Les paroles de la chanson « Tika Nanduka mbongo » extraites du livret « Congo en musique » de Bwantsa K. S. Pierre.
Les paroles de la chanson « Tika Nanduka mbongo » extraites du livret « Congo en musique » de Bwantsa K. S. Pierre.
John Mahy
17/07/2025 17:11
Voici les paroles extraites du livret ’Congo en musique’ de Bwantsa-Kafungu S.Pierre 11/1965 candidat en philosophie et lettres université Lovanium
P.13
Tika nanduka mbongo
Disque CEFA n° cf 506 45T compositeur Jojo Orchestre Bantu – rumba
Yeye yeye, bandeko
Likambo yambóka óyo ndé boye !
Likambo yakofánda na bare,
Ngáí mwásí yamakwelá,
Ntóngó saa nakokí té o;
Tíká názónga ndáko o !
Bána balelí nzala.
Likambo yakofánda nandáko,
Ngaí ndúmba, mobáli té,
Ba clients nazuwa wápi e ?
Tíká náláta mbángu,
Nákanga nangáí yúma.
Yúma óyo ngáí nakangákí (nakwátákí) e,
Sókí akoyâ o o o;
Ápésa ngáí falánga nangáí e,
Násómba elambá yasortie (réunion).
Ntángu chance ézali na nangáí e,
Tíká nánduka mbógɔ;
Sokí nakómí mamákulútu (lokólá nkókɔ)
Nakozangá situation.
Mokɔlɔ nakokóma mobangé
Nakofánda na zándo náséngaka falánga o o (nátékaka tomate o)
Ngáí ko mwána té o
Nazuwa nanáni ?