.
E. Kandolo décortique encore quelques chansons (2)
Ba ndeko,
Nazongeli
bino lisusu na masolo ndenge nalakaki mbala ya sima. Na ba oyo bazalaki na mua impatience, bobunga te que masolo epolaka te, mpe patience nde esalaka que mbokamosika esangisaka masolo malembe
malembe.
Matondo
na bino banso mpo na intérêt bozali ko lakisa na modeste contribution na ngai. Yango mpe ekopesa ngai makasi na ko continuer kokabola na bino masolo ma ye nayebi.
Sika,
tozongela masolo.
…………………………………….
Paul Kamba atiki biso, par
Wendo
Paul « Polo » Kamba, moninga ya Antoine Wendo mpe moko
ya ba musiciens ya liboso ya Congo Brazaville. Ye nde asalaki orchestre Victoria Brazzaville na 1940 mpe Wendo alandi likanisi wana na bosali
mouvement na ye na kombo ya Victoria Léopoldville na 1942. Polo akufi na 1950 mpe azalaki naino elenge. Ye azali elenge ya Poto Poto esika akoli mpe afandaki. Akundama na cimetière ya centre
ville ya Brazzaville. Yambo, na 1950, akundamaka na cimetière mosusu.
Wembo alelaki ye na nzembo « Polo Kamba atiki biso na mawa »
...................................................................................................
Karibou ya Bintu, par Rochereau et L'Afrisa
Marietou azalaki une des danseuses ya African
Fiesta national wuta création ya ba Rocherettes na 1969. Azali d’origine malienne kasi abotami mpe akoli na Brazzaville. Kuna nde Rochereau akendaki kozua ye na 1969, esika azalaki na na kulu na
ye, Bintou, mpo na ko former groupe ya ba danseuses ebengaki ba rocherettes.
Marietou azalaki makangu ya Rochereau na ndenge ya kinsueki mpe azalaki zalaki na batu na ye
mosusu. Kasi na moment oyo akufaki, azalaki chérie ya Mathieu Nkolokey. Na époque oyo, Mathieu azalaki moko ya ba dirigeants ya J.M.P.R. Kasi na moment amibomaki,
akomaki mpe kobima na José Ngayi, beau garçon, motane, très grand séducteur mpe na ba conquêtes ebele na kati ya Kinshasa wana : un véritable cazanova !!! Ba filles mingi ya Kinshasa ba miboma
mpo na ye (ba oyo bazalaki kokoka ko supporter ba aventures amoureuses na ye te).
Ba chagrins d’amour na likambo ya José nde eyaki kotinda Marietou a miboma na bomeli paquet mobimba
ya 20 comprimes ya nivaquines (comprimé moko ezali na 100 mg ya chloroquine base). Yango ezali kisi ya traitement curatif ya malaria. . Na bo meli 20 comprimés d’un seul coup, ezali
plus que oyo médecin azali ko recommander mokolo oyo azali kobela( na premier jour ya cure esengeli 9 comprimés : 6 mbala moko mpe sima ya écart ya 6 heures, 3 comprimés. Mpe na
mokolo molandi, 3 comprimés par jours na mbala moko. Kasi, Marietou, ye, ameli 20 comprimés en une fois tout en étant en très bonne santé. Inévitablement esali surdose mpe ekumbi ye na
liwa. A mibomi kaka na lopango esika abandaki ko futela, na Lingwala sur Luvua. Rochereau asalisaki matanga na Kinshasa mpe akumbi nzotu na ye na Brazzaville, esika baleli mpe ba kundi ye.
Na bozongi na Kinshasa, Rochereau ayaki ko panza matanga.
Rochereau alelaki ye na nzembo ya « Karibou ya Bintou »
………………………………………………………………………………………….
Liwa ya somo, par papa Wemba et le Zäiko
.
Mama Wali, par Wemba et Yoka Lokole
Mama na papa Wemba kombo na ye ma Niondo.
Kasi mingi babandaki kopenga ye ma moke, lolenge na lobeli sur famille Shiongo.
Na 1973 na milulu mia M.P.R., anniversaire ya MPR na N’sele. Kuna nde esika Citoyenne
Commissaire d’Etat Mata Nkumu, koko na ye, azuelaki ye esika mpo na kolamba na milulu . Na bozongi ndaku nde voiture oyo ememaki ma moke, esalaki accident mpe ye moko kaka nde
awe. Yango nde muana na ye, Jules Siongo (papa Wemba) ayembelaki ye nzembo ya « Liwa ya somo ».
