E. Kandolo commente le match Zaïre-Guinée : 3-2
E. Kandolo commente le match Zaïre-Guinée : 3-2
Une vue du match Zaïre-Guinée du 5 août 1979.
Sujet : Dimanche 5 août 1979 : Zaïre-Guinée : 3-2
Réf : http://www.mbokamosika.com/article-dimanche-5-aout-1979-zaire-guinee-
Sujet : Dimanche 5 août 1979 : Zaïre-Guinée : 3-2
Ba ndeko,
Na bozongisi makanisi na nsima, nakomeka mua moke kozongela maye masalemaka na stade du 20 mai 1967, na match oyo ebetamaki na mokolo mua 5 août 1979, kati na Léopards ya Zaïre na Sily national ya Guinée-Conakry.
Match oyo ezalaki match ya Mayele Awul Ayel, ezala na terrain mpe na laboratoire. Na veille ya grande rencontre oyo ekobetama na stade du 20 mai, ba projecteurs ya stade du 20 mai ebandaki kotikala ya kopela mpo na ko permettre na comité de recherche e travailler match butu mobimba. Ba oyo bayebi, bobungi te que na poteau moko ezalaki na 100 projecteurs mpe na veille kaka 20 projecteurs nde ebandaki kopela na poteau moko, 80 projecteurs mpo na ko faciliter mosala mua comité de recherche.
Na mokolo mua match, matoyi mazalaka etiamaka na ba sango ezali kowuta na zone neutre mpe na ba vestiaires mpo ba prédictions ya laboratoires nde esalaka que morale ezala au zénith ou pas. Justement, ndenge kaka ebandaki kozala na tribune central, ezalaki inévitable ko manquer fatalisme ya Lomboto (passionner ya ndembo mpe fanatique extrémiste ya Cercle Sportif Imana mpe na Léopards du Zaïre) wuta na tribune d’honneur mpo kokota kaka nazali kokota na stade boye, nayoki ye (Lomboto azalaki na carrure imposante, fort physiquement, mongongo monene mpe koganga makasi tango azali koloba mpe extrêmement hystérique. Asuanaka na ba matchs nionso mpe abandaki ko se distinguer na ba désordres ya ndenge na ndenge na stades du 20 mai 1967ou na 24 novembre 1965!!! ) kuna azali ko discuter mpe ko se plaindre que Kande na Aponga (ba dirigeants ya Association Sportive Vita Club) bazali ko intervenir te mpe makasi na bango ebimaka kaka na match contre Imana. Kasi, wapi bango ? Pereira azali kokoka ko tourner match te wuta lobi ba nzungu nionso ezali kolakisa que tokopola na 2 à 0 !
Pendant ce temps, lisolo moko ezali kobetama na minoko ya batu que bakangaki ba ndingari lobi na butu na nzinga nzinga ya stade du 20 mai, bazali kobuaka biloko. Intox ou info ? Kasi, esengeli tobunga te que ba na matchs ya minene ndenge wana, à partir ya 20 heures batu bazalaki lisusu ko pénétrer na lopangu ya stade du 20 mai te mpo yango ezalaki protéger na ba éléments ya brigade mobile.
Na match oyo, ba Léopards bazalaki interner na Institut Supérieur de Techniques Appliquées (I.S.T.A.) Ndolo, Ntambwe Lea a avancaki ba raisons ya rapprochement na stade du 20 mai. Tango équipe ya Léopards eye, ekoti na bus tee liboso ya tribune ya Vita mpe directement staff na ba joueurs bakoti na vestiaire. Par contre, Sily national ya Guinée-Conakry yango e occupaki vestiaire ya Imana.
Kobanda kaka match ebandi boye, Léopards ebandi ko attaquer na Mayanga Maku « pape Jean-Paul 1er », Lofombo Ngeleme mpe na Mayele Awul Ayel « caïman » kasi Abdoulaye Bernard Sylla, gardien ya Sily national ya Guinée, azali kokanga mpe kolongola nionso. Kasi na elulu ya ba attaques ya Léopards, Mayele a charger gardien Abdoulaye Bernard Sylla mpe azui choc na lipeka. Abimi mpe atiki esika na remplaçant na ye, Abdoulaye Keita. Wana biso banso tokanisi que neti Sylla, le titulaire abimi, Keita akozala na mua difficulté ya kokota na match. Lokuta ! Abdoulaye Keita aye mbala moko na mpeve mpe a continuer na lancée ya Abdoulaye Bernard Sylla na bolongoli ba tentatives nionso ya Mayanga, Lofombo na Mayele.
Léopards e continuer ko attaquer kasi ba attaques nionso wana ezalaki anéanties. Du coup ba spectateurs ba remarquer que mbala inso Léopards ezali ko attaquer, gardien de but, Abdoulaye Keita azali kobongama tout en tenant médaille na ye oyo ezali na chaînette alati na kingo. Tension emati makasi na stade mpo médaille oyo Abdoulaye Keita azali kosimba wana nde ezali ko anéantir efficacité ya ba attaques ya Léopards na ndenge ya mystique. Que faire face na difficulté ya mono oyo ?
Habituellement, soki Léopards ezali kobeta na stade du 20 mai, batu mingi oyo bazalaka na sima ya ba poteaux wana, bazali ba délégués ya laboratoire mpe bango nde bazali charger ya kopakola biloko na ballon ou kobuaka biloko na terrain ou na kati ya poteaux. Na tension wana, il fallait tout faire mpo na ko neutraliser puissance ya médaille ya Abdoulaye Keita mpe public ezali komituna pourquoi comité de recherche ezali ko réagir rapidement te na likambo oyo ezali komonana polele que médaille ya Abdoulaye Keita nde ezali kolembisa ba attaques na biso nionso ? Au contraire, comité de recherche ezalaki rapide mpe eluki moyen ya ko récupérer médaille wana mpe esengi na Mayele aluka par tous les moyens a kata chaînette ya Abdoulaye Keita. Pourquoi Mayele ? Mpo ye azali (selon la rumeur) muana ya nganga mpe azalaki na anti oyo comité de recherche esimbisaki ye. Wana ekomi match na kati ya match mpo public ezali lisusu na doute te que soki comité de recherche esali rien ou e échouer, ba prédictions ya 2 à 0 eko se réaliser mpe tokopola na Kinshasa, ce qui est intolérable et inimaginable !!! Muke muke, Pereira, Nganga, Aponga, Kimpedi, bazali kokota na vestiaire mpe kobima, biso mpe ba spectateurs miso na balle, miso na ba mouvements na vestiaire ya Léopards (vestiaire ya Vita) mpo jusque-là ba prédictions ya veille ezali kolakisa toujours que match oyo tokopola yango na 2 à 0 aussi longtemps que to faire sauter clé de voûte ya Syli national ya Guinée te.
Muke te, na action ya Masengo Ilunga, tango abomi Moussa Camara, abuaki ballon na kati, eluki cafouillage mpe Mayele abendi chaînette ya Aboulaye Keita, akati yango mpe mbala moko abuaki yango sima ya poteaux esika ba délégués ya comité de recherche bazali. Ba Guinéens babandi ko protester epayi ya arbitre, kasi ye amonaki eloko moko te mpe Abdoulaye Keita atamboli moto, moyen abima na terrain akende sima ya poteaux na ye mpo na koluka ko récupérer chaînette na ye ezali te mpe moyen baninga ba ye oyo bafandi na banc de touche na vestiaire ya Imana baya koluka ko récupérer yango ezali te mpo ekosengela na bango ba franchir l’infranchissable (vestiaire ya Léopards avant bakoma na poteaux devant pourtour ya Association Sportive Bilima) mpe tango wana public ya stade du 20 mai somme un seul homme ezali kolakisa misapi esika probablement chaînette wana ekueyi na kati ya matiti sima ya poteaux oyo ezali na pourtour ya Bilima. Wana ba délégués ya comité de recherche bazali kaka nse koluka mpe kuna na terrain Abdoulaye Keita, désemparer, azali kolela, kasi Léopards ezali kaka kokoka kofungola monyama te.
Kala te, délégué moko a retrouver chaînette na médaille wana batu basepeli mpe mbala moko ekeyi na laboratoire. Sima ya mua minutes muke, batu babimi na laboratoire bazali kosenga na toute urgence Léopards abimisa balle na terrain, le temps ekota rapidement na vestiaire mpo bapakola yango biloko mpe na sortie na yango esimbama en premier na joueur guinéen. Rapidement, yango esalemi. Wana, na Tambwe Lea ye moko azali mpe kozela résultat ya laboratoire tellement que public ezali convaincu que solution ekowuta kaka kuna : muke muke azali kobuaka liso na vestiaire !!!
Léopards ebimisi balle, yango esali ba petites seconde mpe ebimi. Kala te, but ya liboso eye kokota mpe na sima ya mua ngonga boye, milinga ebandi kobima na vestiaire !!! Nini lisusu ? Oh ! Match ebaluki kasi ba buts guinéens ezali kolonga te, yango wana epelisi moto !!! Muke te, to encaisser but ya liboso sur magnifique dribble ya Bengaly Sylla sur Binda mpe a servir Seydouba Bangoura superbement oyo a battre Pombi Litinda sans même a bouger, atali balle kaka na miso.
Na retour ya mi-temps, but ya mibale ya ba Guinéens ekotaki à peu prés na ba mêmes conditions : Lobilo Boba awuti kozonga na terrain sima ya mauvais jeux ya Sekou Sylla sur ye mpe azui dérangement. Azongi na terrain azali ko boiter, Mukoji a rater kosala couverture ndenge elongobani mpe deuxième but ya Seydouba Bangoura. Awa, Pombi amibuaki kasi, munduki elekaki makasi.
Sima ya wana, Tambwe Lea aye ko changer dispositif na ye, abimisi Lofombo, akotisi Kondi Affa Luvu « le technicien » milieu récupérateur mpe Masengo amati na attaque na aille droite mpe souvent, ye, na Mayanga bazali kosala ba permutations na ba ailles mibale : droite na gauche. Kuna mpe laboratoire eyebisi que match esili kobaluka mpe na ndenge Mayele ayaki kotia magnifique but suite na débordement ya Mayanga oyo abomaki successivement Ismaila Sylla na Alyseny Diaby mpe afungoli Mayele oyo a reprendre balle wana ndenge ebandaki koya mpe epesi but ya gizza ! Ba oyo babungi te bazali koyeba lisusu extrait ya but ya Mayele ebandaki koleka na ebandeli ya Panorama mpe na Tribune de sports, lundi na jeudi sur télé-Zaïre mpe présenter na Basunga Nzinga (lundi) na Ngwanzo Lamangale (jeudi). Tango Mayele atiaki butu oyo, a s’embrasser Mayanga. Na suka, Kiyika Tokodifuansuka « soucous » ayaki kotia but ya misatu suite na service ya Mutubile Ndjela « petit Santos ».
Match oyo ezalaki suka na calvaire mpo na Binda «nkolo mboka » mpo Bengaly Sylla asakanaki na ye na ndenge nionso à tel point que Binda akomaki kaka ko croiser makolo sima ya dribble ya Bengaly Sylla. Banda wana, Binda abunga na Léopards mpe tee na Bilima eyaki ko modifier diapositif ya défense na yango na remplacement na ye epayi ya Epoma Bolenge « Fanfan ». Kasi neti Epoma azalaki arrière gauche, Malbanga Imowa « Maria », mutu azalaki na poste wana akomi libéro, Mandiangu Lukoso, le libéro, akomi arrière droit.
Na match oyo, ba critiques ya Kabasele Tshimanga « Katshi » ezalaki un peu dure contre Mayanga. Ce dernier, azalaki en forme na championnat. Tambwe Lea azalaki na possibilité ya kobetisa Kabasu Babu na aille gauche ou na aille droite. Kabasu asalaki match malamu contre ba Congolais ya Brazzaville, na Kinshasa, tolongaki na 4 à 1. Na milieu lisusu abetisi ba milieux offensifs misatu : Mutubile, Kiyika na Massengo pendant que deux milieux récupérateurs lokola Kondi na Mwela Kamonga batikalaki na banc. Na défense, association ya deux libéros : Lobilo na Mukoji esimbaki penza te mpe tobandaki komona comment Lobilo abandaki souvent kopesa Mukoji ba conseils na placement na ye alors que Ngoy Mujinga nde akokaki kobeta na esika wana mpo Bwanga Tshimena, alingaki lisusu kozongela Léopards te tout comme ndeko na ye Kazadi Mwamba, bien que bazalaki ko continuer ko briller na Mazembe. Mbuya Mpaka nde azalaki pressenti mpe ye nde azalaki titulariser na matchs nionso mibale ya premier tour contre Diable noir ya Congo Brazzaville. Kasi, neti Pombi azalaki na plus d’expérience internationale yango nde Tambwe Lea a décidaki a titulariser ye. Na match retour na Conakry, esika topolaki na 3 à 1 na mokolo mua 19 août 1979, Mutubile atiaki but ya mutu sima ya débordement ya Kondi tee na coin ya corner!!!
Sika, tika nameka kosala mua mise au point, na oyo etali ba défenseurs Guinéens : na elili oyo ndeko Mesager atieli biso, Fode Gassimou Camara, libéro, alati maillot n°5, asalaki match munene na Kinshasa. Sima ya match retour, akutanaki na liwa na likama ya accident ya route na Conakry, mokolo mua 16 septembre 1979. En revanche, Alseny Diaby « Lavia » nde abandaki kokanga singa ya pembe na mutu (azali na yango na elili oyo), ye alati maillot n°4!!!
Oyo ezalaki mua ba souvenirs iye ezongeli ngai.
Patriotiquement,
Emmanuel Kandolo
.