A propos des banyamulenge
Ba ndeko, tomeka naino kolobela matata mpe bitumba iye ezali na mboka na biso en essayant de faire une lecture objective ya passé ya ba Banyarwanda, Banyamulenge na ba Congolais na R.D.Congo.
I. Histoire
Tomeka mua moke kozongela histoire ya Belgique na colonie na ye ya Congo ; Rwanda na Burundi mpo tomeka komona ndenge nini tokomi na makambo oyo.
Na 1483, Diogo Cão ou Diego Cam aye ko découvrir embouchure ya fleuve. Apeyi yango kombo Nzadi, sima eye kokoma Congo mpe Zaïre. Le, 9 avril 1935, Léopold Louis Philippe Marie Victor, abotami. Ye azali prince ya Belgique mpe ya Saxe-Cobourg-Gotha, Duc ya Saxe mpe na ya Brabant. Na mokolo mua 17 septembre 1865, akomi nkumu ya Belgique na kombo ya Léopold II. Tango akomi nkumu, sima mikolo, asalisi conférence na Laken, pene ya Bruxelles, du 12 au 14 septembre 1876, na kombo ya Conférence Géographique Internationale. Yango ezalaki na but ya exploration scientifique ya Afrique équatoriale. Henry Morton Stanley nde azalaki na lotomo ya exploration wana. Sima ya conférence iye, le 25 novembre 1876, aye akosala Comité d’Etude du Haut Congo. Mosala mua comité moye mozalaki mua koluka nzela ya sika oyo esengeli kolanda na commerce mpe na industrie. Na comité iye yemoko Léopold II azalaki actionnaire, na Anglais James Hutton, na Ecossais William Mackinnon, mpe na groupe hollandais afrikaansha Handelsereeniging. Entre 1877 tee na 1884, Stanley asalaki découverte scientifique oyo esengelaki asala na Congo. Le, 27 novembre 1886, Compagnie du Congo pour le Commerce et l’Industrie (CCCI), esalemi na Albert Thys.
Du 15 novembre 1884 au 26 février 1885, Conférence de Berlin esalemaki. Yango ezuaki mokano mua kokabola Afrique na biteni biyike. Na conférence wana Léopold II asengaki que bapesa ye mabele ya Afrique équatoriale kobanda na océan Atlantique na bassin du Congo tee na mer rouge. Kasi esimbaki te, azui kaka kobanda na océan Atlantique tee na Lualaba, oyo eyaki kokoma Etat Indépendant du Congo. Mpe le, 30 avril 1885, Léopold II akomi souverain ya yango. Assemblée nationale Belge mpe endimaki mokano wana. Rapidement, le, 1re juillet 1885, atie Administrateur général na Vivi (Représentant l’égale na ye). Le, 8 novembre 1888, asali Force Publique mpe na 1889 tee na 1898, chemin de fer ya Matadi - Kinshasa esalemi.
Na cadre ya ko exploiter ba richesses oyo ezali na mabele ya Congo et conformément na ba études scientifiques ya Stanley, Léopold II aluki mbongo mpo na ko financer ba projets na ye mpe azui yango na crédit oyo gouvernement Belge epesi na ye, Alexandre de Browne de Tiege, banquier mpe administrateur délégué ya Société Anversoise de Commerce au Congo (ezalaki mpe kobengama na kombo ya Compagnie de la Mongala) atie mpe mbongo na ye na kati, Banque Rothschild mpe edefisi ye, Léopold II mbongo. Na exploitation mpe commerce ba sociétés oyo nde ezalaki na marché : Compagnie de la Mongala, Anglo-Belgian India Rubber Compagny (A.B.I.R.), Société Anonyme Belge pour le commerce du Haut Congo (S.A.B.) yango ezali une des filiales ya C.C.C.I. ya Albert Thys. Ba filiales na yango mosusu ezali : Le Chemin de Fer au Congo, Compagnie de produits, Compagnie des magasins Généraux, Compagnie du Katanga.
Na 1908, Léopold II asundolaki Etat Indépendant du Congo na Etat Belge mpo batu mingi, surtout ba Américains oyo babandaki koleka kuna na expédition, bakomaki kolobela ba violations des droits de l’Homme oyo ebandaki kosalama kuna ndenge abandaki konyonga batu soki bakokisi ba cotas ya biloko oyo balingaki te, etc. Yango eyaki kokoma colonie ya Belgique.
Na ordonnance oyo Léopold II a signaki le, 1er juillet 1885, loi ebandaki kosala bokeseni kati na mabele ya moto moindo na oyo ya l’Etat. Elingi koloba que mabele oyo ezali na bilanga yango nde ezali ya moto moindo, mabele oyo ezali na eloko te yango nde ezali ya l’Etat. Bien que ezalaki ndenge wana, mundele abandaki kaka kobotola mabele ya moto moindo. Situation wana eyaki kosala que bato babanda kokima mpe kolongua na mabele ma bango mpona kokende mosika atako loi ya 01/07/1885, ebandaki kopekisa kobotolo indigène mabele. Lisusu décret ya 14 septembre 1886, ebandaki kondima que mabele (ya moto moindo) mango makokambama na ndenge bonkoko bozali kosenga mokonzi ya mboka akamba mboka na ye. Na esprit wana nde ba Hunde mpe bayaki kokima mabele ma bango, justement esika mundele abandaki koluka kofandisa makambo mpe ko exploiter yango.Tango balie coin mpo mundele alingaki kobanda kosalisa bango misala makasi mpe koniokola bango, nde mundele ayaki kobengisa batu na Rwanda mpona baya kosala misala.
Convention de Bruxelles ya 11 août 1910. esalaka que ba Rwandais baya tingama na Congo. Na conférence de Versailles ya le, 28 juin 1919, Allemagne ayaki ko perdre Rwanda na Urundi oyo bapesaki ye na conférence de Berlin ya 15 novembre 1884 tee na 26 février 1885. Na 1923, Société des Nations epesi ba territoires allemands na Belgique, mpe Belgique eye kokangisa yango na Congo Belge na 1925, c’est-a-dire ekomaki sous tutelle ya Belgique mpe administrer na gouverneur général moko oyo azalaki na Boma (Boma ezalaki capitale ya Etat Indépendant ya Congo kobanda na mokolo mua 1er mai 1886 tee na mokolo mua 31 octobre 1929).
Na vide wana nde bayaki kokoma na bokonzi na Ruthuru na mboka Bwisha mpe na Masisi na mboka Gishari. Batu oyo mundele abendaki na Rwanda bayaki na lolenge mibale :
Immigration na Transplantation.
Immigration nde ebendaki Banyarwanda na Kivu septentrional entre 1925 na 1937. Na kati wana Union minière ya Haut Katanga ekumbaki bango durant trois ans entre 1925 na 1929, na Katanga.
Transplantation ebandi ndenge nini ? Immigration ebandaki kosalema selon ba dispositions ya décret ya 19 juillet 1926, oyo ebandaki koloba qu’emploi ya main d’œuvre rwandaise na autorité Belge en provenance ya mboka mosusu ezalaki libre. Kasi neti ezalaki boye, batu mingi babandaki ko s’intéresser vraiment te mpo bazalaki na choix ya kondima ou ya koboya. Kasi na 1937, ekomaki ya kokumba batu de force mpe contre volonté na bango mpe yango wana ba Banyarwanda bakumbamaki ebele na Masisi. Na mobulu mobulu wana, mundele azuaki mayele mabe ya kokotisa nzala na makasi, kotiya batu na ba conditions difficiles mpona ko réussir transplantation ndenge alingaki. Transplantation wana ebandaki na 1937, mpe esilaki na 1957.
Koya ya batu oyo esalemaki na Mission d’Immigration des Banyarwanda (M.I.B). Neti ba Hunde bakimaki na mabele ma bango mpo na motungisi ya mundele, na 1937, accord esalemaki entre ba autorités administratives ya Kivu, Comité National ya Sud Kivu na mundele. Na yango tango Banyarwanda bakomi wana, neti bazalaki kaka bango na bango, esengelaki bazala na mokonzi ya mboka oyo azali munyarwanda.
Ba opérations ya M.I.B. esalemaki na trois étapes :
1. Na 1937 tee na 1949, mundele akotisi batu na mboka Gishari na Masisi.
2. Na 1949 tee na 1953, mundele akotisi nzala makasi na Rwanda mpo abenda lisusu batu na Rwanda baya na Gishari.
3. Na 1953 tee na 1955, transplantation esali que bakotisa Banyarwanda na Washali-Mokoko. Donc, Banyarwanda bakomi kobanda na Masisi tee na Rushuru. Na Maniema mpe na Katanga. Nionso oyo mpona intérêt ya ba entreprises agricoles et minières ya mundele.
Na Uvira par contre, bazalaki na bokonzi ata na mboka moko te, Kasi makambo mayaki kobonguana tango Jean Baptiste Ndahindurwa azaki bokonzi na kombo ya Mwami KIgeri V Ndahindurwana, le, 20 juillet 1959. Na sanza ya Novembre 1959, ba Tutsi ebele bakimaki Rwanda suite na ba événements ya « Toussant rwandaise » (kobomana ewutaki na rumeur ya liwa ya Dominique Mbonyumutwe, membre ya PARHUTU, parti politique Hutu na batu ya UNAR, parti politique Tutsi. En réalite, Mbonyumutwe akufa le, 26 juillet 1986).
Entre 1959 na 1961 sous protection ya Croix Rouge internationale, ba Tutsi bakimaki mpe baye ko se réfugier na Mulenge. Neti bafandaki na Mulenge bakomaki kobengama Banyamulenge. Kasi yango emonanaki neti balingi bamibimisa lokola bazalaka na mabele wana wuta ba koko na bango. Banyamulenge bazuami na territoire ya Mwenga, bazuami lisusu na territoires ya Fizi na Babembe mpe na Uviza na Bafuliro. Esengeli koloba que Banyamulenge banda ekoma bango na Sud Kivu bamona makambo na bango mpe bandandaki kofutisa bango ba amandes kili kili, kobotola bango nba ngombe, kobotola bango ba plans na bango, etc.
Ba tensions ebandaki kozala mingi na Kivu. Entre 1959 na 1960, ba Hunde bamonaki que Banyarwanda bazali na moto makasi na matoyi mangongi mpe bazali kosala neti soki bang onde bazali na bokonzi na nionso. Epesi révolte ya Kinyarwanda. Na 1963 tee na 1964, période ya rebellion ya Mulele, na elulu wana ba profiter basala mua sandrouma. Mobulu wana emonanaki neti volonté ya koluka ko créer mboka na bango na mabele oyo bafandi. Na Octobre 1965, gouvernement ya Moïse KapendaTshombe ezuaki mokano mua kobengana Banyarwanda na province ya Kivu mpona complicité na ba rebelles.
Likambo ya mabele na Kivu nde ezali koluka mobulu kati na ba Congolais na Banyarwanda. Banyarwanda bazali na lokolo moko na kati ya Kivu, mosusu na Rwanda. Soki neti esengeli basomba mabele mpona bilanga ou ba fermes na élevages, wana bakomi batu ya Kivu. Soki ekomi tango ya kopesa misala, wana babengisi batu na Rwanda. Bazali na ba cartes pour citoyen ya Congo mpe carte ya identité nationale ya Rwanda epayi intérêt ezali. Makambo ya lolenge oyo ebandaki kopesa confusion mpe komatisa incompréhension kati na ba oyo babandaki komona bango kaka que bazali ba Congolais te.
Ba événements ya le, 04 janvier 1959, ewelisaki lipanda ya Congo na 30 juin 1960. Tango Congo ekomi na lipanda, mpe mundele alongue « officiellement », Congo eyaki ko se retrouver na makambo ebele : situation politique mobulu, manque ya ba cadres universitaires, ba partis politiques ya malonga te, relève na niveau nionso ya administration ezalaki pasi, bitumba mpe rebellion, etc. Nakati ya makambo wana, situation ya Kivu mpe etikalaki bongo : ba immigrés, ba transplantés, ba réfugiés na ba clandestins bazalaki sangisa sangisa mpo ebandaki kaka koyebana te ndenge nini situation na bango ekozala na Congo indépendant. Kasi yambo Congo ezua lipanda, esengelaki kosalisa ba élections na niveau nionso : municipales, provinciale na nationale entre 1957 tee na 1959. Na ba élections wana ba Banyarwanga mpe ba votaki. Grâce na ba voix na bango nde balongaki mua ba municipalités ya nord Kivu : Masisi na Rutshuru. Révolte mosusu ebimaki le 26 mars 1960 sima ya ba élections législatives. Loi électorale elobaki boye : les ressortissants du Rwanda-Urundi, résidents au Congo depuis 10 ans au moins, étaient admis à voter » Yango elingi koloba que mutu oyo awuti na Rwanda-Urundi akoki ko voter soki afandi na mabele ya Congo depuis 1950. Soki ezali boye, mboka nini oyo étranger a votaka ba membres ya Assemblée nationales ? Donc, ezalaki lolenge ya kolakisa que batu wana na miso ya Belge bazalaki ba Congolais atako loi fondamentale ebandaki koloba eloko te na oyo etali mode ya acquisition ya nationalité congolaise.
Soki totali na sima, kobanda na 1959 tee na 1963 ba Tutsi babandaki kokima Rwanda mpona koya ko senga ngunda na Congo mpo kuna pouvoir ezalaki na maboko ya ba Hutu. Na 1962 tee na 1966, ba Hutu bakimaki Burundi mpo mokonzi Michel Michobero abandaki koboma bango. Liwa ya Kigeri V na prise ya pouvoir par Grégroire Kayibanda na Rwanda ezalaki kosasa mpe koboma bango mingi. Na 1963, bitumba entre ba Banyarwanda na ba Hunde ebimaki.
Banyamulenge mpe batondaki mingi na Centre de Regroupement Africain (CEREA) ya Anicet Kashamura. Marcel Bisukiro, Gervais Bahazi, Herman Habarugira, etc. Plus tard bakomaki ko s'opposer na politique ya décentralisation territoriale mpo yango ekokaki lisusu kokabola bokasi oyo bakomaki na yango na nord Kivu.
Wuta Congo ezua lipanda, mbala ya liboso texte ya loi elobela likambo ya nationalité ezalaki na Constitution (ya Luluabourg) ya 1er août 1964. Pour rappel, décret ya 27 decembre1892 efandisaki likambo ya acquisition ya nationalité congolaise. Décret ya 21 juin 1904 e completaki yango sur ba disposition ya perte ya nationalité. Ba décrets oyo nionso etikalaki en vigueur ata soki parlement Belge e votaki annexion ya Etat Indépendant ya Congo na Belgique. Article 2 ya Loi Fondamentale ya 19 mai 1960 elobi boye : « Les lois, décrets et ordonnances législatives, leurs mesures d’exécution ainsi que toutes dispositions réglementaires existant au 30 juin 1960 restent en vigueur tant qu’ils n’auront pas été expressément abrogés. ».
Le, 1er août 1964, Constitution esalemaki na Luluabourg ebimaki. Na article 6 elobaki boye « Est congolais, au terme de l’article 6 de la constitution, à la date du 30 juin 1960, toute personne dont un des ascendants est ou à était membre d’une des tribus établis sur le territoire de la République Démocratique du Congo dans ses limites du 15 novembre 1908 telle que modifiées par les conventions ultérieures. ». Décret-loi du 18 septembre 1965, elobelaki régime ya acquisition ya nationalité Congolaise.
Na mokolo mua 24 novembre 1965, Président Mobutu akomaki chef de l’Etat ya République Démocratique du Congo.
Président Mobutu a signaki décret-loi nº 68-259 ya le, 10 juillet 1968. Yango ebandaki ko modifier mpe ko compléter décret-loi ya 18 septembre 1965.
Kobanda na mai 1969 tee na février 1977, Bisengimana azalaki Directeur ya Bureau du Président de la République na ordonnance nº 69-096 du 8 mai 1969.
Président Mobutu a signaki ordonnance-loi nº 71-020 du 26 mars 1971. Yango ezali kopesa nationalité Congolaise collectivement na ba oyo bazali originaires ya ba anciens territoires sous tutelle Rwanda-Urundi établis na mabele ya Zaire avant le, 1 juillet 1950, et qui ont continuer à résider depuis lors na République Démocratique du Congo.
Sima, Président ayaki ko promulguer loi oyo Assemblée nationale ya Zaïre adopter, na ordonnance-loi nº 72-002 ya le, 5 janvier 1972. Elobi boye : Article na article ya liboso : Il existe une nationalité zaïroise. Sont zaïrois au terme de l'article 5 de la Constitution à la date du 30 juin 1960, toutes les personnes dont un des ascendants est ou a été membre d'une des tribus établies sur le territoire de la République du Zaïre dans ses limites du 15 novembre 1908 et, telles que modifiées par les conventions ultérieures. ».
Kaka na 1972, génocide Hutu ba Burundi, ba Hutu balie coin na Burundi mpo kuna ba Tutshi oyo bazali na pouvoir bakomi kosasa bango. Baye ebele mpe ngulupa nionso wana esopani na Zaire, mususu ekeyi na Ouganda. Na mbula elandi, na Rwanda le, 5 juillet 1973, Grégoire kayibanda bakweyisi ye na Juvenal Habyarimana. Bango na bango ba Hutu. Kayibanda Hutu ya Gitara, Habyarimana Hutu ya Gisenyi. Directement Habyarimana abandi loyenge ya konionga mpe ko barer ba Tutsi na kosuta bango libanda ya Rwanda. Bango wana baye kosopana lisusu na Zaïre.
Na 1973, wana kaka Président Mobutu azui boule ya Zaïrianisation mpe yango ebandi kopesa batu biloko ya ngana ya ba étrangers oyo bazalaki na Zaïre. Na kokabola wana ba Banyarwanda mpe bazua bomengo : ba plantations, fermes, ba magasins, engins agricoles, etc. Yango nde eyaki konvuamisa batu lokola ba : Rwakabuba na ba Gisaru.
Na 1981, Président de la République a promulger loi ya sika. Conseil législatif national e adopter loi nº 81-002 du 29 juin 1981. Loi yango elobi que la nationalité zaïroise ekopesama na ba oyo kaka bakoki kolakisa mpe ko prouver que ba nkoko na bango bazalaki mpe ba vivaki na mabele ya Zaïre kobanda na 1885, donc Zaïrois jus sanguini = ya makila. 1885, ezali mbula mundele akatelaki biso territoire ya Congo na conférence de Berlin. Loi oyo elongolaki ba Rwandais na ba Burundais droit de sol = jus soli. Na yango, selon la loi bakokaki lisusu kobengama ba Zaïrois te. Caractère rétroactif ya loi oyo esala que ba Rwandais na ba Burundais ba perdre nationalité Zaïroise na ba droits relatifs na yango. Loi oyo ezalaki très contraignante, restrictive mpe exigeante. Ezalakai vraiment suka na mokuwa mpo ebandaki kosenga que mutu oyo alingi akoma Zaïrois esengeli asala une demande officielle et individuelle ya naturalisation. Yango ezalaki facile te puisque ko réunir ba conditions ya acquisition ya nationalité ezalaki tout simplement impossible. Sur avis conforme ya comité central du parti-Etat, loi ekomaki na disposition ya demande expresse na individuelle. Na demande expresse, kaka Président - Fondateur ya M.P.R. nde akoki ko accorder nationalité na mutu ou na batu oyo ye amoni que ba rendre ba services minene na ekolo. En réalité, ezalaki mpo ba politiciens lokola ba vieux Cyprien Rwakabuba Shinga, Marcel Bisukiro, na ba Gervais Baizi bakoma mitelengano te.
D’ailleurs, na Conférence Nationale Souveraine ya 1991, ba conférenciers baboyaki likambo ya Banyarwanda na Banyamulenge na Nord-Kivu : zones ya Masisi, ya Goma na Rutshuru ; na Sud-Kivu : zones ya Kalehe, ya Baraka na ya Uvira, na Shaba : zone ya Moba, que bango bazali ba Zaïrois te. Na yango bakoki ko participer na C.N.S. te. Atako bongo, C.N.S. esalaki amendement moko esengaki que modification esalema na loi iye mpo e apporter mua ba modifications favorables na mutu oyo alingi asenga nationalité. C.N.S. esengaki lisusu na gouvernement de transition a respecter ba droits acquis na matière ya nationalité na but ya ko éviter ba cas ya apatride = mutu oyo azali na nationalité légale te.
Entre Rwanda ya Habyarimana na Zaïre ya Mobutu ba méthodes na bango ezalaki ko se joindre na makambo mosusu neti na oyo etali traitement ya ba opposants na ba régimes na bango na notion singulière ya sécurité frontalière oyo bazalaki na yango. Justement na cadre ya Accord « Convention Secrète » ya Ngbado-Lite, nº 129-42/ZA-RWA/85 ya le, 12 mars 1985, Président Mobutu atindaka batu ya Service d’Action et de Renseignements Militaires (S.A.R.M.) bakende ko prêter main forte na régime ya Habyarimana. Suite ya affrontement wana nde Général Fred Rwigema (Shabani Ruta) , Fondateur ya Forces Patriotiques Rwandaise (F.P.R.) na Armée Patriotique Rwandaise (A.P.R.) akufaka le, 02 octobre 1990, face na affrontements na S.A.R.M. sous le commandement ya Général Donancien « Donat » Mahele Liyeko Bokungu (De fois na mitunaka, soki Général Mahele azalaki vivant, réaction na attitude ya Général James Kabarebe elingaki ezala ndenge nini vis-à-vis na Général Mahele, un militaire au vrai sens du terme mpe un vaillant commbattant ya ndenge wana, du fait que chef et commandant historique ya F.P.R na A.P.R. alekaka na bitumba wana?).
Loi nº 04-024 du 12 novembre 2004 relative à la nationalité Congolaise, elobi boye na exposé des motifs :
la présente loi a pour but de répondre d'une part aux prescrits de la Constitution de la transition et d'autre part aux critiques pertinentes formulées par les délégués aux assises du Dialogue Inter-Congolais contre la législation congolaise en matière de nationalité, spécialement l'Ordonnance - loi n° 71-002 du 28 mars 1971, la loi n° 72-002 du 05 janvier 1972 dans son article 15 et le décret-loi n° 197 du 29 janvier 1999 modifiant et complétant la loi n° 81-002 du 29 juin 1981.
La même loi stipule également dans son article 6 qu' « est congolaise d'origine toute personne appartenant aux groupes ethniques et nationalités dont les personnes et le territoire constituaient ce qui est devenu le Congo (présentement la République démocratique du Congo) à l'indépendance » le 30 juin 1960. ».
Loi endimaki kopesa simultanément nationalité Congolaise na Banyarwanda, Banyaburundi na ba Banyamulenge na ba oyo nionso bayaki avant lipanda na 1960. Esengeli toyeba lisusu que constitution ezalaki approuvée à 84, 31 % na référendum ya 19 décembre 2005 na ba Congolais.
Ba esprits ebandaki ko chauffer banda kala. Banyarwanda bayokanaki entre Hutu na Tutsi mpo basala front commun en créant UMOJA. Na tête na yango en qualité ya président, Cosmos Sekimonyo (Hutu) mpe David Munyanko (Tutsi) azuaki ebonga ya directeur. Entre 1983 tee na 1994, boyokani bozalaki na kati, Kasi tango Front Patriotique Rwandais e attaquer pouvoir ya Juvénal Habyarimana, bokabuani boye kokota kati na bango mpe UMOJA epanzani. Conséquence ya bokabuani wana ezali que ba Hutu bazalaki na soutient ya Zaïre. Yango wana Mobutu ayaki kondima que ba Hutu basala Mutualité des Cultivateurs de Virunga, MAGHRIVI. Habyarimana ye moko asenga na Mobutu andima likanisi liye. MAGHRIVI ezalaki kaka mutualité te, ezalaki un fourretout-idéologique-extrémiste Hutu. Ezalaki na ba alliances na ba Hunde (ba Hunde babosana te ndenge Belge akimisaka bango mpe abotola bango mabele oyo ayaka kotiya Banyarwanda) mpe ebandaki koganga polele que Masisi ezali ya ba Hunde mpe Rutshuru ya ba Hutu. Na réplique, ba Tutsis basali Syndicat d’Initiative pour le Développement de la zone de Ruthuru (SIDER). Na loyenge wana, pouvoir ya Habyarimana eyaki kokueya mpe eluki génocide ya Rwanda. Ba Tutsi bakima na Zaïre. Kasi tango F.P.R ayaki kokota na Kigali, ekomaki nde tour ya ba Hutu ya kokima na Zaire.
Banyarwanda (Hutu, Tutsi, na Twa) batondaki na zone ya Masisi mpe na collectivité ya Nabwito. Situation ya présence ya Banyarwanda ebandaki souvent kopesa kaka mobulu. Ba Hunde, ba Nande, na ba Nyanga ba attakaki ba Hutu sous prétexte que balingi babanda kobotola bango biloko na bango. Chasse à l’homme wana ekota tee na Masisi, bien que ebandaki na Ntoto, epusani tee na Lubero na Bwito. Eyoma wana ezalaki na conséquence na écosystème ya Kivu mpe ebandaki kokimisa na ko déstabiliser sérénité ya ba réfugiés. Après génocide ya Rwanda ba Nande, babandaki lisusu kotikela ba Hutu temps ya kopema te. Moto ebandaki kopela bisika nionso mpona ba multiples raisons ; vol, suspicions, contrebandes na ba camps ya Kibumba, Mugunga, Katale, Kahindo, Tshondo et Kituko. Côté ya Fizi nde ezalaki secteur oyo Célestin Anzuluni Bembe Isilonyonyi, ancien Président ya parlement, ancien vice-Président ya parlement de transition ya Haut conseil de la République, abandaki kopelisa moto contre ba Tutsi oyo bazalaka kuna. Na loleyenge wana, SIDER abandaki ko mener projet na ye moke moke mpe asali rapprochement na A.F.D.L. Plan ya kokota na Zaïre esalemi mpe makambo ebandi. Uvira ekueyi, Commandant Ngindu kisase baleka ye na M’zee mpe nzela efonguami ya kokoma tee na Kinshasa. Na sima ba Hutu bazongi na Rwanda. Kobanda le, 17 mai 1997 te lelo oyo, toyebi nini esalemi na mboka na biso mpe bato boni bakufi na conflit oyo.
II Ba Compagnies na makambu
Sika tolobela naino likambo etali bomengo ya ba compagnies ebele ezali na kati ya R.D.Congo mpe misusu ezali na kati ya nungu nungu:
Anglo Americain Corporation (A.C.C) yango ezali première compagnie minière na monde (kolongola pétrole). Compagnie oyo ezali ya liboso na koluka Or. Ezali compagnie ya afrique du sud.
Barrick Gold Corporation, B.G.C, yango ezali na deuxième position na oyo etali exploitation ya Or, sima ya A.A.C. Nakati ya compagnie oyo parmi ba actionnaires, George Buch « tata » azali kuna nakati. Yango ezali compagnie ya canada.
Consolidated Eurocan Ventures, Tenke Fungurume Mining Corporation, Yango mibale ezali na kati ya Groupe Lundin. Monsieur Adolph Lundin azali Suedois kasi afandi na Genève. Notons que compagnie oyo ezali Canadienne.
Société Générale Minière, entreprise Belge.
Mines d’Etat, ya chine
Groupe Malta Forest, ya Mr. Forest
America Mineral Fields, AMFI, ezali na Texas na Etats Unis. Yango ezali spécialisée na prospection na exploitation minière.
Doppelt, Diamant na Cobalt, compagnie Belge
Sodimiza, ezali consortium japonais
Banro, société canadienne
Office des mines d’Or de Kilo Moto, OKIMO
MINDEN, société Canado-Belge
British Diamond, ya Grande- Bretagne, Diamant
Debeers Consolidated, Ya Afrique du Sud, Diamant, actionnaire principal ekomi Famille Oppenheimer
SIBEKA, société Belge esalaka na Diamant
Sinohydro Corporation, énergie
Anvil Mining Services, Australie, minerais
Empouin Schneider, ya France,
Johannesbourg Consolidated Investment, ezali na secteur ya cuivre
Nippon Mining Company, compagnie japonaise. Yango nde esimbi filiale na yango Société de développement industriel et minier du Congo (SODIMICO) na 85% des parts ya actions.
GENCOR, compagnie sud africaine, cuivre, étain, cobalt, etc.
ISCOR, compagnie sud africaine, cuivre, or, étain, fer, etc.
China Railway Group Limited, construction ferrovière
American Diamond Buyers, compagnie américaine. Yango ezali associer na American Minerals Fields, AMFI.
Cluff Minerals, ya Grande Bretagne, minerais
CALED International, ya Ouganda, compagnie ya général-major Salim Saleh, leki ya Président Museveni. Ezali na secteur ya Or na Diamant
KIMIN, filial ya Mindley, ya Belgique. Ezali na secteur ya OR.
Antilles Neerlandaises Idea Ressources, minerais
Bango nionso bazali kokufela : Cobalt, Cuivre, Colombo-Tantalite, Zinc, Wolframite, Argent, Diamant, Or, Germanium, Plomb, Monazite, Fer, N.B. Natangi ba sociétés pétrolières te mpo yango ezali na mua cas mosusu.
Ba grands capitaux oyo ezali ko répondre na ba logiques financières et économiques na bango. Tango eye na Congo, but na yango ezali ya kobombana te. Baye nde ko exploiter ba gisements, baye kosala ba exploitations mpo efongelela bango nzela mpe ekotisela bango mbongo mingi. Na yango babandi naino na ko investir mbongo na bango tout en sachant que na mise na bango bakokongolo mbongo ebele. Bango bazali na ba moyens ebele ya ko faire changer ba dirigeants ya ekolo avis, kolongola ba oyo bazali kosala que vision na bango e s’imposer te, bazali mpe kosala en sorte que mobulu epesa bango possibilité ya kokabola mboka na biteni mpona koluka ko contrôler bomengo oyo bazali koluka malamu. Ezali likambo ya likonda, mawa ezali te, seul intérêts financiers na accumulation ya capitaux nde ezali ko intéresser bango. Na logique wana, il est évident que bango ba dépenser mbongo mingi mpona kozua ba contrats minene à travers le monde na ba domaines ebele neti : informatique, télécommunication, électronique armement, énergie, aérospatial, aéronautique, na joaillerie, etc.
Na sanza ya décembre 1996, gouvernement ya Léon Kengo wa Dondo eyokanaki na Consolidated Eurocan Ventur mpona exploitation ya Cuivre na Cobalt na Tenke Fungurume. Na koyokana wana esengelaki Etat Zaïrois ezua 45% mpe Consolidated Eurocan venture 55%. Na yango Tenke Fungurume Mining Corporation eyaki kosalema.
Na Mars 1997, tango Kisangani ekomaki na maboko ya A.F.D.L., Jean Reymond BOULLE, mvuama ya A.M.F.I (ye azali mutu ya Arkansas, esika Bill Clinton azalaka gouverneur) atetaki boule ya kofungola poste na Goma mpona prise de contact na Laurent Désiré kabila, M’zee. Déjà Raymond Boulle a miseaki sur Laurent kabila, Yowerii Museveni na Paul Kagame banda kala, c’est-à-dire banda tango oyo Museveni a présentaki ye kabila comme quoi que ye nde mutu asengeli akoma mokonzi ya Zaïre (Museveni ayangana yango te, aloba yango mabala na mbala). Monsieur Boulle akokaki kokota doute na Museveni te puisque amona ye moko ndenge Museveni asala Fred Rwigema na F.R.R na A.P.R. ndenge asala Paul Kagame mpe na ndenge afandisa ye na Kigali. Kasi esengeli te tobosana que ba moyens nionso wana oyo bazalaki na yango ekokaki kaka kowuta epayi ya ba véritables mvuama neti ba monsieur Boulle na batu mosusu oyo bazala na bango na likopa. Yango wana ba compagnies miyike esanganaki esika moko mpe basali A.M.F.I.
Après masolo, na avril 1997, M’zee andimi projet ya A.M.F.I. na hauteur ya 1,5 milliards $ U.S. mpe apesa na ye 50 million $ U.S. sur 250.000.000. $ U.S. oyo etikalaki mpo apesaka na quatre ans, soit 50 million par année. A.M.F.I na A.F.D.L. bayokanaki mpo na extraction ya Cobalt na Cuivre na Kolwezi (200.000.000 $ U.S.) ; Kosala usine ya extraction ya cobalt a partir ya residus ya cuivre na Kipushi (30.000.000$ U.S.) ; Usine ya traitement ya Zinc na Kipushi kaka (550.000.000 $ U.S.).
Monsieur Boulle aya na Lubumbashi, a visita Kolwezi, Kipushi bisika esengelaki basala mbongo. Tango wana Gaëtan Kakuji azalaki gouverneur ya Katanga. Na ba calculs na ye, Boulle atikela M’zee avion (jet privé) na ye atambolaka na yango partout mpe na ba frais na ye. M’zee abosanaki que mundele apesaka eloko ya valeur pamba te, en plus Homme d’affaires avisé ya marque wana ! Abandaki koyebisa M’zee boye : « à Kinchacha quand tu donnes l’argent, ils veulent toujours plus et rien n’était fait. Il fallait toujours donner à Mobutu et aux autres, de fois ils changent des prix de commissions sans te donner le choix, on changeait des ministres et tout le monde à son prix… Maintenant, avec vous, un changement est-la, et on a vraiment besoin de travailler ensemble ». Wana M’zee azali kaka koseka.
Debeer mpe ekomaki na difficultés mpe apotamaki na A.M.F.I. par le canal ya filiale na yango America Diamond Buyers. Yango ebotolaki marché ya ba diamants na province oriental. M’Zee atikelaki lisusu Boulle asala ba affaires sans concurrence. Kasi sima ya nkokoso na Kabila, Debeer eyaki kozongela makambo.
Ba accords oyo kabila a signaki na ba multinationales ebandaki kosepelisa batu nionso te, mpe mingi bamitunaki ndenge nini akokaki ko signer ba accords ya ndenge wana sans pour autant a engager Zaïre juridiquement? Problème ya légalité na yango ezalaki vraiment ko se poser même soki politiquement A.F.D.E.L. amonaki kaka intérêt à court terme.
Kasi tangu ba relations entre M’zee na ba Ougando-Rwandais ebandi kobeba na nionso oyo bayokanaki, yango etindaki ye mpe akata na oyo a financaki projet oyo ememaki ye na Kinshasa, c’est-à-dire na pouvoir. Ayaki kokata contrat oyo apesaki Jean Raymond Boulle en privatisant la GECAMINES. Kobanda wana, Boulle alobaka polele que : « napesi ye avion privé na ngai durant deux mois à mes frais, to signer ba contrats, lelo oyo akati yango akati yango kaka boye ? Tokomona! M’zee abenga ba Sud Africains ya A.A.C na Congo na Gecamines mpe a signer na Ridgepointe Overseas Developments of British Virin Island ya Billy Rautenbach. Ye nde ayaki kokoma na tête ya comité de redressement ya GECAMINES na batu ya ACC-GENOR. Kobanda wana te na lelo oyo moto ezali kaka kopela mpona mbongo na bomengo sans ko kiper bomoyi ya batu oyo bazali koleka kuna.
III Kosukisa
Na manso oyo tobeti ezali mawa mingi pamba te biso moko peuple Congolais na bakambi ba ekolo tozali nde kokanisa que richesse ya mboka elingi koloba kaka ba minerais. Lokuta ! Richesse ya liboso oyo tozali na yango ezali batu, main d’œuvre. Soki vraiment toyebaki ndenge nini esengelaki ko utiliser mitu ya ba oyo bayebi, ba oyo batangi kelasi na maboko ya baye bayebi misala ya maboko mbele mboka na biso elingaki kaka efandela richesse minière te. Tofongola miso ! Mpona nini tozali koma te que minerais yango nde ezali kobundisa batu na Kivu, ebenganisa batu na Katanga, ekatisa bana kelasi na Kasaï oriental, ezongisa Tshikapa na sima, ebimisa bitumba na Province orientale, etikisa biso Kahemba, etc.
Par richesse, tolingaki tolakisa bolingo kati na biso, boyebi bua biso na kolakisa bolingo bua ekolo, kotosa mibeko, kotiya mutu nionso na esika na ye, koboya kokotisa bokabuani kati na biso, ko gagner vie selon ezuili na yo, koboya ko mener vie ya luxe, kozongisa mabina – goigoi – maseki - kindumba – moto makasi na sima, kotala nini baninga bazali kosala mpo na ekolo na bango ekende liboso, nini tokoki kozua epayi ya ba paya mpo na kotambusa ekolo na biso, ndenge nini tokoki kofanda na ba paya, ndenge nini biso mpe tokoki kofanda na mboka mopaya, etc. Na manso oyo tolingaki nde tobanda na kolinga mabele ma biso na kopesa priorité na ko lutter na nzala, avec objectif ya kolia malamu mpe kotonda. Mpona kokoka na manso oyo esengelaki toyeba ndenge nini tokoki ko gérer mboka mpe ekolo : Santé, éducation na instruction, transport, conservation de la nature, agriculture, développement rural, tourisme, na komilengele na bitumba soki monguna akoteli biso. Nionso oyo tobosana miso kaka na bomengo mpe kozua ya mbangu.
Lelo oyo tozali kotomboka na ba Rwandais, ba Ougandais na ba Burundais. Ezali ya solo, babomi ba ndeko na miso mingi ya mingi. Kasi esengeli mpe tomituna naino, pona nini tomilingi te ? Pona nini tozali kokaba mboka na biso ? Batu oyo tozali kofunda lelo oyo, biso nde to favoriser bango na kozanga bolingo bua ekolo na biso. Yango wana esengeli tosala maye makoki mpo tosangana tokoma une véritable Nation. Mpo na yango, esengeli tomindima ndenge tozali mpe tondima kofanda na bapaya oyo bakondima kotosa mibeko mia ekolo ndenge moko biso mpe tokobanda kotosa yango.
Ba Rwandais oyo tozali kofinga, kofunda, kolakisa misapi, bazali na eloko moko ya makasi oyo ezali kozanga biso na mboka na biso : Mémoire. Lelo oyo tozali komona boye na boye, etc. Non ! Ba Rwandais bazali très malicieux, bayebi koyekola batu, bayebi kobomba sekele, bayebi nini balingi, bayebi esika bawuti, bazali koluka nini ebongi basala mpo ba mpasi oyo bamona eyela bango lisusu te, bayebi nini bakoki kosala pour que mutu alonga bango na maye bazali kobongisa te. Pendant que bango bazali koyekola biso, biso mpe tozali koyebisa bango nionso, tozali kotobola monoko na biso, tozali kolekisa tango na kobina na komela masanga, tozali kondima nionso propagande ezali koyebisa biso, kofungolela bango nzela polele, kopesa bango ba postes minene ya mboka : Direction ya Bureau ya Président, politique étrangère ya mboka, défense nationale et sécurité du territoire, bazali ko voyager na ba passeports diplomatiques ya R.D.Congo, na ba fonctions bazali ko occuper bazali ko engager R.D.Congo na ba signatures ya ba accords, traités, conventions, bazali kotindama na kombo ya chef de l’Etat epayi ya ba paya, na ba institutions internationales, bazali ko commander armées (ba misusu bazalaki ba chefs ya armées na R.D.C lelo bazali na esika moko wana kaka mais na Rwanda) etc. Alors, ndenge nini tokoki lelo koloba que bazali ba Congolais te soki ye moko chef de l’Etat Congolais mutu anomaki bango en bonne et due forme ? Pourquoi ko douter na nationalité na bango Congolaise soki le garant de la Constitution azali ko nommer bango na ba postes minene en tant que ba congolais ? Soki to contester ki congolais na bango kobanda na Mobutu tee na M’zee, dans ce cas, esengeli tomituna mituna ya mayele.
Comment expliquer na mboka munene lokola R.D.Congo, etonda batu ya mayele na buania, aucun journaliste ya investigation, aucun média national, aucune personne ne peux dire aujourd’hui sans souci de contradiction esika actuel chef de l’Etat na biso abotama, atanga, akola, baninga ba ye akola na bango ; ba instituteurs na ye ; genre nini ya élève azalaki ? Jeunesse na ye ezalaki ndenge nini ? Ba relations na baboti baye ezalaki ndenge nini ? Eloko te ! Et tozali ko voter mutu toyebi malamu te soi-disant que tozali na démocratie ? Sima na yango tobanda lisusu kolela neti lelo oyo ?
Na mboka na biso politique ezali nzela ya kozuela bomengo. Ndenge nini tozali kokamua soki makambo ya boye ezalali koyela biso ? Monguna ya Congolais ezali kaka Congolais ye moko. Toyebi ntina ya likambo ya mabele te mpe toyebi eloko nini tolingi te : mpona kozua bomengo tozali kolanda nzela ya politique, tozali kosambela butu na moyi mpo Nzambe apesa biso misala, akotisa kimia, asilisa nzala pendant que tozali na makoki ya kosala nionso sans kosambela. Education na biso, santé na biso, kolia na biso ezali ko dépendre na mawa ya Nzambe te, ezali ko dépendre na capacité na biso na kosala mosala. Ba brasseries yango nde etambolaka malamu pendant que ba boulangeries ezali kokitisa poids ya mapa, mboka ezali kobimisa ba diplômés ebele sur le marché pendant que système ya enseignement esi epola, ba chaînes ya télévision, radios, journaux privés na l’Etat ekomi ebele pendant que qualité na traitement ya information ezali ya kotengama.
Tozongisa makanisa esika na yango mpo ba étapes nionso toleka banda 1885 tee na 2008, apparament epesi biso notion ya Mémoire collective te. Mokolo tokoyeba ntina na yango, nde mokolo bolingo na biso na ekolo na biso ekobanda. Tozongisa makanisa esika na yango mpo yango emeka kokola!
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
Merci mingi ndeko EMMANUEL KANDOLO na b'informations oyo opesi sur ba rwandophones,eloko pe yakobakisa ezali te kasi nakobakisa kaka kombo ya moto moko oyo azalaki charger pona transplantantion ya ba rwandophone kobanda les annees 20s te na 50s ezalaki bongo MR SPITAELS, YE AZALAKI FLAMMAND oyo belgique etindaki po a superviser transplantation jusque dans les annees 40s ou 50s...Pona likambo yakopesa nationalite congolaise naba rwandophone nazali d'accord te na ndeko moko a intervenaki na na dossier ya bisengimana. alobaki que yango ezalaki bombe a retardement, mais moi personellement namoni que revocation ya nationalite nde ezalaki bombe a retardement puisque a partir ya wana nde ba rwandophone babandaki ko se preparer sans que moto moko ayeba....omoni que ba rwandophone bazui biso na kidiba na 1996 avec l'AFDL,tango tolamuki ekomaki deja trop tard......
Sony Mokonzi