Les réponses d'Emmanuel Kandolo
Ndeko David Mayingila,
Vraiment nasepeli mingi ndenge o signaler ngai que yo nde ozalaki initiateur ya mouvement wana. Félicitation na apport na yo na victoire ya Vita Club. Animation bosalaki na sima ya ba buts epesaki très très bien. Nazali komona lisusu inquiétude permanente ya Botwe, gardien ya Kotoko, nenge abandaki kobanaga kotelema na ligne de but na ye. Souvent abandaki kopusana liboso tee na point ya penalty mpo loyenge wana ebandaki kotambusa ye mutu ! Nazali komona ndenge obalukaki na drapeau ya vert voit ya forme triangulaire ekabolaki ba couleurs vert na noir. Nazali komona lisusu na coup de tête ya Kibonge na poteaux ya pourtours ya Bilima, ndenge batu na yo ba pumbuaki en croyant que balle wana ekoti ! Mpe biloko eyaki kobetama na ba buts !!!! Wana ezalaki suka na ambiance mpo soutien oyo Vita ezuaki, ezlaki total, Imana na Bilima bazalaki loyaux mpe Kinshasa nionso ezalaki sima ya Vitampe tango wana makambo ya soni, oyo ya kokumisa ba paya ezalaki te.
Na ko profiter mpo na souligner lisusu esprit sportif ya ba dirigeants ya Vita na ouverture ya action nionso ezalaki na faveur ya ko soutenir club. Détermination ya ba dirigeants, staff technique na ba joueurs na lolenge bazalaki ko aborder ba matchs ya minene. Vita ezalaki na doute ata muke te na capacité na yango ya ko battre Kotoko na Kinshasa. Détermination wana ezalaki vraiment ya bilombe oyo bazongaka sima te face na etumba. Chaque joueures azalaki na détermination sana faille mpe volonté ya kotombola coupe wana na Kinshasa ezalaki na mutu nionso. Yango wana tomonaki ba attaques permanentes wana
Ah ! wana ezalaki ba bons moments oyo to connaitre na mythique stade du 20 mai. Merci lisusu na ba équipes ya tango wana mpo na qualité ya football na amour ya sport ezalaki na bango.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
Ndeko Sony Mokonzi,
Guerre ya 80 jours ebandaki le Le 8 mars 1977, Le 16 mai largage ya batu ya deuxième compagnie ya 311 ième bataillon ya Centre d’entraînement des troupes aéroportés (C.E.T.A.) ezalaki larguer na périphérie ya ville Lubumbashi. Ye azalaki parmi ba éléments ya liboso oyo ba largaki (parachutaki) na kati ya bitumba, mpe malheureusement akweyaki na bitumba wana. Eyebanaki banda kala mpe ba instructions epesamaki que ba officialiser yango te. Ezalaki ndenge wana mpo n ba familles nionso ya ba militaires oyo bakweyaki na Shaba. Yango nde etikala kaka ndenge wana. Na suka ya guerres (première na deuxième), ministère ya défense eyaka kobimisa documents ya rapport ya guerre. Kuna na Kati etiaki ba kombo ya ba militaires nionso babundaki bitumba wana sans ko préciser sort na bango. Na kati ba paya mpe bazalaki neti ba Togolais, Marocain, Sénégalais, Gabonais , Français, Ivoiriens na ba Belges.
A part rumeur ya finale ya 1981 contre Jeunesse électronique de Tizi Ouzu, rimeur mususu eyaki que Luyeye akoma na Angola. Nionso wana ya lokuta mpo ba dirigeant ya Vita na ba joueurs nionso bayebaki malamu que Luyeye akweyaki na Shaba mpe akozonga lisusu te. D’ailleurs, à l’époque, ba oyo babandaki kotiola régime babandaki kobuaka : « Boni Kuna ? » Réponse : »Moto na moto ! ». Wana soki ba sevices de renseignements eyoki yo, baloki yo mbala moko. Banda Luyeye Pondi akenda, Tamundele Liseke nde ayaki kozua esika na ye ya arrière.
Patriotiquement,
Emmanuel kandolo
Ndeko Dodo,
Nakoyanola na mituna na yo na ba points mine:
1. Sima ya sacre ya 16 décembre 1973, makambo mingi elekaki : Coupe d’Afrique des nations na Egypte, Coupe du monde na Allemagne na ba matchs na Suisse, Italie. Sima ya wana, championa ya Ligue de Football de Kinshasa (LI.F.KIN.), suspension ya Ndaye Mulamba na Coupe du Monde mpe elandaki ye na ba compétitions internationales nionso pendant une année, Coupe du Zaïre, tournois des trois grands, rumeur sur départ ya Président Opango, confirmation ya départ ya kalambay Ngoy, manque ya autorité ya Diantela, mutu akomaki kosala intérim, orgueil na indiscipline ya ba internationaux ya Vita mpo bakomaki na mbongo, ndaku, voitures, ba bijoux, bilamba ebele, basi kili kili, succès, na manque ya sérieux, retards na absences na ba entraînements, na ba rythmes ya ba matchs. Fédération Zaïroise de Football Association (FE.ZA.FA.) eyebaki te ndenge nini ko aménager calendrier mpo vita alandisa ba matchs ebele te. Lisusu ba voyages mingi ba joueurs babandaki kosala ebandaki mpe kolembisa nzotu na bango. Notons que na période wana babandaki kokende poto très souvent mpe kobeta ba matchs amicaux mingi ya préparation na équipe nationale, mpe Zaïre ezalaki engager souvent na ba compétitions nionso : éliminatoire ya jeux olympiques, Coupe du monde, Coupe d’Afrique des nations, Coupe d’Afriques des clubs champions, mpe na plan locale, Coupe du Zaire, championnat ya LI.F.KIN. na ba tournois ya ba fêtes ya M.P.R., indépendance na ya anniversaire ya Président-Fondateur. Tokozongela ba points oyo na cadre ya masolo na biso, mikolo mikoya.
2. Omoni, tango ya likambo ya mabele, mutu nionso atelemelaka yango mpe comportement wana, bien que ezalaki antisportif, kasi ezalaki koleka mpo frustration oyo ewutaki na défaite ya Mazembe, Zaïrois atikala kobosana yango te mpe elingaki ezala occasion mpo na biso ya kotikala na trophée Nkruma libela, mpe yango elingaki ezala remplacer ya trophée Mobutu. Tozuaki mayele, mbala ya liboko, ekokaki ! Yango wana, il fallait tout faire, même na limite ya sportivité mpo Coupe wana etikala na Kinshasa. Yango nde ezalaki boule ya FE.ZA.FA. Bon ezali mawa mingi !!! Mais tango wana na ba stades ya Afrique, football ezalaki kotambola na politique elongo, ezalaki question ya fierté nationale, ya prestige ya régime. Ba matchs mingi na époque wana ebandaki kozanga ba problèmes te ; arbitre, ba kisi ou carrément pouvoir ya pays d’acceuil ebandaki kozua ba mesures ya ko compliquer makambo : Guinee-Conakry eyebanaki mingi côté wana. Ba tricheries mpe lokola na Guinée ou na Egypte ba pays oyo ba clubs ebandaki ko ressembler na ba sélections nationales suite na ba transfères ya mayuya dans le but ya koluka kaka ko remporter Coupe d`Afrique. Congo Brazzaville mpe esalaki yango na C.A.R.A.
Na oyo etali ba déstabilisation psychologiques, wana ezalaki mingi na ba terrains ya Afrique. Reconnaissons que Ghana ezali exemple munene na fair-play. Mbala ya sima, tokolobela nini esalemaki na Maroc, tango tokendeki na match retour ya éliminatoire ya Coupe du Monde mpe na ba conditions nini tention entre ba pays mibale ekomaki na yango, okomona que ezalaki nde rythme.
