Réponses d'E. Kandolo à certaines questions
Sujet : E. Kandolo décrit le décès accidentel du Lt-Col Tshibangu
Ndeko Jean-Pierre,
Na juillet 1975, Citoyen N’djoku Eyobaba azali gouverneur ya ville de Kinshasa. Sima ya awa ayaki kokoma Président ya Assemble régionale ya Equateur. Par contre, Jean Forester Manzikala azalaki gouverneur ya ville de Kinshasa kobanda na 1969 tee 1971. N’djoku Eyobaba nde akomi gouverneur kobanda 1971 tee na 1976. Sakombi Inongo nde aye ko remplacer ye na 1976, ndenge ndeko Messager akomi.
Jean -Forester Manzikala, nabanzi oyebi malamu que akomaki kofanda na Kisangani sima ya condamnation na ye a perpétuité na Cour suprême mpo na ba assassinats ya batu ebele ya ebele. Lopango na ye ezali na immo Tshopo na nzinga nzinga na epayi ya papa Ngolomingo, gouverneur Valérie Salumu Amisi mpe mosika te na résidence ya directeur régional ya Régideso.
Merci na lien, natanga naino lokasa wana. Na suka, nde tosololi lisusu.
………………………………………………………………………………………………………………………………………….
Ndeko Crispin-Régis Lukoki,
Oyebi que Général Louis de Gonzague Bobozo Salelo Ndembo Aduluma awumela na camp Hardy ya Thysville. Tala kaka que akota na Force Publique wuta 1933. Tango Congo ezui lipanda na 1960, ye nde akomaki moto moindo ya liboso oyo akomaki commandant ya camps oyo mpe role camp Hardy e joua na arrestation ya Lumumba obungi te ! Basi na ba non-sens ezalaki na makila ya Bobozo mpo na tête na ye, neti pouvoir ezalaki na maboko ya Joseph moke, manso ezali permis mpe retenu ou interdit ebandaki ko exister te na miso ma ye.
…………………………………………………………………………………………………………………………………………….
Ndeko Jérôme Nzembelé,
Na maye olobi, esengeli toyeba lisusu que ba soda na ba cilvils oyo batindamaki na Angenga, na retour na bango na Kinshasa, ba vivaki mikolo ebele te mpo na ba conditions de vie ya Angenga ekomisaki bango batu ya maladi. Avant retour, misusu bakufaki kuna. Ya solo elobamaki mingi que batubaki bango tonga empoisonner. Kasi ebongi mpe toyeba que kuna na Angenga ba conditions hygiéniques ; sanitaires ; alimentaires ; environnementales ; ezali ko détériorer mutu mpo koliya malamu ezalaka te mpo mutu ye moko esengeli asala bilanga ekoleyisa ye, eau potable ezali te, soki mutu abeli , amkomela kisi te mpo ezalaka te, ba visites médicales na ba soins médicaux ezalaka te, milieu wana ezali sauvage, contact na civilisation ezali te, ba maladies tropicales etondi zamba sans oublier attaque na ba animaux sauvages. Yango wana mingi oyo bawutaki kuna ba wumelaki te mpo état de santé na bango ekomaki détériorer makasi mpe moyen bazua ba soins médicaux ya malonga ezalaki te mpo l’etat abotolaki bango biloko nionso mpe ba familles na bango bazalaki lisusu na ba moyens te. Na wana kobakisa interdiction ya kobima mpo bakokaki kozua passeport te mpo na casier judicaire ezalaki na bango.
……………………………………………………………………………………………………………………………………………………
Ndeko Messager,
Soki nabungi te, na cadre ya complément, misusu oyo basilisa na école royale militaire (filière toutes armes na gendarmerie na kati) balekaka na école ya infanterie ya Arlon (école d’officiers). Mise a part na ba grades academiques ya ba universite, Ecole royale militaire epesaka mpe certificat na brevet ebengami certificat d’école royale militaire, na brevet d’école militaire (BEM). Par ailleurs, ba écoles d’armes esika ba techniciens na ba brevetés ya état-major babimaka, yango epesaka diplôme ya technicien ou ya breveté ya état-major. Ndenge kaka opesi muinda na makomi oyo otandi awa.
Na oyo etali passage ya grade, manque ya élite militaire noir, rébellion, sécession nionso eladaki sima ya lipanda, e justifiaki komata ya ba grades. Par ailleurs, régulièrement komata grade na armée na biso elandanka nzela mibale ; ancienneté na études (formation, stage, recyclage). Kolonga etumba mpe ezalaka occasion exceptionnelle ya komatisa soda pete. Kasi kobanda na grade ya capitaine, wana esengeli kaka mutu aleka par un diplôme ya école ou académie (centre militaire) militaire ou institut supérieur ou université voir équivalent na yango. Ndenge kaka ndeko Messager alakisi. Diplôme na ba formations complémentaires ya une année na académie telle, deux ans na école telle, etc. e justifiaka komata. Kasi, malheureusement ba abus elekaki mpe mingi babandaki ko sauter ba étapes na appui ya bakonzi.
…………………………………………………………………………………………………………………………………………………….
Mdeko J.P.Bouk
Claude Mafema Nganzeng, akufaka tango azalaka commissaire d’Etat na administration du territoire. Camion militaire etuta Ranger Rover na ye na nzela ya Bandundu, ebuaka ye na ravin. Tee lelo oyo, enquête esalema te. Même chose mpe ekomelaka André Mukendi Kasonga Madimba na jaguar na ye. Voiture eniefuka somo !! Mukendi akufa kaka boye mpe enquête esalema te. Mathias Nzanda Buana Kalemba, akoma tetrapelgique na accident grave na avenue Nguma na ma campagne. Président Mobutu azalaki na kanda na ye na likambo ya mbongo oyo ya ba Chef coutumiers.
…………………………………………………………………………………………………………………………………………………
Claude Kangudie
Nazali komona lisusu elongi ya citoyen Assumani Busanya Lukili. Ezali regrettable ndenge baleka ye. Oyebi, Général Bolozi azali kotambola librement mpo na pays na biso R.D.Congo toyebi ndenge ya ko constituer dossier oyo ekoki ko inquiéter batu baye basali mabe na ekolo te. Esika nionso Bolozi aleka, atika sango na ndenge ya mabe : police, brigrade mobile, B2, commandement ville ya Kinshasa na Brigade spéciale de recherches et de surveillance (B.S.R.S.) comme outil de travail na ye, commandant circonscription militaire ya ville ya Kinshasa, commandant Service d’action et de renseignements militaires (S.A.R.M.).
………………………………………………………………………………………………………………………………………………….
Papatoto,
Matondo mingi na ba précisions opesi na oyo etali etamboli ya école militaire na nzela ya brevet militaire.
Na oyo etali suite na liwa ya Colonel Tshibangu, ye ba que molongani na ye akendaka ko se présenter na Conférence nationale souveraine. (C.N.S.) eyokaki Eluki na Seti. Général Nzimbi aboya koya, Colonel Kabangu aboya koya, Major Amoya afanda na ye na Kota Koli mpo atikala kozua convocation ya koya na Kinshasa te mpo Commandant na ye, Colonel Nkoy Embanze « Mbunza mabe » a jugeaki inutile ye akende ko répondre na invitation ya C.N.S. mpo eyoka ye sur liwa ya Colonel Tshibangu.. Conducteur ya dix roues na mutu oyo abengaki Colonel Tshibangu na radio, ba kombo na bango etikala koyebana te.
C.N.S. esalaka ba recommandations mpo na koyeba ba circonstances ya accident wana na soki batu bazalaki impliquer na liwa wana. Esengaki lisusu que ba promesses ya Président ezala concrétiser : ndaku, mbongo alakaki mpo na ba études ya bana, vie ya chaque jour, etc. Ndenge yo moko oyebi, Président Mobutu asuta na ye ba résolutions mingi ya C.N.S. mpe action en justice na likambo oyo esalema te. Kutu Vundwawe aloba que ba résolutions nionso ya C.N.S. ekosuka kaka na porte ya Palais du peuple.
………………………………………………………………………………………………………………………………………………
Ndeko Charles,
Ndeko Papatoto atunaka awa : « pona nini mutu akoki kozala na ba animaux sauvages ndenge wana, epayi na ye ? ». Na motuna moye, mosusu motunamaka : pourquoi ba léopards bakokaki kozala na jardin présidentiel te esika ba niama nionso bazalaki y compris na Okapi (trouvable kaka na Zaïre) na lion, mokonzi ya ba niama ? Président Mobutu ayebaki malamu pourquoi azalaki na attachement na léopard kobanda azuaki bokonzi te na tango alonguaki.
...................................................................................................................................
Maître Kula,
Il est vrai que na ekolo na biso e perdre ba militaires ya solo oyo bakembi na mosala mua soda na expérience mpe na basusu oyo bazui formation militaire na ba écoles militaires ya niveau ya likolo. Ba raisons ezali ebele, kasi oyo ezali ko se justifier te ezali ya élimination ya compatriote oyo l’Etat efuteli mbongo mpo na formation na ye mpe au lieu asalela maye ayekoli en tant que militaire mpo a service ekolo na ye, yango elukeli ye likunia na motema mabe ou encore elukeli ye makambo mpo azali ressortissant ya provinces oyo commandant suprême ye moko azali ko accuser ba ressortissants na yango na makambo ebele.
Maître Kula, café wana ezalaki esika ya bokutani ya ba africains noirs oyo batangaka na Ecole royale militaire (E.R.M.) ya Bruxelles. Nazali koyeba lisusu que wana nde sango ya jeune compatriote moko ya Yolo -Sud, Jean-Marie Kabuya, ekueyaka tango asalaka arrêt cardiaque durant séance sportive na E.R.M. Obungi te, solidarité ba jeunes étudiants wana bazalaka na yango na Bruxelles. Une fois bazongi mboka, ekomi lisusu ya kobomana. Nabosani te, quartier ya Henri Mongombe. Na capter clin d’œil wana !!!
Na motuna otuni ndeko Jean-Pierre, soki nabungi te, nabanzi que Lockheed C-130 Hercules, commandé na Capitaine Justin Kokolo , ezikaki na Goma. Accident wana ezalaki évitable ! Période wana, pénurie ya madesu ekotaki na Kinshasa mpo prix ya carburant eyaki komatisa talo. Conséquence na yango, billet ya bateau na barge mpe ya fret emati, ravitaillement ya Kinshasa ekomi lente. Na yango, neti ba pilotes ya Forces aérienne zaïroise (F.A.ZA.) bazalaki lisusu kofutama malamu te, bakomaka kosala mombongo na ba C-130. Yango ekomaki « cargo » ya ba civils oyo bazali kosala commerce entre Kinshasa na intérieur. D’ailleurs, bakonzi ya armée nde balakisaki nzela ya ko utiliser ba avions ya F.A.ZA .na compte na bango personnel sous couvert ya ba vols réguliers. Neti bokilo ya Capitaine Soza azalaki na ba moyens na ye, akomaka kokende na Goma kosomba madesu ya ko ravitailler Kinshasa. Ye a insistaki kaka biloko na ye wana ekoma na Kinshasa le même jour mpo na tongo a écouler yango na zando. Equipage mpe ezalaki na intérêt na kati ya madesu wana mpe ezalaki na oyo yango marchandises lokola. Insistance ya mama esalaki lokola mua discussion na ba pilotes mpo biloko na ye elekaki ebele, Kasi neti ezalaki coop, meilleur moment ya kokotisa marchandises wana na Kinshasa ezali na butu mpo tango wana bakonzi na ba soda oyo basalaka na base ya N’djili bazali lisusu te na base mpe na discrétion yango ekobima pepele que soki ezalaki na moyi. Au lieu mama bokilo ya Capitaine Suza asalela ndenge bayokanaki, ye alingi kaka akotisa nombres ya ba sacs ya 100kg eleki ndenge bayokanaki na ba pilotes. Ye alekisi yango mpe ematisi lisusu charge. Techniquement, ekoki ko poser problème te mpo na ko décoller na condition que piste ezala mulayi mpo e permettre na moteur e atteindre puissance esengeli mpo tango gaz ekopesama, yango emata. Kasi risque na surcharge ezali que soki panne moteur eye, même soki pilote akoki ko pencher avion na ye na côté opposé na moteur oyo ekufi, ekoki ko poser lisusu problème soki yango esalemi na phase ya décollage tango avion ebandi kopupola mpo emata. Yango wana esengeli ko voler na maximum constructeur asengi ata soki tolérance ezali.
Lockheed C-130 Hercules ezali na cinq menbres ya equipage : ba pilotes mibale (commandant de bord na copilote), navigateur moko, mécanicien de vol moko (ingénieur de vol ou flight engineer) , na chef de soute moko (loadmaster).
Poids à vide: 35,8 tonnes, poids maximum na décollage : 70,2 tonnes, charge utile (payload) ezali : 92 paras (mutu na parachute na mokongo) ou 128 soda soit 18 tonnes ya fret. Na oyo etali performance :
Vitesse na base attitude : 575 Km, vitesse na décollage na niveau ya mer (oyo ezali na latitude te), distance franchissable sans escale na charge maximal 1.800 km (Kinshasa Goma), vitesse maximum : 600Km, plafon (attitude ya croisiere) : 10.000mettres, rayon d’action : 7.000km.
Capitaine kokolo, commandant de bord, azua risque énorme na quelques minutes ya fermeture ya aéroport ya Goma (Goma ekangaka na 18 heures mpo ezuaka ba vols ya butu te à cause ya relief na yango « montagnes »). Capitaine Kokolo a convaincre ba membres ya équipage que bakende kaka mpo bango mpe bazali na droits na ba marchandises wana. Malheureusement, tango a lancer avion mpo a décoller, moteur numéro deux ekufi, surcharge ya avion e permettre ye te a décoller na partie ya asphalte ya piste. Na moment wana, ekomaki difficile na surcharge a décoller convenablement or il fallait kaka amata, asala rotation, sima akita mpo na vitesse akomaki na yango, alekisaki proportionnalité entre vitesse na distance ya freinage ! Soki amataki, alingaki lisusu akita mpo a alléger avion na ye mpo akoki ko voler na trois moteur na capacité maximum te. Kasi na moment wana, avion ekokaki ko décoller te mpo na ba raisons eyebana te tee lelo oyo par manque ya enquête, on imagine, état ya équipage malgré expérience ya commandant Kokolo, peu te temps ya réaction atikalaki na yango par rapport na maîtrise ya avionna ye !!! Avion ekeyi kokota na bilanga ya masango oyo ezali na suka (wana avant ba constructions anarchiques ekoma wana ndenge ekoma lelo oyo), C-130 (libumu ndunda) ezali na nse mingi (avion trop bas), na terrain accidenté ekoki kozala na amortissement ya malamu te mpo esalemi mpo na ba pistes accidentées te (asphalte, bitume ou terre battue ezali nde malamu mpo na yango). Tango C-130 ebimi na piste, ekoti bilanga ya masango, esali ba bonds, mouvement wana yango e faire perdre avion stabilité na contact na sol, e pivoter, lipapu ekoti na mabele, hélices epikuami mpe na secousse wana epesi explosion ya réservoirs mpe moto epeli. Tango wana camion ya anti incendie ezalaki, kasi chauffeur asi amikendelaki na ye neti amonaki que 18 heures ekokaki.
Général Kikunda Ombala azalaki furieux et très en colère mpo ezalaki gâchis !!! Aboya kosalela ba membres ya équipage honneurs militaires mpe kolela bango na Base ya N’dolo na camp Lieutenant Mbaki. Bango bakundama na cimetière de la Gombe mpe na ba tombes na bango, Président Mobutu asenga na Général Kikunda Ombala atiya ba chaînes mpo na kolakisa que bakangemi mpo na mabe oyo basali. Personnel naviguant ya F.A.ZA. e regretta geste wana mpe ezalaki blesser na traitement réserver na baye bakufi. Sima ya mikolo, Président Mobutu a critikaka comportement ya ba pilotes F.A.ZA. « Commerçants » na meeting na ye.
Na oyo etali Lieutenant Etisomba, nabanzi que ye azali moko ya ba pilotes ya hélicoptère oyo bazikaki na miso ya batu na Base ya N’djili. Hélicoptère epela moto na quelques mètres ya hauteur sima ya décollage. Bazuaki temps ya kokitisa yango, kasi moto e permettaki bango te, babima, yango bazikaki na kati, malgré intervention rapide ya ba secours.
Na profiter mpo tokanisa ba pilotes lokola Général Baruti, éternel Chef d’état-major adjoint ya F.A.ZA. Ye ayaki kokoma Chef d’état-major ya F.A.ZA. tango armée de l’air ezalaki lisusu na avions te !!! Wana, Président Mobutu aye ko nommer Général Kikunda , Président-directeur général ya Air Zaïre. Tango Kikunda abomi Air Zaïre, Président apesi ye ebonga ya P.D.G ya Régie des voies aériennes (R.V.A).
Tozongela ba pilotes : colonels Kwatebakute, Makaya, Yambuya, Kabondo, Mbo, Nymilongo, Tshitundu, Ayike, etc.
Major Kabuya « Dadou », Kabamba «Com Com », Oketo, Siamuna, etc.
Lieutenants Babajiki «B.B.J. », Bukasa, Kabeya, etc.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo