Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par   Emmanuel Kandolo

Le colonel Mamadou NDALA

Ba ndeko,

Suite na ba péripéties ya guerre mystique na Ituri mpe na Nord Kivu, ezali ko monana polele que Président Tshilombo akomi rattraper na ba contradictions  internes et internationales oyo azalaki en mesure ya ko analyser te par irresponsabilité et inconséquence politiques.

Tozali komona ouvertement que na Nord Kivu, bolingo imaginaire et utopique na soi-disant ndeko na ye, Président Kagame, ezali ko senga que azala distant en laissant na Gouvernement a se débrouiller en faisant ba racolages politiques et diplomatiques mpo a calmer situation oyo. Pour preuve : Président Tshilombo azali ko s’opposer te na  demande ya Rwanda ya ko zongisa ba militaires Rwandais oyo Armée Congolaise ekangi. Toyoki biso banso que andimi avec une légèreté déconcertante, retour ya ba  militaires Rwandais, Elysée Nkundabangezi na Gadi Minuare.

Or, na Relations internationales, R.D.Congo ezali en guerre na Rwanda te mpo Président Tshilombo atikala ko sala déclaration wana te. En revanche, Président Kagame asala R.D.Congo ba menaces  mikolo oyo, sans pour autant ba soi-disant autorités Congolaises ba protester diplomatiquement. Na droit international, soki ba Etats en guerre ezali na ba prisonniers, wana nde ba kolobela échange na bango en respectant etamboli ya droit international humanitaire (droit de guerre). To bunga te que Rwanda azali toujours ko insister que bitumba ya M23 ezali un problème interne congolais. Donc, rébellion.

Sika, pourquoi Rwanda azali ko réclamer retour ya ba combattants armés, même soki ba zali ba Rwandais oyo bazali ko bunda pour le compte ya M23 en tant que ba mercenaires ? Soki Rwandais, Togolais, Belges, etc. a s’engager mpo abunda na kati ya rébellion na mabele ya R.D.Congo, soki a kangami, esengeli a sambisama, tout comme mutu a se rebeller contre ba Institutions ya ekolo na ye esengeli mpe a sambisama. Soki étranger  asilisi ko purger etumbu ya boloko, wana nde ba ko zongisa ye na ekolo na ye. Esengeli nde R.D.Congo, asambisa bango mpe akatela bango boloko peu importe nationalité na bango. Malheureusement, eko salema te mpo ekolo na biso ezali sous occupation.

R.D.C. ezali na Ambassadeur na Kigali te. Ezali nde na Chargée  d'Affaires a.i., Alice  Kimpembe Bamba. Mpo na rappel na ye na R.D.Congo, Président Tshilombo akoki ko se risquer na yango te mpo naturellement ekoluka départ forcé ya Ambassadeur Vincent Karega na Rwanda. Président Tshilombo azali na ye kuna te. Na oyo etali rupture ya ba relations diplomatiques na Rwanda, Président Tshilombo akosala yango te tout simplement mpo azali ko banga. Même ba actions commerciales wana, ekosala mikolo ebele te mpo Rwandair a kondima ko perdre terrain longtemps te au détriment ya  ba compagnies étrangères mosusu ezali ko exploiter réseau domestique ya R.D.Congo. Yango wana tomoni ba mesures ya solo ezuami te lokola : Gele ya ba accords sur l’exploitation ya ba produits miniers, gele ya ba échanges commerciaux ekoki kosalema te mpo Président Tshilombo azali ko redouter réaction ya Président Kagame.

Ba konzi ya R.D.Congo ba déclarer M23 comme étant un mouvement terroriste. Soki boye, pourquoi Président Tshilombo andimi en toute insouciance ya ko zongisa ba terroristes mibale d’origine rwandaise na Rwanda sur demande expresse ya Gouvernement Rwandais ? Sika, neti Rwanda a réclamer bango, elingi ko loba que Rwanda azali ko protéger ba terroristes oyo bazali ko mener ba actions na Congo. Cependant, na domaine ya ba opérations clandestines soutenues na Gouvernement d’un pays étranger, jamais Gouvernement oyo esengaka protection mpe rapatriement ya ressortissant na ye. Au contraire, eko nier  existence ya toute implication mpo yango ekoki ko mema na incident diplomatique, koleka na rupture ya ba relations diplomatiques voir tee na déclaration de guerre. Mawa mingi mpo na R.D.Congo…

Ba farceurs ya ba Parlementaires nationaux Congolais ba zali ko prétendre que ba sali collecte ya cagnotte ya cent mille dollars Américains mpe naïvement Congolais azali ko kumisa bango mpo na démonstration ya soi-disant élan patriotique ! Soki Armée Congolaise ezali na mikakatano, esengeli Gouvernement Congolais, na urgence, esenga rallonge budgétaire na Parlement  mpo na ko soutenir Armée na bitumba. N’est-ce pas que Parlement ezali autorité budgétaire ? Ba lobaka que ba zali na démocratie, ba salela démocratie yango na Parlement.

Tee na lelo oyo, toyebi état de besoin ya Armée te. Rien sur la stratégie militaire (Armée Congolaise e déployer  ba soda boni ? Effectif ya ba nguna ezali estimer na combien ?  Bisika nini ba zuami? Bazali ko opérer lolenge nini ? Sensibilisation ya population locale  ezali kosalema na lolenge nini ? Mabele na biso boni to récupérer ? Etc. Wana ezali secret défense te), rien sur la force aérienne, rien sur l’artillerie, rien sur les fantassins, rien sur le reportage de guerre (ba accréditations epesami te na presse internationale na locale). Tozali ko mona Porte- parole ya Gouvernement nde azali ko communiquer sur ba opérations militaires au lieu ba tikela état-major général nde esala yango quotidiennement na point de presse avec questions et réponses. Rien sur ba objectifs militaires, rien sur la relève ya ba militaires oyo ba zali na front : on a de plus en plus l’impression que soda atikali na front libela tee tango a ko pola bitumba ou a ko longa yango. Eyebani te eleko nini esengeli soda azala relever ? Trois mois? Six mois? Neuf mois ? Rien sur la force spéciale oyo ekoki ko bunda contre ba terroristes. To bunga te que ba yebisaki biso que A.D.F.-NALU ezali mouvement terroriste. Esengelaki sika Armée azala na force spéciale oyo eko bundisa yango. Rien de rien…

Ba konzi ya R.D.Congo ba zali ko belela terrorisme sans ko zua ba mesures ya ko lutter na yango. Rien sur la réforme ya Justice pénale mpo ekoka ko se munir na ba instruments juridiques internes en harmonisation na ya droit pénal international. Parquet spécialisé na anti terrorisme ezali te, formation ya ba Magistrats compétents na lutte anti terrorisme ezali te, ba auxiliaires ya Justice na matière oyo mpe bazali te, ba prisons ya haute sécurité esika ba ko tiya ba terroristes oyo ba kangemi, ezali te !

Inconscience  ezali partout ! Ata début ya réflexion te sur constitution ya fonds d’urgence mpo na ko sunga ba déplacés na ba victimes ya terrorisme na Ituri mpe na Nord Kivu. Rien ! Batu bazali ko continuer ko kufa, mpe ko perdre ba biens matériels na bango nionso mpo na absence ya l’Etat na étourderie  ya ba soi-disant dirigeants politiques.

Bana betu tabalayi (Ba ndeko na ngai, to fongola misu)!

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
E
Ndeko KOUI Blondé,

En complément, nous vous suggérons également de consulter aussi les ouvrages de Judi Rever et Les différents Rapports des Nations Unies sur la situation des droits de l’Homme depuis l’époque du Zaïre jusqu'à celle de la R.D.Congo, présentés par M. Roberto Garretón, Rapporteur spécial.

Le Rapport Mapping des Nations Unies. Ce rapport décrit de manière chronologique et
thématique les horreurs de dix années de violences et de conflits en République
démocratique du Congo.

Fraternellement,

Emmanuel Kandolo
Répondre
E
Ndeko KOUI Blondé,

Je vous propose de consulter les écrits des auteurs suivants (la présente liste n’est pas exhaustive) : Benoît Verhaegen, Pierre Péan, Charles Onana, Patrick Mbeko, Abbé Jean-Pierre Mbelu Babanya, Isidore Ndaywel e Nziem, Norbert Mbu-Mputu, Crawford Young, Père Placide Tempels. Jean Omassombo Tshonda, Elikya Mbokolo, Auguste Mabika Kalanda, Père Léon de Saint Moulin, Jules Chômé, Jean-Claude Willame, Gauthier de Villers, Honoré Ngbanda Nzambo ko Atumba.

Fraternellement,

Emmanuel Kandolo
Répondre
K
Avec un pincement au cœur ! En tant qu'africain, j'aurais voulu m'informer sur ce qui se passe à l'est de la RDC. Barrière linguistique oblige.
Répondre