Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Emmanuel Kandolo

Ba ndeko,

Na cadre ya masolo ya ba nzembo, to lobeli mua moke ba nzembo oyo

elandi na nse :

1.« MAPEKA», MAVUELA SOMO, YOKA LOKOLE

Nzembo oyo ezali ko viser particulièrement Shungu Wembadio (future papa Wemba) mpe ye moko abomaki nzoto, ayembi yango penza na motema moko. Etonnamment, Wemba azalaki na fuite moko te que nzembo oyo ezali ko cibler ye. En plus, par naïveté, azali komona te que Yoka Lokole ekomaki mouvement ya Mavuela soutenu na bana ya batu ya mbongo.

Mingi bazalaki kofanda na Binza : Jean-Claude Mvuemba, Nzolatima, Ndombasi, Makuambala, Kanga, etc. Goji (na Limete) mpe balingelaki Wemba boule que azali mowuta (non natif de Kinshasa) et esika na ye ezali na mouvement oyo te. Suka suka Mbuta Mashakado Nzolatima ayaki koyebisa ye yango polele en plein concert na bar un, deux, trois mpe ba bengani Wemba d’une manière humiliante na Yoka Lokole. Papa Wemba atikala ko se remettre na likambo oyo te mpe souvent Jean-Claude Mvuemba abandaki ko rappeler ye yango pour le vexer.

2. « EBALE MBONGE », KOFFI OLOMIDE, VIVA LA MUSICA

Ezali  nzembo Koffi akomeli mpe apesi  papa Wemba mpo na ko renforcer ye na mouvement na ye ya sika, Viva la Musica. Wemba azongiseli ba ex-baninga baye ba Yoka Lokole ndimbola na lolenge ba buakisaki ye. D’ailleurs, tango Viva ebandi sika, Mavuela apesa interview mpe a qualifia yango de Chestre (Orchestre ya ndambu, moitié, moitié). Malheureusement mpo na Mavuela, ba prédictions et autres affirmations négatives na ye etiola na ebale mpe Viva esalaki long feu.

3. « MIZOU », BIMI OMBALE, ZAIKO LANGA LANGA

Nzembo Ombale asalela copine na ye, Claudine « Mizou ». Sima relation eyaki kokota mobulu mpo na comportement ya Claudine, na lolenge akendaki kolinga papa Wemba.

4. «NKENI YA BOLINGO», DINDO YOKO, VIVA LA MUSICA

Bien que nzembo ezali ya Dido, kasi contenu na yango ezali message ya papa Wemba envers Claudine « Mizou ». Cette dernière, sachant bien que abimaka na Bimi Ombale, aluka papa Wemba mpe devant batu, juste na entrée ya hôtel Intercontinental (actuel Pullman) de Kinshasa, atelemisa papa Wemba mpe alatisa ye bague ya munene na mosapi. Bien évidemment, papa Wemba azalaki surpris mpo ayebi malamu que Claudine azali nzele ya Ombale. Au lieu asalela sagesse, non, ye andimi ba avances ya Claudine. Wuta wana conflit ekota mpe papa Wemba akomaki kobuakela Ombale : « Yo mutu na libandi, est-ce que ngai nazali na affaire na yo ? ». Tomaki lisusu incomprehension esalemaki na ba répétitions na cité du parti na N’Sele,  mpo na ndule ya célébration ya 17 ans ya Zaiko Langa Langa. Papa Wemba abandaki ko exiger que Bimi abeta batterie na ba nzembo oya abeta avant akoma chanteur.

Soulignons tout de même que Viva oyo ezalaki véritable machine de guerre. A entendre duo de rêve ya Yogo na Wemba, ezali lisusu ko zongisa biso na jeunesse. Voix aiguë oyo Wemba abimisa, ezalakisublime, sans oublier ba belles intonations ya KIsangani.

Na ba années quatre-vingt-dix,  natuna ye soki akoki lisusu ko rééditer exploit wana ? A reconnaissa que ezali difficile. Pour la petite histoire, maladroitement, na kati ya nzembo, Wemba azali ko yebisa Mizou que : « Yeba bolingo na yo e pasoli motema ya Amazone ». Pendant que azali na muasi na ndaku, azali ko yembela makangu na ye que apasoli motema ya mama bana baye. Ebimisa trouble mpe Amazone akanga biloko, akenda comme d’habitude.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
C
Mbote ndeko Kanabasawo, ce n'est parce que Vicky Shama Shama ebimaki na 1975 que titre Muana Wabi ezali plagiat ya nzembo ya Shama-Shama te...une chanson se jouen pendant les concerts avant ebima na palaki. Etpuis à l'époque, la commission de censure to Soneka estatuaki na likambo oyo mpo Mopero afundaki Bimi na Zaïko LL pour plagiat. Et Mopero avait gagné ce procès...Le plagiat, de la part de Bimi, est plus que flagrant...Le verdict avait été rendu en son temps en faveur de Mopero. Ici nous ne faisons qu'un rappel historique de cet épisode.

RD Congo, mboka ya Mopero wa Maloba na Andy Bimi, ezali Libanga ya Talo...

Claude Kangudie.
Répondre
E
Ndeko Claude Kangudie,

Yamba mbote !

Shungu Wembadio azangaki discernement makasi mpo Bimi Ombale azali moninga na ye mpe Claudine azalaki de base na ye. Masolo ya lolenge oyo ezali ebele mpe toko zongela yango na ba nzembo en lien na ba déceptions amoureuses.

Wemba ye moko, ba salaki ye la même chose na mutu moko abandaki ko lancer makasi. Mutu yango abandaki ko latisa ye makasi mpe ko pesa ye mbongo. La même personne nde a balelaki ye muasi na Yolo mpe asaleli ye feti. Pendant que Wemba akomaki kuna, na vide wana, a récupérer Rosa. Relation e continuaka tee ba kanga bango na petit Edino de Molokaï. Mbala mosusu, Kiliba, leki ya Wemba, akanga bango na ndaku ya mutu wana, Rosa na liputa na ntolo. Lisusu,

Ba films esalemaki mpo na ko luka ko atteindre Président Kabila mpo na libération sous causion tango Wemba akangemaki na makambo ya ba ngulu. Comme quoi, nionso efutamaka awa na nse.

Soki to zongeli lisolo ya Ombale, le fait que ba vedettes ya Zaiko ba lingaki kaka azala na batterie pendant que azalaki mpe koyemba malamu, esepelisaki ye te, alongue, akeyi na Tabou national. D.V. Moanda nde akendeki ko récupérer ye kuna na ferme promesse ya ko imposer ye na chant.

Suite na comportement ya Claudine, na déception wana nde Ombale azuaki mokano mua kolongola « Mizou » libela na répertoire ya Zaiko. Même na ba reprises asalaki sima ya kolongua na Zaiko, atikala ko zongela yango te.

Effectivement, ba fanatiques nde bazali ko pâtir. Notons quant même que Ombale na Wemba ba yembaka na Album moko ya Clan Langa Langa, nzembo ya « Lolita Andy »(Loli). Awa lisusu, Wemba azali ko yemba sans se rendre compte que ba zali ko yembisa ye stupidité na ye.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo
Répondre
E
Ndeko KOUI Blondé,

Merci de votre réaction. Pour un bon éclairage, nous préférons vous répondre en vous reprenant :

Ndeko KOUI Blondé : Merci à Emmanuel KADOLO pour cette contribution colossale. Seulement, une question me vient à l'idée. Il y a t-il une différence entre la musique congolaise et la Rumba? Si non, désormais l'appellation ''Musique congolaise n'est qu'une identification'' et que cette musique là doit être considérée par son universalité.

Emmanuel Kandolo : Non ! Parce que la musique congolaise tire sa source de deux rives du fleuve Congo, lieu de naissance de la rumba. Inéluctablement, la rumba est à la fois l’émanation de cette musique et aussi l’expression culturelle qui a résisté à l’esclavage et aux autres formes d’oppression à travers le temps et l’espace. En tant qu’élément culturel positif, son universalité bénéficie désormais de la protection juridique internationale.
Ndeko KOUI Blondé : En parlant de la musique congolaise ou de la Rumba, on doit avoir avoir à l'idée Musique universelle. Ensuite, vu l'audience de MBOKAMOSIKA, le bloc qui au départ certainement s'adressait au peuple congolais, a colonisé l'Afrique et le monde. Donc lui aussi est devenu universel. J'espère que je me suis fait comprendre.

Emmanuel Kandolo : Bien entendu! Notre site est universel par la richesse des sujets traités et la promotion multiculturelle qu’il vulgarise à travers les thématiques variées

Ndeko KOUI Blondé : Je ne sais pas si l'analyse ici est faite des paroles ou de la musique qui les accompagne.

Emmanuel Kandolo : L’analyse englobe la compréhension de la chanson, le récit du cause à l’effet, les anecdotes ou encore les circonstances particulières de l’écriture ; l’arrangement ; la mise en musique ; l’enregistrement et la mise de la chanson sur disque ; l’exécution en public et la mise de la chanson sur le marché.

Ndeko KOUI Blondé : En tant que profane mon impression est les trois orchestres qui exécutent ces œuvres ne se diffèrent que de nom et qu'on pouvait attribuer toutes ces chansons à l'un ou à l'autre vu la manière de chanter, le rythme et les solo des cordes.

Emmanuel Kandolo : Effectivement, de l’entendement de votre oreille musicale, il est compréhensible que vous ayez l’impression d’écouter le même groupe joué. Cependant, l’oreille musicale congolaise de l’époque, ne laisserait aucun doute sur la différentielle fondamentale des rythmes imprégnés par Thu Zaina, Stukas, Zaiko, Empire, Bella Bella et Viva par exemple.
Ndeko KOUI Blondé : J'ai beaucoup aimé MIZOU de Bimi Ombalé et KENI YA BOLINGO de Dindo Yogo celui-là même qui m'a déjà épaté dans OMMONA WAPI et LOLA MUANA.

Emmanuel kandolo : Eh, oui ! C’est fut l’époque ou la jeunesse aimait ce qu’elle faisait et mettait l’accent sur le travail artistique.

Fraternellement,

Emmanuel Kandolo
Répondre
K
J'ai été amusé et content vu la manière très sérieuse et détaillée que vous avez utilisée pour répondre à mes préoccupations. Seulement je crains que je ne me sois pas fait comprendre par vous. Simplement en parlant de l'universalité de la musique congolaise ou de la rumba, je ne faisais pas allusion à ses origines. Si vous aviez pris le temps de relire mon texte vous vous aurez rendu compte que je vous interpellais plutôt sur le langage que vous avez utilisé qui limite le lectorat de votre écrit. Le fait que je me suis posé la question de savoir si l'analyse concernait la musique, les paroles etc.devait vous convaincre que je n'ai rien compris de tout ce que vous avez écrit. Donc mon observation que le langage bien que légitime ne rend pas au média et à la musique leur universalité. Merci pour la considération qui vous a permis de me répondre très fraternellement.
C
Bonjour tatu SamWele...bon rappel. Tout comme le titre "Muana Wabi" de Bimi est un plagiat flagrant de "Vicky Shama-Shama" de Mopero wa Maloba et l'orchestre Shama-Shama...c'est dit. Abu ku nzo, Kolele ?

Claude Kangudie.
Répondre
K
MUANA WABI NE PEUT PAS ETRE UNE COPIE DE VICKY SHAMA. POUR CAUSE ; MUANA WABI EST SORTI EN 1974 ALORS QUE VICKY SHAMA L'A ETE EN 1975
S
https://www.mbokamosika.com/2018/04/mavuela-somo-avait-il-plagie-kwamy-munsi.html
La chanson "Bana Kin" de Mavuela Somo est un plagiat de "Bana Lipopo" composé par Kwamy en 1967.
Répondre
C
Bonjour Emmanuel...Merci de me rappeler certains souvenirs, entre autre, ce comportement inacceptable de Shungu envers Bimi au sujet de Mizou...Nos musiciens, côté femmes, c'était comme s'ils avaient perdu toute dignité et toute morale...muasi ya moninga mawa te !! cette situation a fait que la chanson Mizou, pourtant un très beau titre, a été retirée du répertoire de Zaïko, Bimi voulant bannir cette mécréante de Mizou...Je discutais, récemment, avec un autre chanteur de Zaïko bien connu...celui-ci, à cause d'un conflit avec sa bien aimée, ne veut plus entendre jouer un titre, pourtant très beau, qu'il lui avait dédié...biso ba fanatique, nous subissons les dégâts collatéraux..."Aurelie" de Cheik Vuelas Mavuela Somo est l'une des chansons de Zaïko LL où André Bimi a joué à la batterie...

Bon week-en à tous.

RD Congo, mboka ya E. Kandolo, Shungu Wembadio na André Ombale Bimi ezali Libanga ya Talo...

Claude Kangudie.
Répondre
K
Merci à Emmanuel KADOLO pour cette contribution colossale. Seulement, une question me vient à l'idée. Il y a t-il une différence entre la musique congolaise et la Rumba? Si non, désormais l'appellation ''Musique congolaise n'est qu'une identification'' et que cette musique là doit être considérée par son universalité. En parlant de la musique congolaise ou de la Rumba, on doit avoir avoir à l'idée Musique universelle. Ensuite, vu l'audience de MBOKAMOSIKA, le bloc qui au départ certainement s'adressait au peuple congolais, a colonisé l'Afrique et le monde. Donc lui aussi est devenu universel. J'espère que je me suis fait comprendre. Je ne sais pas si l'analyse ici est faite des paroles ou de la musique qui les accompagne. En tant que profane mon impression est les trois orchestres qui exécutent ces œuvres ne se diffèrent que de nom et qu'on pouvait attribuer toutes ces chansons à l'un ou à l'autre vu la manière de chanter, le rythme et les solo des cordes. J'ai beaucoup aimé MIZOU de Bimi Ombalé et KENI YA BOLINGO de Dindo Yogo celui-là même qui m'a déjà épaté dans OMMONA WAPI et LOLA MUANA. Merci pour cette publication.
Répondre