Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Référence : http://www.mbokamosika.com/article-la-selection-musicale-d-une-ceremonie-de-mariage-71468867.html

Boléro ya déploiement ya Libala.
Tango nazalaka na 8/9 ans, Mama amemaka ngai na libala ya kulutu moko ya libota. Libala yango esalemaka na Bar Air Mabanga, na coin ya Port Franqui(?) na bala bala ya libota Botomba. Esika yango ezali na lelo oyo. Toiture ya bar ezali bobele ndenge ezalaka na eleko wana. nabosanaka te, porte n'ango ezalaka  monene pe etalaka ngambo ya "prince".
Ba invités lokola ngai na mama-nayebi te soki Tata akendaka wapi- batandamaki ngambo na ngambo, pe esika ya bato babalanaki epesaki mokobgo epai ya bakulutu Libanga-Pierre Botomba.
Miziki ezalaki kobetama na "ECODIS" ya kafu-kafu. Wana biso banso miso se epai ya porte, epai wapi, muasi akokota, alors que Mobali asi avandaki. nabosanaka te, ndenge alataka "Redingote" ya moindo na ba gands ya pembe. Epai na epai, bato bangelaki. Mama na ngai alataki "Kita", ngai moko nabetaki Kupe ya bretelle Tata atongelaki ngai. na makolo sandale tosombaki na Bata (epai ya Malata Loko azalaki komekisa biso sapato).
Tango mua pokwa ebandi kokota, epai ya ECODIS, batindi "Joujou Zena" ya Rochereau, mbala moko epai ya porte ya Bar, Muasi na bafilles pe garçons d'honneur batandami. babandi "dépoiement". tala bango monzele epai, rythme ya Joujou Zena epai, bakotambola na lolenge ya déploiement. Nzela na bango babongisaki kitoko. Na mémoire na ngai ya bomuana, ezalaki suka na malinga. premier tour, baleki na Joujou Zena, mobali atelemi, kasi wapi; muasi aleki azongi epai awutaki ye na ba filles pe garçons d'honneur na ye. Sima moke, bango wana bazongi na boléro ya Kwamy. Lokuta mabe te, nayebi lisusu maloba n'ango te. Peut être qu'ezalaki BBB to loyembo mosusu. Wana pe malinga mabonguani, ekomi tango ya Odemba, mibali lokolo na bango, basi pe ya bango lokolo. maboko matoki po na kokumisa bango tii esika bakomisi muasi liboso ya molongani na ye. na tango elombe apesi "bess", yoka mololo na kiyeki yeki.
Sima na yango bamama na lingomba na bango batelemi, babuaki lolaka: "banani wana bokoya oo bakongenga e, lokola Mama Tété ee". bango pe bakati malinga. Sima n'ango bakaboli bileyi:loso, madesu, pondu, kwanga to soso, nionso ezalaki.
Nayebi lisusu tango nini tozongaki te. mama atiaki ngai na mokongo, kasi butui wana nionso na moto na ngai, loyembo se ya Rochereau Joujou Zena. Lelo lisusu, soki nayoki nzembo wana, suki na ngaio etelemaka. seul regret po na ngai: tango ngai nabali-na 1984-makambo ya Déploiement esi esila. Mais babetelaki ngai Joujou Zena po nasepela. Alors libala ezanga boléro, ezanga Joujou Zena, est-ce que ekoki kokende mosika?*

*libala wana tii lelo ezali.

Muan’a Mangembo

Bholen, muana ya mama Helena, par Bholen et le Négro-Succès

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
S

Mbote ndeko Muan'a Mangembo,

Nazalaki koseka tango nazalaki kotanga lisolo ya deploiement po ezalaki ko rappeler nga ba mabala ndenge na ndenge na mona na
Kin.  Lopango oyo etalani na biso, ba kulutu ya basi na ya mibali bazalaka kosala ba repetitions ya ba deploiements na bango wana, tango mususu ba
nzembo ya Zaiko “ooo kamata loboko, osimba mutima, o bina choquer, mulunge ekosila aaa”  pe tango mususu ba nzembo ya mindele.  Ezalaki kitoko po bazalaki na Me danseur na bango.  Kutu kulutu moko bazalaki kosala couple ya ba sessions wana ya
deploiement, ba komaki muasi na mobali kobanda wana tii liwa eye koyiba kulutu oyo ya mobali na 2003.  repétition ezalaki kosalema na tourne disque pe ezalaki kozua à peu près 1 mois selon kaka ndenge ba kozua maitrise nango.  Soki mutu oyo aza kobala aza na makoki, ako sombela bango ba tenues ndenge na ndenge po ba changer selon nombre de fois bako bina mabina.  *Nakanisi lisusu sandales ya BATA na bandelaka classe na école primaire po biso na N’djili magasin yango ezalaki na place Sainte Thérèse en face ya école
primaire wana pe Pub nango ezalaki « Pas un pas, sans BATA », po na kala bana école primaire bazalaki kaka kolata ba kupe na kelasi tii même na ba feti, pantalon ezalaki kaka pona ba
kulutu to bana oyo babandi école secondaire « C O ».

Fallait osalisa deploiement na yo soki ozalaki na nostalgie nango, eza na loi moko te olobi ket
mutu akoki kosalisai yango te, mutu nionso aza libre asala feti na ye ndenge motema elingi « kaka soki oza kobuta mibeko te » po eza mokolo ya esengo.  Moninga na nga moko awutaki koyebisa nga ke « makambu ya kala eza te pe makambu ya sika eza te » ezalaki na cadre ya kombo pesaki ba mapasa na ye
bawutaki kobotama na mois de Janvier.  Tango natunaki ye pona nini apesaki bana kombo William na Marie Louise, ayebisaki nga, batu mingi bakomi kopesa
bana ba kombo lokola Gédeon, est ce que Gédeon aza mutu ya lelo ?  nionso eza kaka ombo pe nionso eza kaka choix.  Napesaki ye raison.   Deploiement ekoki kosalema soki motema elingi.

Weekend malamu na ba ndeko nionso ya mboka mosika.

Serge Kongo na biso.

Répondre
C

Cher Mwana Mangembo,

Osekisi nga mingi na reportage ya ambiance oyo ezalaki na  libala oyo suka: o peindre tableau kitoko ndenge elekaki pe na elobeli ya kinshasa ya tango wana lokola "bess"
"ecodis""malinga"...pe esuki kitoko: bozongi ndako na mokongo ya maman...

Répondre