Masuwa Enani, par Michel Boyibanda et l'OK-Jazz
Bandeko ya Mbokamusika,
Losako! Napesi bino longonia mpo na mosala molamu bozali kosala. Nalingi koyoka mondule na kombo "Masuwa
Enani" eyembami na Michel Boyibanda na ebeteli ya TP OK Jazz na mibu 1967/69 nabanzi. Na nzembo oyo Boyibanda asangisi mungongo na Longomba mpo na kobimisa rumba
moko kitoooko mpenza. Bayembi yango na monoko moko ya Congo-Brazza. Soki moto ayembi monoko mwango, akoki kolimbolela ngai yango na lingala.
Botondi.
Wa bino ndeko,
Zembe
|