Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ba ndeko,

Nakobakisa mua ba commentaries na biyano bia ba ndeko Crispin Régis Lukoki, Sonny mokonzi na Messager bapesi na ndeko Ndombasi Kupessa Ngombo. Lisolo ya ba Bills na ba Yankees ya Léopoldville (Kinshasa), ezali oyo ebengami na lopoto : phénomène.  Mpo to comprendre ndenge yango ebandi, esengeli tozonga mua  sima moke na maye malekaki na ekolo na biso .

Conférence de Berlin ya 15 novembre 1884 tee na 26 février 1885, ekati mbotama ya bassin ya Congo . Kasi yango atako ezalaki mabele ya nkumu Léopold II, ezalaki ya kofunguama na baye banso balingi kosala mombongo mpe koluka bomengo. Neti ezalaki bongo, nkumu belge amonaki que moyen Belgique etindaka ba produits wuta Belgique mpe kotiya yango na ba talo oyo bango balingi ekosimba ngonga molayi te mpo na concurrence, esengelaki suka suka basala ba industries oyo ekoki ko transformer mpe biloko ya ndenge na ndenge mpo na consommation locale na oyo ekokende na métropole. Politique économique et commerciale oyo ebandaki kotambola malamu.

Na 1940, grande guerre ebandi. Bitumba wana esalaki mbula mitano mpe Belgique ezalaki na kati mpe ebundaki yango na ba soda ya Force Publique ya colonie  mpo Congo-belge ezalaki colonie na yango. Bitumba wana ebomisaki batu ebele, ebebisaki outils de production na ba industries mpe ekotisaki nzala na kozanga biloko ebele kuna ba Belgique. Yango eyaki kosala que Belgique amatisa capacité ya production ya bilanga na ba usines na ye azali na yango na Congo mpo demande ya caoutchoue, loso, café, bois, fibre coton, fibre sisal, fibre urena, cacao, huile de palm, huile d’arachide, huile de palmiste, coton, copal, punga, poivre vert, hévéas, pili pili, etc.

Yango esengaki déplacement ya population vers ba grands centres esika ba industries ezali na esika ba plantations eyaki kokoma minene mpo na ko satisfaire na demande na mikili mpo penurie ekotaki mpena perte ya ba centres ya production ya asie mpo kuna mpe bitumba ezalaki. Kinshasa en tant que engumba mokonzi, yango ezuaki batu ebele mpe yango ematisaki mbala moko population na yango. Mundele akumbi batu wana ebele mpe apesi bango misala mpo na ko ravitailler Belgique na biloko bizangaki bango.

Tango grande guerre esili na 1945, moke moke, économie ya Belgique ebandi ko reprendre, mpe cadence ya production ya ba industries ya Congo ebandi kozongela rythme na yango habituel. Na ngambo mosusu, neti population ya Kinshasa ekomaki ebele, esengelaki kolandisa croissance démographique na politique adaptée ya habitat. A partir ya 1952, mundele abandi kotongisa ba quartiers ya sika na ba ndaku ya sika mpo na ko loger batu. Asali na fonds oyo ezali kopesa mutu moindo crédit immobilier, Offices des cites africaines (O.C.A.), mpo asomba ndaku. Wana makambu ebandaki lisusu kotambola malamu te mpo misala ekomaki mua pasi. Sika, tango industrie ya Congo ezongi ndenge e tournaka habituellement, batu oyo bayaki ebele mpo na misala pendant la guerre mondiale, bayaki ko perdre misala na bango mpo industries ebandaki lisusu kosala na rythme ya  surproduction te mpo ezongeli ba exportations yango en fonction ya demandes na ba Etats oyo économie na yango ezali lisusu na temps de guerre te mpo ekomi na temps de paix.

Aller, mundele abandi kosokola Léopoldville na kobengana ba chômeurs na ba sans abris banso wana mpe kozongisa bango na mboka. Moitié ya population mpe ezalaki entre 18 na 20 ans mpe esika ba chômeurs mingi bazalaki. Kati na bilenge oyo, mingi bazalaki mobulu mpe balingaki kelasi te, misusu ba perdre misala, misusu bazali na ba ambitions penza te.

Dès 1946, ba évolués basalaki déjà Confédération générale des Syndicats indigènes .Yango ebabandaki ko revendiquer améliorations ya ba conditions sociale na sécurité ya emploi mpo situation sociale ekomaki pasi. Mundele ayebaki que neti elulu ekotaki makasi, esengelaki mpe aluka kobongisa na ba reformes administratives oyo ekoki ko kitisa tension sociale. Suite na ba reformes wana, moto moindo azuaki lotomo ya kofongola ba salles ya spectacles na cinémas. Kobanda wana nde ba cinémas ya liboso eyaki kofungwana na Léopoldville (Kinshasa) : ciné Astra, ciné Sibika na Léopold II (Kintambo). Na Citas : ciné Siluvangi, ciné Mbongo Mpasi, ciné Astra, ciné Mustapha na ciné Macauley. Wana ezali ba cinés ya liboso oyo efonguamaki na ba cités indigènes. Mundele azalaki na ba oyo ya ye cines, esika noir abandaki kotiya lokolo te : ciné Albertum (ciné palace), ciné R.A.C., etc.

Ba cinémas wana ezali kolakisa ba films ya actions ya ba américains oyo ezali en vogue na entre 1957 na 1960, neti : Le triomphe de Buffalo Bill, Buffalo Bill et les Indiens, Le gaucher, La prisonnière du désert, Bravados, Bing Bill, Une bible et un fusil,  Pecos Bill, etc. Ba films lokola : Le massacre de Fort Apache , La charge héroïque,  L’homme tranquille, Wild west show (ezali ya kala, kasi ezalaki film ya sika mpo cinéma ewutaki kobanda  sika na cité ) etc. Yango esalaki que ba jeunes bamitiya na poso ya ba acteurs américains minene lokola : John Wayne, Gary Cooper, Henry Fonda,  Terence Steven McQueen « Steve McQueen », Antonio Rodolfo Oaxaca Quinn « Anthony Quinn », Charles Dennis Buchinsky « Charles Bronson », etc. Yango nde eyaki kosala que ba jeunes babanda ko vivre na imaginaires ya ba films d’actions westerns américains, ko s’identifier na ba acteurs mpe kozua ba kombo oyo bazali kobengama na ba films tout en ignorant ba vrais kombo na bango : Bicross Bill, Shérif, Buffalo Bill, Bill Lancaster, Pecos Bill, Bing Bill, Soto, etc. pona bango, esengelaki kaka bakokana na ba héros ya films mpo bango bazalaki na konzo, courage, balongaka bitumba bionso babundaka, bazali na basi  mpe na ngenge. Emoneli wana eyaki kobenda ezaleli ya sika na elobeli na bango : indoubill (argo ya ba oyo balenda na monde ya ba Bills). Ba Bills bakomaki na elateli ya sika na ndenge ya ba cowboys mpe bazalaki bilenge ya liboso na Léopoldville oyo ba adoptaki style ya kolata wana : chemises ya carreaux carreaux, ekoti, foulard na kingo, ba bottes ya ba texans na makolo, pantalon jean na ceinture ya munene na loketo na lasso na maboko. Neti ba chevaux ezalaki te, mobylette ou vélos ebandaki kosala makambo. Wana soki bazali ko parader, batu na bango na ba fans bazali kobuaka bango : « Bills oye ! ». Wana eyano ezongi : « Serumba ».  Serumba wana amatiki roue ya liboso ya mobylette ou vélo lokola mpunda amatisaka makolo na ye likolo.Wuta wana ekomaki soki obuakeli Bill oye ! Ye tango azali kozongisa serumba wana, na mua exhibition na ye ezali kosalema mpe na bizaleli, etamboli, lolenge ya koloba, kolia ebende mikolo minso, kobeta guitare, kofutisa batu ba droits ya passage na territoire, ko racketter batu na wenze, kokanga batu ba mitif, etc. Vie wana ebandaki kotambola na masanga, miziki, diamba, basi,  ba viols collectives ya ba filles (tournois), moyibi, ki chef na ba territoires na bango oyo eyaki kokoma hors la loi na maye manso ya mabe na kati, etc. Na yango ba territoires wana ezalaki na ba « Ranch », «Temple» ou «Nganda». Ranch ndenge ebengamaka na Texas. Kuna ezalaki na ba codes, règlements na lois na bango oyo « professero » abandaki ko codifier. Nganda comme lieu de rencontre ya masolo, bokutani kati na basi na mibali, komela, koliya na kobenda likaya, ezali boules ya ba Bills. Yango ezali esika oyo kaka ba initiés nde bakotaka mpo bayebi ba rites na ba codes na yango.

Ba Bills bazalaki mpe na ba cries babandaki kobuaka mpo na kolakisa que babangaka eloko te : « Vivre vite et mourir », « Bill azongaka sima te », « Ce qui appartient au peuple est donc à moi », « Bois dur », « Bois fort », « Tokende liboso ».

Ba territoires ya ba Bills ezalaki ba zones ya non-droit. Ba territoires oyo ekenda sango na Léopoldville ezali : Far West, Dynamique na Mofewana na mboka sika (Ngiri Ngiri), Bois vert, Sans loi  na Bois dur na Dendal (Kasa Vubu), Singa Kuanga na Casamar na Citas, Las Vegas na Lemba, Enfer na Okinawa na N’djili, ba kombo mosusu neti Texas, Dallas, Cité interdite, ebandaki mpe kopesama.

