Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager


un commentaire vient d'être posté par Seli Wata sur l'article Henri Katalay se souvient de St. Jean,

Seli Wata Homme de la Mer, vieux bal na tangu wana soki obengi ye Seli Wata ye akozongisa Homme de la Mer - allusion faite a Mamie Wata, Seli c'est la version lingala de Cheri -, na vieux mususu
azalaki kofanda na Bukama vers avenue Mushie, Papa Baudouin, kombo na ye ezalaki na yango Baudouin te, ezalaki nde surnom, balobi mokolo Roi Baudouin ayaki na Congo na 1955, alors balekaki na nzela
ya mabele, rue Bukama na Commune ya Saint Jean, tangu bakomi liboso ya lopangu ya vieux Baudouin, voiture ya Roi etelemi, mpe Roi Baudouin akiti na voiture akoti na lopangu ya Papa oyo, atali
ndenge nini lopangu ezali, ndaku na kati, Roi abaluki na sima ya ndaku atali Kikoso, Wc etc... Roi apesi Papa Nkolo lopangu mbote, akoti na voiture mpe akeyi na ye. Na sima wana Papa na biso sur
rue Bukama, azwa kombo ya Baudouin en souvenir du Roi des Belges, na 1960 tangu President Kasa-vubu azalaki koleka na voiture na rue Bukama, akomi lisusu na liboso ya lopango ya Papa Baudouin
atelemi, kasi Vieux Kasam akitaki na voiture te, nde Papa Baudouin motu ayaki kopesa ye mbote na bala-bala, tellement Papa Baudouin akomaki populaire na Saint Jean, lokola biso tozalaki bana mike,
tozalaki kokanisa Roi Baudouin ezali nde ye Papa na biso oyo.

 

Seli Wata

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article