Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

un commentaire vient d'être posté par Samca sur l'article TCL (Transport en commun de Léopoldville),

BA NGANDO YA T.C.L.

Lokola bobimisi lisolo ya Ngando ya Ndundu, bandeko lisaponge ongé, boyoka lisolo, tozali na 1962, tozali bongo kofanda na rue Opala na Commune ya Dendale, quelques parcelles à partir ya avenue

Saïo, pembeni ya cimetière ya Saint-Louis, to cimetière ya Mboka Sika.

Tozalaki kofanda epayi ya Papa Kulutu, puisque biso towutaki na commune ya Kinshasa, sur rue Luvungi, epayi ya Mama Kulutu, tangu mama na biso oyo akufi epayi mosusu ya kokende ezalaki te, to se

replier epayi ya Papa Kulutu na Opala.

Pour rappel, Mama Kulutu azalaki na mobali te, pe azalaki na muana te, ayaki na mboka kozua biso bana ya grande-soeur na ye, tozalaki kaka ba garcons au nombre de cinq, abandaki koya kozua moko

moko, ngai nazalaki benjamin na bango nionso pe bayaki kozua ngai na 1957 nakomi sikoyo Kinois à l`âge de 10 ans.

Parmi ba grand-freres na ngai ya liboso azalaki mécanicien, ya mibale azalaki kosala na grand-poste ya ville, ya misato menuisier puis ya mineyi matelot na Otraco.

Na Opala epayi ya Papa Kulutu tokutaki mpe ba cousins misusu kuna, kasi ya famille ya mwasi ya papa kulutu, bazalaki 3 garcons, biso toyaki mpe 3 derniers garcons, tokomi bongo 6 garcons epayi ya

Papa Kulutu, puisque bango moko bazalaki kaka na bana mibale, mpe bazalaki kotanga na internat.

Un jour mbongo ya Papa kulutu ebungi na ndaku, affaire eye grave, eyindi, likambo eye ndongo, bayibi mille francs ya Père ya kulutu, Mama (muasi ya papa kulutu) alobi tangu biso tozalaki te,

makambo ya moyibi ezalaki te na ndaku na bango, depuis biso toye wana moyibi ekoteli bango ndango, koyiba biloko na nzungu, ba mbongo ya mike mike ekomi kobunga, tala sikoyo toyibi 1000 F.C.
8francs congolais) ya mobali na ye.

Mes frères, sans vous mentir, to subir interrogatoire serré pendant 2 jours, lokola kaka mbongo ezali komonana te, Papa Kulutu azwi décision, il faut amema biso epayi ya Nganga Nkisi na LEO II,

to commune ya Kintambo, nganga yango kombo na ye ezalaki Vieux Hindou. Epayi ya Nganga na Leo II, nganga alobi motu azali na mbongo wana ezali ba cousins oyo tokutaki na Opala, donc muana ya coté
ya Mère, mbongo ezali mosika te, Nganga abandi kobeta biso, na fouille en même temps, contre toute attente, bakangi cousin moko na mbongo wana soit 1000 francs na kati ya coupé (culotte). Sikoyo
biso tozali sauvés, problème sikoyo ekomi na côté ya Mama.

Toyeyi kozwa bus ya T.C.L. ligne 7, grand-frere na ngai asombi ba tickets mpo na biso nionso sept, mpe asimbi ba tickets yango bakoma KOLAKISA MBALA INSO BAKOTUNA, tokomi na arrêt ya Saïo

sur Prince Baudouin (esika basala boulangerie Mama Poto) biso nionso tokiti, Papa Kulutu, le temps apusana tii na porte ya liboso mpo akita Bus ya TCL e démarrer, bus ekomi na Wenze ya bayaka
etelmi, ba NGANDO bakoti, y compris ngando ya Ndundu, vieux Francois, lokola Papa kulutu azalaki na ticket te, bakangi ye, ba continuer na ye tii na Commissariat oyo ezalaki na Pont Cabu na La
Cité, comme fraudeur ya bus, babuaki Père ya kulutu na cachot, tozalaki vers ba 14 heures, na ba 20 heures baye kotika ye.

Bongo tangu Papa Kulutu akomaki na ndaku na Opala, d´abord apesi biso lisolo na ndenge malchance ekueyelaki ye na bus, aye kotomboka na muasi na ye, 1000 francs na ye bayibaki yango na cachot

kuna na La Cité, donc vieux asilikaki mabe mabe, kasi abenganaki to agangelaki ba cousins na biso te.

Nabimisi lisolo oyo en mémoire ya Ngando ya Ndundu, nzokande asalaka MUNTANDU.

Samca

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
C

Bana Ndjili Oyee

Ezalaki na ligne 25 bus ya TCL ezalaki kosala commune ya Ndjili tii na Universite Lovanium, eyaki kokoma tangu moko, ezala bus wana ligne 25 to ba Ngando ya TCL bazalaki kokota lisusu na Ndjili
te, balobi ba Ngando ya Tcl babomaka Etudiant moko ya Lovanium, azalaki muana ya Ndjili, soki a fraudaki soki pe ndenge nini, nazali lisusu na souvenir penza ya likambo yango te, nakosenga na
bandeko ya ba Ndjilois, bameka kotutela biso lisolo yango.

Curieux Omanga

Répondre