E.Kandolo donne des précisions sur le coup d'état du 24.11.'65
Ndeko Anathase : Monsieur Kandolo,est il vrai que le president était averti une semaine avant le coup d’etat du 24 NOV 1965 par Victor Nendaka qui dirigeait la surete nationale,mais sciement laissat faire pour nuir Tshombe et croyant recupere le pouvoir le pouvoir plus comme au premier coup d’etay de Sep 1960 ?
Emmanuel Kandolo : Oui, Victor Nendaka alobaka yango polele que ayebisaka Président Ksaa Vubu ba intentions ya ba ,militaires ya kosala coup d’Etat pour la deuxième fois. Kasi, Président Kasa Vubu, tellement que azalaki na confiance mingi na Général Mobutu, abandaki kondima te. Natieli yo une partie ya eyano napesaka na mikolo mileki kaka awa na Mbokamosika, tango tolobelaka coup d’Etat ya 24 novembre 1965.
Président Kasa Vubu a nomaki Joseph Désiré Mobutu, Lieutenant général le 3 novembre 1965. Prise d’arme esalemi na camp Kokolo le 17 novembre 1965. Raison ezalaki que Armée Nationale Congolaise (A.N.C) elongaki ba rébellions mibale elingaki esala jonction : rébellions Gbenye na Mulele. Na veille ya commémoration ya premier anniversaire ya suka ya rébellion na défaite ya Gbenye, esengelaki armée a célébrer yango na faste. Ezali normal na armée nionso, ematisa commandant na yango pete soki alongi etumba. Sima ya lokumu wana nde coup fourré ebandaki ko se préparer. Na mutu nya Président Kasa Vubu, komatisa Mobutu grade ezalaki na double importance : victoire na rébellion, na komatisa confiance mpe attachement epayi na ye, Kasa Vubu. Erreur ! Wana Mobutu abandaki kaka ko cacher jeu na ye mpo ayebaki que mposa ya ebonga ya Chef de l’Etat ebanda kotambola ye na mutu banda 1960.
Na africanisation ya armée na 1960, Président Kasa Vubu a nomaki Justin Kokolo sans même asolola na Premier MinistreLumumba oyo azalaki mpe lisusu Ministre ya Défense. Aliaki avance ya ko nommer Kokolo, Lieutenant-colonel mpe Commandant ya camp militaire munene ya Congo, camp Léopold. Lumumba mpe a proposaki ndeko na ye na Victor Lundula na grade ya Général mpe na fonction ya Commandant ya A.N.C. avec accord ya Président Kasa Vubu. A proposer lisusu Mobutu na grade ya Colonel mpe na fonction ya Chef d’état-major général ya A.N.C. Wana ezalaki batu Lumumba abandaki ko compter na bango mpe azalaki na confiance makasi na bango. Bango banso misatu bazaki nommer le, 8 juillet 1960.
Président Kasa Vubu azalaki kidiba trop. Ye boule kaka que neti bayokanaki ba ( ba Belges, Américains na groupe de Binza) barrer Lumumba, Général Mobutu akotikala kaka seko seko sima na ye. Batu bakebisaki ye na ba intentions politiques ya Général Mobutu. Kasi aboyaki koyokela bango. Et pourtant, tango tozuaka lipanda, ye Kasa Vubu, atiaki ndeko na ye, Colonel Justin Kokolo, Commandant ya camp Léopold. Lumumba a proposer Mobutu, Colonel mpe Chef ya état-major mpe a proposer lisusu grade ya Général na Victor Lundula mpe commandement en Chef ya A.N.C. Kasa Vubu andimi mpo ayebaki que asilaki kozua oyo alingaki, elingi koloba Colonel Kokolo a contrôler camp ya ba fantassins na ebele ya ba militaires batondi kuna. Tango Colonel Kokolo akufi, a songer lisusu te na ko tiya haut gradé oyo akoki kozala na influence na ba soda. Atikeli Général Mobutu contrôle ya armée mobimba sans azala na mutu moko puissant na armée oyo akoki kosala rapport des forces na Général Mobutu. Akanisaki que neti Colonel Masiala azali mu Yombe, ye akobanda koteka molimo mpo na ye…nzoka nde Colonel Masiala azalaki na ye kutu kuna te… Na nionso oyo, Président Kasa Vubu akokaki kozua mayele na coup d’Etat ya 1960 mpo Colonel Masiala aponaki camp na ye… atikala kidiba moko incroyable, lokola politicien sans expérience : Gouvernement na maboko ma Premier Ministre Tshombe, personne na sûreté, personne na armée, rien, atiki nionso à son « fils » Mobutu. Abandaki kobenga ye boye mpo tango wana Genenral Mobutu abandaki ko tourner na muana na fille aînée na ye, Marie-Rose.
Général Mobutu abandaki kobanga Tshombe mpo ayebaki malamu que Tshombe azali na pouvoir, soutien, force, popularité, mbongo, azali indépendant financièrement mpe azali na ba gendarmes oyo bakoki ko tenir tête na A.N.C. Ko affronter Tshombe politiquement ou militairement ezalaki difficile. Yango wana a utilisaki Président Kasa Vubu en lui faisant croire que armée ezali sima na ye, akende tee na kolongola Tshombe. Sima na yango nini eyelaki Président Kasa Vubu ye moko na Premier ministre atiyaki wana ? Evariste Kimba asukaki wapi ?
Soki Président Kasa Vubu a torpillaki processus démocratique te, Premier Ministre Tshombe, candidat potentiel ya Convention Nationale du Congo (CO.NA.CO.) na élection na présidence de la République, alingaki akoma Président mpe suka ya Général Mobutu elingaki ekoma. Neti ezalaki l’un ou l’autre, bango nionso baza na service ya capitalisme, avantage ya Général Mobutu ezalaki que alakisaki capacité na ye ya rassembleur mpe azalaki na charisme makasi kati na armée mpo azalaki militaire. Une fois azuaki pouvoir, Tshombe a comprenaki que ekomi compliquer. Yango wana mpo na kotikela ye temps azonga lisusu na Congo te, Mobutu ayaki kosenga na Procureur Kabeya Alidore akotisa a impliquer mpe a charger ye na procès Tshipola na mars 1967 mpe babambuli ye condamnation à mort.
…………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………...
Ndeko Scott Ungina na Félix,
Mozali esengo mpo na ngai ya kokabola na bino mpe koyanola na mituna miye nakoki kozala na biyano. Kokabola masolo ezali ndenge raisonnement ya blog na biso oyo ezali kosenga.
……………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………….
Ndeko ya Fuala ; Papa Emmanuel Kandolo, Mbote ya trop, nalingi bobele natuna ntina ya parti politique ABAKO MWINDA, na ntina nalingi koloba boye : likanisi ya kosala ABAKO MWINDA ewuta wapi, ewutaki na nani to na ba nani, opesa biso historique mobimba ya parti politique wana
Emmanuel Kandolo : Na perspective ya ba election esengelaki esalema na 1965, A.BA.KO. mpe esengelaki amilenge. Na komilengele wana, ba dirigeants na yango mosusu bapesaki likanisi ya kofungola yango sur le plan national mpe ezala kaka ya ba Kongo te. Yango ebotaki crise politique oyo eyaki kokumba na masolo esangisaki bango banso na fin aout mpe debut septembre, na Thsysville (Mbanza-Ngungu), na 1963. Kuna nde mokano mozuamaki mpo A.BA.KO. efonguama na Congo mobimba mpe ekoma un pati politique national oyo ezali kondima Congolais nionso. Yango esalemaki na motema moko te mpo ba dirigeants mosusu bazalaki d’accord na ouverture nationale wana te. Yango wana, A.BA.KO. etikalaki conservateur mpe ba oyo balingaki ouverture ya A.BA.KO. bazuaki ndingisa te ya kosala aile mosusu, nationale : Mwinda ba Kongo (ebandaki mpe kobengama na batu : A.BA.KO Mwinda soit A.BA.KO. progressiste).
Mokambi ya Mwinda ba Kongo ezalaki Emie Zola. Na A.BA.KO. nde ekomaki Vital Moanda. Ouverture wana nde esalaki que Mwinda ba Kongo ekota na Comité Démocratique Africain (C.D.A.) mpo na kosangana na ba partis nationaux misusu na perspective ya ba élections générales ya 1965. Kuna na kati ya C.D.A. Yango ekelamaki na mokolo mua 25juin1964 mpe esangisaki ba partis fédéralistes. Regroupement politique oyo, ekambamaki na Edmond Nzenza Nlandu.
Na Mwinda ba Kongo ezalaki na ba dirigeants oyo : Joseph Mbenza, Taty Samuel, Emmanuel Kini, Victor Ngafani, Laurent Nsingi, Laurent Masunika, Dinganga, etc.
…………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………………….
Ndeko Serge,
Raphael Batshikama na authenticité ayaka kokoma : Batshikama ba Mampuya na Ndwila.
Edmond Nzenza Nlandu akundama na Bas-Zaïre, soki nabungi te. Nayebite mpo na nini azalaki empoisonner. Abalaka mpe atika bana ebele.
Kasa Vubu azali na filiation ata muke te na ba Chinois mpe yeba que ba Chinois batikala kotambola na mokili te na cadre ya colonisation ou exploration mpe baniata mabele ya Congo kaka tango tosilaki kokoma lipanda. Baye mua mingi na cadre ya cooperation, sim aya visite ya President Mobutu na Chine na 1973. Koya wana ezalaki mpo na kosala bilanga mpe na décoration ya Cité de la N’sele, sucrerie ya Lotokila, na Haut-Zaire, kotonga Palais du peuple mpe na stade Kamanyola, kotonga une na kati ya domaine présidentiel ya Gbado-Lite.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
Ndeko Jérôme Nzembele,
Oyebi qu’eyelaki ngai ata muke te que ba Chinois bazalaka kati na batu batongana chemin de fer ya Matadi-Léopoldville, ata ko ezali masolo nayebi malamu. Matondo mingi na rappel iye mpe boye nde Mboka mosika ezali kosalisaka bosangisi bua masolo.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo