Sainte Marie, Saint Luc, Comet Bar, wenze ya Kalembe-lembe. Bana Mamelo.
Nasuki awa, mpo mposa ya kolela ebandi koya.

Katalay Henri

un commentaire vient d'être posté par adeitoko sur l'article Henri Katalayi se souvient de St. Jean,

nasepeli mingi na rappel oyo ndeko Henri Katalayi asali po na biso bansomi ya Linguala, mais nalingi nayeba soki kombo na ye ezali na quelque chose à avoir na Henri Katalayi ( RIK) ancien directeur
ya école primaire Notre Dame du Congo
ex mokonzi na UNTZA po namoni neti ye abengi ye "directeur Eric" alors que ye a contractaki kombo na ye par la fin ya fin ya prénom na ye na début ya nom na ye   yango nde epesaki RIK
napesi bana saint Jean nioso mbote oyo batangaki lokola ngai na ba années 60 na Sainte Marie à l'époque ya ba Messieurs MANZAKA, PAPADUPERON, NKOY, KASSAM, ESSENDE etc...

adeitoko

a

un commentaire vient d'être posté par Kataly Henri sur l'article Henri Katalayi se souvient de St. Jean,

Ndeko Adeitoko,
Ezali ngai, muana ya quartier Singa Kwanga si bazenga, natif ya Saint Jean to Bongwala (cimetiere ya sans fil, esika basala la Voix du Zaire) oyo ekoma Lingwala na tangu ya Authenticite, yoka biso,
oyebi lisusu tangu bakabolaka Saint Jean na trois quartiers ya ba Bills, USA, CANADA, MEXICO, juste ezalaki na ba 1960, c'est vrai tozalaki na ecole primaire ya Notre Dame du Congo - Sainte Marie,
avec comme directeur d'ecole vieux Henri Kalalay dit RIK, na ba Messieurs Andre Ntoka, Antoine, Emery Muya, Louis (vespa), Cadavre (yoka kombo M. Cadavre), Philippe, Xavier Libota (sur Basankusu -
balabala ya ba Polo Ndombe), oyebi lisusu ba cinema ya Abbe Corni na Sainte-Marie, ba fete ebandaki kozala na Assanef  na bana ya EPL, ecole professionnelle de Leopoldville.
Soki nalobi Directeur Eric, pamba te, ezali kaka po nako rappeler ebengeli ya tangu wana epayi ya ba vieux na biso, lokola Estade Baudouin, Estani, Estudio...
ezali po nakozongisa yo penza penza na 1960 na kati ya Saint Jean na epoque ya Gang ya ecole Soso Jules dit Zuluwe, oyebi lisusu mikate ya loso, loso contre sardine, lipa contre boudin, likolo ya
vea, mikate na munsambu na pili-pili, kwanga na munsambu, potopoto na mikate, lipa na miliki ya miyoyo, mon frere ba souvenirs  ezali yele.
Je n'ai pas rien avoir avec Directeur Rik, ezali kaka po na rappel ya ba souvenirs.

Kalalay Henri

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
S

NGUMA YA FILM
Vers la fin ya 1958, quelques mois seulement avant le 04 janvier 1959, na Commune ya Saint-Jean, ba partis politiques ekomi ebele, ba jeunes nionso ya ba
mouvements ya Scout, Xaveri, Croix-rouge, Louveto, Routier etc... bakomi bana ya ba Jeunesse ya ba partis politiques, lokola Abako, Mnc, Puna, Psa, Pnp. Ba groupes folkloriques bango mpe batikali
sima te, bakomi ba animateurs ya ba partis politiques, bango nde bapesaki coloration tribale na ba partis politiques, tozali lisusu ko comprendre te, ba bagarres, kosuana, koyinana ekoteli biso,
bref division ekoti, soki ozali motu ya Puna komeka kokende na meeting ya Mnc te, motu ya Abako bamona yo na reunion ya Pnp te, ainsi de suite, puisque ozali ko risquer ba tabasser yo pour rien,
mpe ba taxer yo d'espion, oyeyi koyiba PLAN na bango mpo okende kotekisa yango na parti na bino.
Batu ya Kintuadi (Kimbanguisme, lisez Kimbangouisme ndenge ezalaki kolobama) bakomi ko s'afficher ouvertement, sans crainte de l'administration coloniale, ba remous, ba songi-songi contre les
Blancs ekomi makasi.
Commerce ya ba carte ya ba partis politiques ezali kotambola malamu, mpo nako eviter ba problemes, mutu na mutu, il faut osomba carte ya chaque parti, donc une seule personne azali membre
ya Abako, Mnc, Puna, Psa, Pnp etc...
Ba boites ya Corne-Beef moko ebimaki ezalaki na etiquette ya elongi ya muana ya Mundele na muana ya Moyindo, en signe de la communaute Belgo-congolaise, babaloli  bazali kotiya bato bayindo
na kati ya boite wana, du coup corne-beef oyo etuli, affaire Mundele Ngulu, en plus soki bamoni yango na magasin na yo, yo nkolo magasin ozali na grand probleme na ba peuple ya Saint Jean. Ba
Bills bazali lisusu kobanga Leta te.
Lokola ba film ya Abbe Corni ebandaki kozala na Sainte Marie, cable ya courant ekowuta na Ndaku ya Nzambe (eglise) tii na camion ya Abbe Corni. Sango epanzani Saint-Jean mobimba, lelo SINDAMS na
pokwa, film ya Abbe Corni, ezali moment oyo ba bills balakisaka ki YANKEE na bango, ba amoureux bakutana na ba momies na bango, tozali na tangu ya colonie, donc discipline ezali, pas question
Mbila aya kotiya ordre.
Kasi jour ya film oyo ezalaki special, film ebandi, Matamata et Pilipili, puis film ya course ya velo, toujours Bumba (futur General Bumba Moaso)  azalaki kobima "le premier", lancement de
javelot avec Manguawu... puis eye kosuka na film ya TARZAN, film ebandi tozali kolanda film, bino moko boyebi kaka loyenge ya film, na kati ya zamba, na tableau ya film bazali kolakisa grand boa,
Nguma, ecran etondi na nguma wana, mbala moko, un malin aningisi singa ya courant oyo ezali ko relier eglise na camion, sikoyo esangani na somo ya Nguma ya film na singa ya courant baningisi na
makolo ya batu, mbala moko courant ekatani, tomona kaka batu babandi kokima, balobi NGUMA YA FILM EKUEYI, yoka ba cri, e ee nguma, nguma.... ndenge kaka esalamaki jour oyo ya pendaison na Pont
Cabu, batu bazoki, babukani, ba mama na ba tata bazali koya na Sainte Marie mpo nakoluka bana na bango, Saint Jean eningani na butu wana. Na tongo, ba parents mingi bapekisi bana na bango bakende
na classe, bongo yoka ba commentaires, soki bozali na ngambo ya rail, bakoloba na rue Kabinda bana 10 babungi, ngambo ya niangwe bakoloba na rue Ngele bana 20 babungi, nionso oyo Mundele Ngulu
amemi, mpo asalana na bango ba corne-beef. Tension ekomi makasi, division oyo tobandaki komona na Saint Jean avec les partis politiques, suite na affaire Nguma, mbala moko tomoni SOLIDARITE
ezongi, donc affaire Nguma ya Film ezongisaki UNION entre les habitants de Saint Jean, contre le seul ennemi commun LE COLON.
Et vint le 04 janvier 1959 qui entrainera le 30 JUIN 1960, JOUR SACRE,
Singa Kwanga.

Répondre
S

Seli Wata Homme de la Mer, vieux bal na tangu wana soki obengi ye Seli Wata ye akozongisa Homme de la Mer - allusion faite a Mamie Wata, Seli c'est la version lingala de Cheri -, na vieux mususu
azalaki kofanda na Bukama vers avenue Mushie, Papa Baudouin, kombo na ye ezalaki na yango Baudouin te, ezalaki nde surnom, balobi mokolo Roi Baudouin ayaki na Congo na 1955, alors balekaki na nzela
ya mabele, rue Bukama na Commune ya Saint Jean, tangu bakomi liboso ya lopangu ya vieux Baudouin, voiture ya Roi etelemi, mpe Roi Baudouin akiti na voiture akoti na lopangu ya Papa oyo, atali
ndenge nini lopangu ezali, ndaku na kati, Roi abaluki na sima ya ndaku atali Kikoso, Wc etc... Roi apesi Papa Nkolo lopangu mbote, akoti na voiture mpe akeyi na ye. Na sima wana Papa na biso sur
rue Bukama, azwa kombo ya Baudouin en souvenir du Roi des Belges, na 1960 tangu President Kasa-vubu azalaki koleka na voiture na rue Bukama, akomi lisusu na liboso ya lopango ya Papa Baudouin
atelemi, kasi Vieux Kasam akitaki na voiture te, nde Papa Baudouin motu ayaki kopesa ye mbote na bala-bala, tellement Papa Baudouin akomaki populaire na Saint Jean, lokola biso tozalaki bana mike,
tozalaki kokanisa Roi Baudouin ezali nde ye Papa na biso oyo.

Répondre
A

ndeko Henri,
ozali penza pur sang ya Linguala po orappeller ngai époque ya ba Gangs, ngai na yo tozali bana ya Etats unis(de Kabinda à Aketi) après tobandi Canada mais si je ne trompe pas on dirait Mexico
ekomaki Armée Rouge (donc de rails à Golf )
je me rappelle bitumba inter quartier na EPL to na Camp HCB to chez yo na terrain OCAL
o rappeler ngai PAPTONE, le plus dévoué des Lingualais en matière sportive malgré son handicap, grand pourvoyeur ya Mikado,Himalaya na Dragons
ba redoutables adversaires ya bana USA na bitumba ezalaki bana FK             (lire féké)qui voulait dire Fort King bana ya commune de Kinshasa na ngambo ya Huileries
avec devise na bango "kamua ve, lota ve" soki ba calé yo
masolo ezali tellement ebele que tokokoka kosilisa yango te

Répondre
K