Pages
Catégories
Newsletter
Archives
Cet espace se veut un lieu de rencontres et d'échanges entre ressortissants de l'Afrique Centrale et Australe . Tout étranger connaissant ou voulant faire connaissance de cette partie de l'Afrique est le bienvenu. Nous y aborderons des sujets culturels en français, portugais, ou en lingala, selon les interlocuteurs . Notre devise:réduire la distance qui nous sépare du continent, par l'entretien de la mémoire collective, en recourant à notre musique dans toute sa diversité
Pages
Catégories
Newsletter
Archives
Publié par Messager
Jour oyo basalaka Langa-Langa Stars, biso nionso toyebi, ezali secret te, Papa Wemba akendeki liboso ya immeuble Vévé Center na commune ya Kasavubu, abandaki kolela pe kofinga Verckys, biso nionso tomitunaki soki Papa Wemba asalaki Verckys eloko nini, ba Kinois nionso bayebi la vie ya Papa Wemba banda na libandeli tii ndenge ayaki kokoma na force ya kosala Viva la Musica, alors eloko moninga amonela Pasi to souffrance, na ba sacrifices ya marque na marque, bongo ata ko motema yango ezalaka mabe, ata ko lokoso ya mbongo yango ezalaka, vraiment ya ndenge wana te, tangu Papa Wemba azalaki kolela ba Kinois nionso bapesaki ye raison, à l´exception d´une seule personne, DENEWADE, le seul Kinois à avoir appuyé Verckys dans cette aventure, s´il n´est pas lui-même le cerveau de ce Coup Monté et Réussi.
D´ailleurs d´emblée ba répétitions ya L.L.S. ebandaki déjà na Yolo, alors parmi moko ya ba Patrons ya L.L.S. oyo bawutaki na Viva la Musica, azalaki na niongo ya Forme to sape, lokola asilisaki niongo te, Papa Wemba akendeki na Yolo esika ba rép ya L.L.S ezalaki kosalama po na ko récupéré lokotro ya forme, tangu akomi kuna na Yolo, un temps Denewade abuakela Vieux Bokul lokotro, ata ko ba sambuisaka moto, kasi ya marque wana te, alors ke Vieux Zil apesaki musicien na ye forme na respect pe na boboto, ebongaki pe bapesa Vieux Zil mi lard na ye na ndenge ya propre, la reconnaissance n´est pas de ce monde.
Nayoka ke Denewade akufa, soki ezali ndenge wana, que son âme repose en paix, nayebaki ye personnellement, kasi acte asalaki na tango wana, mingi bamonaki yango bien, kasi na mokili batambolaka bongo te, ezalaka bongo te.
Vieux Verckys ye moko alobi yango malamu, azali muana ya commercant, ye moko pe azali commercant, bo comprendre ye, commercant alukaka na ye se mbongo, sans état d´âme. Yango wana tangu pillage esalamaka, ba commercants bazalaka ba premières victimes to ba cibles number one. Ata na nzembo ya NAKOMITUNAKA est-ce que Vieux Seskoul mutu atindaki ye ayemba yango, nionso wana ezalaki kaka esprit ya commercant, kotiya zolo partout likolo ya kolanda nzimbu, yango pe esalaki ke Vévé Center etelengana moyen esila ezalaki te, puisque ba banques nionso na Kinshasa eboyaki kodefisa ye mbongo, abosanaki ke ba banques ya Congo ezalaki ya ba Noko Belges soit ba chrétiens. Ata alobi ba demi vérités kasi ba Kinois nionso bayebi masolo ya Vévé Center, lelo tosuki wapi.
La Kinoise
Mace, femme africaine, par Djo Mali et L.L Stars