Emmanuel Kandolo répond....
Chers amis, voici une partie de réponses de notre
chroniqueur Emmanuel Kandolo aux questions qui lui avaient été posées. Il est disposé à revenir sur les éventuelles omissions prochainement, dès qu'il sera de
retour.(MSG)
Ba ndeko Kula, Historien mpe na Sony Mokonzi,
Merci na ba rectificatifs na biso. Kasi, nazali kaka na motungisi ya koyeba équipage nini ekufaki na Goma na décollage ya Lockheed C-130H Hercules, mpo nayebi lisolo oyo ndenge nabeti yango, kasi kombo ya équipage nde ezali kozongela ngai kaka te.
Na oyo etali accident ya Commandant Justin Kokolo na équipage na ye na Kisangani, na banzi que ndenge version officielle elobi ekoki kozala ya solo mpo tango wana ba avions militaires na civils ebandaki kokita na kopumbua na aéroport ya Simi Simi. Yango ezali na plateau universitaire, na sima ya université ya Kisangani, na mopanzi ya clinique universitaire ya Kisangani mpe mosika te na résidence officielle ya gouverneur ya Haut-Zaïre. Aéroport ya Simi Simi tango wana ezalaki entourer na esobe mpe ba nzete ya mbila ebele. Possiblement, orage ekokaki kozala cause ya accident ou encore kake eluki panne électrique mpe e perturber alimentation électrique na bon fonctionnement ba instruments ya navigation mpo na mbula neti visibilité ezalaka nulle, il est difficile ya ko voler sans fiabilité na instruments. Mpe lisusu, esengaka compétence efanda ya ba techniciens ya tour de contrôle. Soki nionso oyo ezalaki malonga te, ezali pasi mingi. Banda aéroport ya Bangoka etongama, Simi Simi eyaki kokoma aéroport militaire.
Ndeko Sony Mokonzi, Merci lisusu na ba précisions opesi na manso okomi mpe nasepeli na éclaircissements opesi na ba conditions misusu ya ba craches neti na liwa ya Etisomba. Ezalaki vraiment dommage, ndenge bakufaki. Peut-être soki kaka mua ba secondes nde panne wana elingaki eyebana na sol.
Oyebi ? Nayebaki ba pilotes banso oyo natangi. Ndenge kaka ndeko Anaclet alobi awa, mingi bazalaki na Yolokofutela ou na ba hôtels du siècle na du midi. Tango ba travaux ya camp Badiadingi esili nde ba logeaki bango kuna. Heure wana tala ndenge ba filles babandaki kolanda bango ! Na ba parades ya ba défilés militaires, wana ba avions na ba hélicoptères ezali ko voler na rase motte (na très basse altitude). Bana ya Yolo, Matonge na Lemba bamesanaki na ba vols rase motte mpo ezalaki bisika ba pilotes bazalaki na ba relations ebele. Siamuna, Mbo, Tshitundu, Lianja, Nimy Longo, Lokoko, bazali ba chasseurs oyo babandaki kosala bilengi ya ciel.
Kabamba com-com (waba commandants) azalaki un sympathique elombe. Nayebi lisusu mosala remarquable asalaki na première guerre ya Shaba. Na oyo etali avion oyo ekendeki kokweya na ba ndaku ezali erreur humaine mpo pilote azuaki temps mulayi ya réaction mpe avion ekitaki mingi mpe e ricocher ba toitures na ba nzete.
Major Kabuya Matamba « Dadou » azalaki mpe un ami, ye abandaki kofanda na cité Salongo, comme la plupart ya ba officiers. Sima ya décision ya Président Mobutu oyo elongolaki ba officiers ya Shaba, Kasaï nionso mibale na Bandundu na armée, likolo ya procès des terroristes ou procès du siècle na 1978, Kabuya Dadou abikaki grâce na couverture ya oncle Litho Moboti Nzeyombo. Asengaki na Kikunda alukela ye esika mpe ayaki kokoma instructeur sur Cessna 310R na aéro club ya Ndolo. Akomaki mpe pilote personnel ya Litho Moboti Nzeyombo, na Cessna. Dadou akufa na maladi. Ndenge moko mpe na Commandant Gustave Babajiki Mukendi « B.B.J. », tango awutaka Italie na 1975 (même promotion na Kabuya) afandaka na avenue Denis na Yolo-Sud. Sima ya wana azui logement na camp Badiadingi na ba Kabuya wana nionso wana. Babajiki azali commandant sur DHC-5D Buffalo, un grand spécialiste ya vol na instruments ya navigation. Tandis que Kabuya azalaki makasi na vol à vue. Tango balongue balongoli bango na armée, akomaki commandant na ba avions ya Société textile de Kisangani, SO.TEX.KI. Tango Air Zaïre ekomi kosalela simulateur ya Libreville, ezuaki ye mpo a voler sur Boeing 737, kasi malheureusement maladi eyaki kolonga ye.
Siamuna azuaki problème ya pression na cockpit. Manque ya oxygène ekumbi na perte ya conscience mpe incapacité ya ko contrôler avion na ye mpe ebebisi mbala moko synchronisation ya ba numéros na crache munene. Yango wana a s’injectaki même pas. Télescopage wanae surprenaki baninga baye. Kasi elobomaka que batu ya motema mabe ba sabotaki avion na ye par jalousie na lolenge ba français na ba marocains bakumisaki ye mingi. Siamuna azali makasi na vol à vue mpe ba tirs na ye na ba objectifs ciblés ezalaki d’une rare précision. Abandaki kosakana na avion na ye lokola jouer.
Nazua occasion ya ko voler na ba commandants Bitumazala, Bukasa, Kabamba, Yambuya na ba hélicoptères Alouette na Puma na super Puma na Yambuya. Ya solo, Ayike Nzambe azalaki ko commander Alouette oyo ekueyaki na Général Antoine Ikuku Moboto (parachutiste, serpent de rails) kaka esika oyo abomaka batu tango ye azalaki exécuteur ya ba sales besognes ya Gouverneur Prospère Manzikala Madrakini. Malgré courage na bravoure militaire na ye, Général Ikuku, à l’époque, Lieutenant-colonel mpe commandant base militaire ya ba parachutistes ya Kimbembe pene na Lubumbashi, azalaki un tortionnaire mpe un tueur à gage oyo abandaki ko obéir sans discernement na ba ordres nionso ya koboma batu sans jugement ni procès Chef na ye Manzikala abandaki kopesa ye tango wana .
Na première guerre ya Shaba, Lieutenant Lwanga Etisomba azalaki Commandant na DHC-5D Buffalo. Ba commandants Bufalo basusu : Babajiki, Oketo, Makaya, etc. Kabondo azalaki copilote.
Colonel Lenga Lenga azalaki Musakata, tango alonguaka na Yolo, akomaki kofanda na Gombe, na avenue de la Gombe en face na ba Lycées prince de Liège (école belge) na René Descartes (école Française) na nzinga nzinga ya ambassade ya Burundi. Avion na ye ya liboso a pilotaki ezalaki Fouga Magister CM170R.
Ba appareils ezalaki ebele mpo tozalaki na sept avions Lockheed C-130H Hercules, trois De Havilland Canada DHC-5D Buffalo, quatre Douglas DC-4/C-54, deux Douglas DC-6. Na tie source na nse oyo e répertorier ba avions nionso ya armée de l’air congolaise.
Ba commandants nionso oyo, nazua occasion ya ko voler na bango mpe nazali ko rendre bango hommage na mosala na bango :
Commandants Babajiki, Oketo, Lwanga, Kabeya na DHC-5D Buffalo
Commandants Kikunda, Baruti, Leddi, Ngoy, Ntumba, Nzinga, Makaya, Mbo na Lockheed C-130H Hercules
Kabuya na Cessna 310R
Ndeko Sony Mokonzi, s’il te plaît, soki moyen ezali, okoki kotiela biso ba kombo misusu ekimi biso mpe na ba commentaires oyo ezali na makomi oyo olobeli awa, sur ba pilotes militaires na biso. Nazalaka na estime mingi na bilombe wana mpona mosala babandaki kosala. Mikolo kikoya, nakomeka kozongela accident ya Colonel Léon Mbo.
World Air Forces Zaire Air Force
Ba ndeko,
Moke moke tokomeka koyanola na mituna miyike ya ba ndeko ya blog na biso oyo.
NdekoNeto jpj : Nalingaki kotuna ndeko Kandolo, soki akoki kolobela ngai mua muke na muasi moko oyo azalaki cometat Madame Lessedjina mpe mobali na ye?
Emmanuel kandolo : Nayebi mua moke parcourt ya Mama Lessedjina. Kombo na ye ya jeune fille ezali Véronique Kiaba Lema Lutonto. Awuti na famille munene ya Kivu. Ye abalani na Sébastien Lessedjina Ikwame Ipu'ozia. Ce dernier, abotami na Léopoldville, le 12 mars 1939. Asali ba humanités na Collège Saint-Joseph ya Léopoldville. Sima ba kelasi na ye na université, akomi retenu assistant na université nationale du Zaïre (U.NA.ZA.). Tango akomi Chef de travaux, aye kozua occasion ya bourse ya United Nations Educational, Scientific and Cultural Organization (U.N.E.S.C.O.) mpo na kotanga na France. Tango mama Véronique abalani na papa Sébastien nde akomi kobengama Lessedjina Kiaba Lema.
Mama véronique azali originaire ya province ya Kivu. Asala ba études universitaires na ye na université ya Lovanium na faculté ya Sciences, na département ya Botanique. Première femme africaine oyo asali ba études ya Botanique mpe oyo asali travail scientifique na domaine ya environnement mpe conservation de la nature.
Tango asilisi kuna, na 1970, azui musala mbala moko na présidence de la République. Kokoma na ye ekutani mpe na projet ya kosala domaine présidentiel ya Mont Ngaliema. Aye kozua ebonga ya Conservateur en Chef ya parcs présidentiels. Sima ya wana, na deuxième législative yadeuxième République, ayekokoma Commissaire du peuple (Députée) ya circonscription ya Tanganyika na 1975. Na mbula elandi, 1976, ayekokota na gouvernement na qualité ya commissaire d'Etat (Ministre) na Conservation de la nature et Tourisme. Awumelaki mingi na ebonga wana. Sima ayekokoma Secrétaire ya Bureau politique du Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R.) chargée de la condition féminine. Azalaki mpe membre ya Comité central du M.P.R. Toujours membre membre ya Comité central ya M.P.R, azui ebonga ya P.D.G. ya Domaine agro-industriel et présidentiel de la N'sele (D.A.I.P.N.). Ayaki mpe kobebisa lokumu na ye na spoliation ya concession ya domaine ya Duale na Kinshasa, ata soki likambo yango eleka kaka boye. Donc, mama Véronique azalaki kaka na affaires pendant règne ya Maréchal Mobutu.
Na libala na ye na papa Sébastien babota : Huguette, Alain, Isabelle, ... Huguette azali très active na Chambre de commerce ya Bruxelles mpe azali lisusu engager na domaine ya commerce extérieur. Kasa kasa kaka lokola mama na ye.
Papa Sébastien Lessedjina Ikwame Ipu'ozia azali Docteur en droit, spécialiste ya droit aérien, droit maritime mpe na droit de la propriété intellectuelle. Azali professeur ya universités de Kinshasa na Cardinal Malula. Ya azalaki tour à tour, Secrétaire général ya Air Congo, Administrateur délégué général ya Régie des voies aériennes (R.V.A.), Administrateur mpe Directeur na Société Congolaise Italienne de Raffinage (SO.C.I.R. ex-SO.Z.I.R.) tee na veille ya ba élections législatives ya 2006. Sika azali membre ya Parti Démocrate Chrétien (P.D.C.) mpe Député national ya circonscription ya Kutu na Mayi Ndombe na Bandundu. Mama Véronique na papa Sébastien ba publia mikanda miye milandi na nde.
Véronique Lessedjina Kiaba Lema, Facteurs limitant la densité et l'activité d'Hyperiodrilus africanus Beddard, 1891 (Oligochète, Opistophore, Eudrilidae) sous pelouse de Paspalum, Presses universitaires du Congo (P.U.C.) Kinshasa, 1970
Sébastien Lessedjina Ikwame Ipu'ozia, Le Droit aérien, Presses universitaires du Zaïre (P.U.Z.), Kinshasa, 1974
Lessedjina Ikwame Ipu'ozia, La coopération multilatérale interafricaine en aviation civile, Presses Universitaires du Zaire, 1977
Lessedjina Ikwame Ipu'ozia, Le Droit aérien (Réédition), Presses universitaire du Congo, 1999
Sébastien Lessedjina Ikwame Ipu'ozia, Le Droit maritime, Kinshasa : Presses universitaires du Congo, 2003
Ndeko Neto jpj : 1.- Emile soki alingaka kobala te, pe abota te?
Emmanuel Kandolo : A ce que je sache, Emile Soki atikala kobala na kobota te. Wana ezali ndenge nayebeli.
Ndeko Neto jpj : 2.- YASOLO Papy Tex ayemba na Emile na bella Mambo?
Emmanuel Kandolo : Oui, Papy Tex ayembaka na Bella Mambo tango Seskin Molenga asundolaki Empire.
Ndeko Neto jpj : 3.- Po na nini ba tikaki Nyboma Danos Canta tango ba longuaki na ecurie Vévé, alors que babandaki kolinga ye mingi?
Emmanuel kandolo : Justement, cas ya Danos nde ezalaki ebandeli ya kosuana entre Max na Emile. Ce dernier azalaki na jalousie na incompréhension na Danos mpe akomaki ko se plaindre que akomaki kosala ba cœurs oyo ekokaki ko revenir na ye : « Danos bien que azali na voix ya kitoko kasi azali kosala identité ya Bella Bella te ». Ndenge abandaki ko se plaindre. Abanda kotiya ndeko na ye ba pressions mpo alongola Danos. Maxime abandaki ko expliquer ye que ezali simple te mpo Bella Bella ezali na ba Editions Vévé mpe Danos azali élément oyo Vévé a introduire na Bella Bella na cadre ya contrat bazali na yango. Kasi ye Emile alingaki koyoka wana nionso te.
Ndeko Neto jpj : 4.- NINI EPUSAKI BANGO BATIKELA DANOS AYEMBA TENOR, elingi koloba ‘te Emile akokaki lisusu koyemba tenor te?
Emmanuel kandolo : Ténor ezali mongongo ya Danos mpe ya Emile. Neti Bella Bella ezalaki na Editions Vévé, Verkys ye moko abandaki mpe kopesa opinion na ye na organisation artistique. Nakozua ndakisa ya nzembo ya Danos, Mbuta. Yango eyembamaki na Ye moko Danos, Pepe Kallé na Maxime. Yango nde ematisa ngenge ya Danos mpe eyaki lisusu kopolisa ba relations entre ye Danos na Emile.
Ndeko Neto jpj : 5.- Tango asalaka Bella Mambo abandaka kofanda kaka na Lukandu elongo na Maxime? Ndenge nini na libota na bango emonaki bokabuani wana?
Emmanuel Kandolo : Emile abandaki ko changer ba adresses na Kinshasa wana ndenge alingi. Suka suka abandaki kaka kozonga epayi na bango. Tango asalaki Bella Mambu, mutu ya liboso oyo amekaki kosolola na ye ezalaki Maxime. Kasi ye alingaki lisusu kolobisa ye te mpe ayebisi ba ndeko ba ye banso ndenge Maxime asali ye ba menaces sur carrière na ye. Ba ndeko ba ye bameki kofandisa bango, kasi ye aboya koya na réunion wana sous prétexte que Maxime akobuakela ye biloko mabe. Wana nde abandaki ko fréquenter ba familles ya ba tata na ye na ye mpe koloba makambu kuna tout en sachant pertinemment bien ba conflits emema na liwa ekota kati na famille ya papa Soki.
Ndeko Crispin-Régis Lukoki,
Lieutenant-colonel Justin Kokolo azalaki Adjudant avant indépendance. Tango tozui lipanda, Président Kasa Vubu abengisi ye pene pene na ye mpe akomi Chef ya sécurité rapprochée na ye. Justin Kokolo azalaki na force physique ya kobotama, véritable engambe, soda ya mpiko mpe suka na niama na etumba. Tango mobulu mobulu ya ba belges eye kokota, urgence ekomaki ya ko placer ba congolais na commandement ya armée nationale congolaise (A.N.C.). Président Kasa Vubu a nommer Kokolo, Colonel mpe Commandant ya camp Léopold II, camp ya ba fantassins. Oyo ezalaki poste hautement stratégique mpe camp Léopold ezalaki camp munene ya Congo mpe kuna nde esika ba fantassins batondi.
Colonel Kokolo atindamaki na juillet 1960 na Luluabourg (Kananga) mpe na Elisabethville (Lubumbashi) yambo sécession ebanda. Kutu, Tshombe ayebisaki ye que ayebisa bakonzi ya Léopoldville que sokibameki koya na Tanga, bakokangama. Azalaki mutu ya confiance ya Kasa-Vubu ndenge Lumumba azalaki na mutu na ye Colonel Mobutu. Yango wana azuaki mission delicate ya kokende na intérieur mpo na komeka ko calmer ba soda oyo balingaki kobunda contre gouvernement central ya Léopoldville.
Le 21 novembre 1960, Colonel Justin Kokolo azuaki mitindo na Chef d’Etat major, Colonel Joseph Mobutu, mpo atinda détachement ya ba soda na ambassade ya Ghana na Léopoldville mpo na ko expulser ambassadeur ya Ghana du fait que abandaki ko s’ingérer mingi na politique intérieure ya Congo contrairement na respect ya ba usages na ba règles diplomatiquesentre ba Etats, mpe azalaki pro-Lumumba (Akomaki na ye kaka « un politicien congolais de nationalité ghanéenne»). Rappelons que na kowela officialisation ya délégation congolaise oyo etindamaki na Nations Unies na New York, nde ezalaki mbotama ya mindondo. Délégation ya Président Kasa Vubu, conduite na Commissaire général aux Affaires étrangères, Justin-Marie Bomboko mpe Délégation ya Premier ministre Lumumba, conduite na Représentant ya Congo na Nations Unies na New York, Thomas Kanza. Na kowela wana, gouvernement déchu ya Lumumba ebandaki ko utiliser ba services ya communication ya ambassade ya Ghana mpo e communique na New York. Soutien ya Ghana na gouvernement Lumumba ezalaki sans faille mpe ba relations ya Lumumba na Président Nkrumah ezalaki makasi. D’ailleurs, tango Colonel Mobutu asalaki coup d’Etat na ye, akangaki Lumumba mpe atindi ye na cachot ya camp Léopold sous le commandement ya Colonel Kokolo. Kuna nde représentant ya O.N.U., Rajeshwar Dayal (indien), ayaki kobimisa ye na escorte ya ba soda onusiens ghanéens mpe bango nde bakomaki ko assurer protection na ye. Président Kasa Vubu atomboka na likambo wana mpe apesa mitindo na Colonel Mobutu mpo abakisa ba soda ya A.N.C. na lopango ya Lumumba mpo ye abima te.
Soki Lumumba azalaki na camp Léopold ezalaki par hasard te, Président Kasa Vubu ayebaki malamu que mutu na ye, Colonel Kokolo, nde asimbaki makambu. Yango wana, ye nde atindamaki lisusu mpo akende ko expulser ambassadeur ya Ghana.
Tango Colonel Kokoloakomi kuna na batu baye, alingaki kaka akota kuna mpo akanga ambassadeur, kasi abosanaki que na relations internationales, lopangu ya ambassade ya Ghana ezali territoire ya Ghana mpe na tango wana ba troupes na Nations Unies composées na ba ghanéens bakokaki kotika ye akota bongo te ! Na mobulu mobulu wana masasi ebetama mpe eboma ye. A partir ya wana, batu baye ba attaqua mpe ambassadeur aya kosenga que alingi makila etanga te, andima kolongua na Congo. Liwa ya Colonel Kokolo e consternaki batu mingi na Kinshasa mpe e solidarisaki lisusu makasi A.N.C. contre Lumumba mpo tango wana Baluba, Bangala na Bakongo nde bazalaki majoritaire na armée mpe ba ennemis jurés ya Lumumba..
Colonel Eugène Ebeya azalaki Commandant mpe Chef ya ba opérations ya A.N.C. na front ya Kwilu avec poste de commandement général na Kikwit, na bitumba contre batu ya Pierre Mulele. Le 31 janvier 1964, na kati ya bitumba, ba rebelles batiraki avion na ye pendant que ye mpe abandaki kobuaka ba grenades à partir ya likolo. Kasi le, 5 février 1964 nde ezalaki mokolo Colonel Eugène Ebeya akueyaki na mutambu ya ba rebelles pendant que abandaki kokende na observation mpo na mission ya pacification sima na bitumba ya Ngungu. Ba rebelles ba tira yambo chauffeur na ye flèche, Adjudant Kamingabi, sima ba tirer ye flèche na kingo. Colonel Ebeya na Adjudant Kamingabi bazuaki temps ya réaction te mpo bazalaki surpris na attaque ya ba flèches empoisonnées ya batu ya Mulele na Ngungu. Sima ya liwa na ye, Major Denis Nzoigba nde ayaki ko remplacer ye na commandement ya ba opérations na Kwilu.
Liwa ya Colonel Eugène Ebeya e marqua na soda banso ya A.N.C. mpe Colonel Louis de Gonzague Bobozo alela makasi mpe akataka ndayi que suka suka a ko venger Colonel Ebeya. Yango wana , Président Mobutu asalaka tout mpo akanga Mulele na mutambu. Wana Bobozo akoma Général mpe Chef d’état-major général ya A.N.C. Abimisa ba veuves na orphelins militaires, ba mutilé ya guerre ya Mulele ba défilé devant Président Mobutu, bazali kolela tango Président Mobutu asali meeting ya koyebisa que Mulele ako bénéficier na amnistie. Asalisa réunion munene ya ba officiers banso ya armée mpo ba définir ndenge nini Mulele na Bengila bakosasama mpo na ko venger Colonel Ebeya bien bien. Général Bobozo azalaki sans pitié tango asimbaki Mulele na maboko ma ye. En personne, apesa mitindo na Colonel Antoine Bumba, Commandant ya Division des Troupes Aéroportées de Combat (DI.TR.A.C.), asasa Mulele. Bumba aya na ba para commandos na ye : Adjudant-chef Okelo, Premier sergent Morisho, Premier sergent Kwazi na Sergent Makambo mpo bakata Pierre Mulele na Théodore Bengila vivants na butu ya 2 octobre 1968 na camp Kokolo (ex-camp Léopold II).
Premier sergent Sita Jacques Puati azalaki na influence mingi epayi ya Président Kasa Vubu mpe ye abandaki koyokela ye mingi. Tango akomi Lieutenant-colonel, azuaki fonction ya responsable ya finances ya armée. Sima akeyi na Etats-Unis en qualité ya attaché militaire ya R.D.Congo na Washington (février 1966 tee na août 1968). Kuna a profiter mpe asala ba études militaires. Tango azongi na Kinshasa, azui pete ya Colonel mpe fonctions ya Chef d’Etat-major adjoint ya armée nationale Congolaise. Na juillet 1970, Colonel Puati tango awuti musala, akuti mama bana na ye azali kolela, atuni ye likambo nini ? Ye alobi na ye : « batu ya misala bayibi ye ba bijoux mpe balingaki ba violer ye, heureusement ba soda ya corps de garde nde baye ko intervenir mpe bakangi bango. Kanda emati Colonel Puati, a perdre raison, sans ko vérifier likambo ndenge esengeli, apesi ordre na ba soda ba ye babeta batu ya misala tee na liwa. (mibale bakufaki sur place na kobeta mpe moko akotaki na comas mpe ayaki kobika sima ya hospitalisation mulayi). Nzoka nde le même jour, Président Mobutu atiaki kombo na ye na projet ya ordonnance oyo ekopesa ye pete ya Général.
Ba familles ya batu ya misala bakeyi kofunda ye na Quartier général na Mont Ngaliema. Likambo eye ndongo mpe Q.G.efundi likambo na auditorat militaire. Le 21 juillet 1970, Tribunal Militaire ya Kinshasa e condamner ye na prison à perpétuité mpe destitution an armée. Lieutenant-colonel Falu nde ayaki kokoma na ebonga ya Chef d'état-major adjoint ya armée.
Wana ezalaki biyano na mituna otunaki. Soki nabosani koyanola na motuna, limbisa ngai mpe meka kozongisa makanisi ma ngai na nsima na botuni lisusu motuna mua yo.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo