Bonjour,
un commentaire vient d'être posté par auguy lebakata sur l'article "Mokolo nakokufa" au congrès du MPR à Mbandaka,er
Extrait du commentaire:
Joseph mpeye: soki moto azali ko informer bino ezali ya yo kokamata to koboya soki olingi kotikala na kati ya lokuta
1) vieux wendo azala jamais musicien effectif na
orchestre African fiesta, ezalaka tango tozwaka mission officielle mpo tokende na Ouganda, Rochereau na Roger balingaka balakisa peuple Ougandais nani azalaka mobandisi wa miziki ma
Congo, de
babengaka vieux wendo mpe tobandaka koyekola ba nzembo ye abetaka liboso 'te tosala mobembo, tango tozalaka kosala ba repetition mpo ya ye epai ya mwena na bon marché nde tango mawana
wa ngai
abelaka mpe nazwaka nakati ya mawa ma ngai inspiration oyo bato banso bailngi ekoma ya bango.
2) coïncidence ya wendo na 1966 tango tokendeke na Ouganda mpe loyembo lona lobimaka, yango nde
ebotaka confusion na mito ya bato, une fois encore soki yo olingi otikala na confusion wana etali yo.
3) na 1966 Mangwana azalaka lisusu na biso te, ata otuni ye akoloba na yo ayebi lisolo
ya
mokolo na kokufua te, kasi ozali kobanga nini mpo otuna Rochereau mpe Guvano lokola ngai napiki mpende na likambo yango na bo solo na yango?
4) leki wa ngai mongali akende na biso na Ouganda te
mpe ayebi lisolo wana te.
5)Gouvernement ya président nini wana elukelaki ba musiciens misala, ozali kokamwisa ngai ndeko
mpeye, kabasele ya kabasele zozefu azangaka mosala na Vicky
Longomba na Mujos na Nico o mikolo mya ye mia suka naloba kaka ba alanga nzembo nionso nani gouvernement alukelaka bango misala, nkondo wendo ayei kozwa chance na Mzee kabila mpo na
fimbo na ye ya ngubu.
6) African fiesta populaire nde yango wana orchestre Continental, Bopol na Edi Mambungu nde bakimisaka
ba musicien mpo bakende epai ya bokilo wa Bopol maître taureau mpe bakendeke
kobimisa repertoire oyo ngai nasilaka ko enregistré mpo tobima na yango, bango bazali awa na paris, tuna bango, N° ya portable ya Edit Mabungu 0683918938, ngai nalobaka makambo mpe
napesaka
preuve, soki alobi na yo lolenge esusu, loba ngai nazali lokuta, ndambo ya ba musicien baye batikalaka na ngai mpe na ba loyembo esusu, bango nde basalaka lisusu Bakuba Mayopi,
Madilu,
yossa mpe Johnny pindu, mpe nakokamwisa yo lisusu mpo ya koyebisa yo 'te ngai moto napesaka Jean bialu nkombo wa James mahdi, ye akomaki yango mabe Madi mpe abakisaka lu ya bialu,
ebongoki
akoma Mahdilu, oyokaka ndenge ye alobaka grand Ninja, luka tina ya Mahdi na dictionnaire, kende na wenze ya mabaya na mombele, okmona mwasi wa ye wa liboso na nkombo wa Bibi, mpo Jean
Bialu
akutani na ba alanga nzembo mingi epai na ngai, soki otuni Dino vangu akoyebisa yo concert ya liboso ya Madilu na Sam Mangwana.
7) Tozonga te ngai na Guvano epai ya Rochereau mpo na nini?
napesi bino E.mail ya Guvano tuna ye tina ayebisa yo, tokoto elongo te mpe tolongwa elongo te, mpo ya ngai ezalaka question ya dignité, soki yo ozali na yango te etali yo, mpe na ko
informer yo
que soki nazongaka na tango wana mbele natonga immeuble oyo ngai nazali na yango te, mbele nazwa 1245 ares de terre oyo nazali na yango te, mbele nakoma monsieur le Bagata te,mbele
nasombaka ba
cmion ya 8 tonnes te, nakona café te mpe nde nabokolo ngombe te,mbele babenga ngai jamais honnorable Izeidi, mbele na simba jamais milliards na maboko na ngai, mokolo nakozonga Léo,
nakolakisa yo maye nazali koloba na yo, yango elingi koloba oyebi ngai bien te, okanisi ngai nakangaka maboko sima ya botiki Rochereau? okosami. _) botika makambo ya vie privée,
botuna na maye
ezali lokola lisolo oyo boyebaki kasi bo solo solo boyebaki te, ainsi va la vie.
Faugus
|