Ba Yankees bango babotamaki na ba années 1963. Bango bazali ba leki ya ba Bills. Ba acteurs na bango mpe ba héros na bango bazali :  Lee Van Cleef, Clint Eastwood, Charles Bronson, John Charles Carter «Charlton Heston», etc. Na ba films lokola : Pas de pitié pour les salopards, Django, Pour une poignée de dollars, Et pour quelques dollars de plus, Les douze salopards,  Le Seigneur de la guerre, etc.

Ba Bills babandi na Léo II (Kintambo) mpe na citas (Saint Jean = Lingwala, Barumbu na Kinshasa). Kasi mboka sika (Ngiri Ngiri) nde eyaki kokoma leader na fameux quartier na ye ya Far west.

Sika tokanisa naino ba Bills oyo bakende sango :

1.  Ngiri Ngiri

Vieux William Booth, vieux Gazin, vieux Neron (kolo nzembo ya Wele Kingo), Grand Bill,  vieux Bikunda, vieux Ross Samson, vieux Eboma, vieux Tex Bill, vieux Nikita Khrouchtchev, vieux Azevedo, vieux Mobarona, vieux Long Lisu, etc.

2. Kintambo

Vieux Bingema, vieux Porain, vieux Zanga Zanga, vieux Degoum, vieux Bicros Bill, vieux Moruma, etc.

3. Lingwala

Vieux  Jimmy Zacharie (Zacharie Elenga, Jimmy de la hawaïenne, musicien), vieux De Gazin, vieux Liseke, vieux Moruna, vieux Dechaud mungala (Charles Mwamba ya African Jazz), vieux Simaro masiya (Simon Lutumba Ndomanueno ya O.K. Jazz), vieux Moins le quart,  vieux Van Vock, etc.

4. Barumbu

Vieux Drangwa ( Franco abuaka ye na nzembo « Koun Koue ! Edo aboyi ngai ». Ye akende sango mpo na ba lukika na ye ekende sango : coup de tête oyo elalisaka), vieux William Bot, vieux Raymond Braink, vieux Andraga Shérif, vieux Zambar ( Masta Zamba ya African Jazz), vieux Ekourekeke, vieux De Buku, vieux Frank Sinatra, vieux Jeannot ( roi ya coups de tête oyo etindaka mutu abanda kolokota matiti), etc.

5. Kinshasa

Vieux Gozilla, vieux Libre, vieux Walli, vieux Mobylette, vieux Soto, etc.

6. Kalamu

Vieux Libre, vieux Bill Lancaster, vieux Bekonda, vieux Samson, vieux Léopard, etc.

7. Kasa Vubu

Vieux Buffalo bois dur, vieux Vicking, vieux Welo, vieux Araignée, vieux De Moyen, vieux Yurba, vieux Tex Bill, vieux Kunguniko, vieux Sabu loboko, etc.

8. Matete

Vieux  Buffalo Bill, vieux  Océan, vieux Libre, vieux Gozilla, vieux Wagon, vieux Zorro, etc.

9. N’djili

Vieux Mive John, vieux Biko John, vieux Dunguru, vieux Dongo, vieux Mobali, vieux Pecos, etc.

Ba Bills na ba Yankees balingaki kisi makasi. Yango wana vieux Debarra ayaki koyebana mingi na Kingabwa, likolo ya biloko abandaki kosalela bango : kokata ba kamo, kosala bilayi, kisi ya bitumba, ya kolalisa mutu kambaki na likofi moko ou na coups de tête (lukika), etc. Na Kintambo mpe ba mystères ebandaki kosala rage na : « Je demande ! Je commande! »

Ba Bills na ba Yankees bazalaki ba hors la loi, ba délinquants mpe kati na bango nde ba grands bandits ya Léopoldville  babimaki : Ngabidila, Angualima « Joli nom», Motocar, Mokolo «Etumba», Kadima, Gonzilla, Kwamusu «Esprit», Johnny « le crac» mpe na miyibi minene ya nzando «compagnie kitunga ». Phénomène Bills eboti mangomba lokola bana U.S. (prononciation ya U.S.= uszé), bana Maï Maï na Kintambo. Ban U.S. nde ebimisa ba grands bandits lokola :  Mwamba,  N’singi na  Androkwa. Ba Bills baboti lisusu ba groupes lokola U.S. Force, Far west, Bana Mofe, Dynamique , Texas, etc.

Mpo na ko lutter contre banditisme wana, Président Mobutu abandaki liboso na kotinda Colonel Alexandre Singa futur (Général Singa Boyende Mosambayi) en qualité ya ambassadeur na Nairobi. Ye azalaki liboso Administrateur en Chef ya sûreté nationale kobanda 1965 tee na 1969. Nomination en qualité ya ambassadeur ezalaki lolenge ya kobimisa ye na ekolo sans ko attirer attention na projet ya Président. Kuna awumelaki te, mpe akeyi mbala moko na Belgique na Ecole royale militaire. Kuna asali ba kelasi ya gendarmerie. Tango asilisi ba kelasi na ye, azongi na Zaïre mpe Président Mobutu a signer ba ordonnance n° 72/031 ya 31 juillet 1972 portant institution d’une gendarmerie nationale pour la République du Zaïre. Ordonnance n°  72/ 032 ya 31 juillet 1972 portant intégration des éléments de la gendarmerie des F.A.Z. dans la gendarmerie nationale de la République du Zaïre. Ordonnance n°  72/ 033 ya 31 juillet 1972 portant dissolution de la police nationale du Zaïre. Sima nde na aye ko nommer Singa boyende Mosambayi , Général mpe Chef d’état major ya gendarmerie nationale de la République du Zaïre.

Gendarmerie ezalaki na deux forces spéciales : Gendarmerie territoriale (G.T.) na gendarmerie Mobile (G.M.). Awa nde Major Bolozi Bolozi Gbudu Tanikpama ayaki koyebana makasi na Kinshasa tango Brigade mobile ebandi mosala mpe na équipements nionso ya sika : ba armes individuelles, armes automatiques de guerre, grenades, voitures Nova  bien équipées mpe esalemi mpo bakanga ba hors la loi, ba jeeps, ba ngondo, etc. Major Bolozi asukisaki ba bandits wana nionso mpe yango epesaki ye lokumu mingi na Kinshasa. Sima ya ba mbula gendarmerie eyaki kokoma na brigade spéciale ebengami : Brigade Spéciale de Recherches et de Surveillance (B.S.R.S.)

Na ngambo mosusu esengeli ko souligner mosala sango Jef de Laet, Scheut, Flammad, mundele ya Belgique. Akomi Kinshasa na octobre 1957. Abandi bonganga nzambe comme vicaire mpe Directeur ya école Saint Boniface ya Matete. Na 1959, azui mutation na paroisse Sani Pie X ya Ngiri-Ngiri. Kuna nde esika ayaki kokutana ba na ba Bills na ba Yankees. Ye amikotisaki kati na bango mpo na koyeba ndenge bango bazali ko fonctionner na ba territoires na bango mpe na univers wana ndenge ezali kolekela. Na patience, moke moke, confiance eye kokota kati na ye na ba grands Bills oyo babandaki ko contrôler ba territoires mpe bango baye ko initier ye ndenge kaka elekelaka soki mutu akoti na milieu wana. Initiation wana nde eyaki kobatisa ye kombo ya Buffalo Bill mpe abandi kobengama Père Bufallo Bill na ba Bills. Ye asalaki mingi na commune oyo mpe grâce na ye parc na ba jeux etongamaki na avenue Tende. Nde ebandeli ya mosala monene Père Bufffalo abanda na Kinshasa wana.

Na sima ya Ngiri-Ngiri akeyi na paroisse Saint François de Sales na Kintambo mpe aye kosukisa na Saint Pierre na commune ya Kinshasa. Kuna nde awumelaki mingi mpe abandaki ko organiser ba manifestation ya Jecoka, mpe aye kosala orchestres ya bilenge ebengami les étoiles, na 1966. Yango nde eyaki kokoma Minzoto wela wela. Pembeni ya ba activités na ye na Minzoto, ayaki kokoma Directeur ya Centre ya Reclassement Social ya Lokandu, esika basangisaki ba balados. Ndeko Jean-Pierre alobela yango na blog na biso oyo. Asali mpe mingi na socialisation ya bilenge  chrétiens tee na J.M.P.R. lelo oyo  Père Buffalo akomi na 78 ans mpe azali na Belgique.

Na mbala ya sima tokosolola na maye matali cinéma ya karaté na ba films ya Bruce Lee na phénomène ya ba maîtres ya Karaté, judo, Boxe, lutte, catch, jujitsu, etc. na ndenge bango mpe bakomaki kosala ba désordres, tee kokoma na ba films de guerre na ba kombo ya Delta Force, Rambo, Commando, Rockie, etc. mpe kosukisa na ba phénomène ya ba maître ya mikili  na ba kuluna ya Kinshasa. Tokosala lisusu ba commentaires sur grand banditisme na Kinshasa na vie actuelle ya ba pomba ya kala, liwa ya Tshiwara, lukutu Edingwe azua na batu ya S.A.R.MA., ba portiers ya ba orchestres : Mukala « gouvernement », Mozingo « Mozin », Samba « Samba loboko », etc.

