Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Voici la suite des réponses d'Emmanuel Kandolo aux différentes questions qui lui avaient été adressées. La première série avait été diffusée avant son voyage. Il nous est trevenu et s'apprête à répondre à ceux qui voulaient en savoir plus sur "l'histoire" du peuple Lulua.

Mituna mia ndeko Buku

Ndeko Buku : Motuna na nga ya yambo ezali : kombo pe date batonga  parc oyo ezali na mitu ya bikeko misatu. Parc yango ezali pembeni ya ISP Gombe  na bibliothèque national. Nabanzi na avenue Kisangani

Emmanuel Kandolo : Parc oyo ozali kotuna, kombo na yango ezali parc des évolués. Esika yango ezuami, ebengami Place des évolues. Parc iye ezali na forme trapézoïdale mpe ezuami kati na ba avenues : Léon Kidicho, Kisangani, Caisse d’épargne na Joseph Lutumba. Par contre, nazali na précisons te na oyo etali mbula oyo parc esalemaka.

Ndeko Buku : Motuna ya mibale, nani azalaka (to azali ) mokonzi (chef coutumier) ya mabele Nsele tango Mobutu atongaka cité présidentielle de Nsele. Elekaka ndenge nini po Mobutu atonga wana, ebimisa matata te? Tala kaka l oi bakajika.otindela nga makomi na mail nga po nayeba opesi eyano.

Emmanuel kandolo : Yambo na nanola na motuna mua yo, esengeli mua ba précisions na oyo etali organisation administrative ya ville de Kinshasa. Le 31 octobre 1929, Léopoldville ekomi na statut ya centre administratif (capitale ya Congo-belge) conformément na arrêté royal ya 1er juillet 1923.Tango wana Ruwet nde azalaki mokonzi ya Léopoldville.

Ordonnance ya 25 juin 1941 nde epesi Léopoldville statut ya ville, mpe ekomi na superficie ya 5.000 hec. na population ya 53.000 habitants. En tant que ville, Léopoldville ekambamaki na Commissaire de District, Jean Torcieur. Wana, N’sele na Maluku ezali ko faire partie ya Kinshasa te. Yango ezalaki na kati ya Kasangulu na District ya Bas-Congo. Le 1er janvier 1955 nde N’sele eyaki kokoma Territoire suburbain ya Léopoldville.

Na Décret ya 26 mars 1957 nde eye kopesa ville ya Léopoldville personnalité civile mpe epesi mokonzi na yango kombo ya Premier Bourgoumestre mpe bakonzi ba Communes bakomi kobengama ba Bourgoumestres. Sika awa, Monsieur Jean Torcieur akomi kobengama Premier Bourgoumestre de Léopoldville. Kaka na 1957 wana, N’sele ekomi Zone annexe ya ville ya Léopoldville.

Le 5 février 1966, Léopoldville ekomi kobengama Kinshasa mpe mokonzi ya Kinshasa akomi kobengama Gouverneur de la ville de Kinshasa. Tango Paul Nauwelaerts (na authenticité akomaki kobengama Geyero Tekule) akomi Gouverneur ya Kinshasa na 1968, sima ya mikolo, Président Mobutu a signer Ordonnance 00/24 ya 20 janvier 1968 nde eyaki kopesa N’sele (na ba communes mosusu) statut administratif ya Commune ya ville de Kinshasa (Ex-Léopoldville).

N’sele ezali na secteur ya Bateke na Chefferie Mbakana. Mbakana nde Chef ya mabele ma N’Sele. Kasi azalaki mpe na ba notables lokola : Mpasa, Mikonga, Kimpolo, Kimbondo, Kingakati, Ngambomi, Bu, Mikondo, Dumi,  etc.

Président Mobutu azalaki nkolo ya mabele (terres agricoles) ma N’sele te. Mabele wana ezalaki ya un congolais, kombo na ye ekimi ngai, abandaki kofanda na Righini, ye nde azalaki na ferme na ye wana. Na yebi te soki atekelaki yango L’Etat ou e spoliaki ye yango !!! Mais est-il que Président Mobutu nde azuaki yango a continuer na bilanga bizalakaki wana mpe aye kotonga yango ndenge ekomaki wana.

Liboso ebandaki kobengama Ferme présidentiel de la N’sele. Tango manifeste de la N’sele eye kosalema mpe basakoli yango le 20 mai 1967 nde ebandi kobengama Cité du parti à N’sele.  Ba travaux ya cité de la N’sele ebandaki na 1967 mpe esilaki na 1968. Stèle na obélisque ya N’sele etelemaki kitoko mpe ezalaki bilembo bia cité oyo. N’sele ezali palais présidentiel, hôtel ya cinq étoiles oyo ezali kondima  cinq mille personnes, mpe na ba suites présidentielles, Restaurant mibale, bar na salle de conférence munene. Piscine ya dimension olympique na ya muke (petite piscine), jardin botanique, jardin Zoologique, pagode, parc aquatique na port ya plaisance. Ordonnance présidentielle n° 73/034 nde eyaki kosala Domaine Présidentiel de la N’sele (D.P.N) yango esalemaki mpo na ko gérer, ko exploiter mpo na compte ya l’Etat mabele, bâtiments na ba installations minso ezali na kati ya domaine ya N’sele. Mpe na kati ya domaine oyo, ba activités agricoles, industrielles na commerciales ekoki kosalema. D.P.N. eyaka kokoma Domaine Agro Industriel et Présidentiel de la N’Sele (D.A.I.P.N). Ezalaki na na ba ngombe, ngulu, soso. Kuna mpe maki ebandaki kobima, ba boites ya conserves : tomates na ba jus ya tomates, ananas, N’sele ezalaki mpe na na station ya piscicole oyo ezali na ba étangs ebele (esika ya kokolisa mbisi). Sima mikolo Bayaki kotonga N’sele Folis, parc d’attraction ba manèges kili kili.

Kotonga Cité de la N’sele ebimisaki matata te mpe ekokaki kobimisa matata te mpo ezalaki mise en valeur ya motuya ya mabele ma N’sele na D.A.I.P.N. na ba activités touristiques na loisirs. Ba ndaku ebele ya batu ya misala etongamaki kuna mpe batu ya N’sele mingi bazuaki misala na ba logements. Nionso oyo ezalaki na bénéfice ya bakolo mabele (Bateke).

Loi Bakajika ezali loi oyo ewutaki na likanisi ya Député national ya Sud Kasaï, Bakajika Bintu. Yango ezalaki adopter na Chambre ya ba Députés le 28 mai 1966 mpe promulguer na Président Mobutu le 7 juin 1966.

Mobimba ya ordonnance-loi oyo yango oyo na nse

Ordonnance-loi n° 66-343 du 7 juin 1966 assurant  à la République Démocratique du Congo ses droits de propriété sur le domaine et la pleine souveraineté dans la concession des droits fonciers, forestiers et miniers sur toute l’étendu de son territoire.

Le Président de la République

Vu l’ordonnance-loi n° 66-92 bis du 7 mars 1966 attribuant le pouvoir législatif au Président de l République ;

Vu les délibérations de la Chambre des députés et du Sénat relatives à l’objet de la présente ordonnance-loi.

Ordonne :

Art. 1er

La République Démocratique du Congo reprend la pleine et libre disposition de tous ses droits fonciers, forestiers et miniers concédés avant le 30 juin 1960 en propriété ou en participation à de tierces personnes morales ou physiques

Art. 2

La République Démocratique du Congo procédera souverainement à la répartition des droits d’exploitation ou de gestion de ses ressources naturelles, forestières et miniers

Art. 3

Tous les textes législatifs ou réglementaires antérieurs ayant pour objet l’exploitation, la gestion du sol ou du sous-sol congolais et qui sont contraires à l’esprit de la présente ordonnance-loi sont abrogés.

Art. 4

La présente ordonnance-loi entre en vigueur à la date de sa signature.

Fait à Kinshasa, le 7 juin 1966

J.D.Mobutu

Lieutenant Général

Par le Président de la République

Le Premier Ministre

Général de Brigade

L.Mulamba

Loi Bakajika ebandaki nde ko annuler ba cessions na concessions epesamaki  avant le 30 juin 1960. Ba nkolo na yango egengelaki babandela procédure ya sika na kosala ba demandes ya sika mpe kofuta mpo na yango. Modification esalemaki esalemaki na art. 14 ya Constitution ya 24 juin 1967 suite na mauvaise interprétation ya loi Bakajika, nde loi constitutionnelle n° 71/008 ya 31 décembre 1971 na  loi n° 71/009 ya 31 décembre 1971 eyaki kosala  modification na article 14 na bokotisi article 14 bis oyo elobaki boye boye : « le sol et le sous-sol zaïrois, ainsi que leurs produits naturels appartiennent à l’Etat ». Sima ya wana, loi n° 73-021 ya 20 juillet 1973 portant régime général des biens, régime foncier et  immobilier et régime des sûretés eyaki ko modifier mpe ko compléter loi Bakajika. Sima lisusu, loi n° 80-008 ya 18 juillet 1980  eyaki mpe ko modifier loi n° 73-021 ya 20 juillet 1973.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Mituna mia ndeko Papatoto

Compatriote Kandolo

Selon Larry Delvin (responsable de l’antenne de CIA à Kinshasa  dans les années 60), Patrice Emery Lumumba était trahi par ses collaborateurs directs voire par son propre frère biologique.

Ndeko Papatoto Question N°1

Est-ce que vous pouvez confirmer ou infirmer diplomatiquement que Mr Damien Kandolo était les oreilles de Larry Delvin auprès de Patrice Emery Lumumba ?

Emmanuel kandolo : Selon ba documents miyike ekomama mpe selon ba témoignages ya ba acteurs ya époque wana, certitude ezali que  Damien Kandolo azalaki informateur ya Larry Delvin.

Période oyo, Damien Kandolo,  azali Chef ya cabinet ya Premier ministre Patrice Emery Lumumba. D’ailleurs, tangu Premier Ministre azalaki na résidence surveillée, Damien Kandolo abandaki kokota na kobima na résidence ya Lumumba mpe kokende kokutana na Chef d’état-major général ya A.N.C., Colonel Joseph Mobutu na Chef ya sûreté nationale Victor Nendaka, sans aucun problème. Bien que ndaku na ye ezali en face na ya Lumumba, abandaki kozala absent na cabinet ya Premier ministre pendant que babandaki komona ye mingi na groupe de Binza. Na oyo etali trahison par son propre frère, wana ezali clair mpo Damien Kandolo azali propre ndeko na ye. Tango Lumumba akomaki na résidence surveillée, gouvernement ya ba Commissaires généraux esalemi, Damien Kandolo azui ebonga ya Commissaire général adjoint na intérieur. Mbala moko a nommer André Lahaye, conseiller na ye. Ye azalaki administrateur adjoint ya province ya Léopoldville tee na le 30 avril 1960. Sima azongi Belgique. En suite, le 10 juillet 1960 azongi lisusu na Congo suite na proposition ya Caeymaex, Chef ya sûreté belge. Koya azoya wana mbala moko pembeni ya Kandolo. Le 14 septembre 1960 akomi conseillé ya Kandolo. O comprendre ?

Oyebi, Lumumba atiyaki mpe ba ndeko na ye na ba postes clefs : Victor Lundula, Commandant en chef ya Armée nationale congolaise, Joseph Luhata, vice-Ministre ya intérieur, Christophe Muzungu, Administrateur adjoint ya sûreté nationale, Jacques Onomombe, Directeur provincial ya sûreté national, mpe ye mei Damien Kandolo, Chef ya cabinet ya Premier ministre.

Ndeko Papatoto : Question N°2

Est-ce que c’est une réalité ou une fiction que le service de renseignement Belge ou la CIA avait introduit un cheval de Troie dans la famille biologique de Patrice Emery Lumumba ?

Emmanuel Kandolo : Likambo ya cheval de Troie ezalaka réalité historique ya bataille ya Troie. Mbala ionso soki bakolobela yango ezalaka na elembo makasi. Na cas ya Premier ministre Lumumba, cheval de Troie ezalaki Secrétaire général à la présidence du Conseil, Joseph-Désiré Mobutu.

Mr Larry Delvin alobi vérité na ye kasi  ba conspirateurs (groupe de Binza, compagnon de la révolution) oyo bazali na bomoyi bazali ko continuer ko garder un silence absolu.

Emmanuel Kandolo : Esengeli kosala la part des choses !!! Histoire bakomaka yango na ba historiens. Ba politiciens bakomaka nde ba mémoires na bango oyo souvent ezalaka kaka reflet ya réalité historique te mpo na ba raisons diverses. . Bokeseni bozali munene kati na Histoire na mémoires.

Groupe de Binza na ba compagnons de la Révolution ezali ba groupes oyo ezali lier na ba pacte de sang mpe silence ezali observer makasi. Kokanisa te qu’un jour moko kati na bango akoyebisa na batu ndenge makambo mingi ya mabe basala elekaka. Komikosa te mpo yango ekotikala kosalema te. Soki misusu balingi baloba, yeba que bakoloba kaka oyo batu balingi koyoka na matoyi ma bango, kasi oyo esalemaki réellement na kati, ekozala kaka ya kobombama na secret. Ezali bongo mpo etambolaka bongo.

Ndeko Papatoto : Question N°3

Quelle était la stratégie utilisée par Mr Larry Deviln pour recruter les collaborateurs directs de Lumumba dont un certain Mobutu Sese Seko ?

Emmanuel kandolo : en tout cas, nayebi stratégie nini ye abandaki ko recruter na yango batu te. Eloko nakoki kaka koyebisa yo ezali que service secret nionso ya mokili ezalaka na ba fonds propres oyo ezali budgétiser te (caisse noire). Sika, ezali ko dépendre na objectifs, ba missions, na ba finalités oyo ezali ko utiliser mbongo wana : ko aider mutu akoma Homme ou Femme d’affaires, ko utiliser taximan, ko entretenir étudiant ou ba étudiants dont misusu basilisaka kelasi te, kotiya mutu na ba conditions précaires ya lokuta, etc. mpo na ko arriver na finalité ya likambo ou kozala informer na oyo balingi koyeba. Ba façons ezali ebele mpe ezali ko dépendre na réalité ya terrain, politique, culturelle, économique, géographie, politique, sociale, etc. Tout comme ekoki mpe ko varier selon évolution pressentie ou brusque ya likambu ou makambu, etc.

Est-ce que ses collaborateurs étaient bien rémunérés jusqu’à à scier l’arbre dans lequel ils étaient assises `?

Emmanuel kandolo : Rémunération ezalaka proportionnelle na rumeur, information  na renseignement. Nionso efutamaka ndenge moko te. Ou encore un agent double ako gagner mingi mpo na risque élevé ya oyo azali ko courir. Tout comme ba collaborateurs ya Premier ministre lokola Mobutu na Kandolo bazalaki ko gagner plus mpo ba risques soki bakangami , ekokaki kobengama haute trahison = peine capitale.

Patriotiquement,

Emmanuel kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
B

NA LIKAMBO KULUTU KANDOLO ALOBI MPO NA NSELE ESEPELISI NGA MINGI. PONA KOMBO YA MOKOLO FERME ESIKA YE PAPA MOBUTU AZWAKA TO PE ASOMBA PO TONGA CITE YA NSELE,KULUTU ABOSANI ALORS NA LINGI NA TUNA
KULUTU PO NA YEBA . EZA TE PAPA ETANA MPO YE PE BA COTE WANA AZALAKA NA BA DOMAINE EBELE EBELE?YANOLA NGA YAYA NA BONDELI YO...

Répondre
J

Stratégie ya recrutement ya ba agences de renseignements ezali ebele, lokola Grand Chroniqueur Historique alobi.  Mosusu ezalaka pe chantage na menace. 1) Chantage. Bazui yo par
exemple na ba photos, ba faire chanter yo. Oyo wana ezalaki mingi na KGB ya ba Soviétiques. Ba diplomates américains oyo bazalaki par exemple ba homosexuels ; bakangi bango na ba photos en
pleine action, puis ba confronter bango : soki o collaborer na biso te, to publier ba photos oyo. 2) Menace pe. Par exemple : Tango bato ya consulat américain bazalaki pris en otage na Stanleyville (Kisangani) en 1964, avant que Gbenye akende Kisangani azala
Président ya République Populaire du Congo, Larry Devlin abimeli ye na chambre ya Hôtel Paguidas na Bujumbura
(awa nazotanga buku ya Larry Devlin naza na yango ebengami « Chief of Station, Congo », entre pages
217 na 221). Bazali ko discuter situation ya ba diplomates wana, puis soudain Larry Devlin ayebisi Gbenye : « Yo na nga toyebi ntina ya misato po yo o
protéger ngai pe o protéger ba Américains bokangi na Stanleyville. Oyebi que nga nayebi, pe bureau kuna nga nasalaka eyebi, wapi mwasi nayo na bana nayo bafandaka na Mpoto. Okoki soki moke te
kosala eloko moko oyo ekoki kotiya bango na kpokoso » (p. 222). Yoka méthode mosusu ya Larry Devlin !

Répondre
M

Mbote ndeko Emma Kandolo,
Nazali na mposa olukela ngai mua eyano na likambo oyo ezali kotungisa ngai, vers les années 1980-83, ezali juste na époque oyo ba vieux Nico, Kwamy, Bombenga, Kiese Diambu et dans une certaine
mesure Vicky Longomba, bakotaki na Afrisa ya Tabu Ley, mokolo moko tozalaki kokende na Kingabwa, mpo nakotika vieux na biso moko ya quartier awutaki na mikili, lokola tozalaki kokende na makolo,
tokotaki na 13e rue na Limete, towuti Bld Lumumba, brusquement tomoni cortège funèbre, vieux Kwamy azalaki nakati ya voiture moko ya cortège wana, mpe apesaki biso mbote ya lokalu, Mama moko
azalaki pembeni na biso alobi : Ngoo bandeko, ye Kwamy na Kamalandwa bokamaradi na bango ekosila lisusu te, batu oyo babanda bokamaradi oyo banda bomwana, après toyekoyeba ezali nde nzoto ya Madame
Kamalandwa bazali kokende na yango na malita (cimetière). Vieux Kamalandwa bayemba ye na ba orchestre mingi, yango motuna na ngai ezali boye : Ye vieux Kamalandwa azalaki nani, na kati ya lisano ya
bana mboka, nasengi te otutela ngai lisolo ya vie privée ya vieux wana, kaka contribution na ye na kati ya lisano ya bana mboka, ndenge toyokaka mpo na ba vieux Denis Ilosono, Bomboko, Vis-à-vis,
Miesi Suzanela, Baron Manoka... Ekosala ngai esengo mingi, soki nayebi mua ndambu sur vieux Kamalandwa.

Répondre
A

bonjour monsieur .apres avoir lues vos article ,j'ai juger bon de vous demande un contacte avec lequelle je pourais vous demander quleques savoirs sur le congo belge, particulierement le
banningville et massimanimba  sur les quelles vous pourais sans doute m'aporter des reponses,c'est dans le cadres de retrouver mes racine .merci a vous
cordialement yasmine zoumi

Répondre
M

Bonsoir,
Na pesi yaya Kandolo merci na éclaircissement apesi na miyano oyo asili kopesa.Pamba te ngai na botama na 1966 na ndako na biso tozalaka na bibliothèque pe ba  livres oyo elobela
decentralisation ya Léopoldville avant ekoma Kinshasa ezalaka.Mokolo mosusu na kati ya matanga kulutu moko abandi kobeta ba masolo ya époque ya Léopoldville mais azalaki na maîtrise ya sujet na ye
te lokola pe bato basusu bazalaki ko ignorer ba fait wana ngai na mekaki komonisa ye te azalaki na molili na makambo mosusu.A tunaki ngai soki na botamaka na mbula nini?Tango nalobi na ye
na janvier 1966 alobi na ngai na lolendo ya ki mokolo na yo muana ya MPR olingi olakisa ngai nini,bana ya tango ya Mobutu.Na limemya nionso na zongiselaki ye ya solo na botamaki après le
24 novembre période ya Mobutu mais nazali muana ya Léo pe nabotamaka avant MPR nakoli nde na kati ya MPR.Asilikaka po na ye ngai nazali muana ya KIn.Kulutu mosussu aye ko raisonner ye ayebisi ye
que Léopoldville ekomaka Kinshasa na Décembre 1966 lokola ngai na monaka yango na buku na pesaki Février eyaki kopesa kulutu wana lisusu kanda pe pona koboma moto mokolo moko a sugeraki ngai na
bima na couloir po na koboma moto wana.Namonaka ti lelo kulutu wana na ko imprimer po na ye biyano oyo.
Mituna na ngai lelo ezali boye nalingi na yeba ba origines ya ba kombo ya ba Communes na biso ya Kin.N'djili azalaka nani po namoni  bakombo mosusu otangi lokola Mpasa ezalaka ya ba chef
coutumier.Pe mbula nini Matete pe N'djili elonguaka ba zones annexes po na ekoma kobengama ba communes ya Kinshasa.Nani a signaka ba décrets wana?JAson Sendwe azalaka nani pe eloko nini
asalaka po bapesa kombo na ye na balabala ya Capitale.Hôpital oyo ezalaka en face ya Mont Léopold(Mont Ngaliema) to na zinga zinga ezalaka na kombo nini?Est-ce que ezalaka unité
Psychiatrique?Mituna misusu na kotuna yango na mbala ekoya.Poso elamu na ba ndeko banso.

Répondre