Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

securedownload.jpg

Ba ndeko,

 

Mikolo miye tokomeka kobeta masolo ma qualification  mpe participation ya Léopards du Zaïre na Coupe du monde 1974 na République Fédérale d’Allemagne (R.F.A.).

Coupe d’Afrique des nations ewuti kobetama na mars 1972 na Cameroun. Na ba joueurs oyo entraîneur Blagoiev Vidinic azali ko compter na bango mpo na kosala sélection oyo ekobanda kobeta ba matchs ya qualification mpo na mondial 1974, tozali na Gardiens : Kazadi, Pombi, Kalambayi, Mukalayi

Défenseurs : Lungwuila, Mukombo, Bwanga, Katumba, Ngoie, Kitenge, Kilasu

Milieux : Saïdi, Mutombo, Kapata, Kondi, Kidumu, Mavuba, Mawa

Attaquants : Kalala, Tshinabu, Kakoko, Mayanga, Ngassebe, Kembo, Tshamala, Ntumba.

Ndenge ezali komonana, Kialunga, Mange, Kibonge, Mokili bazalaki te. Les deux derniers babetaki VIIIème Coupe d’Afrique te mpo  Saïo akendaki na Grèce sans autorisation de sortie ya Fédération Congolaise de Football Association. Kibonge, ye, azalaki en conflit na Vidinic. Kembo, bien que azalaki mpe na conflit, Vidinic azongisaki ye après campagne ya Cameroun. Kialunda alingaki lisusu te sima ya polemique ebimaki na match contre Mali na demi-finale. Mange abandaki lisusu ko tenir te na concurrence ya ba jeunes lokola Ngoie na Bwanga.

Entre fin ya C.A.N. 1972 (mars)  na premier match ya éliminatoire mpo na R.F.A 1974 (juin), Léopards du Zaïre ekutanaki na na match amical na club ya Spartak de Moscou. Yango eyaki na Kinshasa sur invitation ya Fédération Zaïroise de Football Association (FE.ZA.FA.) mpo na kobeta match mibale na A.S.Vita Club na Léopards du Zaïre.

Le, 20 mai 1972, Léopards ekutani na Spartak de Moscou mpe ba équipes mibale ebetisaki :

Léopards : Kazadi (but), Lungwila, Mukombo, Bwanga, Ngoie (défense), Mutombo, Saïdi « capitaine », Ntumba (milieu), Mayanga, Tshiamala, Tshinabu (attaque)

Entraineur : Vidinic

Spartak : Darvin (but), Logoret, Olshansky, Boukievry, Kokorev (défense), Piskarev, kusalinov, Papaev (milieu), Kalinov, Elorovitch, Redine (attaque)

Entraineur : Simonian

 

Président Mobutu na mama Sese bazalaki mpe wana parmi public oyo eyaki kotala match. A la grande surprise ya batu oyo bayebaki ndembo ya Zaïre, FE.ZA.FA. eponaki arbitre Fula mpo a diriger rencontre oyo. Et portant, ba meilleurs lokola Libambu, Lotoma ou encore Malunda bakokaki koponama, kasi, Fula nde azalaki choix ya Fédération.

Tango ndembo ebandi kotambola, public ezalaki surpris te na ebeteli ya Spartak de Moscou mpo emonaki yango déjà na précédant match ebetaki na A.S. Vita Club. Batu banso bayebaki que Léopards akozala na tache facile te mpe esengeli penza babeta makasi mpo balonga ba Moscovites.

Kobanda kaka match ebandi, capitaine ya Léopards, Saïdi, afongoli Tshamala, kasi Boukievery ayaki mbangu kokanga ye. Sima ya wana, Redine, alambi Lungwila mpe abuakeli Papev. Ye atindi munduki, Kazadi alandi kasi ndembo ebeti na barre transversale (latte). Alerte wana, epesaki déjà  idée ya loyenge ya ba Moscovites. Bango babandi totambusa ndembo ndenge esengeli mpe kosala ba accélérations ya somo na ba précisions na ba passes na bango. Na ebeteli wana, Kanilov aweli balle na Mutombo, alongi duel mpe atindi munduki en direction ya but ya Kazadi. Ce dernier a barrer ballon mpe Lungwila a récupérer mbala moko asali relance epayi ya Saïdi, ye apesi na Ntumba, a tirer, kasi ekokaki ko inquiéter Darvin te. Suite ya action ya Tshamala na Tshinabu, Kokorev abimisi ballon na cornet. Tshinabu akati cornet. Na kopumbua ya Tshamala, atindiki Darvin mpe yango emonani polele, kasi arbitre a sifflet te, balle ekomeli Ntumba mpe apumbuaki nde a beti coup de tête, atie premier but ya Léopards.

Sima ya but wana, Léopards ameki mua moke ko équilibrer jeu mpe abandi kosala mua ba attaques, kasi, finition ezalaki malamu te. A quelques minutes avant mi-temps, Spartak esali lisusu construction wuta camp na bango, Kokorev, Kusalinov abuaki epayi ya Redine, atiki Mutombo na Lungwila mpe abuaki balle na kati, Papev amibuaki elongo na Kazadi, kasi ballon ebeti na montant transversal. Le temps Kazadi akoma na mabele, ballon ezongi lisusu en jeu na makolo ma Elorovitch mpe abuaki yango na kiyanda. Wana nde epesaki egalisation 1 à 1. Mpe bakeyi na mi-temps.

Na retour mpo na deuxième mi-temps, Vidinic akotisi Mavuba na esika ya Mutombo mpo na komeka ko pesa impulsion mosusu na milieu du terrain. Kobanda ya deuxième période, ezalaki lokola suite ya première période mpo Spartak ebandaki kaka na elulu oyo esilisaki na yango première mi-temps. Piskarev atindi tir puissant, kasi Kazadi alaleli yango sans problème. Public ebandi ko pousser Léopards mpe Tshinabu abomi successivement Kokoren na Olshansky, abuakeli Mayanga, ye abinisi Boukievry, kasi a écraser tir na ye mpe ekeyi ndenge alingaki te. Papaev lisusu, akimisi Saïdi, mpe Bwanga akangi ye. Ngoie a récupérer ballon, abuakeli Saïdi, abomi Kusalinov, afungoli Ntumba, atindi tir, kasi ekeyi pembeni. Papev lisusu, abomi Mavuba, aleki Ngoie, afungoli Kusalinov oyo a se lancer lokola fusée, en avance sur Bwanga, mpe face à face na Kazadi. Tango Kazadi azali koya kokutana na ye, a lauber ye. Kazadi ameki kozonga sima mpe apumbue mpo apeta ata claquette na ballon wana, lokuta, lauber ezalaki imparable! Bwanga a continuaki toujours course na ye sima ya Kusalinov mpe aleki ye tango a ralentir course na ye na laube asali Kazadi. Na action wana nde Bwanga akomaki de justesse na ligne de but mpe na maîtrise extraordinaire alongoli ballon wana. Stade mobimba ebeteli ye maboko na détermination oyo atiaki mpo na kolongola balle wana.

Na récupération ya ballon an milieu du terrain, Saïdi apanzi milieu du terrain, a pesi na Mayanga mpe a lauber Logolet na Boukievry. Tango asali laube wana, aniefuki bango. Kasi na action wana, arbitre Fula a sifflet mua charge ya Boukiervy sur Mayanga, kasi mayanga ayokaki sifflet te mpe na élan ya magnifique action na ye, a tirer mpe balle ekoti. Kasi, arbitre Fula ye a sifflaki faute légère oyo au lieu atika avantage mpo ezalaki na incidence te na action ya Mayanga mpe a perdaki avantage ya contrôle ya ballon na ye te. Tango a sifflet, ezalaki évident que Mayanga a laubaki Logolet na Boukievry libanda ya surface de réparation mpe Boukievry a chargeaki Mayanga toujours na libanda ya surface de réparation. Fula apesi penalty na Mayanga !!! Stade mobimba ekamue mpo ezalaki tellement flragrant que décision oyo ezalaki maladroite mpe ewuti na conséquence ya mauvais jugement ya Fula na action de jeu. Bon, Mayanga abeti penalty kitoko mpe Léopards etie deuxième but à quelques minutes ya fin du match. Yango ezalaki score final ya match mpe e reflétaki vraiment réalité te mpo Spartak etiaki Léopards na difficulté makasi. Soki Léopards e gagnaki na but suite ya action ya Mayanga, elingaki ko changer rien mpo na ensemble ya physionomie ya jeu mpo sur l’ensemble Spartak elakisaki un bon football mpe Léopards bien que bazalaki na mobulu mais babundaki ndenge esengeli. Na cours ya jeu, Kembo akotelaki Tahamala mpe  Kakoko azuaki esika ya Tshinabu.

Sima ya ko tirer ba renseignements sur match amical oyo, Vidinic ameki kobongisa équipe na ye mpe Léopards esali déplacement ya Lomé na Togo esika ekeyi kokutana na Eperviers ya Togo na stade Eyadema le, 6 juin 1972.Zaire ezalaki na groupe 3 na ba pays oyo : Cameroun - Gabon ; Nigeria - Congo ; Ghana - Dahomey mpe Togo - Zaïre.

Na match aller ya premier tour ya qualification mpo na mondial 1974, oyo ebetamaki na Lomé kati na Eprviers yaTogo na Léopards du Zaïre, yango esukaki na score ya zéro but par tout. Ba actions ebele esalemaki kuna mpe Eperviers ekumbamaki na meneur na bango, Kaolo mpe na centre avant, Djosse. Kasi bango bakokaki kotiya Kazadi ata but moko te, même soki na suka ya match balobaki que absence ya ba joueurs na bango mibale oyo babandaki mpe kobeta na Etoile filante : Fiaty na Adjevi, e diminuaki équipe na bango mua moke. Côté ya ba Léopards, Kazadi azalaki exceptionnel mpe asalaki ba kata minene kuna. Capitaine Saïdi mpe atikalaki du reste te, azalaki excellent comme d’habitude empe alakisaki lisusu exemple ya un bon capitaine mpe meneurs d’hommes. Bwanga na Ngoie na défense mpe babundaki ndenge esengeli na appui makasi ya Mutombo.

Le, 20 juin 1972, match retour na stade du 20 mai. Ndenge ezalaka kaka na ba grands rendez-vous, stade etondaki mpe doute ezalaki te na oyo etali qualification ya Léopards na prochain tour. Kasi, ata ko bongo, na football tout est possible ! Yango wana esengelaki kaka kozala ekenge mpo na ndembo makambo mingi mabonguanaka.

Zaïre ebetisaki : Kazadi (but) , Lungwila, Mukombo, Bwanga na Ngoie (défense), Mutombo, Saidi « capitaine », Ntumba (milieu), Tshamala, Kembo, Kakoko (attaque)

Entraîneur : Vidinic

Togo : Maye (but), Pindra, Ohin, Taple, Hunkpati « capitaine »(défense), Fiaty, Ahanou, Sopko (milieu), Kaolo, Djosse, Sadji (attaque)

Entraîneur : Oscar Antony

 

Kobanda kaka match ewuti kobanda, Kakoko apesi accélération, asopi Taple, apesi Kembo, Kembo abuakeli Ntumba, ye apesi Hunkpati crochet mpe alandisi na tir, kasi eketi pembeni. Sans kopesa Eperviers temps ekota na match, Léopards ebandi mbala moko attaque à outrance mpe siège permanent ya camp togolais. Kakoko afungoli Kembo, bien lancé, atindi munduki, Maye alaleli yango. Na mauvais dégagement, Saïdi a récupérer, asopi Fiaty, apesi na Kembo, munduki mususu, emati mua likolo moke. Na pression wana, Eperviers bazali ko subir attaque sur attaque ya Léopards. Moke te, Mukombo apelisi démarrage na couloir gauche, akateli Saïdi, Saïdi apesi na Ntumba mbala moko mpe Ntumba apouseli Kembo. En toute finesse, Kembo afungoli moniam : 1 à 0.

Léopards e relâcher pression te, Saïdi en combinaison na Mutombo, abuakeli Tshamala mpe a tirer, kasi, Maye abuaki balle na cornet. Sima ya wana, Kakoko afandisi Pindra na dribble, apesi accélération, abuakeli Kembo, Kembo asali une bonne passe na Ntumba, sans hésitation atindi munduki mpe Maye aningani ata koningana te mpe amoni yango te. 2 à 0.

Sima ya wana, Mutombo azui passe ya Ngoie, mpe a lancer Kembo, Kembo apesi na Ntumba, a tirer, kasi Maye akangi yango. Togo mpe esali mua makasi, na bonne action menée na Kaolo, afungoli Djosse mpe a tirer en force, kasi Kazadi a plonger mpe akangi balle wana. Na première mi-temps, Saïdi, Mutombo na Ntumba batambusi  milieu na défense ya Togo mutu complètement.

Na deuxième mi-temps, Thamala abimi mpe Tshinabu akoteli ye. Yango e apporte modification moke na attaque ya Zaïre : Tshinabu akeyi na aille droit, Kakoko na aille gauche, Kembo atikali centre avant mpe Ntumba avant centre de soutien.

Kokota na Tshinabu emekaki lisusu mouvement makasi na attaque ya Léopards. Tshinabu très en forme, tango akoti, abandi nakolakisa Ohin, abuakeli Saïdi, ce dernier azongiseli ye en pleine course mpe Tshinabu a reprendre ballon wana na volée, kasi Maye azalaki ekenge alandi yango mpe abimisi yango na corner. Lungwuila asali transversal na Mukombo. Ye, abukeli Mutombo, Mutombo apesi Tshinabu. Ye a feinter Fiaty, Fiaty atengami, abomi Hunkpati mpe apesi Ntumba. Ntumba a tirer en force, kasi Maye a détourner yango na corner. Ba togolais mpe bameki ko inquiéter défense ya Zaïre na action ya une, deux, kati na Kaolo na Djosse, kasi esuki na incomprehension mpe Ngoie apesi balle tranquillement na Kazadi.

Sopko abimi, Anaton akoti. Kasi milieu ya Togo ezali kaka kokoka ko s’organiser te mpo Mutombo, Saïdi na Ntumbo babandaki ko contrôler yango parfaitement bien mpe ko poser ba sérieux problèmes na plan de jeu na bango. Kaolo aye kobima mpe Covi akoti mpo ameka ko mener ba attaques, kasi Bwanga asimbaki ye makasi ndenge kaka asimbaki Kaolo.

Tshinabu tellement que azalaki intenable, abandaki kosala nionso alingaki : kosopa, accélération na ba crochet ya somo. Apesi accélération na droite, abuakeli Kembo, Kembo apusani moke, abuakeli Ntumba oyo abandaki koya en toute vitesse mpe akutani na balle ya troisième but. Avant wana, na bonne ouverture ya Fiaty, Covi ameki ko contrôler avant a tirer, kasi Bwanga azalaki très rapide mpe abotoli balle, asali passe en retrait na Kazadi.

Lungwuila, amati, apuseli Tshinabu, a dribbler Taple, Fiaty ameki koya en couverture kasi aleki ye  lisusu, mpe abuakeli Kakoko balle na makolo mpe atie quatrième but. Ba éperviers balembaki te, bamekaki ba actions, kasi Kazadi abandaki kokanga nionso mpe défense ebandaki ko stopper bango. Par ailleurs, Ntumba azalaki bête noire na bango mpe kokota ya Tshinabu eyali lisusu ko animer match makasi.

Togo azalaki éliminer mpe Zaïre e se qualifier mpo na prochain tour. Na prochain match akobeta na Cameroun le, 11 février 1973 na Douala mpe le, 25 février 1973 na Kinshasa.

 

A suivre…

 

Patriotiquement,

 

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
R
<br /> Ntoma , to ndeko oyo ayebi akokki koyanola motuna oyo. Eloko nini oyo Katumba asalaka a l'epoque po bapesa ye etumbu(punition) ya kobeta ndembo te na Leoprds po na ngonga moko boye, asalaka<br /> nini???Azalaki moto ya kokengele to defenseur monene ya mboka na biso na Lion pe na Leopa pe na lingomba naye ya Englebert.  Merci.   Richard Kasongo.-<br /> <br /> <br />
Répondre