3. Match ya Vita na Tshipepele ebetamaki na pression makasi. Oyebi que Vita ye moko nde aboyaki kolala na hôtel na centre ville pene na ciné pax. Et na butu ya match wana, basi batambolaki bolumbu ( bakaji bakenda butaka denda batshipa Vita) mpe kolakela Vita mabe. Même chose esalemaki na match ya Bilima, tango Kabasele Jango atiaki deux buts na Bilima na Coupe du Zaïre na finale ya 1985. Tshinkunku a gagna finale wana. Ba travailla Mobati jusque na point que atambolaki mutu mpe balakisi ye carte rouge. Kanieba mpe ndenge moko a tournaki bien te, surtout que ye azali muena lulua, batiaki ye na défi face na bakambua benda (ba koko na ye) Bref, masolo ezali mingi na ba matchs wana. Vita akimaki nionso wana en évitant tout : hôtel, transport, kolia, etc. Ba ndaku ozali koloba ezali oyo ya centre-ville ou ya quartier Bianqui?
4. Match contre Léopards de Douala ebetamaki na Douala te. Yango ebetamaki na state omni sport Président Ahmadou Babatoura Ahidjo de Yaoundé. Na ba années wana, ba nganga ya Cameroun bandaki toujours ko conseiller ba équipes na bango ba betake ba matchs ya minene na terrain na bango te, c``èst-à-dire souvent équipe ya Douala ebandaki kokende kobeta na Yaoundé. Oyo ya Yaoundé, ekokende kobeta na Garoua ou na Douala. Nionso oyo mpo selon ba camerounais, défaite ya Loins indomptables ya Coupe dÀfrique des nation na Cameroun 1972 ewutaki na bilima oyo ezalaki na terrain batongela stade wana. Yango nde ekomaki na libabe. Ba défaites ya canon na Coupe dÀfrique, eyaki lisusu ko confirmer masolo wana. Masolo ezali na ba stades ya Afrique. Ambiance wana, ya ko voyager mpe kolanda ba équipes na étrangers, ezali extraordinaire mpe oko découvrir makambo ebele ya culture ya batu na ndenge football ezali na passion makasi.
Na match retour na Yaoundé, na mi-temps ezalaki 1 partout te. But ya Vita eyaki tango Léopards de Douala ebandaki ko mener na 3 à 0. Kibonge mutu atiaki but wana na 89 ième minute mpe etikalaki une minute avant fin du match. Tozongela naino na mokuse ba matchs mibale ya aller na retour.
Dimanche 14 octobre 1973, ezalaki mpe date ya anniversaire ya Président Mobutu. Vita ebetaki na Léopards de Douala na Kinshasa. Ba compositions ya equipes nionso mibale yango oyo :
Vita :
Gardien : Pombi Litinda
Défense : Lungwila Ndongala, Luyeye Pondi, Musungu wa Musungu, Lobilo Boba
Milieu : Mungamuni Muniangui, Kibonge Mafu
Attaque : Ndaye Mulamba, Ntumba kalala, Kembo Uba Kembo , Mayanga Maku
Entraîneur : kalambayi Ngoy
Léopards de Douala
Gardien : Akaa
Défense : Mback, Ebanda, Boubouana,Tchochoun
Milieu : Guy Manga, Yombi
Attaque : Roger-Albert Milla, Paul kwedi, Ndoumbe Lea, Etoua
Entraîneur : Peter Schnitter
Vita elongaki na 3 à 0. Deux buts ya Ndaye na moko ya Ntumba.
Na match aller, Pombi azalaki na vacance mpo léopards elakisaki eloko ya malonga te. Kutu Roger Milla abimaki sans a tirer rata mbala moko na but! Attaque ya Vita emonisaki Ebanda makambo mpo kosopa oyo Mayanga abandaki kosopa ye, ezalaki ya liseki te. Tchochoum ye, abandi kokoka Ndaye te, pema ya ndenge wana amelaki. A chaque-fois soki Ndaye apesi démarrage, azalaki na tendance abenda ye maillot, kasi tango wana Ndaye asi akomaki mosika. Mungamuni na Kibonge mpe basakaki na ye lisusu. Léopards eyaki kokotisa Oyie na Eboue, kasi, rapidement défense ya Vita, commander na Lobilo emelaki bango.
Na retour na Yaoundé, le, 28 septembre 1973 Leopards abetisaki
Gardien : Akaa
Défense : Mback, Ebanda, Boubouana, Tchochoun
Milieu : Eboue, Guy manga
Attaque : Paul Kwedi, Roger-albert Milla, Dombe Lea, Etoa
Entraineur : Peter Schnitter
Vita
Gardien : Pombi Litinda
Défense : Lungwila Ndongala, Luyeye Pondi, Musungu wa Musungu, Lobilo Boba
Milieu : Kondi Affa Luvu, Mavuba Mafuila
Attaque : Ndaye Mulamba, Kembo Uba kembo,Kibonge Mafu, Mayanga Maku
Match oyo ezalaki très anime mpo Léopards il fallait esala nionso mpo elonga mpe ekende na finale. Batu ya léopards bayaki ebele, Deido, fief ya Léopards ezalaki sima ya équipes na bango na ba camerounais nionso mpo bazalaki na elikya que tout est possible. Kasi, malgré ba souhait wana, Cameroun azalaki na complexe makasi face na Zaïre. Na époque wana na Cameroun babandaki kobenga ba Zaïrois, ba Brésiliens mpo na football na biso. Topolisa mpe tolongokla cCameroun na Coupe du Monde 1974 na phase éliminatoire: 1 à 0 na Douala, Cameroun elongi. 1 à 0 na Kinshasa, Zaïre elongi. Sima ya 48 heures na match de barrage, Cameroun alali na 2à 0. Buts ya Kakoko Etepe na Mavuba Mafuila. Na Coupe d'Afrique, na éliminatoire ya kokende na Egypte 1974, tolongaki ye na 2 à 1. Na Kinshasa. Nionso oyo na Akaan na poteaux mpo ye azali gardien international. Mazembe alongola Aigle Royale Nkongsamba (tolobela yango) mpe sika Vita lisusu na Léopards. Donc, Coupe du Monde, Coupe dÀfrique Zaïre elongoli bango. Sika Zaïre lisusu na Coupe des clubs champions?
Na match wana, arbitrage ezalaki impartiale te mpo ba fautes ebele contre Vita ezalaki sanctionner te . Attaque na genoux ya Ntumba Pouce, esengelaki ezala sanctionner na carton rouge, kasi rien. Banda wana, Ntumba akomaki na problèmes ya genoux. Yango esala que azala na banc na finale nionso mibale ya Kumasi na ya Kinshasa. Sima ya réception na Mont Ngaliema, Président Mobutu apesaki mbongo mpo akende ba soins na Belgrade, ndenge Vidinic asengaki. Asala 6 mois mpe aye kozonga na Kinshasa fin avril avant départ ya Léopards du Zaïre na Suisse, na mois de mai. Mais atako azalaki na Egypte te, azuaki médaille ya Ordre nationale du Léopard, ndaku na voiture na ba cadeaux nionso baninga bazuaki. Mpe asalaki voyage ya Belgrade na épouse na ye.
Likambo ya matshiatshia wana ezali ya solo, babuakelaki bango biloko na vestiaire oyo na contact na mutoki esalaki mposa ya kokuanza makasi. Bon, ezalaki vraiment grave te. Par mesure de précaution, na suka ya match, Chef ya délégation, ministre ya Information, Sakombi Inongo, asengaki na Président Mobutu soki akoki kopesa autorisation na bakonzi ba Air-Zaïre, basenga na avion esala détour na Yaoundé mpo e récupérer Vita. Tango wana avion ewutaiki na Dakar, via Lomé, Abidjan na Douala, ebandaki kokende dimache na tongo mpe kozonga na pokwa. Balekisa yango na Yaoundé, ezui Vita, mpe ekeyi na Douala, na suka, Kinshasa. Vita ezongaki na 21 heures na Kinshasa mpe batu ebele babandaki kozela équipes na aéroport international de N'djili. Bamemaki Kibonge likolo mpe fête e continuaki epayi ya Président Opango.
Nabanzi que na yanoli na bolayi na mituna mia yo.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo