Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

 

 

Isaac André  Kalonji Mutambayi wa Pasteur Kabongo

 

Tata na ye, Pasteur Moïse Kabongo, ayebanakai mingi na Luebo. Isaac Kalonji Mutambayi abotami na Lussambo mokolo mua 9 septembre 1915 na Luebo, na district ya Kasaï. Atangi école primaire na Lussambo, na Sankuru, wuta na 1922 tee na 1928. Sima, akeyi ko continuer na Luebo, esika asali école normale moyenne na ye. Tango asilisi na 1931, akomi molakisi, na école protestante ya Luebo  

Na 1932 akomi Secrétaire ya école normale moyenne ya Luebo. Na mbula elandi, 1932, azui ebonga ya inspecteur ya ba écoles normales moyennes protestantes ya Kasaï 1932.

Na 1936, alongue na éducation mpe azui mosala na commerce en tant que caissier na magasin ya mundele.

Na 1940, akomi mobilisation na Force publique mpo na mbula moko. Tango asilisi période ya mobilisation na ye, akomi Commis na Banque belge d’Afrique, na Elisabethville. Banque oyo ezali affilier na Banque de Bruxelles. Asali kobanda na 1941 tee na 1959. Na dix-huit ans ya carrière wana, na 1953 azui carte na ye ya mérite civique. Na mai 1954, azali kati na ba notables oyo bazali inviter na Belgique, membre ya Conseil ya province ya katanga 1954 mpe membre ya Conseil ya gouvernement wuta 1954 tee na 1959. Na juillet 1954, azui diplôme na cours du soir, na Institut Saint Boniface. Na 1955, azui immatriculation, aponami Président ya Association des Classes Moyennes Africaines ya Katanga (A.C.M.AF.), aponami juge Président na juridiction indigène ya Katanga. Kaka na mbula moko wana, akeyi na Etats-Unis kosala stage na Morgan State College. Pendant azalaki kuna, University of Pennsylvania, epesi ye diplôme ya Docteur honoris causa, na 1955.

Na 1957, tango asili kozonga na Elisabethville, amikomisi lokola étudiant libre, na cours du soir na candidature ya faculté ya Lettres,  na université officielle du Congo.

Na 1958, asali Fédération des Ressortissants du Kasaï au Katanga (FE.DE.KA.)

Na 1959, aponami Premier Secrétaire général adjoint ya Fédération Générale du Congo, aponami lisusu vice-Président ya Cartel esangisi Fédération des Ressortissants du Kasaï au Katanga (FE.DE.KA.), Association des Baluba du Katanga (BALUBAKAT) na Association des Tshokwe du Congo, de l'Angola et de la Rhodésie (A.T.C.A.R).

Na 26 avril tee na 16 mai 1960, azali observateur ya cartel FE.DE.KA, BALUBAKAT, na A.T.C.A.R.na Table ronde économique ya Bruxelles.

Sénateur non-coutumier ya province ya Katanga mpe lisusu depute provinciale ya cartel FE.DE.KA., BALUBAKAT, na ATCAR, na circonscription ya  Elisabethville

Na juillet 1960, akomi Commissaire ya Gouvernement central  na Kasaï. A œuvrai mpe mpo na réconciliation kati na ba Luba na bena Lulua.

Na février 1961, aye na Bruxelles na délégation ya Gouvernement provinciale ya Lualaba.

Na juin 1961, a  participer na délégation ya Congo  na Conférence interparlementaire euro-africaine de Strasbourg sur les modalités d'Association des pays africains au Marché commun. Sima ya wana, délégation ekendeki mpe na New-York, na siège ya Nations-Unies.

Na juillet 1961tee na novembre 1962, Premier vice-Président ya Senat ya Congo.

Na novembre 1962 tee na juillet 1963, Président ya Senat ya Congo.

Na février  1965, akomi Secrétaire général ya Convention Nationale Congolaise (CO.NA.CO.)

Na ba élections législatives ya avril 1965, aponami Sénateur ya Convention Nationale Congolaise (CO.NA.CO.) na circonscription ya Sud-Kasaï. Tango mandat na ye esili na 1970, aponamaki te na ba élections générales ya 1970. Na ba élections législatives ya 1977, aponami Commissaire du peuple (Député) ya circonscription ya Kinshasa mpe Premier vice-Président ya Conseil législatif national (Assemblée nationale). Abimi mpe suppléant na ba élections ya ba Commissaires politiques. Kobanda na 02 septembre 1980 tee na 28 juillet 1985, membre ya Comité central ya Mouvement Populaire de la Révolution parti-Etat  (M.P.R-parti-Etat). Wuta mokolo mua 3 janvier 1983 tee na 21 janvier 1985. Kobanda 28 juillet  1985 tee na 24 avril 1990, mandat ya mibale en tant que membre ya Comité central ya M.P.R. parti-Etat. Na juillet 1991 tee na novembre, Président ya Bureau Provisoire ya Conférence Nationale Souveraine.

A part politique, Isaac Kalonji azalaki patron ya Société Générale Africaine (SO.G.AF.) mpe na ya laboratoire KAMO. Wuta 1963 tee na 1976, Président ya Conseil d’administration ya université libre ya Congo na Stanleyville  (université de Kisangani), Banda 1974, Président ya Conseil d’administration ya université protestante du Zaïre (université protestante du Congo). Azalaki lisusu Président ya Comité ya patronage ya carrefour des jeunes, na Matonge, na Kalamu. Président ya Conseil d’administration ya syndicat ya initiative mpo na Zone ya Ngaliema.

Commandeur ya Ordre national ya léopard, Grand officier ya Ordre national ya léopard.

Ye, awe na mokolo mua jeudi 3 septembre 2009, na Johannesburg, na Afrique du Sud.

 

…………………………………………………………………………………………………………………………………………..

 


 

Tharcisse Tshibangi Tshishiku

 images-Mgr Tshibangu milieu 258125835

Mgr Tharcisse Tshibangu,au milieu

Amoni mokili na mokolo mua 24 avril 1933 na territoire ya Kipushi, district ya Haut Katanga, province ya Katanga. Kuna nde abandi école primaire, na Sainte Barbe, na 1939 mpe asilisi na 1944. Akeyi kosala secondaire, na humanités latines ya petit séminaire ya Kapiri, kobanda 1945 tee na 1951. Mission catholique ya Kapiri esimbamaki na ba Peres Bénédicte. Akoti na grand séminaire ya Beaudouin ville na 1951 mpe asilisi kuna na 1957 mbula azui diplôme na philosophie mpe théologie. Sima ya mbula moko ya probation, abulisami sango na mokolo mua  6 août 1959. Dans l’entre-temps abandi ba cours na faculté ya théologie catholique ya université catholique ya Lavinium na 1957 mpe asilisi na 1961 na titre ya licencie na théologie. Na 1962, azui maîtrise na théologie ya université catholique ya Louvain. Pendant que azali doctorant, na 1963-1965, aponami na qualité ya expert na Concile ya Vatican II. Na 1965 akomi proclamer Docteur na théologie ya université catholique ya Louvain. Références ya thèse na ye ya doctorat yango oyo : Melchior Cano et la théologie positive, Nauwelaerts, Bruxelles,  1965.

Tango azongi na Kinshasa, na septembre 1965, akomi professeur ya théologie na université catholique ya Lovanium. Na mbula elandi, na août 1966, akomi Prélat ya Pape Paul VI. Na septembre, azui ebonga ya vice-Recteur ya université catholique ya Lovanium. Na 1968, akomi membre ya The university and the quest for peace. Na 1969, Membre ya Conseil ya direction scientifique ya institut œcuménique des hautes études théologiques de Jérusalem, mpe na ngambo mosusu akomi consultant ya United Nations Educational, Scientific and Cultural Organization  (U.N.E.S.C.O.), Membre ya Comité scientifique internationale l’Histoire générale de l’Afrique sous l’égide ya U.N.E.S.C.O. , membre ya comité de rédaction ya revue Concilium, revue internationale ya théologie, membre ya commission théologique internationale wuta 1969 tee na 1974. Kobanda 1969 tee na 1979 membre ya Conseil d’administration de l’association des universités partiellement ou entièrement de langue française (A.U.P.E.L.F.) . Wuta 1969 tee na 1973, Président ya association des universités africaines

Na décembre 1970, akomi Evêque auxiliaire ya Kinshasa. A adopter comme devise épiscopale : « Duc in a altum » (Mène toujours en avant, porte toujours plus haut ceux qui sont placés sur ton chemin, ceux qui recourent à toi). Wuta 1971 tee na 1981, recteur ya université nationale ya Zaïre.  Na 1971 tee na 1973, Président ya commission doctrinale épiscopale ya Zaire. Wuta 1973, Président ya commission doctrinale ya conférence des recteurs des universités  africaines francophones. Akonzi Congrès international des études africaines kobanda  1973 tee na 1973,  section théologique ya symposium des conférences épiscopale d’Afrique et Madagascar.

Banda 1974, membre ya secrétariat romain de l’Eglise catholique pour les non-chrétiens. Na 1975,  vice-président ya Institut national de la  recherche scientifique, vice-Président ya international African Institute of London.  Wuta 1976, membre ya conseil d’administration ya University of Zambia. Wuta 1977, membre ya association œcuménique des théologiens africains, membre ya association de théologiens du tiers monde, mpe université  Marc Bloch - Strasbourg II epesi ye titre ya Docteur honoris causa, na 1977.

Wuta 1980, membre ya Conseil d’administration ya Association Internationale des Universités (A.I.U.). Kobanda 1981, Président ya Conseil d’administration ya ba universités ya Zaire.  N a1982, Membre ya jury international du prix Unesco pour l’enseignement des droits de l’homme.  Na 1985, akomi membre ya Conseil d’administration ya university of Lesotho. Mokolo mua 25 mars 1984, akomi fondateur mpe modérateur suprême na bokeli Institut Séculier Saint Jean-Baptiste na Archidiocèse ya Kinshasa. Yango ezali canoniquement na kati ya diocèse ya Mbuji-Mayi. Na 1989, aponami recteur ya Institut Africain d'Etudes Prospectives (IN.A.DE.P.). Na même année, asalisi jubilée d’argent na ye.

Kobanda 1990 tee na lelo oyo, Vice-Président ya Collège des Fondateurs (CO.FO.) ya université de Mbuyi-Mayi, Président ya Conseil d’administration ya université ya Mbuji-Mayi. Na 1991 tee na 1992, Vicaire Générale. Kobanda 1992 tee na août 2009, Evêque ya diocèse ya Mbuji-Mayi. . Recteur ya Institut Africain d'Etudes Prospectives nde programme ya recherche ya Centre d'Études Égyptologiques Cheik Anta Diop (C.E.E.D.-IN.A.D.E.P.) efonguami, na 1990.

Wuta mokolo mua 24 avril 2008 akokisaki échéance ya âge canonique na ye : 75 ans, conformément na canon 401, ya code de droit canonique. Yango e lobi boye na aliena ya liboso:

Canon 401, §.1

Il est demandé à l'Evêque diocésain qui accomplit soixante quinze ans d'âge, d'adresser une lettre de renonciation à l'exercice de son ministère au Souverain Pontife, qui décidera de la réponse à donner, tous les aspects ayant été considérés.

Kasi Pape Benoît XVI andimaki renonciation yango te mpe asengaki na ye a continuer mosala kino akoponela ye mokitani. Mgr. Tshibangu atindi lisusu lettre ya démission mpo na mbala ya mibale na mokolo mua 15 juin 2009 mpe Pape Benoît XVI andimi yango na mokolo mua 1er août 2009, mokolo mpe anonami Mgr Bernard Emmanuel Kasanda, Evêque auxiliaire ya diocèse ya Mbuyi-Mayi (adjoint ya Mgr. Tshibangu).

Na août 2009, asepeli jubilée d’Or na ye mpe na 2010, International Biographical Centre of Cambridge, ya Angleterre, eponi ye l’Homme de l’année  2010 mpo na manso asali na R.D.Congo na domaine ya éducation.

Akonzi mpe na kati ya Institut  Africain pour la Coopération Internationale et le Développement des Economies, Centre Zaïrois d'Études africaines" (CE.Z.E.A.), Centre de Recherche Interdisciplinaire pour la promotion et la protection des Droits de l'Homme en Afrique. Centrale (C.R.I.D.H.A.C.),  Fédération Internationale des Universités Catholiques (F.I.U.C.), Fondation universitaire du Zaïre, Centre d’Etudes et de Recherche Parapsychiques (C.E.R.P.). membre ya Club Afrique mpe azali défenseur ya chorégraphie africaine mpe na miziki na misa.

Distinctions : Commandeur ya Ordre national ya  Léopard, Grand officier ya Ordre national ya léopard, Commandeur ya Ordre national ya Sénégal.

A participa activement  na ba conférences, colloques, congres  miyike mpe akoma mikanda, ba articles, asala ba discours, etc.

 

Akoma mikanda miye :

 

-          TSHIBANGU, Tharcisse, Théologie positive et théologie spéculative : position traditionnelle et nouvelle problématique, Mémoire de maîtrise, Nauwelaerts, Bruxelles,  1965.

 

-          TSHIBANGU, Tharcisse, Melchior Cano et la théologie positive, Thèse de doctorat, Publications universitaires de Louvain, 1965.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse, Église et Nation, itinéraire spirituel d'un Africain de ce temps, Kinshasa, Éditions St Paul-Afrique, 1973. Réédition na yango ebima na Kinshasa, Editions universités africaines, 1992.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse, Eglise et nation,  Kinshasa, Editions Saint Paul Afrique, 1976.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse, Les tâches de la théologie africaine : Questions aux théologiens africains, Kinshasa,  Bulletin de Théologie Africaine Vol.I, no1, janvier-juin 1979.

 

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse, Tharcisse Tshibangu,  Marie-Dominique CHENU, LADRIERE ,J., Théologie comme science au XXème siècle, Kinshasa, Presses universitaires du Zaïre, 1980.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse,  "L'évolution des thèmes des assemblées des Supérieurs et Evêques des missions catholiques du Zaïre (de 1905 à 1979)", in L'Eglise catholique au Zaïre: un siècle de croissance (1880-1980), Editions du Secrétariat Général de l'Episcopat, Kinshasa, 1981.        

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse,  L 'Eglise et les droits de l’homme, in Philosophie et droit, Actes de la 5ième Semaine Philosophique de Kinshasa du 26 avril au 1er mai 1982, Kinshasa 1982.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse,  La théologie africaine. Manifeste et programme pour le développement des activités théologiques en Afrique, Editions Saint Paul, Kinshasa, 1987.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse, Cheminement personnel et voies de la théologie africaine, Théologie africaine. Bilan et perspectives. Actes de la 17eTM Semaine Théologique de Kinshasa, Kinshasa, Facultés Catholiques de Kinshasa, 1989,

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse, Eglise et nation : Itinéraire spirituel d'un africain de ce temps, Kinshasa : Editions universitaires africaines, 1992.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse, Le Cardinal Malula: pasteur et prophète (1917-1989) : (témoignages de la presse nationale et internationale), Kinshasa, Fondation Cardinal Malula, 1992

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse,  L'heure du courage et d'une grande foi dans l'avenir: lettre pastorale, Mbuji-Mayi, Editions du Centre pastoral Cilowa, 1993.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse, La mystique africaine : Actes du colloque international à l’occasion du  IVième centenaire de la mort de Saint-Jean de la Croix, Kinshasa : Baobab, 1993. Yango ezali ouvrage collectif ekomamaki sous la direction ya Damas Zuazua mpe ba participants moussu na colloque ba intervenir na kati.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse,  Eglise et nation itinéraire spirituel d’un africain de ce temps (seconde édition) Kinshasa,  Editions universitaires africaines, 1995.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse,  Prêtre et évêque au service de l'église et de la société: homélie prononcée à l'occasion du jubilé épiscopal (6 décembre 1970-6 décembre 1995) : précédé d'une lettre du Pape Jean-Paul II, Kinshasa, Editions l'Arc-en-ciel, 1995.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse, L'université congolaise: étapes historiques, situation actuelle et défis à relever, Kinshasa, Universitaires Africaines, 1998.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse,  En dehors de l'université point de salut pour la communauté nationale, Lubumbashi, Presses universitaires de Lubumbashi, 2002.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse,  L'université de Kimwenza et l'avenir de notre culture, Kinshasa, Editions universitaires africaines, 2004.

 

-          TSHIBANGU TSHISHIKU, Mgr Tharcisse,  «L'Eglise comme famille de Dieu. Une contribution importante en ecclésiologie, dans L'avenir de l'activité missionnaire «ad Gentes». Perspectives pour le XXIème  siècle. Actes du Congrès International de missiologie «Tertio millennio» (Kinshasa, 11-17 juillet 2004),  Kinshasa, Médiaspaul, 2005.

 

 

 

……………………………………………………………………………………………………………………………………………………

 

 

Joseph Mbangula Dituku Dibi

 

Amoni mokili na Luluabourg, district ya Ksai, province ya Lussambo, na mokolo mua 25 septembre 1939. Atangi ba kelasi na ye primaire na Luluabourg mpe akeyi kosala secondaire na na  collège  Saint Joseph, na localité ya Bulongo, territoire ya Irumu, district ya Ituri, province Orientale.  Kuna nde asali section commerciale et administrative mpe azui diplôme na ye na 1957. Kobanda 1957 tee na 1961, atangisi na Institut Saint Joseph ya Bulungu. Na 1961 akeyi kotanga na Belgique, na universités ya Liège. Abimi licencié na sciences politiques et administrative na 1965.

Na bozongi bua ye na Léopoldville, azui mosala, abandi na 1965 tee na 1966, Conseiller ya Ministre ya Affaires sociales, Jules-Léon, Kidicho (1965 tee na 1966).Kidicho akufi na liwa ya accident ya voiture, na Léopoldville,  na mokolo mua 11 juillet 1966. Tango Sophie Madeleine Kanza akomi Ministre ya affaires sociale na mokolo mua 29 octobre 1966, a retenir ye te comme conseiller na ye.na 1966 tee na 1968, Directeur du personnel ya Compagnie des Margarines, Savons et Cosmétiques au Congo (MAR.SAV.CO.).

Na 1968 tee na 1970, Directeur ya personnel ya Générale des Carrières et des Mines (GE.CA.MINES.). Na 1970, akomi President a.i. ya Comite de direction ya Centre d'Exécutions des Programmes Sociaux et Economiques. Na même année oyo ya 1970, akomi Directeur administratif. Na 1971, chargé des missions ya Gécamines na Lubumbashi. Na 1972, akomi responsable ya siège ya Kipushi ; na 1973, Likasi ; na 1974, Kambove mpe na 1975, Kakanda. Kobanda 1975 tee na 1976, akomi responsable ya GE.CA.MINES. na Kinshasa.

Kobanda 1977 tee na 1982, Délégué général ya Société Nationale d’Assurance (SO.N.AS.). Na 1982, Directeur-Général Adjoint de l'Office des Transports en Commun du Zaïre (OTCZ).  Na 1982 tee na 1983, Président délègue général ya Office des Transport en Commun du Zaïre (O.T.C.Z.). Na 1983, Industrie Nationale Zaïroise des Automobiles Leyland (I.N.Z.A.L.), filiale ya  British Leyland,  ezui contrôle ya O.T.C.Z. suite na privatisation ya gestion ya O.T.C.Z. Mbangula akomi Administrateur Directeur général adjoint ya I.N.Z.A.L. te na 1988. Sima ya wana, akomaki kosala ba affaires privées na ye mpe afongolaki Agence-conseil na ba assurances na kombo ya Agence de conseils généraux, na Kinshasa.

Mbangula azalaki Sérénissime Grand Maître du Grand Orient (ya Franc-maçonnerie) ya République Démocratique du Congo. Wana ezali titre ya likolo ya ba maçons na R.D.Congo.

Awe na Kinshasa, na mokolo mua jeudi 26 avril 2007.

 

…………………………………………………………………………………………………………………………………………………….

 

 

Evariste Mabi Mulumba,

 

Ye, azali mukua Nyambi, abotami na 22 avril 1941, na localité de Mikalayi, na territoire de Kazumba, district ya Ksai, province ya Lusambo. Na mikalayi nde esika asali école primaire na secondaire na ye mpe asilisi na 1960. Akeyi ko continuer na université de Liège, na Belgique, esika azui graduat na sciences économiques et financières ya Ecole supérieure des sciences commerciales et économiques, na 1964 ; licence na sciences économiques et financières ya Ecole d'administration des affaires, na 1966 mpe na doctorat na administration des affaires, na 1970.

Kobanda 1966 tee na1970, assistant na faculté ya sciences économiques, financières et commerciales ya université Lovanium. Wuta 1967, membre du comité fondateur de la section congolaise de la Société africaine de culture. Na 1967 tee na 1968, Secrétaire chargé de la propagande na  Association du Personnel Académique et Scientifique Congolais de l’Université Lovanium (P.A.S.CO.L).

Kobanda 1967 tee na 1968, azali Conseiller ya Gouverneur ya ville ya Kinshasa, Paul Nauwelaerts. Na 1970, akomi professeur associé na faculté ya sciences économiques, financières et commerciales ya université catholique ya Lovanium. Wuta 1971 tee na 1973, Chef ya département ya sciences économiques appliquées ya université catholique ya Lovanium, yango ebongolaki kombo na 06 août 1971 mpe ekomi Université Nationale du Zaïre ((U.NA.ZA.). Kobanda 1971 tee na 1972, consultant na Société de Gestion et de Financement (SO.GE.FI.) Na 1972, aponami na Fulbright Programs (programme ya ba échanges universitaires et culturels) .Yango epesi ye bourse mpo na kosunga ye na ba recherches  scientifiques kobanda aout tee na novembre, na université ya Caroline du Nord na Chapel Hill, na  Etats-Unis. Tango azongi na Kinshasa, akomi professeur na faculté ya sciences économiques ya U.NA.ZA., campus universitaire ya Kinshasa.. Kobanda 1973 tee na 1974, Directeur adjoint ya Institut de recherches économiques et sociales (I.R.E.S.). Na 1973 tee na 1975, Administrateur Gérant ya Fiduciaire de Gestion et de Contrôle (FI.GE.CO.).

Na 1974 tee na 1981, Commissaire politique (membre ya Bureau politique) ya Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R.). Kobanda 1974 tee na moyi ya lelo oyo, administrateur na British American Tobacco-Zaïre (B.A.T. Zaïre). Ekoma B.A.T._Congo. Na 1975, azui pete ya professeur ordinaire na faculté ya sciences économiques ya U.NA.ZA., campus universitaire ya Kinshasa. Kobanda 1975 tee na 1977, membre permanent ya Bureau Politique ya M.P.R. Na même période, 1975 tee na 1977, azali mpe lisusu Commissaire du peuple (Député) ya M.P.R. mpe Président ya Commission économiques et financière ya Conseil législatif national (Parlement national). Na 1975 tee na 1980, Commissaire aux Comptes na Compagnie Financière de Kinshasa (CO.FI.KI.). Kobanda 1975 tee na 1985,  Réviseur na Banque de Kinshasa. Neti azalaki membre ya Bureau politique ya M.P.R., na ba élections législatives ya 1977, akokaki ko se présenter te mpo azalaki déjà Commissaire du peuple de droit mpo azalaki Commissaire politique ya M.P.R. Na 1977, azalaki mpe Président ya Commission économique et financière na IIème Congrès ordinaire ya M.P.R. esalemi na  wuta 25 tee na 29 novembre 1977, na cité du parti na N’sele, na Kinshasa.

Kobanda octobre 1981  tee na avril 1990, membre ya Comité central ya M.P.R. parti-Etat mpe Rapporteur ya Commission économique et financière. Na 1982, Président ya Commission économique et financière na IIIème Congrès ordinaire ya M.P.R. esalemi na N’sele kobanda mokolo mua 6 tee na 10 décembre 1982. Wuta  1985 tee na  1986, azali consultant ya Programme des Nations Unies pour le développement (P.N.U.D.) mpe na ya Organisation des Nations Unies pour le Développement Industrielle (O.N.U.D.I.). Na octobre 1986 tee na janvier 1987, Commissaire d’Etat na finances (Ministre). Na  janvier 1987 tee na mars 1988, Premier Commissaire d’Etat (Premier Ministre). Na juin 1988 tee na janvier 1990, Deuxième vice-Président ya Bureau Permanent ya Comité central ya M.P.R. parti-Etat. Wuta janvier 1990 tee na février 2007, Président ya Cours des comptes. Na 1992, 2ème vice-Président ya Bureau ya Conclave mpo na transition non conflictuelle. Na 1994 tee na 1995,  Conseiller de la République (Député) na Haut Conseil de la République-Parlement de Transition (H.C.R.P.T.). Na 1992, 2ème vice-Président ya Bureau ya Conclave mpo na transition non conflictuelle.

Wuta février 2007 tee na sika awa, Sénateur mpe Président ya Commission économique et financière et Bonne Gouvernance  ya Sénat.

Mpe na moyi ya lelo oyo azali professeur na faculté ya sciences économiques et gestion na université ya Kinshasa (UNI.KIN.), professeur na faculté ya administration des affaires et sciences économiques na université protestante au  Congo (U.P.C.). , professeur na chaire U.N.E.S.C.O. na Kinshasa, professeur na Institut supérieur de commerce de Kinshasa (I.S.C.). Apesaka ba cours ya comptabilité générale, économie monétaire, économie politique, bourse et banque, théorie monétaires. économie et comptabilité bancaires, gestion des entreprises. la monnaie dans l'économie. Administrateur ya Conférence pour le Développement Socio-économique du Kasaï Occidental (CO.DE.SC.O) ;

Mabi ayebanaki mingi na public suite suite na ba critiques objectives asalaka na ba travaux ya Comité central ya M.P.R. parti-Etat (1985) na lolenge a sosolaki mabe ya politique de rigueur oyo Premier Ministre Kengo wa Dondo abandaki ko pratiquer na programme ya gouvernement na ye.  Akendeki lisusu sango tango azalaki Premier Ministre mpo Gouvernement na ye e signa na mai 1987,  ba accords financiers na Fonds monétaire internationale mpe na Banque mondiale na oyo eyebani na kombo ya programme d’ajustement structure. Mabi a participa na rédaction ya discours ya President Mobutu, ya le 4 octobre 1973,  na Nations Unies, na New York. Ye nde a azalaki charger na  partie économique na yango.

-           MABI, Evariste, Le marché du café congolais, Thèse de doctorat, Liège, Ecole d'Administration des Affaires, 1970.

-           MABI MULUMBA, Les problèmes de financement de l'agriculture au Zaire, I.R.E.S., Kinshasa, 1974

-           MABI MULUMBA,  La coopération monétaire en Afrique, des Zones Monétaires à l'Union Africaine des paiements, P.U.Z., Kinshasa, 1976.

-           MABI MULUMBA, Les Banques Commerciales face aux Mutations Structurelles de l’Economie Zaïroise, Co Edition, I.R.E.S.-C.R.P.,  Kinshasa, 1983

-           MUTAMBA MAKOMBO et MABI MULUMBA, Cadres et Dirigeants au Zaïre,  Qui sont-ils ? Dictionnaire Biographique, C.R.P., Kinshasa, 1986.

-           MABI MULUMBA, Evariste, Les Dérives d’une Gestion Prédatrice, cas du Zaïre devenu République Démocratique du Congo, C.E.R. D.I., Kinshasa, 1998.

-           MABI MULUMBA, Evariste, Problématique de gestion monétaire en République Démocratique do Congo. Etat de la question. Le Congo-Zaïre dans tous ses Etats, Bilan et Perspectives. Actes des 4es Journées philosophiques du Philosophât Saint-Augustin, du 29 nov. au 1er déc. 1999, in Pensée agissante, 2001, n° .10, 49-54.

-           MABI MULUMBA, Evariste, La mobilisation des recettes et économie de guerre : cas de la R.D.C., Revue de la F.A.S.E. numéro spécial 1999.

         

-           MABI MULUMBA, Evariste, La Monnaie dans l’Economie, C.E.R.D.I., Kinshasa, 2001.

-           MABI MULUMBA, Evariste, La création, la croissance et la pérennité de l'entreprise privée au Kasaï: actes du colloque organisé par l'Université de Mbuji-Mayi, l'Université communautaire de Kananga et l'Université de Wembo-Nyama, le 03 mai 1999 à l'Hôtel intercontinental de Kinshasa, Presses universitaires de Mbuji-Mayi, Mbuji-Mayi, 2000.   

        

-           MABI MULUMBA, Evariste, « domaine économique et autonomie financière des provinces » in Comprendre le projet de Constitution de la R.D.C., XL VIème année, n° 397, septembre 2005.

        

-           MABI MULUMBA, Evariste, « Pour une bonne gouvernance des entités administratives décentralisées (EAD) », Congo-Afrique, n° 402-403, Février-mars 2006.

         

-           MABI MULUMBA, Evariste, «Décentralisation et problématique de la fiscalité », Congo-  Afrique, n° 432, février, 2009, p. 131

 

-           MABI MULUMBA, Evariste, « La gestion des finances publiques et les pratiques de la corruption » in Institutions Financières Internationales et les Pratiques de la Corruption en République Démocratique du Congo, Conférence Internationale tenue au C.E.P.A.S., Kinshasa, du 22 au 23 juillet 2008.

 

-           MABI MULUMBA, Evariste, « La pratique de la corruption dans les entreprises publiques de la RDC » in Institutions Financières Internationales et les Pratiques de la Corruption en République Démocratique du Congo, Conférence Internationale tenue au C.E.P.A.S., Kinshasa, du 22 au 23 juillet 2008.

 

Distinction honorifique : Grand officier ya Ordre national du Léopard,

 

Ba abréviations na molayi 

 

Institut de Recherches Economiques et Sociales (I.R.E.S)

Centre d’Etudes et de Recherche sur le Développement International (C.E.R.D.I.)

Centre de Recherches Pédagogiques (C.R.P.)

Centre d'Etudes pour l'Action Sociale (C.E.P.A.S.)

Presses Universitaires du Zaïre (P.U.Z.)

Faculté de l’Administration des Affaire et Sciences Economiques (F.A.S.E.)

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article