Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Sujet : La saga des "Bills" et des "Yankees" kinois, par E. Kandolo

Ndeko Toyaleke,

Merci na expression na yo! Oyebi , ezali kaka likambo ya ko vivre ba étapes ya vie na âges oyo ezali ko correspondre na yango. Mutu na mokili esengeli ayeba que eloko na eloko ezalakaka na ngonga na yango : kelasi, ambiances, maseki, musala, koyekola, kobima na baninga, kolanda basi, bisengo ya mokili, koya ba responsabilité, sport, lecture, promenade, loisir, distraction, ko préparer futur, conscience professionnelle, kobala, éducation na instruction ya bana, ko préparer retraite, bonne gestion, kopesa priorité na makambo ezali urgent mpe koboya kosala ba dépenses inutiles na ko budgétiser ba dépenses, koyeba valeur ya mbongo, kokumisa ba boti, ko s’instruire na ba réalités vécues, masolo na ba parents, ba kulutu, koyoka mpe nini bana bazali koloba, nini ba leki bamonaki, kosolola na boulanger, na cordonnier, lisolo na taximan, kopesa mbote na mama mikate, kosekisa mutu ya pusu, kotuna moninga sante na ye, koboya lokuta, kosala keba na muasi ya ngana, kosimba aveugle na loboko mpe ko renseigner mutu soki atuni yo adresse, par exemple. Manso oyo ezali kopesa mutu mua boyebi ya mokili na makambo na yango.

Ndeko Jean-Pierre,

Burt Lancaster azali moko ya ba oyo baningisaki Kinshasa. Procès na ye, soki nabosani te, ezalaki na début ya ba années 70.

Ba salles ya cinémas, yo moko oyebi que na kati ya R.D.C., yango esalaka succès makasi mpe na elengi ya kotala film. Ngai tee na lelo oyo, nakendeke kaka cinéma, même soki temps esalaka ngai mua défaut, nalingaka kaka ba films ya cinéma. Nazali passionner ya ba films américains na version originales na ba films français, italiens na africains (biso na ba ouest africains). Yango esala que na se familiariser na ba vrais mingongo ya ba acteurs. Wana ezali ba moments ya jeunesses oyo bilenge ya lelo bazali ko connaître te mpo jeunesse ezali ya kosundola..

Ndeko Jean-Pierre, na oyo etali lokasa, nakosala mua commentaire na makambo intéressants okomi.

Ndeko Richard Kasongo,

Likanisi ya mbotama ya mboka mosika ezali nde ya kosangisa ba compatriotes na ba pays oyo bazali ko s’intéresser na ekolo na biso, na kosangisa  masolo ya domaine nionso mpe  na manso masalema na ekolo na biso mpo ko contribuer mpe na mémoire collective na biso.

Chef Ipoto,

O soulever cas moko intéressant. Jean-Forester Manzikala, na authenticité ayaki kokoma, Manzikala Madrakini.  Ye azalaki  Inspecteur d’Etat (azalaki na sûreté te) avant akoma gouverneur ya Kinshasa. Inspecteur d’Etat ezalaki poste moko Président Mobutu asalekaki ye sur mesure mpo apesa ye lisusu ba raisons ya koboma batu sans causes réelle ndenge asalaki na Shaba. Aboma batu ebele oyo ba services na ye ebandaki ko suspecter mpo na ba différentes raisons. Ba pressions occidentales nde eyaki kosal que akangama mpe asambisama na 1972. Alonguaki na ebonga ya gouverneur na 1971.

Manzikala abandaki koboma ngulu ngulu trop. But na ye ezalaki ya ko éliminer batu mpo na ko maintenir terreur comme mode ya fonctionnement ya pouvoir ya  guide de la révolution zaïroise.  Na batu wana ba miyibi, ba Bills na ba Yankees na ba oyo babandaki ko vivre paisiblement bazalaki na kati. Notons que le dernier de souci na ye ezalaki ya ko traduire batu na justice.

Par ailleurs, gendarmerie, yango ezuaki mission ya ko maintenir ordre na sécurité publique. Yango wana Bolozi ayaki kokotisa ba Bills na ba Yankees mayi.

Mikolo mikoya, tokomeka kolobela  Jean-Foster Manzikala Madrakini.

Ndeko Joseph Pululu,

Merci na lolenge ozongisi lisolo ya ba Goza na temps. Ngai nandimaka batu wana ndenge babandaki ko changer elobeli na bango soki ba remarquer que ba yuma bakomi ko o comprendre elobeli na bango. Na peut de temps, univers na bango nionso ezalaki au courant ya elobeli ya sika, nionso oyo toujours na but ya kotika ba non-initiés kidiba na compréhension ya langage na bango. Ozali koyeba lisusu ndenge oyebisaka biso awa lolenge mama Marie-Joséphine (Marie-Josée) Angebi Engeya alobaka na Indoubill, mingi bayoka ye te, sauf bino baye bozalaki na litoyi wana mpe mama Marie-Josée abaya tango bo revesa que bo captaki message ! Wana ezali monde moko mosusu.

Likambo ya ba zombo, ezalaki tout simplement mauvaise fois ewutaki na complexe ya supériorité Belge akomaki na yango na Portugais. Na tango wana, Portugal ezalaki lisusu grande puissance te mpe Belgique ekomaki ko régner na mabele ma Congo malgré absence ya expérience ya colonisation. Ba zombo babandaki kofuta masumu oyo bango basalaki te.

Oyebi, ozongisi ngai lisusu makanisi na sima na terrain neutre, esika ba bagarre ebandaki kosalema , na croisement ya avenues Bokasa (avenue du peuple) na Sendwe (boulevard triomphal). Esika wana ezalaki na mua chute ya mayi mpe ba Bills babandaki kosola wana.  Bana mingi bamela mayi wana mpe misusu bakufa na maseki .

Plan décénal (1949 tee na 1959) oyo olobeli, yango ekotisa Congo na niongo tee lelo oyo. Ba projections ya dépenses ebandaki kaka komata mpe ba dépenses eyaki ko se multiplier par deux mpe ekotisa Congo na niongo oyo ye azuaki te mpe oyo mundele akotaki selon ba plans na ye. Yango mpe ezali na kambi ya dossier ya contentieux entre Belgique na Zaïre.

Ministre ya Colonie, Pierre Wigny abimisaki likanisi liye sima ya grande guerre mpo na koluka ndenge yak o doter Congo na infrastructure me équipements ya malonga, kotombola nkita na agriculture na développement rural, ko améliorer technologie na ba mécanismes oyo ezali kokende na yango , nionso oyo na consolidation ya potentiel ya marche intérieur congolais. Plan yango ezalaki na cinq chantiers :

1. Transport (routier,  ferroviaire, fluvial et lacustre)

2. Equipement na habitat (hygiène et santé, accès na eau potable, école pour tous, logement, immigration na colonat)

3.  Infrastructures publiques (bâtiments publics et administratifs, services scientifiques, magasins généraux)

4. Energie (production hydroélectrique)

5. Développement rural et agricole

Ndeko  Ndombasi Kupessa Ngombo,

Ndenge kaka olobi, heureusement que sika tozali na mbokamosika. Malembe malembe tozali kobimisa maye maleka na ekolo na biso mpo toyebaka ndenge ba réalités mosusu ezalaki. Tala ata yo moko, soki bakonzi bazuaki mayele na phénomène ya Goza, ba Bills tee na ba Yankees, mbele tango mosusu ba kuluna babotami te. Nionso oyo mpo mayele ya kotiya politique ya prévention na etamboli ya bilenge ezali te. Répression ezalaka solution à long terme te mpo ba phénomènes ezalaka cycliques. Prévision ezali moyen efficace ya ko prévenir ba déviation wana na encadrement, éducation, formation, responsabilisation, accompagnement na insertion, kobimisa elenge na nzela ya échec scolaire mpe ko motiver ye na formation mpo azua qualification na domaine ya vie oyo ye alingi kosala, kosala ba campagnes ya sensibilisation na oyo etali kopengua na petite délinquance tee na komema elenge na grand banditisme, kopesa ba institutions ba moyens na ba outils nécessaires : kofandisa tribunal pour enfant, ko former ba encadreurs ya bilenge, mpe surtout ko diversifier ba sports na ba loisirs y compris na ko initier bilenge na bolingo ya nature. L’Etat mpe esengeli ezua ba responsabilités na ye na ko créer ba emplois mpe ko futa baboti ndenge esengeli mpo bango bakoka ko soubvenir naba besoins ya bana na bango mpo lelo oyo autorité parentale ebungi mpo conjoncture économique ezali kosala que parent akoma défaillant.

Kobanda ba Goza tee lelo na ba Kuluna ba centres ya éloignement ezalaki, kasi yango e empêcher te ba phénomène oyo ezalaka zalaka na Kinshasa, tout comme ba bagarres pour une raison idiote : ba filles ya quartier tel bakoki kolingana na ba garçons ya libanda ya quartier wana te ! Soki omoni Bill pendant que ozali kosomba mikate ou makayabu na kwanga na coin ya bala bala , il faut mpe osombela ye. Soki osombeli ye te, akobeta yo ou akangi yo mitif tee ofuta ye amende !  Avant otambusa vélo ya sika na quartier, autorisation ya ba Bills ezali indispensable. Soki te, omemi ngambu ! Ba raisons ezali ebele… mpe tokokoba kaka na masolo

Ndeko Crispin-Régis Lukoki,

Ozongisi ngai ba souvenirs mususu. Na 1967, ba Bills ya bois dur babetaka Maître Gérard Kamanda na libanda ya La fontaine, boîte de nuit,  na croisement ya ba avenues enseignement na Gambela.  Abikaka mpo Chef Mikabar, Chef ya police, ye moko ayaki na batu na ye ko sauver ye. Sima ya mikolo eyaki koyebana que Justin-Marie Bomboko na mista na ye Victor Nendaka nde bapesaki ba Bills mbongo mpo baleyisa Kamanda lukutu wana mpo na jalousie ndenge azalaki Directeur ya cabinet ya Président Mobutu sans bénédiction ya groupe de Binza!!! Kobanda wana nde Gérard Kamanda, azuaki somo mpe  ayaki kondima na deuxième tentative, offre ya Guinéen Diallo Telli Boubacar, Secrétaire général ya Organisation ya Unité Africaine (O.U.A), mpe akomi  Directeur ya  cabinet na ye. Yango wana ayaki kokende kosala carrière internationale na ye kuna na kokende na Addis-Abeba na Ethiopie, na fin 1967.

Kombo ya Bungalow ewuta na film : Bungalow pour femmes. Na Richard Egan, Jane Russell, Joan Leslie, Jorja Curtright, Jane Russell, etc. Yango esalemi na Raoul Walsh. Version originale na yango ebengami : The Revolt of Mamie Stover. Yango ebima na fin 1955.

Ba interventions oyo ya ba vieux Wello, Black-Tagart, ebandaki kobengama : tozali kokotisa kimia!

Vieux Néron « Imperator » akomisaki partie ya Matete, O.N.U. britanique mpo na likambo ya résistance ya ba casques blues ya O.N.U tango governement Ileo e décidaki ebengana ambassadeur ghanneen mpo na soutien na ye na gouvernement ya Lumumba. Abangaki que soki atie O.N.U ghanneen, ekolukela ye makambo na ba soda mpo ba casques bleu ghanneens nde babomaki Colonel Justin Kokolo na 1961 (nakozongela yango semaine oyo na biyano nakopesa yo sur ba soda oyo otunaki ngai). Du coup bakomaki impopulaire na Léopoldville mpe suka suka ambassadeur akendaki na Accra. Yango wana atiyaki O.N.U britannique, pour dire que kuna ezali zone ya non-droit mpe étranger akoki kokota kuna te même pas bourgoumestre ya Matete mpo soki mutu ameki kokota kuna a ko barrer ye.

Matumoli ya bana mike wana olobeli, misusu ezalaki : balandi mutu alati pantalon na ye ya pembe, bango bapakoli ye poto poto, ou encore koyembela batu na nzembo lokola pantalon bibamba ou pinzu !!!

Tango ba Bills babandaki kosalaba terre-terre wana, ba filles mosusu bazali consententes te , kasi babandaki koloba te mpo babandaki kobanga ba représailles mpe likambo ya viol ezalaki mingi kobalukela muana muasi dans ce sens que bakobengana ye na ndaku mpo a perdre virginité na ye mpe baboti misusu babandaki ko considérer yango kaka comme prétexte na rapports sexuelles. Ko dénoncer viol, ezalaki lisusu kobangisa ba filles mpo ekobebisa réputation ya muana muasi. Kasi ata ba Bills balobi que basalaki ki ngandi terre-terre, na lokuta mpe bazalaki na yango, nani a ko prêter attention na ba déclarations ebemi na nse ya bangi na masanga ? Wana ezalaki nde fuite en avant ya ba victimes ya viols.

Bon, ba kilawu, ba baba na ba kizengi nde babandaki koleka mingi na biloko wana mpo bango nde bazalaki vulnérables. Kasi ba filles mosusu bakueya mpe na mitambu mpo ba enlèvements spectaculaires « éboulements » ebandaki mpe kosalema na Wenze ou soki fille akeyi kosomba masanga ata mungua ou mafuta quelque part. Wana soki Bill a porter nzele na lipeka, nani akopusana ?

Vieux Libre, par exemple, soki afandi na coin ou azali kotambola na bala bala, ye azali na droit ya kotala yo, kasi yo okoki kotala ye kaka soki miso ,ma ye mizali kotala na direction mosusu. Soki par imprudence ou par malchance miso ma yo na oyo ya ye mikutani, soki ozali muana muasi, ako porter yo akeyi kosala yo terre-terre. Soki muana mobali, wana akoleyisa yo lukutu kaka wana. Donc, eyebanaki que soki vieux Libre azali quelque part, balola elongi esika mosusu, kotala ye te, ata ye azali kotala ailleurs, de peur que miso na yo na ya ye ekutana. Ye kaka nde azali na droit ya kotala batu, le contraire alingaka yango te.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo
Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
I

Botondi mingi na mokolo Emmanuel.
Masolo oyo ezali ko faire remonter ba souvenirs mingi ya kala.
Obosani PAKA DJUMA?
Tokende kosukola kuna.Po na kokota na mayi tolongoli bilamba.
Sokola,sakana.
Tango tobimi na mayi mogondo na ngai eza lisusu te.
Nazili butu ekweya po nazonga na ndako,nakangi miche na loketu.
Tango tokomi pembeni ya ndako natindi leki na ngai akende kozuela ngai kupé mosusu po na leka liboso ya baboti.
Masolo ya mboka elengi mingi.

Longue vie à Mbokamosika.

Répondre
N

Mbuta Kandolo,Nzambe apambola yo mingi.Merci.

Répondre
N

Natindeli bino e ekoma ma nkondo KAWATA maye abimisaka na mobu mili mibale na moko na sanza ya sambo.
Moto  ma yango ezali : "Lisakola lya Pecos-Bill o liwa lya Godzila : indubil"

Bona

O ntango ena, Ngiringiri ekabwanaki o biteni bibale : FW to mofewana mpe
Dynamik. Ndelo ezalaki o balabala Asosa. Godzila ya Ngiringiri akufi mpe
Pecos-Bill ya Mofewana abyangami mpo na koloba o boso ya lilita lya mowei.

" Mista, mista oyo, mista okimi combat mpo n'epaka ya nwa.
Soki okutani na Nkulutu, tuna ye mpo na nini akonaki yango beboo.
Oyebi lisusu, ntango okataki kamo ? Gwa wana, suka ya gwa : ebuka milangi na
kudiantu...
Bangorobo, bangutububu, bakanisaki okopikola mofewana. Mofewana ezali kaka.
Ngai Pecos-Bill nazali kaka. Debrende alingaki kovuma. Moto ! akiti na
mabele. Kasi tokoma bamasta. Kafulu, bok kaka esika moko. Baonubritanik ya
Matete ! Tofinaka nsesa na kamush. Nwa beboo.
Mpo n'epaka banzele, bapeti momi, trop bien. Ma Salambi apokola ngola,
achanja na ye mokobo.
Tozali awa biso nyonso : Diora ya Yolo, Tigre ya Matonge, John ya Ngaba,
Durango ya Dynamik, Apolosa ya Dendale, Billy ya dynamik oyo atombolaka
bibende, peti na ye atiyaka bikumu na Bilima. Bamasta ya Ndjili, ya Kintambo,
Bandal, Saint-Jean, Barumbu, bapikle mpe awa.
Vieux Mombete akota palais. Momi na ye kaka bouche. N'ekala niki. Peti na yo
Evande, mosala kaka bivundess ya bamomi, akola mabe ! Sinatra, libabe, abela
mpese. Ma mapasa, bulawayo. Cassidy abeba na ye, shegue bakote wana. Bango
tout bazali awa...
Nkulutu, ayeba, topikle kaka awa, nwa na nwa, bok na bok, nsesa na nsesa.
Tokodie biso nyonso na fulafula moko te, niki. Alinga alinga te, akozwa kaka
moko na moko. Tokodaye biso nyonso mokolo moko te. Niki, niki, niki...
Mista Godzila, Bamasta batindi naloba. Ata kutu odaye, yo moko oyebi, bouche
eleka te mpo nkanda soki eleki, diantu. Epaka evide. Yo odie kuna, bongisa
ekala, luka nwa, nsesa ezala, bok na banzele, soki te, nakodie na ngai bakote
mosusu.
Yoka malamu, ezali ngai, Pecos-Bill ya Mofewana na bamasta nyonso...
Mista mista oyo, ah ! Mista.
Mista akimi combat, Ah! Mista
Mpo n'epaka ya nwa, ah ! Mista..."
(N.B. : Eloge funèbre authentique)

KAWATA Ashem Tem
Nyang e nkoso

Répondre
S

Ndeko EMMANUEL KANDOLO,oyebi lisolo oyo esekisaka meme ba belges?,mobutu na nendaka bazalaki arreter par ba soda na prison ya ndolo na novembre 1963,bazuaki dernier de lukutu,nkuba ya ndenge wana
il fallait ba soda baboma bango mibale,ye mobutu na nendaka il fallait ba bwaka bango na fleuve,kasi ba sodas ya ba tetelas nde babikisaki bango mibale,oyebi yango???? ba sodas wana bakangamaki pe
babomaki bango na janvier 1964  par mobutu ye moko.

Répondre