Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

Ba raisons mibale ezali kotinda ba cabindais ba senga dipanda: Ya  liboso,Cabinda ezali na relation geographique moko te na Angola , ya mibale ezali petrole oyo ebimaka na mabele ya Cabinda.

Soki ozali mopaya,bapesi yo carte geographique ya Angola na ba provinces nango,balobi nayo oluka Cabinda okomona yango te,mais soki balakisi yo carte ya Afrique okomona Cabinda entre les deux Congo.Pona kobakisa,Traité ya Simulambuco,signé na 1885,entre ba portugais na ba autorités ya Cabinda na tango wana,oyo epesaki nzela na ba portugais ba fanda na Cabinda.Tango ba portugais batikaka Cabinda na 1975.Ebonagaki bana ya Cabinda ba zua dipanda na bango.Oyo nde ezali raison politique.

Raison economique ezali na petrole oyo ewutaka na mabele ya cabinda.Ebongaki mosolo ezonga na mabele ya Cabinda pona kobongisa ezaleli nabango.Kotonga ba routes,ba ecoles,ba Ports,ba Hopitaux,etc.Mais esalemaka bongo te.Donc bazali koyiba bango.Yago basimba minduki.Topesi bango raison pour le moment.

Histoire ya Cabinda ekeseni te na oyo ya Angola,Congo to RDC,pona ezali na kati ya espace Kongo.Ba royaume ya Loango,N'Goyo na Kakongo esalamaka tango royaume Kongo esilaka kopanzana.Na Tango ya ba portugais,Cabinda ezalaka na districto de Congo,pe ezalaka capital nango.Gouverneur ya distrito do Congo azalaka autonome par rapport ya Luanda.Na 1956,Angola ekomi Provincia de Angola.Pour comodités admnistrative Cabinda ekomi districte ya Angola et le reste ya Congo Português ekabuani na Distrito do Uíge,chef-lieu Carmona na Distrito do Zaíre,chef-lieu São Salvador (Mbanza Kongo)

Na suka ba mbula 50,ba angolais ba sangana ka na ba partis politique na niveau national pona kobengana ba portugais libanda ya Angola.Ba partis wana(MPLA,FNLA na UNITA) ba bandaka ko recruter ba membre na b'angolais ya ba tribus nionso,na ba cabindais pe lokola.Taty ya FNLA azalaka cabindais.Ba comandant ya solo ya MPLA neti Maria Tonha "Pedalé"(azalaka ministre ya Defense 1980-95),Santana André Pitra "Petrof"(azalaka Ministre ya Interieur),Maria Mambu,Jorge Barros Tchimpuati (azalaka gouverneur ya Cabinda),Domingos Evaristo "Kimba"( azalaka Gouvrneur ya Luanda et Ministre,lel'yo ambassadeur na Nigeria),etc.Bango nionso bazali ba cabindais.Tango Savimbi akei kosala UNITA,sur 6 fondateur,3 bazali ba cabindais,José Ndele(akufa na Suisse),Miguel Nzau Mpuna (Ambassadeur na Canada) na Tony da Costa Fernandes (ambassadeur na Inde).Ezali pona kolakisa ke ba cabindais mingi basimbaka minduki na kombo ya angola y compris Cabinda.

Le 8 Aôut 1963,lisanga moko esangisaka ba cabindais ya diaspora na tango wana,MLEC ya  Luís Frank Rank,CAUNC ya Nzita  Enriques Tiago na Aliança do Mayombe ya António Sozinzo,ba sali FLEC ,na likainisi ya ko komisa Cabinda ekolo moko.Lius Rank Frank akomaki president,Nzita Tiago Vtice president ebongo António Sozinho nde Secretaire General.De 1963 ti 1975,Flec asalaka eloko moko te,esimbaka minduki te pona kobengana be lukezo libanda ya Cabinda,ezalaka na ba guerrilheiros te,ndenge da nationaliste bazalaka nango,neti Mpla ya Neto ezalaka na maquis na Cabinda,president ya Angola José Eduardo dos Santos,abundaka tango wana na Cabinda,azaka responsable ya communications.

Na diplomatie,OUA eyaki koyeba Flec comme Mouvement ya Liberation et puis Cabinda ezalaka na esika ya 39 na programme ya decolonisation,pona Angola ezalaka na place ya 35,yango epesaka bango makasi na ndoto na bango ya dipanda.

Tango bitimba ya dipanda na Angola esili,ba nationalistes ba signer cesser le feu separament,soki pe Flec esalaka bitumba akokaki ko signer mokanda wana,mais azalaka na Cabinda te,kaka makelele na libanda.Ba maquisards nionso ba bimi na zamba,ba tindi ba representant na chaque province ya Angola.Neti province na ya Malange ezalaka na representant ya Fnla,Mpla na Unita,esalamaka bongo na ba province nionso,Cunene,Lunda,Luanda,Benguela na...Cabinda.Yango Wana Cabinda ezala dèjá na 1975,na representant ya Fnla,Mpla na Unita.Jamais Angola abotolaki Cabinda na Makasi ndenge balobaka,ezali lokuta monene.

Tango ba nationalistes na ba portugais bazalaki koyokana pona dipanda,Flec alingaka kotia mutu,babengana ka ye.Esika nde,Acordo de Alvor esalamaka,Angola ekozua dipanda,le 11 Novembre 1975,na kati ya boyokani wana,bakomi ete Cabinda ezali Angola.Na songi-songi ya Mobutu,Omar Bongo na Idia Mini Dada,president ya Flec L. Ranke Frank,a proclamer República de Cabinda na Kampala,atindi batu na ye bazua pouvoir na makasi,na Juin 1975.Babenganaka bango na malembe nionso.Tango Neto azuaki dipanda,atindi militaires mingi kuna pona ba tia kimia,a tie comme Comissário Provincial (Gouverneur),Domingos Evaristo Kimba,muana Cabinda.

Frank Rank akei na exil na Gabon,Nzita Tiago abimaka na prison ya São Nicolau ye nde akoti zamba pona ko organiser resistence.Flec ekomi mibale.Flec Original ya Frank Rank na Flec-Fac (Forças armadas de Cabinda) ya Nzita Tiago.Malgré exil ya Nzita Tiago na France,Flec-Fac yango nde ezali radical, ebundaka na Cabinda ti lel'oyo.

Flec-Fac asala mobulu na Zamba mayombe,kobundisa gouvernement tango noinso,ba mboka mingi na kati ya zamba ezala ka na maboko naye.Na ba mbula 80,Flec-Fac ekabuani,José Luemba Tibúrco,Bento Bembe,Artur Tchibassa,Mauricio Zulu bakei kosala Flec-PM (Posição Militar) mais na tango moke babongoli yango na Flec-Renovada.Flec-Fac ezalaki kosala mobulu na Zamba .Flec-Renovada ezalaki kosala mobulu na na ba villes,enlevement ya ba travailleurs etrangers,Ko tia ba bombes esika oyo ezali sensibles,assassinat,ezali kosala terreur même na kati ya ville ya Cabinda.Na 1990 Flec-Renovada ekangi americain moko na kombo ya Brent Swan,mais bayaki ko liberer ye sima.Mais ba americain,babengi toute direction ya Flec-Renovada ba terroriste,na manda ya capture pe ya extradition ya bango nionso.

Na 1994 gouvernement alinga ka ko negocier na Flec.Mais Flec wapi? pona ekomaki ebele: FLec-Fac ya Nzita Tiago,Flec-Renovada ya Tiburcio Luemba,Flec-Original ya Frank Rank,Flec-Histórica,Flec-Interior,Flec-Patriótico,Flec-Vermelho,Flec-Lopes.FDC ya Francisco Lubota,UNALEC ya Conde,UNLC ya Lumingu Ngimbi Carneiro,MRITC ya João Massanga,RPDC ya Menga,CIC ya Belchior Taty.Ba misusu basangani pona kosala FONAC pona kosolola na gouvrnement,mais esimbaki te.Independence ya Cabinda ekomi nango commerce.Solo ya petrole elanguisi bango!

Mais Flec-Fac na FLec-Renovada ezali na kati ya Cabinda.José Tibúrcio balongoli ye na presidence ya Flec Renovada,esika naye ekomi Bento Bembe.Ye lokola azali jeune,pe mutu na mayele,akomaki vraiment populaire na kati ya Cabinda,par rapport ya Nzita Tiago,vieux pe afandaka na France.Bento Bembe soki alobi likambo,resistence cabindais ebandaka kotosa ye,azali bien organisé.Artur Tchibassa ya Flec-Renovada, bakangi ye na Kinshasa na FBI suite ya Mandat ya capture pe ba tindi na Mboka ya Amerique epai ezali kosala boloko ya 24 ans!

Na 2002 Savimbi akufi na bitumba,na zamba ya Moxico,bitumba na Angola esili,sikoyo luyalu etalisi minduki na ngambo ya Maiombe,esika ya Flec ezalaka Fac to Renovada,FAA(Forças Armadas de Angola) ekotela bango na Zamba,moyen ba kima na RDC ezali te,na Congo pe te,pona ba mboka mibale eyokana malamu na Angola,Ba Flec mibale makasi esila bango.

Yango na Aôut 2004 Flec-Fac ya Nzita Tiago na Flec-Renovada ya Bento Bembe esanganaka ezongaki FLEC(Frente da Libertação do Estado de Cabinda) epai Enclave ekomi Estado.Nionso wana esalamaka na ville ya Helvoirt na Hollande.Sima na yango basali Forum Cabindês para o díalógo,plateforme pona ko negocier na gouvernement.Bento Bembe akomaki president FDC ye nde mutu azalaki na makoki ya kososola na Luyalu,Mauricio Zulu ye nde azuaki mosala ya kosangisa ba soldat ya Flec na Kati ya Cabinda.Ba amiricain babosanaka Bento Bembe te,epai na bango azali kaka terroriste.Mandat ya Capture mosusu esalami
na mboka Hollande epai azalaka,signé epai Condolezza Rice,oyo azalaka Secretaire d'etat ya tango wana.Bakangi Bento Bembe na Hollande,pona ba tinda ye na Amerique, akende kosamba kuna.Prison ya Bento Bembe ekomisi ye populaire na kati ya Cabinda,Nelson Mandela ya Cabinda,mikolo nionso liboso ya boloko oyo azalaka,manifestation ebandaka kosalema.Aprés ba pesi ye liberté provisoire,babotoli ye mikanda naye nionso,donc akokaki kokima te.L'enfant terrible ya Cabinda akomi herós,Cabinda nionso sima naye.Angola amoni ezali kaka ye mutu azali solution ya Cabinda.General Miala,patron ya Service secret,asali nionso akimisi Bento Bembe na Hollande,na passeport congolais,ti na Point-Noire,kuna ba obliger ye a negocier na governement na condition naye,azalaka na choix te,soki te okokende ne Amerique kosala prison ya 24 ans.Bento Bembe asali ba accord na Gouvenement,signature esalamaka na province ya Namibe,na sud ya Angola.Akomi Ministro sem pasta ebongo Maurício Zulu akomi chef adjoint ya etat Major ya FAA.

Nzita Tiago asilikaka,pona babengisaka ye te na masolo na gouvernement,azali ko reconaitre ba accord wana te,Flec-Fac naye ezongi,guerre esili te,mais en verités azali lisusu na ba soldat te.Atinda ba lettres ebele epai ya president ya Angpla mais azuaka reponse te.Yango boyokaka mua makelele na Cabinda mikol'oyo.Na kati ya zamba,Flec-fac azali na ba soldat lisusu te.Alexandre Taty na Commandant historique Estanislau Miguel Boma "Sabata "bazali na kati ya zamba ya kobombama.Ba oyo bazali kosala mobulu moke bazali ba refugé na RDC na Congo.Soki basali attaque,bakimaka na RDC to na Congo,Yango boyokaka armée angolaise ekotaka na Congo pona koluka bango.

Na 2003,Nzita Tiago,president ya Flec-Fac abenganaka secretaire naye moko,na kombo ya Rodrigues Mingas.Ye nde ayaki kosala lisusu FLEC-PM (Posição Militar).Alobaka akosala makambo na ndenge na ye,pona ko liberer Cabinda,mutu moko abandaka kotala ye azala ka te,ba bandaki komona ye mutu pamba.Rodrigues Minga ,48 ans,azali na passeport Français,asalaka na Aeroport Charles de Gaulle comme baggagiste.Aluka tenue ya militaire na ba grade soki ya wapi,bakangi ye photo na tenue wana ye nde mutu abandaka ko tinda ba message ya lokuta na Press via intrnet ke nionso oyo ezali kosalema na Cabinda ezali ye nde mutu azali kosala yango.Na biographie naye aloba ke asaka prepation militaire na Ouganda,lokola obotama na Pointe-Noire,pe ayebaki batu ya Flec oyo bazalaka kuna comme ba refugé,ye nde mutu a organiser attaque contre selection ya Togo,apartir ya Paris.Commandant Santoro ye nde mutu asalaki ataque wana sur le terrain.Groupe oyo ya mibale ebimaki sima ya attaque contre ba Togolais,ezali Flec-Fac ya Nzita Tiago.Alingi kozala na position de force pona ko negocier.

Même si bazalaki na droit yo kozua independence,Rodrigues Mingas na Santoro bazalaki na droit ya koboma ba togolais te.Ba camps militaires  ya FAA ezali partout na Cabinda,bakokaki ko attaquer bango,wana ezali problemes te,parce que ezali guerre,mais koboma ba innocents wana ezali terrorisme,il faut ko condamner yango.Bango balobi ke basalaki yango pona ba polices ya escorte,ezali lokuta.pona ata policier moko te akufaki,au contraire grace ya heroisme ya police wana nde ba degât ezali limités.En 2 Km ya esika ya attaque camp militaire azalaka wana ya moins de 50 militaires pona nini te ba kendaki kobundisa bango.Ebongo poste ya frontière epai ba togolais balekaka pona nini bapanzaki yango.Ezalaki cas isolé.Assassinat.
Ndombasi Kupessa

Image
Bento Bembe

rodrigues mingas

Rogrigues Mingas

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
J

epa param com a mentira o senhor Mingas nunca foi membro da FLEC FAC e nunca trabalhou como bagagista num aeroporto, e porque voçês escrivam em lingala? Cabinda nâo é Angola, e o velhote
Nzita  cabina nâo é dele. viva a juventude de Cabinda, abaixo MPLA e os lacaios e venda patria como os Batila e comparses.

Répondre
N

Ndeko na ngai Jean Pierre,ozali na raison.Wana nakomi ezalaka makanisi ya ba cabindais pona ko justifier independence na bango.Soki omoni cabindais na makanisi wana okoki koloba naye ke azali na
erreur.Pona ngai Europe ekoma kosangana,koluka kokabuana na bikolo ezali na tina te.Soki na RDC,Congo,Angola na bikolo misusu tokokaki kotambola librement elingaki kozala malamu.Merci mingi.

Répondre
M

@ Emanuel,

Notre ami Ndombasi Kupessa a un blog en langue portugaise. Vous pouvez le visiter à l'adresse ci-après:

http://muanadamba.over-blog.com/

Messager

Répondre
J

Ndeko Ndombasi Kupessa :

Argument yayo ya liboso ezali erroné. Etat moko ekoki kozala na province naye
sans contact géographique. Napesi yo ya liboso Zanzibar, entité indépendante depuis des siècles jusqu’à l’annexion ya esanga ya Zanzibar na Tanganyika na 1964. Napesi yo lisusu exemple ya Guinée
Equatoriale—avec territoire mosusu sur le continent africain, pe bisanga mingi pembeni o Océan Atlantique. Nakoki kopesa yo pe ba exemples ya France avec ba territoires d’outre-mer na Etats-Unis
avec Alaska, Hawaii na ba territoires naye bisusu na Caraïbes (Porto Rico) na ba territoires bisusu na Océan Pacifique. Nazongela lisisu exemple ya France, avec esanga ya Corse, wapi epai
tomonaka pe ba terroristes indépendantistes lokola ba terroristes cabindais.

De plus, principe ya intangibilité des territoires hérités de la colonisation
elobi boye : territoire oyo ezalaki colonisé en tant qu’entité, etikali se ndenge wana après l’indépendance. Cabinda ezalaki colonisé na reste ya Angola pe ezui indépendance mokolo moko.
Cabinda eza territoire angolais.

Répondre
E

Bonjour Ndombasi Kupessa,

Merci d'avoir pris le temps de nous fournir ces riches informations que j'ignorai une bonne partie.
Ca mérite un blog, avez-vous déjà pensé d'en créer ou vous en avez un?

Emanuel

Répondre