Droits d'auteurs: la conclusion d'E. Kandolo
Ba ndeko,
Awa botangi ba recommandations ya C.N.S., ba lois na ba arrêtés, bomoni sika ndenge epesi bino muinda na makambo oyo ya ba droits d’auteurs ? Na nionso oyo, motuna tokomituna mozali, mpo na nini batu bazali kaka ignorant et surtout bazali kozela que l’Etat azua ba initiatives esika esengeli na bango babanda kosala maye makoki na kotombola lokumu ya musala na bango ? Eyano ezali : mingi ba comprendre te que artiste esengeli te azala na mayele mukuse. Compréhension ya cadre légal oyo azali ko évoluer esengeli ezala makasi. Neti ba artistes mingi bazali ko comprendre eloko nini mibeko milobi te, ezalai mpasi mingi, mpe mpo na koyeba esengeli ba juristes ya SO.NE.CA. balimbola ndenge mibeko mizali koloba. Il est vrai que l’Etat na biso ezali défaillant mpe ezali vraiment koyeba te que secteur ya culture ezali mpe générateur ya ba recettes fiscales. Mbongo ezali na secteur wana, kasi bayebi te ndenge nini ko récupérer mpe kokotisa yango.
Approche ya malonga ezali te na oyo etali politique culturelle. Action culturelle ya solo ezali komonana te bien que mboka na biso ezali na mingi ya kolakisa. Makanisi ya kosala ba musées ya arts, ba maisons de culture, ba bibliothèques, ba archives mpe ko valoriser patrimoine na biso ezali te. Mise en avant na valorisation ya ba spectacles, concours ya dessin, sculpture, théâtres, cinéma, danses, musiques moderne ; traditionnelle ; religieuse na militaire ezali te. Na oyo etali musique militaire, na 1985, le 21 juillet, fanfare ya Garde républicaine ya Zaïre ebetaki na Grand-Place de Bruxelles à l’occasion ya fête nationale Belge. Ba nzembo kitoko ya ndenge wana mpe batu batondaki ebele na esengo ya koyoka mindule wana. En retour, fanfare ya Garde royale ya Belgique mpe eyaki kobeta na Kinshasa na fête de l’indépendance le, 30 juin 1985, mpo na 25 ans ya célébrations ya lipanda na boulevard du 30 juin 1960. Roi Baudouin Ier na reine Fabiola bazalaki inviter na Président Mobutu na mama Bobi. Spectacle fanfare na biso e offraki na Bruxelles ezalaki kitoko mingi.
Sima ya mikolo, na messe des officiers na Mont Ngaliema, natuna général Sumahili (à l’époque azalaki Lt.colonel), commandant ya Garde républicaine. Lisolo elekaki boye :
Emmanuel Kandolo : Mon colonel, ozali koyeba lisusu spectacle kitoko batu na yo napesaki na Bruxelles na juillet 1985 ?
Colonel : ah Emmanuel, tika, wana ezalaki suka na miziki, yo moko omonaki ndenge batu batondaki mpe basepelaki en plus ya ba félicitations écrites ya roi ye moko.
Emmanuel Kandolo : Kasi mpo na nini otikala kozua likanisi ya kotia ba nzembo wana na solfège mpe palaki te mpo e servir na ba générations ekoya mpe etikala cataloguer na ba archives ?
Colonel : ndeko na ngai, est-ce que na mboka na biso fanfare ezalaka na valeur à part kokende kobetela bakonzi ?
Emmanuel Kandolo : Kasi neti ozal commandant ya Garde républicaine mpe mosala emonani ekozala occasion mpo obanda esika ba misusu basalaki eloko te mpo na kotombola lisusu lokumu ya fanfare ya Garde républicaine ?
Colonel : nani akoyoka ba nzembo yango ? Est-ce que yo omoni mutu penza akende kosomba ba nzembo ya fanfare ?
Emmanuel Kandolo : ngai nalandaka émission ya Adjudant-chef (azalaka sous-lieutenant tango a jouaki rôle ya « héros de service » na désolante comédie ya « push » oyo ba innoncents éléments ya C.E.T.A. eyaki ko se retrouver na guet-apens na tendu na primature ya Nguz, services de sécurité na Garde civile. Sima ayaki komata rapidement premier lieutenant, capitaine mpe Major) via Nzungu Muanda, chaque jour na 18h00, soki nazali na Kinshasa, mpe nayebi ba nzembo mingi atiaka. Soki lelo oyo armée ebimisi yango na palaki, nakosomba yango. Je pense aussi que ekosombama na batu ebele mpo wana ezali miziki kitoko. D’ailleurs, Edingwe asalaka succès na ba nzembo wana, ozali ko imaginer sika oyo que soki yango ezalaki na palaki, mbele ba droits d’auteurs ezalai kozongela biso.