Kasi esengeli kobakisa que polémique ebotamaki na liwa oyo mpo elobamaki que papa Wemba nde alekisi
mama na ye Période oyo yango nde Jules Presley (papa Wemba) na baninga ba ye oyo bayebanaki na kombo ya I.S.I.F.I. ba mipesaki corps et âme na ba nzela ya nkisi makasi na ba conséquences nionso
oyo toyebi mpe ekomelaki moko na moko kati na bango. En plus, na nzembo ya « Liwa ya somo », ye moko papa Wemba alobaka que : « je proteste, ce monde est méchant ». Protestation contre ba
accusations portées contre ye que alekisi propre mama na ye !!!
……………………………………………………………………………………………………………..
Bakumba, par Evoloko et le Zaïko L.L
Arthur Bakumba, garçon ya Ngiri-Ngiri, élève
na Humanités ya Athénée de la Gombe. Elenge mobali motane na beauté ya muasi, na ezaleli ya bonzenga. Abotami na Kinshasa na 1955 mpe azali originaire ya Equateur.
Arthur akutani na Liwa na 1973, na piscine ya athénée de la Gombe durant cours ya éducation
physique. Na mokolo muango, kelasi na ye ebandaki kosala natation. Na kati ya ba exercices ya nation nde Arthur, kaka ye moko boye, azindi na nse ya mayi, aspirer na bouche ya évacuation ya mayi
ya piscine. Na kidiba, baninga bayoka ye te, tee tango basusumuka que Arthur azali kobundana mpe le temps ba maîtres nageurs bakota na piscine, babimiai ye mpe ba luki ko réanimer ye kasi
esimbaki te. Le temps ba koma na clinique kinoise, asilaki kowa.
Na matanga ya Arthur, ndenge ezalaka kaka , esengelaki ba boti b aye, ba saka.Tata na ye,
asaki na maloba makasi na kosenga na ba nkoko mpe na ye moko bakumba alakisa soki liwa na ye ezali na maboko ma yen to mpe ya batu mosusu. Na sima, mama mpe asaki, mpe tango abandi
kosaka, abeleli Arthur, muana na ye mpe alobi boye : soki réellement liwa na yo ezali na maboko ma noko ma ndeko na ngai oyo awuti kozua nomination en qualité ya ambassadeur, kotika
te, lakisa yango !!! Mbala moko, cercueil ya Arthur eningani, esali mouvement, mama a continuer kosaka na malaoba makasi mpe famille esengi na ye akata mpo Arthur asili kolakisa nani oyo alekisi
ye mpe mutu yango asila kozlaa identifier polele na miso ya batu.
Matanga ya Arthur ezalaki ya ba jeunes filles ya Athénée de la Gombe, Lycée Bosangani, Kimuenza,
Athénée de l’Ozone, athénée de la victoire mpe bango banso balaki maputa na signe ya mokuya mpo na Arthur. Zaiko elelaki ye na nzembo « Bakumba », composition ya Evoloko .
………………………………………………………………………………………………………………………….
Mama Josephine Shiongo (Ma Zophini), azali la
seule femme oyo azalaka membre ya Conseil des Cités na Pont Cabu, actuel pont Kasa-Vubu. Azali ndeko ya papa Wemba : mama na ma Zophini azali kulutu ya mama ya papa Wemba( ma Niondo). Donc, papa
Wemba akobenga mama na ma Jophini , ma kulutu, mpe ma Zophini akobenga mama ya papa Wemba, mama leki. Yango wana ma Zophini abandaki kobenga ye ma moke . Boye nde biso banso tobandaki kobenga ma
Niondo : ma Moke. Ma Zophini akoli na Kasa Vubu. Ba oyo bayebi masolo ya Zaiko babungi te que na lopanga wana, na nse ya nzete ya manga nde esika Zaiko ebandaki kosala ba répétitions. Tango ma
Zophini abali papa Nkumu nde akomi kofanda na Lemba.
Ma Zophini azali molongani ya papa Nkumu Bowango mpe ayebani lisusu na kombo ya mama Nkumu. Aboti
Pauline Mata Nkumu wa Bowango, une des premières femmes oyo basilisi ba études universitaires mpe awumela mingi na Gouvernement na qualité ya Ministre ou Commissaire d’Etat (tokomeka kosala
biographie na ye na mbala ya sima). Benjamin, Arthur na Pierre( moko ya ba premiers musiciens oyo bakelaki Zaiko mpe azalaki na version musique pop), mpe na sima, bana mosusu
balandi.
Benjamin Nkumu azali muana ya mibale, alandi kulutu na ye Pauline. Ye mpe awutaki kosilisa kelasi
na Belgique mpe azuaki directement ba responsabilité ya cadre na la Voix du Zaïre. Par ailleurs, Arthur Nkumu azalaki nanu na ba études na mikili.
Nzembo ya mama Wali (ma Zophini) esalemi suite ya liwa tragique ya bana ba ye : Benjamin «
Ben » na Arthur. Likama ekumbi bango na liwa eyaki lolenge nini ?
Bana basusu ba ma Zophini, ba leki ya Ben na Arthur, bazalaki kotanga na Lubumbashi . Souvent
ma Zophini abandaki kokende Lubumbashi ko rendre bango ba visites. Na nzela ya Lubumbashi nde ayaki ko découvrir nzela ya Kigoma, na Tanzanie, esika akendeki na moninga na ye mosusu koluka gua,
muasi ya politicien moko ayebana ). Tango akomi kuna, effectivement mpe azuaki mono oyo abandaki koluka. Yango ezalaki symboliser na pete. Azui yango, akeyi na yango na
Kinshasa.
Tango akomi , a signale mobali na ye te, akeyi mbala moko ko proposer yango na Pauline comme quoi
que ezali protection ya bêton azuili ye kuna na Tanzanie. Kisi yango ezali ya protection ya mamie wata. Pauline na ekenge, a hésiter mpo ye moko mpe azali miner na biloko na ye mpe de peur
que cohabitation ya biloko ezala mua compliquer, a signaler mama na ye, ma Zophini, que akoki kondima pete wana bongo te mpo yambo akende koluka mono, atiaki ye na temps te !!!
Na ekenge wana, asali ma Zophini proposition ya kobengisa papa Nkumu mpo ye azala témoin, question ya ko gagner temps mpo atuna mpe conseil na ba nganga ba ye. Wana, Pauline azali na ndaku na ye
na Gombe mpe azalaki déjà Ministre en fonction. Na proposition asalaki ma Zophini, yango esimbaki te mpo ma Zophini aboyaki démarche wana. Face na refus ya ma Zophini, Pauline mpe aboyi kozua
pete wana mpe a informer papa na ye sans pour autant elobama na famille mobimba mpe ba ndeko mosusu bazala au courant, du moins ba mikolo oyo natangi likolo.
Tee lisolo wana eyaki kokomela Arthur na matoyi mpe azui confirmation epayi ya ndeko na ye ya muasi
Mireille, oyo abandaki kotanga na Lubumbashi. Neti eyebanaki que kisi wana ezali na protection ya mamie wata mpe mamie wata azalaka na mayi, ebongaki kozongisa yango na mayi. Arthur a développer
logique oyo mpe amoni que esengelaki a récupérer pete wana na kinsueki mpe abuaka yango na mayi mpe likambo esikli wana.
Awa tozali na juillet 1975, juste na début ya ba grandes vacances. Tango wana, chaque samedi,
Salongo ebandaki kosalema na etendu mobimba ya République du Zaïre mpe ba horaires ya mosala na mokolo mua samedi ezalaki wuta 8h. tee na 11h. mosala esili mpe na
14h. salongo ebandi tee ekosila na 17h. Durant Salongo, circulation ya mituka ezalaki interdite mpe bilenge mingi babandaki ko profiter na ba heures wana mpo na kokende kosala pic niques na
ba copines na bango. Na cadre wana nde Benjamin na Arthur ba se retrouvaki na Kinsuka na ba ninga mosusu mpe bazali kosukola na mayi. Na tango oyo nde Arthur a profitaki mpo na koyiba pete wana
mpe kobuaka yango na fleuve Zaïre, na Kinsuka. Na bozonbgi na ndaku, ayebisi ndeko na ye que abuaki pete wana mpe ezalaki naturel mpo na bango. Arthur ou ba ndeko na ye, bayebisaki mama na
bango te que pete wana ebuakemi na ebale. Na butu ya moko yango nde mongongo eyokanaki epayi ya mama na bango na botuni ye « pona nini obuaki ngai na mayi, mosika na esika oyo okendaki kozua
ngai? Nalingi kokendende ngai moko te, esengeli tokende elongo ». Wana nde ma Zophini azongisi que zua bobele mutu oyo abuaki yo na mayi.
Na poso oyo elandi , Benjamin na Arthur bazongi lisusu na Kingabua comme d’habitude na ba heures ya
Salongo. Tango Arthur akoti na mayi, baninga oyo azalaki na bango, bamoni abandi ko se débattre na kati ya tourbillon. Moko kati na bango, a tenter ko sauver ye kasi azali kokoka kobenda ye te
mpo une force supérieure ezalaki ko attirer Arthur na nse ya mayi mpe azali koyebisa ye que eloko moko ezingi ngai na niveau ya loketo ezali kobenda ngai na nze ya mayi mpe eleki ngai na
makasi. Na temps wana, Philippe, abandaki lisusu kokoka te mpo ye moko mpe akomaki combattu na eloko yango mpe akomaki ko courir risque ya kozinda elongo na Arthur. De loin, Benjamin a remarquer
que Philippe na Arthur bazali na détresse mpe aye mbangu mpo na koluka ko sauver Arthur na noyade. Wana, Philippe, épuiser, abimi na mayi mpe Benjamin ameki ko utiliser ba forces na ye nionso mpo
na ko sauver leki na ye kasi e marcher te, ba zindi elongo mpe na sima, ba remonter mpe ba zindi lisusu tee na mbala ya misatu, batioli libela. Somo esali baninga oyo bazalaki na bango mpe
bazongi mbangu koyebisa na ndaku. Papa Nkumu a téléphoner Pauline mpe cette dernière, immédiatement a exposer problème wana na Président Mobutu. Na pokwa ya samedi wana, Président a
mobiliser hélicoptère na nganga naye personnel accompagner na ba paracommando ya Division des Troupes Aéroportées de Choc (DI.TR.A.C.). mpo na kosala ba recherché na likolo ya mayi esika
Benjamin na Arthur bazindi. Sima ya ba ngonga, baye komona corps moko likolo yamayi, kasi soki hélicopter ekiti mpo ba plongeurs ba récupérer yango, ezali lisusu corps ya mutu te, ekomi ya
niama. Tee nganga ayaka a comprenaki message wana mpe apesi rapport na Président Mobutu mpe ye, a autoriser nganga ayebisa famille Nkumu nionso esalemi mpe esengeli kosala. Ayebisi famille Nkumu
que ebongi tata na mama Nkumu ba saka na soso ya mobali mpo ba récupérer corps wana sans e continuer ko limua bango. Seul papa Nkumju nde a sakaki mpe dimanche na apres midi ba recherches
finalement e aboutir na ko localiser corps mpe ko récupérer yango. Au lieu ya ba corps mibale, kaka ya Benjamin nde ebimaki na pota na nuque sans pour autant libumu evimba na mayi. Famille ekunda
Benjamin ye moko, kasi na matanga ba cercueils ezalaki mibale mpe na oyo ya Arthur batiaki nde ba effets personnels na ye mpe bakundana côte à côte na cimetière de la Gombe.
Tee na moyi ya lelo oyo, corps ya Arthur etikala komonana te. Selon ba nganga oyo basalaka ba
recherches wana na mayi, Arthur akufa na mayi te, akenda mobimba mpe mokolo mikolo miye esengelaki a vivre na mokili ekokoka nde ba restes na ye ekomonana na Kinsuka, epayi elima ya pete
ebendaki ye na nse ya mayi. Ba témoignages mosusu concordants eyaka que batu babandaki komona ye na Kinshasa dans un état tares
déplorable..
Suite na tragique événement oyo nde papa Wemba asalakai nzembo ya « mama Wali » ndenge abungisi
bana ba ye. Nakobakisa lisusu que jugement public esalemaka epayi ya bana Lemba suite na ba morts inexpliquer ya bana mosusu ya ma Zophini. Na yango, ye moko ma Zophini na muana na ye Pauline ba
avouaki que bazalaki na biloko, yango nde ebandaki kosala misala minso wana. Pauline a regretta lolenge mama akotisaki ye na engrenage wana.
…………………………………………………………………………………………………………………………………..
Testament ya Bowule, par Simaro et l'OK-jazz
Josée Bowule, azali originaire ya groupement
Ntombazale, secteur ya Inongo, district ya Mai Ndombe. Abotami mpe akoli na Kinshasa. Soki na bungi te, azali muana ya 1948, fille ya Matonge, na Bolia. Tango akomaki na ba
moyens na nzela ya commerce ya Bruxelles na Rome, akomaki kofanda na Binza. Azali parmi ba jeunes femmes ya liboso oyo babandaki kosala mombongo na nzela ya Italie.
Matti, nde azuaki likanisi ya kosenga na Simaro (ye mpe ayebaki Josée malamu) asalela Josée nzembo.
Yango ezali « Testament ya Bowule »
Tango famille Bowule elongolaki pili ya Josee, Empire Bakuba nde ebetaki. O.K. Jazz ezalaki na
poto.