Mua ba kombo ya ba salles ya cinema na cite eyaki kobakisama na Kinshasa : ciné Bellevue (Kingabwa), salle du parti (Kinshasa), anciens combattants (Kasa Vubu), ciné Mimy (Ngiri Ngiri), ciné Venus (Matonge,  Kalamu), Ciné Bill (Matete), ciné Shaba (Kasa Vubu), ciné Bongolo (Kimbangu, Kalamu), ciné Kwender (Matete), ciné Toyota (Ngiri-Ngiri), ciné Stars (Lemba), ciné Baudouin (Matete), ciné Standard (Ngiri Ngiri)

A suivre…

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Zanga Zanga

, par Matadidi Mario et le Sosoliso

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
O
Your article about Bills and Yankees was very informative to know more about their country and the culture they follow. I guess the population is now more in urban countries as you were telling. Keep posting such informative articles in future also.
Répondre
E

vraiment nasepeli mingi kotanga histoire ya mboka na biso a travers ba ecrit na yo; mpe nazali ko confirmé que oyebi vraiment histoire ya kin ndenge ezalaki ko evolué.vraiment longonya nde mbala
ya sima.

Répondre
A

Napesi na ndeko E. Kandolo merci na lisolo naye ya Ba bills na ba yankees. Nazali kosenga naye abakisa lisolo wana mpe na phenomene: Ba Craneur, Ba Dambleurs na Ba Skiveur abosana mpe Bana 15
ans te.

Répondre
C

Queques explications.
Na utilizaki mot Terre-terre(quelqu´un parmi avait parlé de viol collectif)kasi Terre-terre ezali viol te,mpo ezalaki kosalema avec le consentement de la personne,qui,par conséquence d´un maux que
nous connaisson bien,est difficile à satisfaire sexuellement(il s´agit là du feu-utérin).
En parlant de Boungalow,j´avais utilisé le mot Prévenue.Comme le dit le mot,ba yankée bazalaki parfois ko rapter ba filles devant tout le monde,mpe komema bango na chateau nabango pour une durée
quelconque dans l´impunité totale.Biloko oyo na tango ya avant l´indépendance,esalama na ndenge que ba fille d´un âge avancé bazalaki kokima ndako nabango mpe kokende kokota libala epayi ya ba Bill
ya époque,kasi sima nayango ba délinquant ndenge nalobaki bakomaki ko profiter mpo nakokotisa mobulu,mpe kozua ba fille namakasi.

Répondre
C

Ba ndeko nioso ya blog,spécialement ndeko Kandolo na ndeko Pululu.
Leki to muana na biso Ndombasi(selon âge naye)abimiseli biso sujet monene à traiter.Makambo manso maye malobami likolo ya passé Kinois,masepelisi biso na ndenge ya solo,na mpe mayei ko faire
revivre tango wana ya kala-kala.Nazali na kamua lisolo oyo elakisi mpe côté ya malamu ya bilenge ba GOZA,Bill na ba Yankée.Tokoki ko comparer situation oyo na loi de la jungle,ndenge
tomonaka ndenge kati ya ba niama,il y a toujours moko nabango akolinga kozala mokonzi,mpe à son tour il faut atiya ordre kati nabango na kobatela basusu lokola,tango ya likama.Soki totali malamu
ba Bill oyo ya solo,bazalaki bato ya moyibi te.Mobulu nabango nde koluka kodiriger espace nabango na compte godias(canaille).Yango ba délinquants ba profiter na situation oyo mpo ba sémer terreur
na kombo ya ba bill.
Na bois dur tozalaki na vieux Demoyen,moto oyo nde ye kaka Wello.Kombo ya Demoyen aboyaki yango,mpo ezalaki likolo ya mokuse naye,yango wana akomaki Wello.Figure moko eyaki kobima na
kombo ya Boungalow kati ya quartier(année 57).Vieux Boungalow abandaki kosala terreur na quartier Bois dur.Lokola ezalaki habitude ya ba maman kotekisa makayabu na kwanga na butu,na coin ya
balabala,Boungalow akomaki kozua dîner naye na bisika wana na compte canaille sans kofuta,mpe akomaki kokanga ba fille "prévenues"na ndako naye.Botala likambo oyo bandeko.Likambo yango eyei
kosuka grâce à l´intervention ya Vieux Wello,mpo a menaçaki ye na miso ya mère na bana ya quartier.Banda esika wana,ngala ya Boungalow esilaki.
Libre abandaki ko ya kosala terre- terre na bois dur,mpe ayaki kosuka mokolo Black-Tagart ayaki kobengana ye devant ba ngembo ya Ok Jazz devant Alex Bar na Gambela.Libre azalaki kokota bois dur
lisusu te.
Ba yankée oyo ya vrai bazalaki na intentions ya moyibi te.Bango souci nde position de force kati ya quartier.Tango mosusu bazalaki kobunda po na kombo.Soki yo ozali Bing bill,ngai mpe nazali Bing
bill,il faut tobunda po na ko mériter kombo yango.Dans quelques cas isolés,babundaki mpe po na basi.
Eloko mosusu eyaki kobimisa phénomène oyo,ezalaki système scolaire.Bana mingi bazalaki kotika kelasi involontairement.Bazalaki obligés batika yango po na âge nabango.Tango ya bayaya nabiso,bana
mingi bazalaki ko suka na 5ème primaire.Système scolaire ya ba belge au départ elingaki te mpo bana batanga mingi,puisque parmis ba mindele il y avait beaucoup qui ne possédaient pas des études
avancées.Soki moyindo asilisi 5ème primaire,bakopesa ye certificat to attestation.Oyo akozua certificat azali considéré Trop âgé,oyo bakopesa attestation nde akoki ko continuer na école
artisanale ou bien na sécondaire.Yango wana bana mingi oyo ya Trop âgé bazalaki obligés koluka mosala to koyekola métier na n´importe quel atelier.Baye bazangaki volonté to ba moyen nde
bazalaki na choix mosusu te.Mingi mpe parmi bango babandaki ko fréquenter ba milieu ya ba musicien soit comme portier,installateur,mpe basusu bakomaki mpe koyekola kobeta maracas,mbonda,baguettes
teee kosuka na instruments à cordes to vent.Armée mpe azalaki ko embaucher bana mingi kati nabango.Bandeko lisolo oyo ezali molayi mingi,yango wana ebongi mpe,bandeko mosusu ba continuer
yango.Boyebi ete Matete ekomaki ONU BRITANIQUE na 1963 avec NERON à la tête?Tambola Kin omona makambo. Ba Trop âgés mingi bazalaki ko déambuler na bisika oyo ezalaki sinistres lokola
La Cité,avec but,kotumbola mpe kobeta bato ba innoncents sans motif.Souvent bazalaki ko utiliser bana mike ya 11,12 ans lokola ndobo mpo babeta pour le simple plaisir ya
kobeta.Eloko oyo ekomaki kosalema mingi après l´indépendance.

Répondre
N

Merci mingi Kandolo"Bibliotheque" na oyo owuti kokoma,ezali malamu penza pona koyeba oyo eleka.Pona na ndenge nakomaki,to mesana kaka kotanga oyo etali politique,sport na musique,tokokaki pe ko
change masolo mususu.Eyano oyo opesi elekeli ngai.Biso tobotama na ba mbula 1960 makambo mosusu toyoka na ba kulutu nabiso,tomona te.Alors ya kotanga p.ex vieux Simarro Massiya le moraliste,azalaki
bill na linguala ezali likambo ya kokamua.Messager merci mingi na mosala oyo ozali kosala,nayebi te soki otia deja nzembo oyo ezali na titre ya Zanga Zanga ya Sosoliso nayebi te soki ezalaka ya
Mario to ya Saakul,soki te,tila biso yango,pona ba kombo ebele oyo Kandolo akomi ezali na Nzembo wana.Merci mingi batangi nionso ya mbokamosika.

Répondre
J

Ndeko kandolo,
Yasolo, chronique ya ba bills na ba yankés opesi biso lelo ezali suka na Epaka. Nalingaki juste nabakisa mua moke po na batangi na biso que makambo ya ba yankés na ba bills ndenge okomi, etumba
n'ango ebandaka uta "temps flamands".
Mua précision nalingi na pesa bandeko na biso, esengeli koyeba qu'à part likambo ya kobengana ba chômeurs na Léo, eloko oyo efungola nzela na ba délinquants à Léo, ezali d'abord likambo ya
kelasi.
En effet, il faut toyeba que tango mondele afungoli bakelasi, ezalaki obligatoire. kasi kelasi esalemaki po na moto nyonso te. Mingi baponaki kosala "bitshtsha". Vieux Paurret Iyoma, Vieux Eboma
Degazin - vrai kombo na ye Nsumbuka - tango nasangisaka bango na Kintambo na 1986, na cadre ya "jubilée ya Vieux Paurret", bayebisaka ngai boye:
"Ba yankés ya liboso na Léo, ezalaka biso: tozalaka ba "Kadiampemba". Monoko na biso tango wana ezalaka ki "GOZA", mélange ya minoko na biso - kikongo, mongo, tshiluba". objectif na bsio ezalaki
ko tiya baboti na mobulu po ba comprendre te, nini tozolkana kosala".
Astuce ezalaki simple: mongala akolakisa mokongo ba termes ya monoko na ye, mokongo pe akopesa na moninga ba termes oyo ezali nécessaire, surtout pou babima na lopango. Ainsi, soki Paurret, oyo
azalaki mungala akeyi na  Singa Kuanga (Linguala) kozua moninga na ye Degazin, abandaki liboso kobongola kombo na ye: Nsumbuka ekomaki "Tshomboka", ensuite, soki asilisi kopesa mbote na
baboti, po apesa moninga na ye signal alanda ye, na kati ya maloba ya "aurevoir" epai ya baboti, akobakisa "Hundaka", wana Degazin ayebi que il faut aluka moyen ya kobulungana.
Nakobakisa te, likambo ya "ndinga" ya ba Goza, ezalaki lolenge moko ya malamu po na kosangisa bilenge ya tango wana. bango moko babomaki ba frontières ya ba ndinga entre bango. Lelo encore, bato
ebele balobaka "Goza". parmi ba musiciens ya Congo, Dindo Yogo nde azalaka makasi na exploitation ya Goza. Epai na ye, chaque fois que c'était possible, abandaki kotoya maloba ya kikongo na esika
ya français.

Ba Grands Goza, bazali bongo ba prcurseursya ba bills na ba yankés. Bein sûr canaille ezalaki carte de visite na bango, lolenge moko na bitumba entre bango. Règne ya ba goza tokosituer yango
entre 1945 na 1950, avant bango nionso ba kueya na loyenge ya ba films ya ba cow boy. Po na kocomprendre antériorité na bango, il suffit botala ba kati ya liste ya ba kombo Ndeko Kandolo apesi po
na ba yankés na ba bills. bakombo oyo eza na rapport moko té na ba films ya ba cow boy to western, ezali kolakisa que bato wana bazali ba goza.
zanga zanga, Moruma, Paurret par exemple, bazali bagoza, kasi Bingeman (Big Man) , Tex Bill ou Willy Cody bazali bakitani to baleki. Génération directement lié na westerns.
Bakombo ya ba quartier na bango pe ezalaki en rapport na antériorité wana. Ainsi na Kintambo ezalaki mboka ya ba kadiampemba, Linguala ezalaki quartier Singa Kuanga, Barumbu Citas. Na tango ya ba
yankés, Kintambo ekokoma Mangembo, Barumbu Casamar.
Rôle ya bana bazombo.
Problème ya ba délinquant na Léo, ezalaki en partie na rapport na bana ya ba réfugiés angolais, po na oyo etali kelasi na bango. Mingi bazuaki place té na ba écoles catholique, bazalaki bongo
kotikakala kosakana. Neti bazalaki na baninga, babandaki koya kozela bango sima ya kelmaési, pe moke moke, bakomaki kokimisa baninga kelasi pe kokende kosakana na ba zamba mike mike oyo ezingaka
kinshasa na tango.
Donc quelque part, les catho seraient en partie responsables de cette dérive des jeunes, po baboyaki bango na ba classes. Mua correction ekokota notamment, avec l'ouverture des écoles
protestantes et salutistes. Ba écoles wana nde ekopesa mua bisika na bana ya ba réfugiés, ndenge tobandaka koloba. Donc, tokoki koloba que bana ba zombo ba entrainaki baninga na nzela ya mobulu
po bazalaki désoeuvré.

C'est ainsi que ndenge Kandolo atangi kombo na ye, William Booth akosala groupe ya bakadiampemba na kintambo. Kadiampemba, ezali terme kikongo. Nakolikya te, ezalaki idée ya William Booth (kombo
azui epai ya armée du salut). William Booth ye azalaki Mozombo. Grand Bitshatsha, tango wana abandaki kelasi na ye na kintambo n'armée du salut justement, ayaki kokutana na bilenge misusu lokola
Paurret Iyoma. Lokola asepelaki na bango, akoya ko initier bango na makambo ya bitumba. Esika ya bokutani tango wana, ezalaki na loboko ya mayi ya Kalamu, entre Sendwe na Funa. Zamba monene
ezalaka wana. Esika wana nde bokutani ya bagoza na ba kadiampemba ya liboso eyaki kobanda. bazalaki tellement téméraire que bazalaki capables ya kokatisa na loboko ya brazza po na kokende kokula
kisi ya bilayi.

Na 1948, Belgique akanisi kosala plan décénal ya développement ya Congo; Plan esengaki que bafongola bamboka y a sika. DEndale, Ngiri Ngiri, Ndijili, Matete ou lemba, ekobotama sima ya plan wana.
bato mingi ya b'anciens quartiers bakokende kovanda na bamboka sika. En même temps; bakokomema bana na bango, na mouvement na bango ya bayankés na bamboka wana. Evidemment, bana entre bango
bakokota na momekano pe bakoprolonger esprit ya bitumba na ba canailles.
Etumba contre ba Goza na ba yankés.
Ba rapports ya mobulu ya baGoza, ekokoma na matoyi ya bakonzi ya colonie, à cause ya bitshatsha", bana oyo bazalaki kokima kelasi. basango bakofunda na police po na kosukisa likambo ya bokimi
kelasi - je signale que Franco akimaki kelasi na 10 ans, azalaki na 3e primiare.
Na kintambo, commissaire ya police ezalaki Derrings. Bureau na yo ezalaka na sima ya magasins kintambo, en face ya Ecole ya ba frères na Montagne.Elongo na Juge Capelle (ou Kapela), bakolancer
croisade contre ba canailleurs. Wana tozali nau nba époque coloniale, entre 1952/53.Avec aide ya ba chefs de quartier, bakolocalmiser baGoza na ba yankés jugés dangereux oyo bakokimisa bana
kelasi, po na kokanga bango.
Na kintambo arrestation la plus célèbre ezalaki ya Paurret. nalobela yango déjà (voir Eyoma na Blog na biso).Papa Lomboto, chef de quartier nde afundaki ye na commissaire Derrings. Bakoya kokanga
ye na Chanic, epai tata na ye atiaki ye na mosala. paurret azalaki alors na moins de 20 ans. Juge capelle a kokondamner ye na rélégation ya 10 ans. bakotinda paurret na Mbandaka, mboka ya baboti
na ye.
Somo n'ango ekosala que mua kimya ekota na Kintambo. mais deux à trois ans plus tard, ba gang misusu bakobima. le p^lus célèbre ezali justement Bingeman.
tango tozali kolobela ba bills na bayankés, tokoti déjà na tango ya lipanda. nakpmeka kolobela na mikolo mikoya, na lokolo ya Ndeko kandolo, lutte contre la délinquance wana. Notamment likambo ya
bana US ya Kintambo.

Répondre
M

J'ai oublié d'informer Crispin Lukoki et Anaclet qu'Emmanuel Kandolo s'apprête à répondre à leur question relative à l'origine de "bena lulua".

Messager

Répondre
C

Bien à vous,
Natangi ti na suka historique ya ba bills nionso okomi.Je voudrais apporter une précision et une correction.Po na kosilisa mobulu na kinshasa na mauvais comportements ya ba bills,bakomaki ko
raquetter batu .voir surtout ba musiciens,bazalaki obligé bafutaka une sorte ya dîme epayi ya ba bills.yango pépé kallé abuakaki bango na Niboma na nzembo ( o mama yeye...) ndenge moko na saak
sakul abuakaki bango na solsoliso,na nzembo ya(zanga zanga na bingema etc...)Mokonzi oyo asukolaki ba bills na kinshasa ezali colonel bolozi te.Mais ezali inspecteur Manzikala,azalaki
administrateur ya cnd. Mobutu apesaki ye feu vert aboma batu nionso ya desordre.Manzikala azalaki koboma vis à vis  dans la rue(ti lelo batu ya époque wana  babosana qui teminator na ye
te) azalaki na GESTAPO..Bolozi n'a fait  que parachever l'oeuvre ya Manzikala.Bolozi azui succès tangu abomi bana ya US(uze) surtout MUAMBA,po akomaki ko terrorisé batu pe kosala ba vols à
mains armées.Merci CHEF IPOTO

Répondre
R

MERCI NDEKO, NAMONI OYO BALOBAKA NA KILIFALASE(en francais)REDIFFUSION,OYO OSALI LELO,PO BA MINGI BABOSANA YANGO...NATONDI YO... Merci.- Richard Kasongo

Répondre
J

Ndeko Emmanuel Kandolo, Grand Chroniqueur:

Somo! O couper nga souffle. Il faut bapesa yo emission bandeko. O mentionner Burt Lancaster, mais nayebi te soki osi osakolaki arrestation ya ye na bande na ye... avec proces na television.
Nabosani mbula nini... Lisusu, revue "Jeunes pour Jeunes" ezalaki kokumisa nganda nini ya ba bills? Epesi mpe nga mawa tango o mentionner ba salles de cinema. Bandeko, cinema ekufa na mboka etikali
kaka television! Kotala cinema na salle ya cinema ezali different na kotala film o tele. Meme Kisangani tozalaki na ba cines kili-kili! Totikali kaka na ba film ya ba Nigerians! Au fait, histoire o
beti elakisi liberation ya jeunesse grace ya cinema... meme soki basalaki yango na ndenge ya mabe...Grand merci, Chroniqueur, Nzambe apambola yo... Na rappeler yo lisusu que lisapo ne ngai esili
mpe okoki kotanga yango awa: http://lonkasa.blogspot.com/

Répondre
T

Franchement votre Kandolo est étonnant.Comment peut-on être au courant de tout??
A mon avis,on s'instruit plus aujourd'hui  chez Kandolo de Mbokamosika que sur les autres sites.Vraiment ,Chapeau , Chapeau et Chapeau.

Répondre