Les droits d'auteurs en question
Ba ndeko,
Natangi ba commentaires ya ba ndeko Messager, Bellak, Mun'a Mangembo, Freddy na Frederic Mbaki ndenge makambo ya ba artistes ezali koleka na mboka na biso. Yango wana ngai mpe nalingaki na bakisa ya ngai commentaire mpe nameka ko appuyer yango na ba textes ya loi.
Soki totali malamu, ba cas ya Nkutu Valentin (Sangana) na ya ba paroliers mpe ba nduliste misusu ezali ebele na mboka na biso. Bipaye, ba paroliers batekaka ba nzembo na bango sans pour autant bayeba valeur artistique na yango. Bamitiyaka esika esengeli na bango bazala te, consciemment ou pas, ba pesaka impression ya kozala à la disposition ya ba musiciens neti bana misala na bango. En d'autres termes, ils font plus office ya ba moins que rien oyo basalelaka ba musiciens ba nzembo sans plus, c est tout !
Sangana par exemple, Rochereau atambusa ye ndenge na ndenge mpo ayebisa Nico azua ye na African Festa. Nionso wana mpo alingaki te Sangana akota na African Fiesta mpo ayebaki que neti ye nde apesaka ye ba nzembo, présence na ye Sangana na African Fiesta, ekokotisa ye mayi. Neti azalaki mutu ya Rochereau, Nico akokaki kosala rien mpo azua ye sans piston ya ye moko Rochereau. Tango nde African Fiesta Vita epanzani nde Nico aye kosala ye proposition aya na African Fiesta Sukisa, sima ya ba touches kili kili Rochereau a continuaki ko simbisa ye na African Fiesta national. Na ngambu, ba musiciens mpe basalaka effort moko te mpo na ko reconnaître ba paroliers. Manque ya reconnaissance wana ezali ko trouver source na yango na complexe ya supériorité oyo esalaka que na mboka na biso, musicien nde azalaka à la fois auteur-compositeur-arrangeur ya ba nzembo na ye nionso ou ba nzembo nionso oyo ye ayembaka voir ba nzembo nionso ebimaka na kombo na ye neti auteur- compositeur. Ba cas ezali ebele : soki neti tosali observation, tokomona que de fois musiciens oyo a raisonnaka bien te, abimisaka ba nzembo ya mayele. Il y a de quoi e interpeller biso. Misusu toyokaka ba mélodies basalaka tout en sachant bien que bazalaka na oreille musicale epola. Misusu cohérence ezalaka na oyo balobaka mpe na oyo bayembaka.
Problème mosusu ezali na niveau ya ba producteurs na batu misusu oyo bazali kobimisa ba anciens succès. Mingi par ignorance bakomaka makambo bayebi te. Souvent Messager a se plaignaka na problème wana awa na blog na biso oyo. Okomona na C.D. ya Lita Bembo ou ya Franco ata Rocherau, ba nzembo nionso bakabeli bango tout simplement par manque ya recherche ya bosolo ou ya auteur ya nzembo. Rochereau nde ye moko azalaka maître na détournement ya ba œuvres ya baninga. Nayebi nini nazali koloba, atekisa ba droits même na ba nzembo ya Nico, Déchaud na Kwamy. Neti nzembo ya "African Mokili Mobimba" ya Déchaud, azua, atiya kombo na ye. Kasi Sam Manguana a rectifiaki yango tango ayembaki yango na album na ye. Kasi na ba nzembo nionso ya kala ya African Jazz par exemple, ba kombo ya batu nionso oyo ba contribuer na yango ezali. Wana lisusu, Messager abandaki komitungisa na yango avec raison. Neti, soki toyoki nzembo ou totali ba clips ya ba orchestres mingi, il est difficile toyeba ba kombo ya ba danseuses; instrumentalistes na ba bayembi. Ba kombo même ya ba atalaku mingi toyebaka yango te. Nionso oyo mpo ba identités ya ba musiciens Congolais oyo bayembaka epayi ya ba patrons na bango ezalaka mingi ignorer na œuvre. Wana nde ezali ebandeli ya irrégularité. Ndenge moko na ba sketch oyo tomonaka na ba D.V.D., bakomi Bibiche, Kokodioko, Diana, de London, etc. Wana nde ba kombo penza oyo ekosala que mutu wana azuka ba droits na ye ? Tomonaka lisusu ba photos oyo balongolaka ba kombo ya ba photographes, Bikeko oyo batangaka ba kombo ya ba oyo basali yango te, etc.
Soki totali na culture en générale, tokomona que manque ya organisation mpe ignorance nde ezali koboma artiste Congolais. Ba lois ezali wana mpo ba revendiquer ba droits na bango, mpe esengeli bazala na organisation makasi.
Nakotiya mua ba textes ya loi na ba recommandations ya Conférence Nationale Souveraine, nde na sima tokokoba na débat approfondi.
Patriotiquement,
Emmanuel kandolo