Josée azalaka na molongani na ye a vivaka na ye période moko boye, Itela. Ce dernier, akufa na
accident ya avion prive ya Bokana, oyo eboma mpe Bokana Wondangela na muana na ye ya muasi, Usée Bokana.
Josée a weyi na bokono, na 1986, na clinique Ngaliema, na Kinshasa. Azalaki membre ya
Fédération des Femmes Commerçantes du Zaire (FE.CO.ZA.), membre ya moziki 100 kilos. Grace na ba moyens na ye nde abendaki ba ndeko na ye presque nionso na Rome. Ndeko ya Henri Bowule,
Commissaire de zone ya Kalamu mpe ya Maître Ajax, un des premiers Maîtres ya Judo Club GEDA.
……………………………………………………………………………..
Myriam Moleka azali fille ya Moleka Liboke na
Anongo. Ye, akufi na jeunesse nionso suite na échec ya intervention chirurgicale, na 1986, na Belgique. Na yango, Koffi asalela ye
nzembo « Myriam Moleka » sur demande ya ndeko na ye, Timothée Moleka.
Myriam azalaki mpe membre ya moziki Santa Maria.
……………………………………………
……………………………………….
Ndeko Roca,
Soki ba nkoko ba sungi, mbala mosusu nakosala lolenge okaniseli ngai. Pour l’instant, tika,
tosangisa masolo na Mbokamosika mpo yango e profiter na baye banso bazali na makanisi ma kosangisa masolo ma ekolo na biso.
Merci mingi na ba pensee positives na yo
………………………………………………..
Ndeko Historien,
Matondo mingi na maye manso okomeli ngai mpe nameki koyanola yo na oyo etali nzembo Rochereau
asalela Marietou.
Ya solo, Makeba a interpréta nzembo ya Wetchi. Na lolenge olobeli ba mama na masolo ya pawuni, papa
Dionge (le père ya Arsène) akendaka sango na ba bijoux na ye mpe ayebanaki mingi na Léopoldville.
Famille Badjoko na Kidicho ezali makila moko (mama ya Ministre Kidicho na tata ya ba vieux
Léonard, Charles na mama Rose Badjoko, bazali kulutu na leki). Ezali famille monene eyebani malamu na Province Orientale mpe na kati ya Kinshasa wana. Badjoko bazali ebele na Kinshasa
: Matonge, Kasa-Vubu, Barumbu, Cité Salongo, ville, Binza…
Dieudonné Kidicho Badjoko azali leki nayebi malamu . Soki nabungi te abotami entre 1959 na 1960.
Akoli na Djolu na Matonge mpe abala muasi ya muluba. Un garçon très poli, sympa et toujours prêt ya ko rendre mutu service. Nazali lisusu komona image na ye mpe souvent soki nakutani na ye,
abandaki toujours kopesa impression que azali ko courir derrière le temps, toujours presser !!!
Na oyo etali nzembo ya « Nkashama Nkoy », batu babandaki kosala allusion na Mulele mpo
liwa ya Nkashama Nkoy na ya Mulele elandanaki.
Na oyo etali Sinatra, ye azalaki nduliste ya Negros Succès mpe abetaki na Conga Succès, promotion
ya ba Lola Shequin. Jhonny Bokelo alelaki ye na nzembo : «Bana Conga baleli liwa ya Sinatra ». Kufa na ye ewutaki na
kobela.
…………………………………………………..
Ndeko Jérôme Nzembele,
Kolela te, au contraire, sepela que Mbokamosika ezali kopesa biso occasion ya kosangisa masolo ma ekolo
na biso.
………………………………………………………..
Ndeko Serge, Kongo na biso,
En attendant, tosangisa nanu masolo na mboka mosika. Yango ezali mieux que kokoma na buku sans
moyen ya ko actualiser lisusu.
Nabosani te, mbala ya sima nakoyanola yo na oyo etali ba biographies ya Général Bobozo na Citoyen
Nzondomio.
………………………………………………………..
Ndeko King,
Nazali koyeba lisusu ! Merci na lolenge ozali souvent
kozua occasion ya ko manifester profondeur ya esengo na yo.
………………………………………………
Ndeko Roundy,
Esengo lisusu na bokunani na yo na kati ya Mbokamosika. Nakomeka kokomela yo nzembo oyo osengi.
Titre na yango ezali « Lily Germaine ». Ezali composition ya Tino Barosa , na formation ya Roca Mabu, na 1957. Grand Kallé ayembaka yango kuna na guitares ya Nico na Tino.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo