Bilembo ya Antoine Mantento Santa
Bilembo ya Antoine Mantento Santa
un commentaire vient d'être posté par Tm sur l'article Les patrimoines culturels: par Emmanuel Kandolo, sur votre blog Le blog de Messager
Extrait du commentaire:
Nalingaki kaka kobakisa kombo ya moto moko pe atika bilembo na kinshasa donc nazali kolobela makambo oyo ngai nayebi pe oyo namona,moto yango kombo na ye ezali Antoine Mantento Santa,ba bilembo na ye soki ezali ti lelo ezalaki na stade reine astrid oyo ekomaki 24 novembre pe sikoyo ebengami cardinal Malula,na
stade du 20 mai ebengami lisusu na kombo ya tata raphael pe na Mont Ngaliema.
Na stade cardinal Malula bilembo na ye ezalaki tout au long ya mur ya stade côté avenue kasa vubu ezalaki ba oeuvres basala en céramique représentant bato na biloko mosusu. Na stade tata Raphaël bilembo na ye oyo ezalaki visible ezalaki na gauche et à droite ya porte d'entrée centrale ya stade po okota na tribune, na mont ngaliema nde namona kaka ba photos akangisa devant ba oeuvres na ye.Antoine Mantento afandaka na yolo nord pembeni ya école moko ezalaki pas loin na avenue université ba nzinga nzinga ya dancing moko ebengamaka la casa del rio grande presque en face ya suzanella maison blanche na ngambo ya mombele .
Antoine Mantento atangisaki pe na académie des beaux-art.chez ye azalaki na ba fours na ye pona kosalela makambo.pona
info na ba oyo bayebaki te, Antoine Mantento azalaki d'origine angolaise,azongaka mboka na ye pe akufelaki kaka kuna. ezalaki wa bino muana époque ya phono,sans un iota de graisse,anti-cycle
.NB BA BILEMBO YA ANTOINE
MANTENTO NIONSO EZALAKI MINGI EN CERAMIQUE ET signé na kombo na ye.
Tm
.