Overblog
Editer l'article Suivre ce blog Administration + Créer mon blog

Archives

Publié par Messager

securedownload

Ba ndeko,

Suite ya lisolo…Le, 11 février na Douala, match aller ya deuxième tour ya ba qualification mpo na mondial 1974, ebetamaki kati na ba Lions indomptables ya Cameroun na  Léopards ya Zaïre.

Kazadi (but), Lungwila, Mukombo, Bwanga , Ngoie (défense), Mana, Kidumu, Kembo (milieu), Mayanga, Ntumba, Kakoko (attaque)

Entraîneur : Vidinic

Cameroun : Akaa (but), Kaham, mbengalack, Tsebo, Nlend (defense), Oye, Mangua, Kwedi (milieu), Eboue, Ndongo, Ndonga (attaque)

Entraîneur : Schnittger

Na match aller, Ntumba atiaki un magnifique but  na première minute ya match. Leopards ekokaki ko gagner un score munene soki ba attaquants ba exploitaki malamu ba occasions de but oyo bazuaki. Lions indomptables ya Cameroun esalaki nionso mpo ezongisa but ya tongo oyo ba encaissaki, kasi bakokaki te mpo Kazadi na défense na ye bazalaki makasi mingi.

Le, 25 février 1973, na match retour na Kinshasa ba equipes mibale etandaki ba formations oyo :

Léopards : Kazadi (but), Lungwila, Mandiki, Bwanga, Ngoie (défense), Mana, Kidumu, Kembo (Milieu), Mayanga, Ntumba, Kakoko (attaque)

Entraîneur : Blagoje Vidinic.

Lions indomptables : Akaa, Kaham, Ebanda, Tsebo, Nlend (défense), Oye, Mangua, Kwedi (Milieu), Eboue, Ndongo, Ndonga (attaque)

Entraîneur : Peter Schnittger

Soki totali na composition ya Léopards, Kidumu azali lisusus titulariser na esika ya Saïdi, azongeli forme na ye mpe a reprendre place na ye na milieu du terrain. Mana azali na deuxième sélection na ye, indiscutablement azali na top na ba matchs ya LI.F.KIN., Coupe du Zaïre na prestation na ye na Douala na première rencontre officielle, epesaki Vidinic satifaction. Logiquement, Mutombo a perdre esika na ye. Mandiki azui place ya Mukombo mpo ye azali na dérangement azuaki wuta na match ya Douala. A part ba jeunes lokola Mana na Mandiki, ba misusu mpe bakoti sika na équipe nationale : Djoboke, Muepu na Mbungu « Tex ».

Tango kaka arbitre gabonais, Wolbert Angliley apesi sifflet ya ebandeli ya match, Kidumu abuakeli Mayanga en accélération. Aleki Ebamba lokola mupepe abuakeli Ntumba na likolo mpe ye apumbue abeti balle na mutu, stade etelemi mpo eyebi que eloko ya ndenge wana Ntumba a rataka yango te ! Lokuta, Akaa asali suka na détente mpe alongoli yango. Wana biso banso tosimbi mitu mpe totikali ya kotelema. Mayanga akati corner, esali mua cafouillage mpe Tsebo a dégager. Sima ya action wana, Bwanga apesi balle na Mana, ye, a dribbler Mangua, a sopi Nlend, abuakeli Kidumu, bien palcé, atindi munduki. Akaa alandi yango mpe abuaki ballon wana na corner. Ba camerounais mpe bameki mua ba attaques na Eboue, Ndongo na Ndonga, kasi défense ya Léoprds ezalaki ebende. Moke te boye, tomona mua agitation na zone neutre, na mopanzi ya vestiaire ya Léopards ndenge ezalaka, ba matchs ya minene nionso, ebetamaka na assisitance ya comité de recherche. Il parait que but ya Léopards ebungi, ezali komonana te. Mais, buts wana ebungi ndenge nini mpo hier na butu na Môtel Fikin, sango ebimaki que match oyo ezali ya 2 à 0, ndenge nini lisusu ba buts wana ezali komonana te ? Entre temps, na terrain, ba Léopards bazali lisusu kobeta malu te, ba actions ebandi kotonda na ba maladresses mpe ba Camerounais bakomi ko dominer. Na mua relâchement wana, Ndonga atikali libre. Na kidiba wana, Oye abuakeli ye balle na maboko, wuta à nous,  Ndonga atandi démarrage na mopanzi, abomi Kidumu, a effacer Lungwuila, alambi Ngoie mpe atindi mombombo. Kazadi amibuaki joliment, a toucher balle insuffisamment mpo na kobimisa yango mpo mombombo elekaki makasi mingi, ekangami na moniama. 1 à 0 en faveur ya Lions indomptables. Stade mobimba (sauf sélection ya Cameroun) efandi kimia neti na cimetière. Wana epesi une douche froide. Muke te, arbitre a siffler mi-temps.

Na mi-temps wana, malgré animation ya fanfare ya gendarmerie nationale, morale ezali kaka kobonga te : Léopards azali mener mpe côté laboratoire, ba buts ya Léopards ebungi. Donc, tozali na kati ya « Qu'est ce que s'est » koko na interrogation !!!

Na deuxième mi-temps, Léopards ebandi ko attaquer na ndenge ya somo mpe kokimisa ba défenseurs camerounais mbangu, kasi, finition ya ba actions ezali kaka kosalema malamu te mpe Ntumba azali kozua ba ballon travailler malamu te, en plus ya marquage serrer ya Tsebo sur Ntumba mpe na ndenge Mangua abandaki ko casser médiane, ebandako ko perturber organisation ya milieu ya Léopards. Vidinic ameki kosenga na Mana na Kidumu bameka kopanza défense ya Cameroun en utilisant ba dribbles, na une, deux mpe appuyer na ba accélération mpo  na ko désorienter bango na objectif ya ko libérer marquage sur Ntumba na Kembo. Yango e fonctionner te mpo défense ya Lion indomptables etikalaki kaka regrouper mpe Nlend abandaki ko appliquer très bien ba consignes ya Schnittger na jeu ya défense en ligne mpo soki balandi ebeteli ya ba techniciens zaïrois, rapidement eko désorienter bango.

Vidinic abimisi Mayanga mpo abandaki kokota te. Ebanda alataki ye na nzotu mpe abandaki kobetela ye kuata moko ya suka. Tshinabu azui esika ya Mayanga. Sima,  Kembo abimi, mpe  Mbungu akoti. Tshinabu abandi kosopa na kokata ba très bons ballons, kasi Nlend azali kolongola yango na mitu. Vidinic asengi na Kakoko na Tshinabu basala travail individuel na ba ailles mpe bafungola sur Mbungu na Ntumba. Kakoko abinisi Kaham ndenge nionso, kasi ba Camerounais bazali kaka kobeta regrouper na défense. Tshinabu mpe azali kofandisa Ebanda, de fois Ebanda soki babimisi ye na feinte libanda, lokolo ebimi na botine, kasi azali kozonga mbangu sima ya Tshinabu, wana Tsebo ou Nlend, moko aye na couverture. Ntumba, Mbungu, Kakoko, Tshinabu, Kidumu bameko ko tirer na distance, ko pénétrer, kasi solution ezali kozuama kaka te tee mpo de fois ba tirs ezalaki cadrer te, de fois mpo na précipitation.

Défense ya Léopards mpe ezalaki de tout repos te mpo Eboue asakanaki na Mandiki ndenge nionso alingaki, Kwedi, Ndongo, toujours classe, na Ndonga babandaki kobeta makasi mpe kopesa défense na Kazadi musala. Kasi Ngoi na Bwanga bazalaki en super forme mpe bakangaki bango na ndenge esengeli . Kasi, esengeli mpe ko souligner brutalité ya Bwanga sur Ndoga. Yango nde ayaki kobima mpe atiki esika na ye na Akono. Müller mpe ayaki kokota na esika ya Ndongo. Kasi changement etikalaki kosalema te na  na score ya 1 à 0 en faveur ya Lions indomptables.

Tango wana, règlement elobaki que na cas ya égalité de buts et de point na ensemble ya deux match, esengeli match de barrage na 48 heures oyo elandi derniere rencontre. Donc, match wana ekobetama na stade du 20 mai mokolo mua 27 février 1973.

Mardi wana, ba équipes oyo nde ebetaki

Léopards: Kazadi (but), Muepu, Kilasu, Bwanga, Ngoie (défense), Mana, Mavuba, Kidumu « capitaine » (Milieu), Tshinabu, Ntumba, Kakoko (attaque)

Cameroun : Akaa (but), Kaham, Ebanda, Tsebo, Nlend « capitaine », oye, Akono, Kwedi (milieu), Müller, Mangua, Eboue.

Na match de barrage oyo, Mavuba asengaki permission akende ko travailler match na tata na ye mpo ye nde abandaki kosukola ye mpe kolatisa ye wuta na ndaku. Avant kutu Léopards ekoma, Kinshasa mobimba tsango etambolaki que Cameroun akolala na 2 à 0. Il parait que arbitre gabonais, Wolbert Angliley, asi aliaki biloko na ye mpe balambaki ye ndenge esengeli. Tngo wana, Président ya FE.ZA.FA., Citoyen Lokwa, azalaki na molende ya kosakana te.

Ndenge kaka Leopards ebandaki koband aba matchs na ye,  attaque a outance ebandi na Tshinabu. Na action ya liboso, Kaham ayambi mupepe, asopi Nlende, heureusement, Tsebo aye mbangu kobimisa balle na corner. Tshinabu, tres intelligent, amoni que ba mbinga defenseurs ya cameroun bakeyi kokangama na kati,  akati corner à la reimoise mpe balle ekomeli Mana. Defense ya cameroun e se rencdre compte que facon Tshinabu a decaler Mana ekopesa bango temps ya ko remonter. Babandi kobima mbagu mpo baya sur le porteur du ballon. Na kobima wana, Mana asali lutu na Kakoko, ezui bango a contre pied. Na moment wana, Kakoko atandi démarrage mpe a reprendre à la volée du pied gauche, mpe ballon ekeyi kolala sima ya Akaa. Stade etelemi, Léopards ebuaki 1 à 0.

Tango bale ezongi na tondo, Mana abotoli, apesi na Mavuba, akimisi, Oye, abuakeli Tshinabu, Tshinabu azongiseli Ntumba, a reprendre balle mpe Akaa abimisi yango libanda. Sima ya wana, Mavuba, lisusu, abomi milieu ya Lions indomptables, abuakeli Kakoko mpe asali débordement, atindi munduki, kasi eleki juste pembeni ya poteau. Mavuba atambusi lisusu ballon, apesi na Kidumu, ye, alekisi na Ntumba, a tirer, kasi Akaa akangi yango. Wana, ba Camerounais bazali komonana te. Muke te, Müller ameki ko tirer, kasi ezalaki faible mpo e inquiéter Kazadi. Müller lisusu asali combinaison na Akono, kasi esukaki na resultat malamu te. Mi-temps eye wana.

Na reprise, ba Camerounais babandi komeka ko pénétrer en profondeur défense ya ba Zaïrois. Eboue a déborder Ngoie na Bwanga mpe akomi face à face na Kazadi. Atumbi tir, Kazadi apikuami na mabele mpe a décoller akangi ballon wana mpe alingami na yango na mabele. Wana stade mobimba egangi lokola but mosusu ekoti. Kilasu, Mana, Bwanga na Ngoie baye kosimba ye na mutu, question ya ko féliciter ye. Wana baninga mosusu bazali mosika, ba admirer mpo eloko wana ezalaki suka na nzoplo. Ba Camerounais bazali kolembisa te. Kwedi a lancer Akono, mbala a tirer instantanément. Kazadi lisusu a décoller mpe abimisi ballon wana na corner. Müller akati corner, kasi Bwanga abimisi yango mpe abuakeli Mavuba, ye, asopi Tsebo, abuakeki Kidumu kasi, akomi na retard. Tango ballon ezongi na camp ya Léopards, Mangua a tindiki balle, heureusement Mwepu azalaki na ligne mpe a dégager na mutu. Léopards e continuer ko appuyer en reposant organisation ya ba attaques sur un Mavuba de grand jour. Mavuba na Mana bazalaki ko carburer liseki te. Mavuba azui passe ewuti na Mana, akimisi Akono, aleki Nlend mpe abuakeli Ntumba, stade etelemi, Ntumba a tirer parfaitement. Wapi, Akaa a barrer ballon ya Ntumba. Mavuba lisusu, asukoli milieu ya Cameroun, aluki lisusu Ntumba, Ntumba azongiseli ye, asali transversale na Tshinabu, en pleine course, atumbi, Akka lisusu alongoli yango de justesse. Wana batu bazali koloba esengeli kotinda minduki ya boye mpo maboko ya Akaa ezika. Soki eziki, wana akobanda lisusu koluka kokanga ba tirs te. Muke te, Mbungu akoti esika ya Ntumba. Na multiplication ya ba attaques wana, sur une faute discutable sur Mbungu, arbitre a siffle penalty (wana ebengamaka likambo ya mabele). Ba Camerounais batomboki balandi ye, yango e changeaki eloko te. Tshinabu abeti yango ndenge amesana ko classer yango, Akaa asala mobembo, 2 à 0 na quelques petites minutes ya fin du match. Avant wana, Müller ayaki kobima mpe Mouthe akoteli ye, Bwanga mpe abimaki, par précaution mpo ba Camerounais babandaki ko reprocher ye na marquage asalaki sur Ndoga que yango nde epesi ye blessure. Djoboke akotelaki Bwanga. Bwanga azalaki meilleur mpe abetaki kitoko. Kasi, esengelaki kobomba ye mpo kanda ekomaki makasi côté camerounais. Kaham abandaki kokoka kokanga Kakoko te, Kilasu a tournaki bien. Mwepu azalaki na sang froid mpe abetaki bien na match na ye ya liboso na equipe natinale. Kazadi, comme d’habitude azalaki magnifique na role na ye ya dernier rempard. Na milieu Mavuba na Mana bazalaki somo.

Tsebo akangaki lisusu Ntumba makasi, Akaa alongolaki biloko ya bien mpe tokanisaki que ekokota. Eboue na Manga mpe babetaki malamu mingi. Léopards du Zaïre elongi mpe na troisième tour ekokutana na Black Stars ya Ghana le, 5 août 1973 na Accra mpe mokolo mua 19 août 1973 bakokutana na Kinshasa.

A suivre…

Sportivement,

Emmanuel Kandolo

Pour être informé des derniers articles, inscrivez vous :
Commenter cet article
S

Losako Kulutu Emmanuel Kandolo,

Nalandi masolo ya Leopards du Zaire contre Cameroun ya 1974 na bokebi penza, ndenge lisolo ebetami lokola kaka journaliste azali kosakola na tango ndembo
ezalaka kobetama, eleki deja ba mbula mingi, ndenge oza kobeta lisolo oyo oza pe kolanda yango liboso ya TV too o memorisa les 90 minutes mobimba, c'est impensable et incroyable, quelle
memoire!

Soki ozali na bilili yango lisusu ekozala malamu otia yango na blog po biso baye tozalaka bana totala yango.

Nayebi que na mokolo ya match ya Leopards na Yougoslavie tozalaki kolanda match wana na radio ya la voix du Zaire, nazalaki koyoka francais te po nazalaki
kaka na 8 ans, kasi chaque fois journaliste azalaki koganga wooooh nazalaki kotuna kulutu oyo asimbaki radio atiaki yango pene-pene ya litoyi na ye, pire encore radio yngo ezalaki ya ba
piles, sikoyo balobi nini?

Wana ye azongisi na mongongo ya kolemba "batiye leopards but mususu".  Nazalaki ko sentir douleur na
elobeli na ye bref ezalaki mawa koleka.

Na interview ya Vieux Kembo Mr But mu mikolo avant akufa alobaki: "Bresil kutu ezalaki makasi kasi e gagnaki biso na score makasi te, pona nini kaka
Yougoslavie?  Ezalaki sabotage po tozalaki kobeta kasi tozalaki kofutama te."

Pe vieux Mayanga na interview na ye na USA alobaki: "Ba joueurs mosusu babimaki na bango na butu wana pe babetaki balle na kwitu ya masanga po bazalaki
demoraliser".

Toza kozela toyoka plus.  Mais b'anciens ya Leopards mosusu baza nanu vivant, pona nini mboka mosika ezui makanisi ya ko interviewer bango te ndenge Mr
Kangudie asali, eza initiative ya bien, felicitation Mr Kangudie pour l'nterview de Mr Cap Saidi .

Longonia na masolo kitoko.

Serge (Kongo na biso)

Répondre
J

J'avais environ 10 ans, mais je me rappelle ce match Zaire-Cameroun.
Les details que Emmanuel Kandolo donne sur les compositions des Leopards me permet d'analyser un peu le syteme de jeu de VIDINIC.

Jean KEMBO, avant-centre de soutien (No 10), au match retour contre le Cameroun. En fait, KEMBO jouait deja le 10 dans Vita Club depuis un bon bout de temps. Avec le jeune Gary Ngasebe comme
avant-centre, KEMBO avait le 10 contre RENNAISSANCE TSHIPEPELE en decembre 1971 a Luluabourg. KIBONGE et DIANTELA faisant le milieu. KEMBO fera souvent de l'avant-centre de soutien avec VITA en
1972. Donc, c'est pas etonnant si VIDINIC l'aligne a ce poste.

Mais, ce qu'on retient de  ce ZAIRE-CAMEROUN a Kinshasa, c'est la defaite des LEOPARDS (0-1). Et la victoire apparemment facile des memes LEOPARDS au match de barrage (2-0). Avec le recul,
on peut voir le changement catalyseur opere par VIDINIC. Il ecarte un avant-centre de soutien KEMBO et insere un vrai mediateur MAVUBA au milieu. KIDUMU, un bien meilleur avant-centre de soutien
et organisateur, prend la place de KEMBO. Le resultat: Les LEOPARDS marchent sur les Camerounais.

En fait, c'est deja ca le football au debut des annees 70: le milieu du terrain est elargi. L'equipe qui avait le mieux parfait ce systeme au Zaire de l'epoque est le VITA CLUB-1973 avec le trio
KONDI-MAVUBA-KIBONGE. Avec eux, ce n'etait plus du 4-2-4, c'etait deja du 4-3-3. KIBONGE a le mieux personnifié ce systeme en etant un meneur de jeu PASSEUR-D'ABORD, et non buteur comme Kidumu,
Kembo, Mbabu Zumbel, Kabasu Babo et autres.

Répondre