Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Sujet : Premiers parmi les Congolais (5)

Brigadier en chef Lufungula de la police

Cette photo a été envoyée par Buku

Ndeko Biso na Biso,

Mpo na koyanola na motuna mua yo esengeli naino tozongela mua moke ba dates historiques :

Henry Morton Stanley asali exploration na ye ya liboso na Congo na 1867.  Na 1876 , roi ya Belgique, Léopold II, asali Association Internationale Africaine (A.I.A). Entre le, 15 novembre 1884  tee na 26 février 1885, Conférence ya Berlin esalemi mpe na na mikano miyike misuamaki kuna, mokolo mua 23 février 1885, yango endimaki ete Etat indépendant du Congo (E.I.C.) ezali territoire (propreté privée) ya roi Léopold II ya Belgique. Mokolo mua 16 avril 1887, roi Léopold II a signer décret ya organisation ya gouvernement ya Etat Indépendant ya Congo. Le, 1eraoût 1888 nde aye ko signer décret oyo ekaboli E.I.C. na 11 districts. Na kati wana, Lualaba mpe ezuami.

Tozongelaki ba dates oyo mpo na kolakisa que, mundele asakola que Lufungula abotama na 1888. Tomoni malamu mbula Stanley ayaka na Congo mpe tango wana, mukanda eyebanaki ata muke te na biteni bia mabele oyo  esangana na biteni mosusu mpe ekoma Congo. Tokoki koloba que ezali estimation mundele asalaki. Kasi esika abotama nde ezali ya solo. Donc, ye abotami na 1888 na chefferie ya Kinkondja. Yango eyaki kokota na district ya Lualaba wuta décret ya 1eraoût 1888. Na 1933, district ya Luluaba ekomi munene mpe ezui kombo ya province ya Katanga. Na yango, sima ya ba réformes, tokoki koloba que Lufungula azali originaire ya province ya Katanga, district ya Haut Lomami, territoire ya Bukama, na chefferie ya Kinkondja.

Abandi mosala mua soda na Force publique na 1906. Kuna alakisaki ezaleli malamu, kotosa bakonzi, discipline makasi mpe koyokana malamu na baninga ba ye. Kati na Force Publique nde bakonzi baye bayaki ko remarquer ba qualités exceptionnelles na ye. Na Force publique nde azuaki formation esengeli : formation fondamentale, maniement ya munduki mpe techniques ya bitumba.

Lufungula abundi bitumba ya première grande guerre ya 1914-1918 na campagne ya Afrique de l’Est. Sima na yango, amataki pete tee na ndenge ayaki kokoma Sergent-major na 1925, grade ya likolo oyo mutu moindo akokaki ko atteindre.

Avant wana, na 1923, restructuration territoriale ya sika epesaki Léopoldville statut ya capitale ya Congo belge mpe chef-lieu ya province ya Léopoldville na ya district urbain ya Léopoldville. Na yango, Léopoldville eye kokoma na Comité urbain (yango ezalaki kaka na mindele) . Wuta 1923 nde Adolphe Léon Jules Georges Ruwet akomaki Commissaire ya district ya Léopoldville. Na 1925, tango likanisi lya kosala Police provinciale ebimi, Ruwet asepesaki que Sergent Lufungula akota na Police provinciale (na lingala ebandaki kobengama mbila). Kobanda wana nde Lufungula alonguaki na Lukando esika azali na affectation, mpe akiti na Léopoldville. Na Police, abandaki mbala moko na pete ya Brigadier en Chef (mokonzi) mpe instructeur ya ba mbila, tee na ndenge ayaki kokoma Chef ya garnison ya Police provinciale ya Léopoldville. Ye nde azalaki mutu moindo oyo azalaki na pete ya likolo. Durant mosala mua ye na Police, Lufungula azalaki irréprochable mpe ba policiers na ye bazalaki na discipline elenda. Mauvaise réputation ya ba violations des droits de l’Homme oyo Police ebandaki kosala mikolo minso ezali compris na mundele neti travail ya excellence !!! Yango wana bakonzi banso ba district ya Léopoldville oyo Lufungula a travailler na bango, babandaki ko apprécier ye a 100% mpe bazalaki na fierté mingi mpo na ye. Lufungula a travailler na ba Commissaires de district oyo : Adolphe Léon-Jules Georges Ruwet (1923-1927), Alphonse Jules Wauters (1927-1929), Ferdinand de Boeck (1927-1942), Léon Morel (1934-1942), Paul Burmagne (1942-1947) mpe na Jean Torcieur (1953-1957).

Na 1952 Lufungula azui retraite na ye na âge ya 64 ans, soit sima ya 46 ans ya service. Mokolo akendaki retraite, na cérémonie basalelaki ye, asakoli ndenge azali fidèle na allégeance na ba rois na prince ya Belgique mpe na lokumu azalaki na yango mpo na kosalela bango mosala na Force publique mpe na Police provinciale : Léopold II, Albert 1er , Léopold II, prince régent na Baudouin 1er . Déclaration oyo esepelisaki mundele makasi penza mpe e confirmaki lisusu que choix oyo mundele asalaki ya kopona ye na Force Publique mpe na Police provinciale, ezalaki parfait. Kobakisa wana, na reconnaissance ya misala mia ye minso, mundele apesaki kombo ya camp ya Police provinciale ya Léopoldville, camp Brigadier-chef Lufungula.

Tokoki kobosana kobakisa te que bakonzi baye ye asalaki na bango na Force publique, bazalaki : ba généraux Lescornez, Paul Emens, de Neve, Major Ruwet, etc. Mpe na carrière na ye, azuaki mpe ba médailles mpo na bitumba na mosala malamu asalaki.

Na masolo elobamaka que ye nde akotisaki swahili na Police ya Léopoldville mpe kobenga mundele (Muzungu).

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
B
Merci pona histoire oyo. Kasi, sergent-major Lufungula azalaka mutu ya Katanga, akomi koko ya Thomas Luhaka (muana Maniema) lolenge kani?
Répondre
H

mr buku ,il serait judicieux  de mettre dans ce papier les nombreuses atrocités et crimes indescriptibles qu avaient commises la force publique  dont lufongola est un des membres
eiminents. il est curieux et incomprensible que les brillants historiens congolais n ' aient jamais fait le travail de mémoire sur ce corps important du systeme colonial comme l ' ont fait les
algériens. LUFUNGULA  ne mérite auccun respect ou considération car son role a été toxique a à l homme conolais et le camps qui porte son nom debaptisé.  on ne doit pas tomber dans la
solidarité coloriéle car il n y aurait jamais eu le systeme colonial sans leur valets congolais qui étaient plus " sauvages " que leurs maitres BELGES.sachez que l ' admnistration coloniale belge
ne comportait que moins de 20.000 bllancs ,le reste etait composé des négres compradores dont faisat partie le tristement célébre et redoutable LUFUNGULA,BOURREAU DE SON PROPRE PEUPLE .

Répondre
R

Ntoma c'est vrai dossier oyo ya PREMIERS CONGOLAIS ezali moyai pe ekozalaka toujours molayi, ezali malamu mingi po ezali histoire na biso. Voila lelo nakobakisa ete tozalaki lisusu na femme
premiere femme oyo atambwisaki BUS, na kombo naye NDOWA Kasongo, azalaki ndeko na biso mutetela. tomonaka pe tokamwaka pour la premiere fois tomona mwasi a conduire bus na Kisasa. Merci. Richard
Kasongo.-

Répondre
B

Ndeko Henri Sonzo,

Nakokamwa mboka nionso bazali kolobela lisapo ya batu ya mboka na bango. Ezala azalaki ndenge nini bakoluka bayeba malamu ndenge azalaki po soki ezalaki makambo ya mabe, ekosalisa na ndenge bozoba
wana ezonga lisusu te, to ndenge ya komilengele. Soki ezalaki makambo ya malamu, bakosala lolenge ya komatisa malamu wana lisusu likolo.
Biso moko tosala makasi ya kokoma masolo na biso. Balobaka ba congolais batangaka te, yo olingi etikala kaka bongo? Tala ndenge ba archives ezali kobeba pe kobunga po na makanisi ya lolenge
boye oyo ezali komatisa lisapo ya mboka te.

Okoki kobenga moto moyindo zoba te, moto ya mayele akoluka ayeba awuti wapi, tina ya likambo. Bongo yo okopikola camps Lufungula? Baye bayebaki te, sikoyo baye azalaki nani.

Buku

Répondre
H

il est triste de constater qu' un etre abjet et suppot des colonisateurs soit mis en valeur de la sorte...c est comme si on faisait l  apologie des collabos nazis.lufungula devait etre arreté
et chatié à la fin de la colonisation qui a été un crime contre l humanité.je suis surprit qu un grand camps lui soit dédié..kokamuaaaa.moyindo zoba

Répondre
A

Ndeko Emmano Kandolo,
Tembe lelo esili, Papa Lufungula azalaki muana mboka, kasi Papa Makala Ngunza ye mpe azalaki Policier, motu ya loi, na tango na bango lutte ezalaki makasi entre ba Mumpe mpe ba Nganga Nkisi, kasi
ndenge nini ye Papa Makala Ngunza akomaki lisusu Nganga Nkisi, en plus balobi ye awutaka na Congo-Brazza, akoti na mosala ya ki Mbila na Congo-Leo tii ndenge ayaki kozuwa pension. Balobi lisusu
muana ya Papa Makala Ngunza akoma bongo Pasteur na London. Tokoki koyeba mua moke mpo na Papa na biso Makala Ngunza. Tobosna te ba Mumpe bazalaki kosala nzela moko na ba Mbila.

Merci mingi Ndeko Emmano Kandolo na manso ozali kosala mpo ete biso nionso tozala bien informer na HISTOIRE ya mboka.

Répondre
A

Ndeko Emmano Kandolo,
Tembe lelo esili, Papa Lufungula azalaki muana mboka, kasi Papa Makala Ngunza ye mpe azalaki Policier, motu ya loi, na tango na bango lutte ezalaki makasi entre ba Mumpe mpe ba Nganga Nkisi, kasi
ndenge nini ye Papa Makala Ngunza akomaki lisusu Nganga Nkisi, en plus balobi ye awutaka na Congo-Brazza, akoti na mosala ya ki Mbila na Congo-Leo tii ndenge ayaki kozuwa pension. Balobi lisusu
muana ya Papa Makala Ngunza akoma bongo Pasteur na London. Tokoki koyeba mua moke mpo na Papa na biso Makala Ngunza. Tobosna te ba Mumpe bazalaki kosala nzela moko na ba Mbila.

Merci mingi Ndeko Emmano Kandolo na manso ozali kosala mpo ete biso nionso tozala bien informer na HISTOIRE ya mboka.

Répondre