Colonel : Edingwe oyo wapi ? Oyo akata suki lokola mokila ? Oyo ya catcheur ?
Emmanuel Kandolo : eh ! ye wana, mon colonel.
Colonel : donc, Edingwe wana bafutaka ye mbongo na ba nzembo ya armée oyo ye abetaka?
Emmanuel kandolo : Non! Bafutaka ye te, ye abetaka yango neti ba nzembo na ye tangu akendaka na makolo esika akobunda mpe pendant bitumba, mpe batu oyo bayokaka yango bakanisaka que wana ezali ba nzembo na ye. Or, soki armée abimisaki ba nzembo wana, confusion elingaki ezala te, mpe akokaki ko profiter na succès na yango na public na ba concerts na ba spectacles mpe na ba ventes na palaki.
Colonel : ah! Bolole ya civil oyo ya Zaïre na dimi te que akokende na bar mpo ayokaka miziki ya fanfare ya armée. Loba na poto. Ya solo te Emmanuel?
Emmanuel Kandolo : Hum! mon colonel, bar ezali esika ya miziki ya fanfare te. Ekobeta na ba stades; salles ; événements minene oyo eleki na mosika ba bars. Tango mosusu soki ba nzembo ebimi, ebandi kotekama na mboka ba paya, ekoki kosalema que fanfare ya Garde républicaine ekomaka inviter na kobeta ba concerts oyo ya ba musiques militaires.
Colonel : Eh! Maréchal alingaka ndenge wana mpo na lokumu na ye.
Emmanue Kandolo : omoni que ezali likanisi ya malamu!
Colonel : nakomeka naino kosolola na général Nzimbi...
Na lisolo oyo ezali komonana que colonel azali vraiment intéresser te na aspect culturel ya fanfare pendant que yango nde esengeli ezala likolo ya existence ya fanfare. Peut-être que bakonzi ya lelo bakoki kozua makanisi ya kobimisa ba C.D. ya ba nzembo nionso oyo Garde républicaines eyemba (ba composition na interprétation ya armée)
Na makambo oyo tokomi mpe tobambi awa, sima ya botangi mpe ko comprendre yango, tozali komona que batu ya culture ( ba artistes) bayebi malamu te nini esengeli na bango basala mpo mosala na bango ezala na lokumu. Ignorance ya loi nde ezali eloko ya liboso oyo ezali kokanga artiste miso. Ayebi te soki contrat ezalaka, ndenge nini esengeli afutama, ba droits na ye ezali nini, ndenge nini akoki ko lengele yango, na cas ya maladie akosala nini ? Ba assurances mosala na yango nini ? SO.NE.CA. mosala na yango nini ? Etc.
Nakoki kozua exemple ya artiste mpe musicien Koffi Olomide, na passage na ye na émission fauteuil blanc, ya Jean-Marie Kassamba, alobaki que ba musiciens bazali na structure moko te, ba textes oyo ezali ko tambusa mosala moye ezali te, etc. Scandaleux mpo na musiciens ya niveau na ye !!! Ba textes nionso oyo nabambi awa, e exista avant même koffi abanda miziki. Azali tout simplement ignorant. Kozanga koyeba oyo yango nde esalaka mingi mingi que ba incompréhensions ebimaka kati na bango ba artistes. Toujours na même émission, Koffi ayebi kosala bokeseni te entre ligne de crédit na décaissement, tango abandaki koloba likambo ya fond ya 2.000.000. $ U.S. oyo Président Joseph kabila apesi ba artistes. Que dire de lui qui, se fait passer pour un économiste formé à Bordeaux ? Wana ezali bilembo binene oyo ezali kolakisa ignorance ya mutu na ba détails oyo esengeli impérativement ayeba soki azali na musala oyo notions ya droit d’auteurs esimbi musala mua ye.
Na même ordre ya idées, na posting na ngai ya lundi, 22 septembre 2008, na sujet ya « Interview de Manuaku », na conclusion ya masolo tobetaki, nayebisaki bino que Manu Dibango a portaki plainte mpo na plagiat oyo Michaël Jackson asalakaki mpe afundi Rihanna. Na reprendre makambo nakomaki mpe na nse nabambi article oyo elobeli yango mikolo oyo.
Par ailleurs, ba ye balingi batala émission ya fauteuil blanc, lien ezali na nse.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
P.S. Lien ya Emission Fauteuil Blanc : www.fauteuil-blanc.net
Annexe.
Lundi 22 septembre 2008
Ba ndeko,
Esali mua ngonga oyo tobandi kosolola maye matali Manuaku na oyo etali ebandeli ya musala na ye ya miziki. Na manso oyo tokomaki, ba ndeko ya radio Mangembo babongiselaki ye esika mpo akoka koyanola na makomi ma biso. Manuaku asalaki yango mpe apesaki biyano oyo ye amonaki que esengeli mpe bikoki na maye tokomaki mpe mituna totunaki awa.
Kasi na biyano biango, ata eyano moko te ezali na esika na yango pamba te alimbolaki te na ba comparaisons ya ba nzembo oyo tosalaki. A la place, ayebisi kaka que ba ndeko oyo bazalaki na encadrement ya Zaiko balingaki Los Nickelos mingi. Yango elingi koloba tango mosusu que babandaki kotinda ye a copiaka Los Nickelos ? Toyebi te ! Oyo toyebi ezali nde ayanolaki te na ntina nini a copiaki Justin Nzeza ya Los Nickelos, baba Muende Gaston, na Rochereau Tabu.
Démarche oyo tolandi ezalaki mpona kolakisa na batu que souvent na mboka na biso tondimaka kaka makambo ndenge wana sans toluka komituna. Toyoki biso banso ndenge Manuaku asala na ebandeli ya musala na ye ya miziki mpe na ndenge abandaki kobeta monoko mpe aleki kaka boye ba comparaisons tosalaki na ba nzembo tobimisaki, bien que atangaki biso très bien. Eloko oyo asali en guise ya différence entre "Silikani" na "Consolation", azali kofundisa ye lisusu mpo alakisi que à tirer ebeteli ya "Consolation" na "Silikani" = déformation, modification (Plagiat). Pire, qui dit Soum Djoum = œuvre ya Rochereau, toyebi yango malamu, ye asangisa ba nzembo nionso abeta na Soum Djoum na disque moko. Donc, le fait kaka ya kobeta Soum Djoum ezali plagiat. Notons que Gina, auteur ya chanson, na Manuaku mutu asalaki mpe abetaki ba partitions wana, bazalaki na autorisation moko te. Kokamua, même tee na lelo oyo, Manuaku azali toujours koyeba bokeseni wana te. Eloko oyo asalaki ezali na originalité na nini soki ezali simple modification ou déformation te ? Ezali vraiment très simple que ekoki koleka na motoyi na mutu oyo ayebi ba nzembo mibale oyo togangi te mpo « Silikani » nde ezali base ya ba partitions ya « Consolation ». En plus, mpo nini asukaki kaka na mua ba notes wana mpe aboyi kopusana? Ba ndeko, toyebi que Manu Dibango afundaka Micheal Jackson mpo ye abetaki na ba nzembo na ye Makosa oyo ezali œuvre ya Dibango. Ye, alongaka na likambo ya tricherie oyo Jackson asalaka na Makosa . Mikolo oyo lisusu, afundi Rihanna na justice mpo abendi mpe abeti biloko ya Makosa sans autorisation na ye manu Dibango = plagiat.
Na yango, eloko tolingaki kolakisa, tolakisaki yango, pamba te esengelaki nde toyeba que na ebandeli ya carrière ya Manuaku , ye abandaki kosala plagiat mpe ko tricher baninga sans aucun doute mpo ba preuves ezali wana mpe akimi ko affronter yango. Neti ezali boye, ekotikala mua mpasi mpo atikala ndenge mingi babandaki kokanisa que azali mutu amemi mbongunana na miziki na biso. Tolobi boye mpo na kobunga bamemaka mbonguana te.
Soki manuaku abandaki ko tricher na ebandeli, tika tondima que sima ya ba mbula ayaki kokoma na boyebi bua mosala mua ye mpe akomaki kobeta biloko na ye na ndenge elongobani mpe biloko yango ezali koloba na kombo na ye. Tobanzi que toyokani na bokeseni oyo tobandaki kosala banda ebandeli ya masolo oyo.
Totondi mama Hortence ndenge amekaki kotuna mituna polele atako mua ba hésitations na déformations ya mituna ezalaki mpe ba confusions bisika mosusu, mpe na ndeko Joseph Pululu atako azalaki un peu na difficulté ya kozala na kati entre rôle na ye ya animateur na relation en tant que leki ya "ya" Pépé. Longonia na bango mibale mpe na technique ndenge bamekaki kosala oyo bakokaki kosala mpo na réussite ya émission Lisolo ya ba Nganga oyo etalaki biyano mpe mituna na plagiat Manuaku abandaki kosala na ebandeli ya musala na ye. Totikali na elikya ete mikolo mikoya, tango mosusu , tokosangana na masolo mosusu.
Musicalement,
Emmanuel kandolo
P.S. Na Annexe tobambi biteni bia mibeko mia ekolo na oyo etali masolo towuti kosolola wa.
Loi n° 86-033 du 5 avril 1986 portant protection des droits d’auteurs et droits voisins
Titre 1 - Droits d’auteur
Chapitre 1 - Dispositions générales
Art.1.- L’auteur d’une œuvre de l’esprit jouit sur cette œuvre, du seul fait de sa création, d’un droit de propriété incorporelle exclusif et opposable à tous.
Ce droit comporte des attributs d’ordre intellectuel et moral, ainsi que des attributs d’ordre patrimonial qui sont déterminés par la présente ordonnance-loi.
L’existence ou la conclusion d’un contrat de louage d’ouvrage ou de service par l’auteur d’une œuvre de l’esprit n’emporte aucune restriction à la jouissance du droit moral et patrimonial reconnu à l’auteur à l’alinéa premier du présent article.
Art.4.- Sans préjudice des dispositions de la loi n° 82-001 du 7 janvier 1982 régissant la propriété industrielle, la présente ordonnance-loi protège les droits des auteurs sur toutes les œuvres de l’esprit quel qu’en soient le genre, la forme d’expression, le mérite ou la destination.
Sont considérés notamment comme œuvres de l’esprit
d) les compositions musicales avec ou sans paroles ;
Art.6.- Aux termes de la présente ordonnance-loi, on entend par :
a) œuvre originale : œuvre présentée sous forme primitive de création ;
Chapitre 2 - Titulaire des droits d’auteur
Art.8.- Est présumé auteur de l’œuvre, sauf preuve contraire, la personne dont le nom ou le pseudonyme est mentionné sur l’œuvre divulguée.
Le droit d’auteur, même portant sur une œuvre produite dans le cadre d’un contrat de louage de service ou d’ouvrage, appartient à titre originaire à l’auteur.
L’employeur ne peut exploiter l’œuvre de l’auteur que dans la limite spécifique de l’activité qui est habituellement la sienne.
Chapitre 3 - Prérogatives de l’auteur et des limitations qui y sont rattachées
Section 1 - Prérogatives de l’auteur
Art.18.- L’auteur jouit du droit exclusif de veiller à l’intégrité de son œuvre.
Il peut, à cet effet, s’opposer à toute déformation, mutilation, modification ou, de façon générale à toute atteinte à son œuvre.
Il peut s’opposer à ce que l’œuvre publiée soit détruite.
Toute traduction, adaptation, transformation ou arrangement de quelque nature que ce soit, ne peut être fait que par lui-même ou avec son autorisation.
Section 2 - Limitations aux droits d’auteur
Art.24.-Il est licite de reproduire dans un but culturel, scientifique, didactique, de critique ou de polémique, des citations ou fragments d’œuvres protégées, à condition d’en mentionner la source, le
titre et le nom de l’auteur.
Michael Jackson poursuivi en justice... encore !
Ecrit ven 30 janv 2009 14:32 CET par Steven Cigale in Avatar de stars
Le Roi de la Pop défraye à nouveau la chronique pour des histoires de droits d'auteurs...
D'abord avec Manu Dibango, dont le titre Soul Makossa a été repris dans Wanna Be Startin' Something, paru en 1982 sur l'album Thriller. Ce contentieux avait été réglé à l'époque, Manu Dibango ayant autorisé la réinterprétation de son titre moyennant échange financier. Il n'avait cependant pas cédé les droits de son morceau, ce qui est à l'origine d'une nouvelle attaque en justice ces jours-ci. D'abord à cause du morceau Don't Stop The Music de Rihanna qui réutilise le gimmick vocal, mais en créditant Michael Jackson au lieu de Manu Dibango... De la même manière Akon l'utilise dans son remix du morceau Wanna Be Startin' Something paru dans l'album qui célèbre les 25 ans de Thriller... Manu demande donc que son nom soit crédité sur la pochette et réclame également les droits d'auteurs qui lui reviennent, il a donc saisi le tribunal de grande instance de Paris.
Parallèlement, c'est John Landis (réalisateur entre autres des Blues Brothers), le réalisateur du légendaire clip de Thriller, qui attaque Michael Jackson car il ne lui a pas versé l'argent des droits d'auteurs générés par le clip depuis plus de quatre ans. En effet selon l'accord signé en 1983, le réalisateur devait toucher 50% des bénéfices du clip. Par ailleurs Michael Jackson s'apprête à faire de Thriller une comédie musicale : sûrement la goutte d'eau qui a fait déborder le vase...
Ba ndeko, toyebi que Manu Dibango afundaka Micheal Jackson mpo ye abetaki na ba nzembo na ye Makosa oyo ezali œuvre ya Dibango. Ye, alongaka na likambo ya tricherie oyo Jackson asalaka na Makosa . Mikolo oyo lisusu, afundi Rihanna na justice mpo abendi mpe abeti biloko ya Makosa sans autorisation na ye manu Dibango = plagiat.